Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/12 nk. 24-27
  • “Mpo na komonisa bosembo ya bolingo na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mpo na komonisa bosembo ya bolingo na bino
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya momekamo
  • Ebongiseli mpo na kosangisa makabo
  • ‘Topesa mingi mpe na motema malamu’
  • Bolingo na bango mpe ezaleli na bango ya kokaba emekami
  • Momekamo na eleko na biso
  • “Nzambe alingi ye oyo akopesaka na esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Paulo abongisi ndenge ya kopesa makabo mpo na kosunga babulami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mopesi na “makabo nyonso malamu”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Lolenge oyo Jehovah azali kokolisa mosala na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/12 nk. 24-27

“Mpo na komonisa bosembo ya bolingo na bino

MALOBA oyo malimboli nini mpo na yo? Monyoko? Mimekamo? Kobomama? Tokokuta yango kati na mokanda oyo ntoma Paulo atindaki kala epai na baklisto na Kolinti. Lelo oyo, maloba yango mazali lisusu na ntina monene mpo na basaleli na Jéhovah, mpamba te ‘bosembo na bolingo na bango’ etyami na momekamo. Na ndenge nini? Ntina mpo na yango maloba oyo makomamaki ekosalisa biso na koyeba ndimbola na yango.

Ntina ya momekamo

Pene na mbula 20 nsima na kosalema na lisangá na boklisto, lisangá na Yelusaleme ezangaki mwayé ya kobikela. Lokola bazalaki kofanda kati na bato bamipesaki na losambo na boyuda mpe bazalaki na bokabwani, baklisto bazalaki bongo koyika mpiko uta bambula ebele na “etumba makasi kati na mpasi” mpe babungisaki ata ‘biloko na bango’. (Baebele 10:32-34) Bazalaki bongo na mposa ya lisalisi ekouta epai mosusu.

Bapakano oyo bakomaki bandeko na bango bamimonaki ete bazalaki na mokumba ya kosalisa bango na mimekamo oyo bazalaki na yango. Bazalaki na “nyongo” epai na baklisto na Yelusaleme. Mpamba te nsango malamu eutaki na Yelusaleme mpe epalanganaki kino epai na bapakano. Paulo alobi boye: “Mpamba te soko bapakano bakomi kozwa likabo na mapamboli na bango na elimo, ekoki ete basalela bango mpe mapamboli na biloko na mosuni.”​—Baloma 15:27.

Ebongiseli mpo na kosangisa makabo

Paulo azwaki etinda longwa na Collège central mpo na “kokanisa babola, kati na baklisto. (Bagalatia 2:10) Atindaki bongo mitinda epai na baklisto na Mpoto mpe na Asie Mineure, mpo ete bakoka kosilisa likambo oyo ezalaki na Yelusaleme. Ntoma alobaki boye: “Mpo na kokongola makabo na ntina na Babulami, pelamoko nalakisaki mangomba na Galatia, ekoki na bino kosala bobele bongo. Na mokolo na Yenga, moko na moko na bino akaba mpe abatela eloko ye moko kati na yango esili ye kozwa, ete soko nakoya makabo malukama te.”​—1 Bakolinti 16:1, 2.

Soko baklisto yango bazalaki kosala ebongiseli motindo yango, bakozanga makoki te na ntango ya kokongola makabo. Bakokaki kobanga te ete mosolo na bango ebunga to esalelama mpo na ntina mosusu. Bobele ‘bato oyo bandimamaki’ nde bapesamaki nzela mpo na komema mosolo oyo bakongolaki mpe, Paulo azalaki pene mpo na kokenda elongo na bango, soko bamonaki ete ezalaki na ntina akenda.​—1 Bakolinti 16:3-5.

Bakolinti basalaki nini? Emonani ete balandaki batoli na Paulo; kasi, makabo matindamaki te. (2 Bakolinti 8:6, 10, 11) Mbala mosusu bankulutu bazalaki na mosala mingi mpo na kobunda na bokabwani, pite mpe mikakatano misusu na ntina na yango Paulo akomelaki bango.

