Topesa litatoli mpo na Jehovah mpe tolemba te
“Bokanisa ye malamu, oyo ayikaki mpiko [na makambo ya mpasi longwa] na bato ya masumu (. . .), mpo ete bolemba te mpe botika elikya te.”—BAEBELE 12:3.
1, 2. Bilembeteli nini ya maksi, Yesu apesaki epai na bayekoli na ye mpo na komonisa ete asekwi?
NASILI komona Nkolo!” Ezali na maloba oyo na kokamwisa nde Marie Madeleine asakolaki lisekwa ya Yesu. (Yoane 20:18) Mpo na bayekoli ya Klisto, oyo bazalaki naino na mawa mingi mpo na liwa na ye, eleko ya mikolo 40 efungwamaki oyo etondaki na makambo mingi ya ntina.
2 Yesu alingaki ete bayekoli na ye bazala na ntembe ata moke te ete ye asekwi. Na yango, lokola elobamaki na Luka, “amimonisi na bango na bomoi, na nsima na mpasi na ye, na bilembo mingi na ntembe te, amonani na bango mikolo ntuku minei”. (Misala 1:3) Na libaku moko, ‘amonanaki na bandeko koleka nkama mitano na mbala moko’. (1 Bakolinti 15:6) Ntembe ekokaki kozala lisusu ata moke te mpo na likambo oyo: Yesu azalaki solo na bomoi!
3. Mpo na ntina etali Bokonzi, bayekoli ya Yesu batunaki ye motuna nini, mpe mpo na nini eyano na ye ekamwisaki bango?
3 Na eleko yango, bayekoli na Yesu bazalaki kolikya mpo na kozongisama na “bokonzi na Nzambe” awa na mabelé na mokili ya Yisraele. (Luka 19:11; 24:21) Mpo na yango batunaki Yesu ete: “Nkolo, okozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” Eyano na ye ekamwisaki bango mpenza; alobaki na bango ete: “Ezali likambo na bino koyeba ntango soko bilaka bisili Tata kotya na bokonzi na ye moko te: kasi wana ekosila elimo santu koya na likoló na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samaria, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:6-8) Oyo nde likambo monene etyamaki liboso na bayekoli! Mpe basengelaki kokokisa mokumba monene! Ndenge nini bakokaki kokokisa mokumba yango? Makambo minene na kokamwisa oyo malandaki mapesaki eyano na motuna yango.
Balongi na mokumba yango
4. Likambo nini esalamaki na mokolo na Pantekote?
4 Luka akomaki: “Wana ezalaki mokolo na Pantekote, bazalaki nyonso elongo na esika moko. Lokito ebimi na Likoló pwasa lokola lokito na kopepa na mopepe makasi, etondisi ndako mobimba esika efandaki bango. Ndemo lokola moto emonani na bango, ekabwani, efandi moko moko na motó na moto na moto na bango. Bango nyonso batondaki na elimo santo, mpe babandi kosolola na nkota mosusu pelamoko elimo epesi bango maloba.” Lokito ezalaki makasi kino ebendaki likebi na ebele ya Bayuda oyo bazalaki na Yelusaleme mpo na elambo. Bakamwaki mingi na koyoka na ‘monoko na bango, makambo kitoko na Nzambe’.—Misala 2:1-11.
5. Likambo Yesu asakolaki na Misala 1:8 ekokisamaki nokinoki?
5 Ntoma Petelo azelisaki te mpo na koloba. Kati na diskur moko na nguya, amonisaki ete “Yesu na Nazarete”, oyo batyaki likoló na nzete, akomaki “Nkolo” oyo David asakolaki na maloba malandi: “Jéhovah alobaki na Nkolo na ngai ete: ‘Fanda na loboko na ngai na mobali, kino ekotya ngai bayini na yo lokola etemelo na makolo na yo.’” Lokola maloba yango makotelaki bango na mitema, bayoki na ntoma Petelo batunaki: “Bandeko, tosala nini?” Petelo alendisaki bango na eyano oyo: “Bobongola mitema mpe moto na moto na kati na bino abatisama na nkombo na Yesu Klisto mpo na kolimbisama na masumu na bino.” Mpo na yango, bato nkoto misato babatisamaki. (Misala 2:14-41) Litatoli ebandaki kopesama na Yelusaleme. Na nsima, epalanganaki na Yuda mobimba, nsima na Samarie mpe kino “nsuka na mokili”. Kosakolama ya Bokonzi epalanganaki nokinoki na boye ete pene na mobu 60, ntoma Paulo akokaki koloba ete nsango malamu esili “kosakolama epai na bato nyonso na nse na Likoló”.—Bakolose 1:23.
Bokoli ya mosala mpe monyokoli
6, 7. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete na ekeke ya liboso bokoli na mosala na Bokonzi etambolaki elongo na monyokoli? (b) Likambo nini ya nokinoki baklisto ya Yelusaleme bazalaki na yango mposa, mpe ndenge nini mposa yango ekokisamaki?
6 Mwa moke nsima na Pantekote ya mobu 33, bayekoli na Yesu bazwaki libaku ya komikundola maloba na ye oyo malandi: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soki basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” (Yoane 15:20) Bakonzi na mangomba na Bayuda, basilikaki makasi, mpo ete “Liloba na Nzambe ekolaki, mpe motuya na bayekoli na Yelusaleme [ebakisamaki] mingi mpenza.” Moyekoli Setefano abomamaki na mabanga mpo bafundaki ye na bifundeli na lokuta. Emonani ete, ezalaki nde elembo oyo bato mingi bazalaki kozela, mpo ete “na mokolo yango monyokoli monene ebimeli lisangá na Yelusaleme, mpe bango nyonso bapalangani na mikili na Yuda na Samarie, longola bobele bantoma”.—Misala 6:7; 7:58-60; 8:1.
7 Nsima na kimya ya ntango mokuse, monyokoli ezongaki lisusu, mpe Hérode Agrippa Ier abomisaki ntoma Yakobo. Akangisaki ntoma Petelo, kasi anzelu abimisaki ye na boloko. Nsima na mikolo, baklisto na Yelusaleme bakelelaki, mpe baninga na bango na bisika mosusu batindelaki bango lisalisi. (Misala 9:31; 12:1-11; 1 Bakolinti 16:1-3) Wana ntoma Paulo azalaki na Yelusaleme, ebele na bato oyo bakangamaki makasi na lingomba na bango balobaki na koganga makasi ete: “Longola moto na motindo boye na mokili, ebongi kotika ye na bomoi te!” (Misala 22:22) Solo mpenza, baklisto ya Yelusaleme mpe ya Yuda bazalaki na mposa ya kolendisama mpo na kolanda kopesa litatoli mpo na Bokonzi na bosembo nyonso. Engebene elaka Yesu apesaki na bayekoli na ye, ‘elimo santu, oyo Tata asengelaki kotinda na nkombo na ye’, ekozala “mosungi”. (Yoane 14:26) Ndenge nini, kobanda wana, Tata akokaki kopesa lisalisi to libondisi oyo bazalaki na yango mposa? Ndambo na lisalisi yango epesamaki na nsima na ntoma Paulo.
Mokanda ya Paulo epai na Baebele
8. (a) Nini epusaki ntoma Paulo na kokoma mokanda na ye epai na Baebele? (b) Na eteni nini ya mokanda na ye tokotelema, mpe mpo na nini?