‘Topesa mingi mpe na motema malamu’

Ata ndenge nini, Paulo atindelaki bango mokanda mosusu mpe alobaki: “Bandeko, tolingi ete boyeba mpo na ngolu na Nzambe oyo emonani kati na mangomba na Makedonia. Na kati na komekama na matumoli mingi, bazalaki na esengo monene mpenza, mpe kati na bobola na bango na solo, baleki na litondi na makabo na bango. Nazali kotatola ete bapesaki kino nsuka na nguya na bango mpe na koleka, bobele na mokano na bango mpenza. Basengi biso na etingya ete topesa bango nzela na kosangana na biso na lisungi kosunga Babulami. Ezalaki lokola elikyaki biso te kasi bamipesaki liboso epai na Nkolo mpe epai na biso lokola na mokano na Nzambe. Bongo biso tobondeli Tito ete, awa ebandisi ye mosala oyo na ngolu, asukisa yango kati na bino mpe. Lokola bozali koleka liboso na makambo nyonso, na kondima mpe na kosakola mpe na boyebi mpe na etingya nyonso mpe na bolingo na bino mpo na biso, tika ete boleka liboso na mosala oyo na ngolu lokola.​—2 Bakolinti 8:1-7.

Bolingo malamu ya bandeko na Makedonia etindaki Bakolinti ete bakanisa. Eyebani ete Kolinti ezalaki mboka moko na bozwi epai kuna mombongo ezalaki kotambola mpe epai bato bazalaki kolinga biloko ya motuya. Baklisto mosusu oyo bazalaki kofanda kuna bazalaki babola, kasi, mingi kati na lisangá bazalaki na bozwi koleka bandeko na Makedonia, baoyo bazalaki kati na “bobola makasi”. Nzokande, bandeko na Makedonia bapesaki makabo “koleka makoki na bango”. Bazalaki na mposa te ete Paulo alendisa bango na kosala makabo. Kasi ‘basengaki ye na etingya’ soko bakokaki bango mpe kopesa makabo na bango. Yango emonisaki ete baklisto na Makedonia ‘bamipesaki mpenza na Nkolo’, bamipesaki mobimba epai na ye, epai na Paulo mpe epai na baninga na ye na mosala, na kolandaka bongo litambwisi na bonzambe.

Bolingo na bango mpe ezaleli na bango ya kokaba emekami

Bakolinti bango mpe balingaki kopusama na ‘kopesa mingi mpe na motema malamu’? Ntango akendaki mpo na mbala ya liboso na Kolinti, Paulo akokisaki ye moko bamposa na ye - azalaki kosala ndako na kapo. (Misala 18:1-3) Ata nsima na kosalama na lisangá, azalaki kolya na mosala na ye, mpamba te aboyaki kosalela “lotomo” oyo ezalaki na mosakoli na ntango nyonso mpo na kozwa lisalisi na mosolo.​—1 Bakolinti 9:3-12

Tala makambo makomamaki na molimboli na Biblia Thomas Scott: “Mpo na oyo etali makanisi na baklisto na Kolinti, na ntembe te [Paulo] amonaki ye moko uta ebandeli makambo oyo matindaki ye na koboya lisalisi nyonso longwa na bango.” Ekoki kozala ete, lokola bapusamaki na bato na ezalela na moimi mpe bato balingi bozwi na mosuni, baoyo bazingaki bango lokola Bakolinti bazalaki na mwa bozwi, bazalaki mpenza te na ezaleli ya kokaba. Epai mosusu, Paulo azalaki kobanga mbala mosusu soki andimi lisalisi ya mosuni, elimo na bango ya mabe ekoki kotya ntembe na mikano na ye ya malamu. Ekoki mpe kozala lisusu ete lokola na Tesalonike, bagoigoi mosusu bazalaki koluka kobikela na nsima na baninga na bango baklisto.​—2 Batesaloniki 3:7-12.

Ata ndenge nini, Paulo mpe baninga na ye, bamonaki malamu ete, bango moko bakokisa bamposa na bango “mpo ete batya libaku te na nzela na nsango malamu”. (1 Bakolinti 9:12) Ata bongo, nsima na yango, Paulo azangaki mosolo, mpe likambo yango eyebisamaki epai na baklisto na Filipe baoyo bazalaki mpe babola. Paulo alobaki epai na Bakolinti: “Nasilisi bozwi na mangomba mosusu wana ekamati ngai makabo na bango ete nasalela bino. Ezalaki ngai epai na bino, mpe ezangi ngai, natii mokumba epai na moto moko te. Mpamba te bosenga na ngai esili na bandeko bauti na Makedonia [ekokaki kozala bandeko na Filipe]. Boye naboyaki kozala mokumba epai na bino na nzela nyonso; nakoboya mpe yango lisusu.​—2 Bakolinti 11:8, 9; tala Bafilipi 4:15, 16.