8 Pene na mobu 61, ntoma Paulo azalaki na boloko na Rome, kasi ayebaki mikakatano ya bandeko na ye na Yelusaleme. Ezali mpo na yango, na kopemama na elimo ya Jéhovah, akomaki mokanda na ye epai na Baebele. Kati na mokanda yango, oyo ekomaki na ntango ebongi, ntoma amimonisaki moto na boboto epai na bandeko na ye Baebele mibali mpe basi. Ayebaki oyo bazalaki na yango mposa mpo ete balendisama kati na kondima na bango mpe elikya na bango epai na Jéhovah, ye oyo akokaki kosalisa bango. Na kosalaka bongo, bakokaki ‘kopota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na bango’ mpe komonisa elikya na bango na maloba oyo: “Jéhovah azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akosalela ngai nini?” (Baebele 12:1; 13:6) Totelema mwa moke na eteni yango ya mokanda ya Paulo epai na Baebele oyo ebandi na mokapo 11 kino 13. Mpo na nini? Mpo ete lelo ba Témoins de Jéhovah bazali kati na ezalela motindo moko na baklisto ya liboso.
9. Mituna nini baklisto ya lelo bazali kokutana na yango, lokola baoyo na ekeke ya liboso, mpe ndenge bakoki koyanola na yango?
9 Na mikolo na biso, mingi bandimaki nsango malamu ya Bokonzi na komipesaka epai ya Jéhovah mpe na kozwaka batisimo, bakomaki bongo Batemwe na ye. Kasi, bokoli yango ya losambo ya solo elandanaki na minyokoli makasi kati na yango baklisto mingi bakufaki, lokola yango ezalaki na ekeke ya liboso, mpo na Setefano, Yakobo mpe Batemwe mosusu basembwi. Mpo na yango, mituna ndenge moko mizali kotunama lelo: liboso na botemeli makasi oyo nsango ya Bokonzi ezali kokutana na yango, nani akotikala sembo? Lisusu, ntango “bolozi monene”, likama oyo ekokani na mosusu te, ekokwea likoló na bato na ntango na biso, nani akoyika mpiko na makambo minene oyo makobima na ntango yango? (Matai 24:21) Ezali baoyo bamibongisaki mpo na “etumba malamu na kondima”, baoyo “bakotelema ngwi mpo na kondima”. Ntango makambo nyonso makoleka, bango nde bakoloba: “Elonga oyo eleki mokili ezali: kondima na biso.”—1 Timoté 6:12; 1 Petelo 5:9; 1 Yoane 5:4.
Tozwa litomba na bandakisa ya bato oyo bazalaki sembo
10. (a) Kondima ezali nini? (b) Nzambe azalaki kokanisa nini mpo na mibali mpe basi na kondima na ntango ya kala?
10 Kondima ezali nini? Ntoma Paulo apesi eyano: “Kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso, ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana. Na bongo, mpo na yango, mibali ya kala bazwaki matatoli.” (Baebele 11:1, 2) Nsima ntoma Paulo alongisi ndimbola na ye mpo na kondima na kopesaka bandakisa oyo ezali kolakisa misala na yango. Asaleli komekama makasi oyo “mibali ya kala” bazwaki kati na bomoi na bango, mpe basi mosusu lokola Sara mpe Rahab. Ezali elendiseli na koyeba ete “Nzambe ayoki nsoni te ete abyangama Nzambe na bango”! (Baebele 11:16) Na kotala kondima na biso, Nzambe akoki koloba bongo mpo na biso? Tosala nyonso mpo ete na nsuka ya mokolo na mokolo, akoka koyoka nsoni mpo na biso te.
11. “Lipata monene na batatoli ezingeli biso” ekoki kopesa biso matomba nini?
11 Nsima na kolobela mpo na mibali mpe basi yango basembwi, ntoma Paulo alobaki: “Na bongo, mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tolongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso, topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso.” (Baebele 12:1) Atako balali kati na nkunda, batemwe oyo basembwi bazali bandakisa ya solosolo kati na makanisi na biso? Toyebi bango malamu mpenza, mpe makambo minene basalaki na bomoi na bango, mpo na koyanola solo na motuna yango? Yango nde moko na matomba ebele ezali kozwama na baoyo bazali koyekola Biblia ntango nyonso mpe bazali kosalela makoki na bango nyonso mpo na kokanga ntina ya bomoi ya kokamwisa na “lipata monene na batatoli”. Ee, soki tomekoli ndakisa na bango ya bosembo, tokokoka kolonga ezaleli nyonso ya kozanga kondima. Mpe likambo yango ekosalisa biso na kopesa litatoli mpo na solo na molende mpe kozanga kobanga ezala na ntango nini.—Baloma 15:4.
Tolemba te
12. (a) Na nini ndakisa na Yesu ekoki kosalisa biso ‘na kolemba te mpe kotika elikya te’? (b) Tanga mwa bandakisa ya baklisto oyo, na eleko na biso, balembi te.
12 Ndakisa na biso malamu koleka mpo na kondima ezali Yesu. Ezali mpo na yango ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo: “Topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima [na biso]. . . . Ee, bokanisa ye malamu, oyo ayikaki mpiko [na makambo ya mpasi longwa] na bato ya masumu, yango nde ezalaki mpo na litomba na bango, mpo ete bolemba te mpe botika elikya te.” (Baebele 12:1-3) Tozali koyekola “malamu” ndakisa na Yesu? Ye mpenza ‘tozali kotala ye’? (1 Petelo 2:21) Satana alingi ete ‘tolemba mpe totika elikya’. Alingi ete totika kosangana na mosala ya kopesa litatoli. Ndenge nini azali kosala mpo na kokweisa biso? Mbala mosusu, lokola ezalaki na ekeke ya liboso, azali kosalela bakonzi ya mangomba to ya politike mpo na kobimisa botemeli ya makasi. Mpo na yango, na mbula oyo eleki, mosala ya kosakola Bokonzi epekisamaki kati na mikili ntuku minei. Bandeko na biso balembaki mpo na yango? Te! Bala- ndaki na bosembo nyonso misala na bango, kino ete bato koleka 17 000 bazwaki batisimo kati na mikili yango na 1988. Matomba yango masengeli kolendisa baoyo nyonso bazali kobika kati na mikili epai kuna bonsomi ezali. Tolemba soko moke te mpo na kosakola nsango malamu na Bokonzi!
13. (a) Mpo na bantina nini ya kobombama tokoki kolemba kati na mosala na biso ya kosakola? (b) ‘Esengo etyamaki liboso na Yesu’ ezwamaki na bantina nini, mpe tokoki kosala nini mpo na komekola ezalela na elimo oyo epesaki Yesu esengo?
13 Kasi, kolemba na biso ekoki kozala na bantina mosusu oyo ezali kobombama. Na ndakisa, botemeli kati na libota oyo ekabwani mpo na losambo, mobulungano kati na makanisi, mikakatano mpo na kolongono ya nzoto, bopusi ya baninga na biso to bato oyo tosalaka na bango elongo, mosala ya kosakola oyo ezangi kobimisa mbuma, to mbala mosusu motema likoló na ndenge biloko mabe na ntango oyo ezali kosuka noki te. Kasi tokanisa: eloko nini esalisaki Yesu na koyika mpiko na bampasi na ye ya makanisi mpe ya nzoto? Ezalaki “esengo etyamaki liboso na ye”. (Baebele 12:2) Esengo yango, oyo ezalaki kolendisa ye, ezwamaki na bantina mingi: ya yambo, ayebaki ete azalaki kosepelisa motema ya Tata na ye, mpo ete azalaki kolongisa nkombo na ye; lisusu, akanisaki mpo na ese- ngo oyo akozwa ntango akopesa epai na bato matomba kitoko na Bokonzi ya Masiya. (Nzembo 2:6-8; 40:9, 10; Masese 27:11) Tokoki komekola malamu koleka ezalela yango ya elimo oyo epesaki Yesu esengo? Tomikundola maloba oyo ya ntoma Petelo: “Mpasi na motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” (1 Petelo 5:9) Soki tondimisami ete Jéhovah azali koyeba makambo na biso, soki tozali koyeba ete bandeko na biso ya bolingo mingi bazali kati na mokili mobimba mpe soki tozali kotala esengo oyo ezali liboso na biso na nse na boyangeli na Bokonzi, mpe lisusu, lokola tobelemi na nsuka, tokolemba te: tokosalela Jéhovah kati na kondima mpe tokosakola na motema mobimba.