Ya solo, mpo na ye moko, Paulo aboyaki ete Bakolinti bapesa ye “makabo”; kasi ntango amekaki koboya makabo na Lydie, mwasi mofandi na Filipe, ‘asengaki ye na makasi ete akota epai na ye’. (Misala 16:15) Bakolinti bazalaki komibanzabanza motindo yango mpo na bolamu na Paulo? Tokoki komituna motuna yango. Kasi, Paulo ayebaki ete ezalela na lisangá na Yelusaleme epesaki ye libaku ya kotya Bakolinti na momekamo, mpo na kotala soko bazalaki na loboko makasi to bazalaki na ezaleli na kokaba koleka liboso. Apesaki bango elendiseli oyo:

“Nazali koloba lokola lilako te nde . . . mpo na komeka bosembo na bolingo na bino. Naboyi ete ezala petee mpo na bamosusu mpe mpasi mpo na bino [elingi koloba ete bamosusu basalisama mpe bino bomona mpasi]; nde mpo na kokokisa likambo, bozwi na bino na ntango oyo ekosunga kozanga na bango ete bozwi na bango bosunga kozanga na bino, bongo ekokoka malamu. Lokola ekomami ete, Ye oyo alokoti mingi atikali na eloko te, mpe ye oyo alokoti moke azangi te.’”​—2 Bakolinti 8:8, 13-15.

Emonani ete momekamo yango esukaki malamu, mpamba te, nsima na mwa ntango moke, Paulo akomaki: “Bandeko na Makedonia mpe na Akaya [esika mboka na Korinte ezalaki] basepeli koyanganisa makabo mpo na babola kati na Babulami bazali na Yelusaleme.”​—Baloma 15:26.

Momekamo na eleko na biso

Lelo oyo, bolingo na biso mpe ezaleli na biso ya kokaba etyami na momekamo: tolongaka mimekamo yango? Tozali kobika na “ntango na mpasi mpe na mikakatano”. (2 Timote 3:1-5) Mingi kati na biso basengeli kobimisa mosolo mingi. Mbala mosusu “mposa mabe ya nzoto, mposa mabe ya miso mpe kokumisa biloko na mosuni” ekoki kobakisela biso mokumba. (1 Yoane 2:16) Na makambo motindo wana, ezali mpasi te mpo na kokanisa bobele na bamposa na yo mpe kozanga kotalela mposa ya bamosusu.

Mingimingi ba Témoins de Jéhovah bamonisaka na lolenge ya kokamwa, bosembo ya bolingo na bango kati na bandeko. Na yango le 8 Mars 1985, mabelé maninganaki na Santiago na mokili ya Chili. Bankama na baklisto babungisaki bandako na bango mpe biloko na bango. Bobele na ntango yango, masangá mabongisaki lisalisi. Balobaki ete: “Na boumeli ya mwa ngonga, bandeko mibali babandaki kotambola, komemaka bongo bilei, bilamba, bizipeli mpe biloko mosusu ya ntina.” Epai mosusu, longwa na mokili mobimba, makabo matindamaki. Ezaleli motindo wana ya kosalisana emonanaki mbala mingi.

Nzokande, tokoki ntango nyonso kozela bobele likama te mpo ete tomonisa bosembo ya bolingo na biso epai na bandeko. Soko ndeko moko moklisto akeleli na mosuni, tokoki kotya likebi na bamposa na ye mpe kosala mwa likambo na esika ya koloba: ‘ofanda na móto mpe omileisa malamu.’ (Yakobo 2:15, 16) Tokokanisa boni mpo na baoyo bazali na mosala ya pionnier, baoyo bazali kobika “mpo na nsango malamu”? Lokola Paulo, basengaka te to bamizelaka te ete basalisa bango na mosuni epai na baoyo bango bazali kosalela. Ata bongo, mingi bazali komona ete basengeli komonisa ezaleli ya kokaba epai na baklisto yango oyo bazali komipesa mpo na ‘kopalanganisa biloko na elimo’ mpo na bango.​—1 Bakolinti 9:11, 14.