Mpo na nini Jéhovah azali kopesa biso disipline
14. Matomba nini tokoki kozwa na ntina na komekama na biso mpe konyokwama na biso?
14 Sikawa ntoma Paulo amonisi biso polele ntina mpo na yango mbala mosusu tozali komekama mpe tozali konyokwama. Asengi biso totalela yango lokola disipline. Tala makanisi oyo apesi: “Mwana na ngai, otyola [disipline] ya Jéhovah te, kolemba mpe te wana ekopamelaka ye yo; mpo ete Jéhovah akopesaka [disipline] epai na baoyo akolingaka bango.” (Baebele 12:5, 6) Ata Yesu ‘ayekolaki kotosa na bampasi oyo ayikelaki mpiko’. (Baebele 5:8) Na yango ebongi ete, biso mpe toyekola botosi. Nzokande, soki totiki ete disipline eyema biso, tokozwa matomba mingi. Ntoma Paulo akomaki: “Nde nsima ekozwisa mbuma na kimya na boyengebene.” Oyo nde elendiseli!—Baebele 12:11.
15. Ndenge nini tokoki kolanda toli ya ntoma Paulo mpe ‘kobongisa nzela alima mpo na makolo na biso’?
15 Na kobatelaka elikya yango, soki tondimi “[disipline] ya Jéhovah”, tokosimba malamu na motema elendiseli oyo ya ntoma Paulo: “Na bongo, botombola maboko mazali kokita na nse mpe bokembisa mabolongo mazali kolemba, mpe bobongisa nzela alima mpo na makolo na bino.” (Baebele 12:12, 13) Mbala mosusu ezali mpasi te kopengwa na ‘nzela na nkaka oyo ekomema na bomoi’. (Matai 7:14) Na Antiokia, ntoma Petelo mpe baklisto mosusu bapengwaki motindo yango. Mpo na nini? Mpo ete “batambolaki sembo na solo na nsango malamu te”. (Bagalatia 2:14) Mpo na oyo etali biso, tosengeli kolanda koyoka Moteyi na biso monene, Jéhovah Nzambe. Tosengeli kosalela mingi lisalisi oyo azali kopesa biso na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele”. Na kosala bongo, tokobongisa “nzela alima” mpo na makolo na biso.—Matai 24:45-47; Yisaya 30:20, 21.
16. (a) Ndenge nini “nzete na bololo” ekoki kokota na lisangá? (b) Mpo na nini ntoma Paulo akangisi esika moko pite na kozanga limemya na makambo na bulee, mpe ndenge nini tokoki komibatela na makama yango?
16 Lisusu ntoma Paulo azali kosenga biso tokeba ete “moto azanga kozwa ngolu na Nzambe te; mpe ete nzete na bololo ebima te mpe eyeisa mobulu te, mpe mpo na yango mingi bayeisami mbindo”. (Baebele 12:15) Moto oyo azali kosepela te mpe azali koyimayima mpo na makambo mazali kosalema kati na lisangá akokani na “nzete na bololo” oyo ekoki kokola nokinoki mpe ekoki kobebisa bongo makanisi malamu ya basangani mosusu ya lisangá. Tokoki koboya matongi na kokanisaka mpo na bolamu nyonso oyo solo ememelaki biso. (Nzembo 40:5) Moto oyo amitiki kobendama na pite to oyo, lokola Esaü, azali “komemya makambo na bulee te” azali liboso ya likama mosusu. (Baebele 12:16) Ntoma Paulo, akangisi makambo yango mibale, mpo ete moko ekoki komema mokemoke na mosusu. Soki balandi maloba oyo ya ntoma Petelo: “Botemela ye [Diable] ngwi mpo na kondima”, baklisto nyonso bakoki kotemela bamposa na bango ya moimi.—1 Petelo 5:9.
“Elimbweli na biloko bizangi komonana”
17. Kokanisa makambo na kobangisa oyo masalamaki na ngomba Sinaï mpe ezalela na baklisto ya lelo?
17 Kondima na biso etelemi mpenza likoló na ‘[makambo na solo kasi mazangi komonana)’. (Baebele 11:1) Na Baebele 12:18-27, ntoma Paulo alandeli koloba mpo na mwa makambo na solo mazangi komonana. Akundoli makambo na kokamwa mingi oyo masalamaki na ngomba Sinai ntango Nzambe asololaki mbala moko na Yisraele. Na libaku yango, Moïse alobaki: “Ngai nayoki nsomo mpe nazali kolenga.” Na yango ntoma abakisi: “Kasi [bino] bobelemi na ngomba na Siona mpe na mboka na Nzambe na bomoi yango Yelusaleme na makoló, na motuya na baanzelu nkoto na nkoto bazali koyangana na esengo.” Na ntango na Yisraele ya kala, mongongo ya Nzambe oyo eyokanaki na ngomba Sinaï eningisaki mabelé, kasi sikawa, ntoma Paulo alobi ete Jéhovah apesi elaka oyo: “Naino mbala moko mosusu, nakoningisa bobele mokili te kasi likoló lokola.” Ata soki maloba oyo mazali kotalela na yambo baklisto bapakolami na elimo, “ebele monene” na bampate mosusu bakoki mpe kotya likebi na yango. (Emoniseli 7:9) Tozali kokanga ntina malamu na oyo ntoma Paulo alobaki? Totelemi liboso na koyangana esalami na motuya na baanzelu nkoto na nkoto. Ezali solo ete, totelemi mpe liboso na Jéhovah. Na loboko na ye ya mobali Yesu azali wana. Ezalela kati na yango tozali ezali solo na lokumu koleka, mpe mokumba na biso ezali monene koleka yango na Baebele ya kala na ngomba Sinai. Lisusu, koningisama oyo etumba na Armagedon ekoyeisa ekoboma makoló mpe mabelé ya ntange oyo, esika mabe ezali koyangela. Na yango oyo ezali ntango ya ‘kosenga ete topesama nzela ya koyoka’ Liloba na Nzambe mpe kotosa ye.
18. Tosengeli kosala nini mpo ete tokoka kopesa litatoli mpo na Jéhovah kozanga kolemba?
18 Ya solo mpenza, tozali kobika na eleko moko ya kobangisa mingi kati na lisolo ya bato. Lokola tozali ba Témoins de Jéhovah, totindamaki kino nsuka ya mokili mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe, oyo esili kosalema sikawa na makoló. Mpo na kokokisa mosala yango, tosengeli kozala na kondima ya makasi, kondima oyo ezali kolemba te, kondima oyo ezali kopesa biso nzela na koyamba disipline ya Jéhovah. Soki tozali na kondima motindo yango, tokolanda ‘kozala na ngolu na Nzambe, ngolu mpo na yango tokoki kosalela Nzambe mosala na bulee mpe na lolenge oyo ekosepelisa ye, na nsomo mpe na botosi’. (Baebele 12:28) Ee, tokolanda kopesa litatoli mpo na Jéhovah mpe tokolemba te.
Bozongeli
◻ Matomba nini tokoki kozwa kati na mokanda ya ntoma Paulo epai na Baebele?
◻ Na mituna nini baklisto basengeli koyanola lelo?
◻ Batemwe basembwi na kala bakoki kopesa biso lisalisi nini?
◻ Mpo na nini Jéhovah apesaka disipline epai na baoyo alingi?
◻ Tosengeli kosala nini mpo ete tokoka kopesa litatoli kozanga kolemba?