Bongo lisangá ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mobimba, ezali na bamposa na mosolo te? Annuaire des Témoins de Jéhovah mpo na 1989 elobi boye na ntina yango: “Na mbula na mosala 1988, la Société Watch Tower ebimisaki 2 983 467 697 dollars (pene 180 000 000 de francs français) mpo na kosalisa ba pionniers spéciaux, ba misionere mpe bakengeli na zongazonga ete bakokisa mosala na bango. Epai mosusu, mosolo mingi mobimisamaki mpo na kotambwisa malamu ba filiales mpe mpo na kosomba bandako ya sika, masini ya mosala, masini, papier . . . kozanga kotanga mosolo mobimisamaki mpo na kobatela basangani 9 000 ya libota na Béthel kati na mokili mobimba. Lisusu, bibongiseli 18 mpo na botongi bandako mpe kobongisa yango bizali sikawa kosalama na ba filiales ekeseni mpe bibongiseli 19 bizali kotambwisama sikawa na siège mondial, ezali na Brooklyn, New York. Opesaka mwa mosolo mpo na kosangana na mosala yango oyo ezali kosalama kati na mokili mobimba?

Lokola na ekeke na liboso, bato banso lelo oyo bazali kokokisa mokumba yango, ata baoyo bazali na makoki mingi te, baoyo na makabo na bango ya mike bazali kotambwisa mosala ya la Société. Bamoko bazali komona malamu mpo na kolanda toli epesami na 1 Bakolinti 16:2 mpe kotya ntango nyonso mwa mosolo na pembeni mpe bakomema yango na Salle du Royaume. Lisusu, ezali na baoyo bazali kotinda mbala moko mosolo epai na la Société Watch Tower, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, to na moko na ba filiales na yango.

Bondima solo ete Jéhovah azali komona baoyo na ezaleli na bango ya bokabi, bazali komonisa bosembo na bolingo na bango. Bomizangisa te bolamu oyo Jéhovah azali kopesa! Paulo apesi elaka oyo: “Nzambe ayebi kopesa bino makabo nyonso malamu ete bozala na biloko mingi ntango nyonso mpe kati na makambo nyonso mpe ete bokokisa misala nyonso malamu.”​—2 Bakolinti 9:8.

[Etanda na lokasa 26]

NDENGE NINI KOPESA MAKABO (ENGEBENE BAMBOKA)

◻ MAKABO: Makabo makoki kotindama na la Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, Etats-Unis, to na filiale ya la Société oyo ezali na mboka na bino. Biloko lokola ndako to lopango bikoki mpe kopesama to biju to biloko mosusu. Mwa mokanda mokuse ekotindama elongo na makabo yango mpo na komonisa soko ezali makabo ya bolingo malamu.

◻ MAKABO YA LOLENGE MOSUSU: Mosolo mokoki kopesama na la Société Watch Tower na elikya ete bakoki kozongisela yo soko okomi na mposa na yango.

◻ POLICES D’ASSURANCE: Mosolo mokoki kofutama na police d’assurances ekoki kopesama epai na La Société Watch Tower. Na ndenge yango, esengeli koyebisa La Société.

◻ FIDEICOMMIS: Na bamboka mosusu, compte moko ekoki kofungolama na banke mpo na la Société Watch Tower. Esengeli bongo koyebisa la Société.

Nkasa ebengami ete actions, obligations mpe biloko mosusu bikoki kopesama, mopesi akomonisa bongo mposa na ye ya kosalela yango wana ezali ye na bomoi. Motindo yango ekopengola kobebisa mosolo mpe ekondimisa solo ete testament esalamaki na nkolo biloko. Esengeli mpe koyebisa La Société Watch Tower ete akozwa biloko yango soko liwa ekomeli yo.

◻ TESTAMENTS: Na bamboka mosusu (kasi na France te), biloko lokola ndako to lopango mpe mosolo ekoki kopesama epai na la Société na nzela na testament oyo endimami na mobeko. Kopi moko ya testament esengeli bongo kotindama epai na la Société.

Soko olingi koyeba makambo mingi na ntina yango to olingo batoli, koma epai na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, Etats-Unis, to na moko filiale ya la Société ezali na mboka na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto