Libombami mosantu ebimisami
“Esengeli ete tondima yango, libombami na makambo na Nzambe ezali monene.’—1 TIMOTE 3:16 MN.
1. Libombami nini oyo elobelami kati na 1 Timoté 3:16?
MABOMBAMI ebangisaka yo? Olingaka, lokola mingi kati na biso, koyeba mabombami to basekele? Soki ezali boye, yaka na biso elongo, mpamba te alingi komikɔtisa kati na moko ya mabombami oyo eleki monene, libombami oyo Liloba na Nzambe ebomba uta bankoto na mibu. Libombami mosantu yango ezali na bopusi monene likoló na bomoi na biso, ya ntango oyo mpe ya ntango ezali koya. Ezali bongo ‘libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe’, oyo elobelami kati na 1 Timote 3:16. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mingi epai na Jéhovah, “Momonisi na makambo mabombami”, mpo ete kati na boboto na ye, ayebisi biso libombami yango kitoko elongo na ndimbola na yango!—Danyele 2: 28, 29.
2. a) Ntango nini Jéhovah alobaki mpo na mbɛki ya liboso na ntina na libombami mosantu, mpe alakaki nini na ntango yango? b) Mituna nini mizali kosenga eyano?
2 Jéhovah alobáká mpo na mbala ya liboso na ntina na libombami mosantu nsima na kokosama ya Eva epai na Nyoka mpe Adam alandaki mwasi na ye kati na botomboki Jéhovah alakaki ete “libota”, to mokitani, akonyata motó na Nyoka. (Genese 3:15) Libota yango azali nani? Ndenge nini asengelaki kolonga Nyoka? Akomonisa ete Nzambe alobaka solo mpe akolongisa mokano na ye na ntina etali mabelé?
3. Bilembo nini bisakweli na Nzambe bipesaki mpo na oyo etalaki koyeba ya Libota mpe koyeba makambo oyo akokokisa?
3 Nsima na bileko, bisakweli na Nzambe bipesaki bandimbola likoló na bomoto ya Libota mpe likoló na makambo oyo ye akokokisa. Akozala mokitani na Abrahame, akozwa bokonzi na David mpe bakobianga ye Mokonzi na kimya ‘Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te’. (Yisaya 9:6, 7; Genese 22:15-18; Nzembo 89:35-37) Nzokande, lokola elobi yango Baloma 16:25, libombami mosantu yango “ebombamaki uta kala”.
Libombami ebimisami
4. Ndenge nini, na mobu 29 ya ntango na biso, libombami mosantu ebandaki koyebana?
4 Nsuka na yango, mibu nkoto minei na nsima, kongɛnga eyaki! Ndenge nini? Na mobu 29 ya ntango na biso, Yoane abatisaki Yesu ya Nazarete kati na Yordani, mpe longwa na likoló mongongo na Nzambe eyokanaki, kokabaka ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” (Matai 3:17) Nsuka nsuka Libota na ndaka amonanaki! Libombami mosantu ebandaki koyebana kati na nkembo nyonso na biteni na yango ndenge na ndenge, kati na yango tokokuta bizaleli ya moto na Nzambe.
5. “Bizaleli ya moto na Nzambe” bizali nini, mpe bopusi nini bizali komema epai na baoyo bazali kosalela yango?
5 “Bizaleli ya moto na Nzambe” elimboli nini? Kati na Makomami na greke ya boklisto, liloba yango ezali mbala 20 mpe ndambo monene koleka kati na mikanda mibale oyo Paulo akomelaki Timoté. Mokanda auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible ezali kolimbola “bizaleli ya moto na Nzambe” (“piété”) lokola “ezaleli na moto oyo akomemyaka Nzambe, akosambelaka ye, mpe akosalelaka ye na komimonisaka sembo epai na boyangeli na ye monene”. Komemya Nzambe eutaka kati na motema oyo ezali kobelema na Nzambe na botosi mozindo mpo na bokonzi na ye, boseko na ye mpe ebele na misala na ye ya kokamwa; kasi lisusu na botondi mpo na ebele na makabo ya elimo mpe ya mosuni oyo azali kopesa epai na bato oyo bazali na botondi. Ya solo, baoyo nyonso kati na biso bazali kosalela bizaleli ya moto na Nzambe bakoki koloba elongo na mokomi na nzembo: “Ɛ molimo na ngai, sanzola Jéhovah!ɛ Jéhovah, Nzambe na ngai ozali monene; bilamba na yo bobele nkembo mpe lokumu.”—Nzembo 104:1.
6. a) Na nini basambeli na Jéhovah bakeseni na baklisto ya mokili oyo? b) Paulo alobaki nini kati na Baloma 11:33, 34, mpe mituna nini yango ebimisi?
6 Bokangami na biso epai na Nzambe esengeli komonana na misala. Kati na likambo yango, basambeli ya Nzambe na solo, Jéhovah, bakeseni mpenza na bandimi ya mangomba ya mokili oyo bandako-nzambe na bango ezali se kokauka. Mpo na bato mingi, lingomba, soki bazali na yango naino, ezali bobele elembo mpamba; ezali kazaka oyo bazali kolata mpo na komonana bato na lokumu, nzokande bomoi na bango etongami likoló na mokili mabe oyo ezali kozinga bango. Bayebi ata Nzambe te. Bato yango bakosala malamu na kotalela maloba oyo Paulo ayebisaka epai na bato ya Atene, baoyo bazalaki kosambela “nzambe oyo ayebani te”: “Na bongo, oyo bino bokosambelaka na koyeba ye te, ngai nakosakola ye na bino.” (Misala 17:23) Tala oyo Paulo alobaki kati na Baloma 11:33, 34 na ntina na Nzambe wana ya lokumu: “Ɛɛ, bozui mpe boyebi mpe bososoli na Nzambe ezali na bozindo boni! Bikateli na ye bikoki koyebana ntina te, bilekelo na ye ekomonana nzela te. Mpo ete, Nani ayebi motema na Jéhovah? Nani azali moyebisi na ye?” Na bongo, ndenge nini kokoma kino koyeba bilekelo to banzela na Nzambe? Na koyekolaka ‘libombami mosantu na makambo na Nzambe’. Motindo nini?
7. Mpo na nini tokoki koloba ete: “Tosengeli kondima yango, libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe, ezali monene”?
7 Totalela 1 Timoté, mokapo 3. Ntoma Paulo abandi naino liboso koyebisa bizaleli bisengami epai na baoyo bazali na mikumba kati na ndako na Nzambe, oyo na verset 15 abengi yango ete “(lisangá) na Nzambe na bomoi, likonzi mpe etemiselo na makambo na solo”. Na verset 16, abakisi: “Libombami mosantu na bizaleli ya moto na Nzambe ezali monene.” Ya solo, ezali monene, mpamba te Jéhovah atindaki Mwana na ye bobele moko na mokili mpo na koyebisa yango, mpo na komonisa mpenzampenza bizaleli ya moto na Nzambe soki ezali nini mpe esika nini ya lokumu yango ezali kozwa kati na losambo ya solo. Libombami mosantu ya bizaleli wana na moto na Nzambe emonisamaki polele na boumeli ya bomoi na Yesu awa na mabelé. Bato nyonso oyo balingi Jéhovah basengeli kolendisa kondima na bango mpe bomoi na bango likoló na Klisto, oyo azalaki ndakisa mpo na bizaleli ya moto na Nzambe. Kasi, bingengiseli nini Yesu apesaki na ntina etali ‘libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe’?
Makambo motoba
8. a) Wapi biteni motoba ya libombami mosuntu oyo eyebisami na Paulo kati na 1 Timoté 3:16? b) “Ye” oyo amonisami azali nani?
8 Paulo ayanoli na motuna wana na nse na kopemama na Nzambe. Kati na 1 Timote 3:16, azali koyebisa makambo motoba ya libombami yango: “Ye (1) oyo amonisami polele kati na nzoto, (2) ebongisami kati na elimo, (3) amonani na baanzelu, (4) esakolami kati na mabota, (5) andimisami kati na mokili, (6) anetolami kati na nkembo.” Nani yango “ye” oyo amonisamaki? Na ntembe te, ezali Libota na ndaka, Yesu, oyo ayaki mpo na kosala mokano ya Nzambe. Azali na centre to na katikati ya libombami mosantu, oyo azali mpenza kokomisa yango monene.
9. Ndenge nini tokoki komonisa ete 1 Timoté 3:16 esengeli kotangama te: “Nzambe emonisami polele na nzoto”?
9 Bato oyo bandimaka liteya ya Bosato bazali komeka kobulunganisa ndimbola ya libombami mosantu na kolobaka ete “Ye” oyo ya 1 Timote 3:16 ezali Nzambe ye moko. Yango ezali mpo ete mabongoli ya kalakala babongolaki mokapo yango boye: “Nzambe mimonisaki na nzoto.” Nzokande, makomi ya solo ya greke mazali koyebisa nini? Nyonso ezali na pronom “Ye” oyo, kasi “Nzambe” te. Bato na mayele oyo batalelaka makomi bandimi lelo ete kokɔtisama ya “Nzambe“ kati na mokapo oyo euti na libunga ya mokomi. Na bongo, mabongoli ya sikawa, lokola Traduction Œcuménique de la Bible, La Bible de Jerusalem mpe Traduction du monde nouveau, ezali kobongola mokapo yango malamu mpenza na maloba oyo: “Ye oyo amonisami polele kati na nzoto.” Nzambe amonanaki “kati na mosuni” te. Ezali Mwana na ye molingami, ekelamu na ye ya liboso, mpo na ye ntoma Yoane akomaki: “Liloba akomi mosuni mpe atemisi hema na ye kati na biso mpe tomoni nkembo na ye kati na biso, nkembo lokola na mwana bobele moko longwa na Tata; atondi na ngolu mpe na solo.”—Yoane 1:14.
“Amonisamaki kati na nzoto”
10. a) Ndenge nini, na ntango ya batisimo na Yesu, eteni ya liboso ya libombami mosantu engengisamaki? b) Mpo na nini Yesu akomaki “Adam ya nsuka”?
10 Ezali na ntango ya batisimo na Yesu nde eteni ya liboso ya libombami mosantu emonisamaki polele: Yesu “amonisamaki kati na nzoto” lokola Mwana mopakolami ya Nzambe. Jéhovah akotisaki kati na libumu ya Marie bomoi ya Mwana na ye Yesu oyo kala azalaki na likoló, mpo ete abotama kati na nzoto, moto na kokoka. Na yango, lokola emonisi yango 1 Bakolinti 15:45-47, Yesu akomi Adam ya mibale to ya “nsima“, molimo ya kokoka oyo akokani mpenza na Adam ya liboso. Kati na mokano nini? Na 1 Timote 2:5, 6, tozali kotanga ete “Adam na nsima” azali “moto: Klisto Yesu, oyo amipesi lokola lisiko mpo na bato nyonso”. Na nzela na mbeka yango ya moto na kokoka oyo eyokani na mibeko, Yesu azali moyokanisi ya kondimana na sika oyo esalamaki na ntina na bolamu ya bato 144 000 oyo babiangami mpo na kozala batuki na libula elongo na ye kati na Bokonzi na ye.—Emoniseli 14;1-3.
11. Matomba ya mbeka na lisiko na Klisto epesameli banani lisusu?
11 Bato mosusu basengelaki mpe kozwa matomba na liwa na Yesu lokola mbeka? Na ntembe te! Kati na 1 Yoane 2:2, ntoma alobi na ntina na Yesu Klisto: “Ye azali mpe mbondi mpo na masumu na biso. (Elingi koloba masumu na baklisto bapakolami lokola Yoane) Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.” Na yango, matomba ya mbeka na Lisiko na Yesu, na esika ete ezala bobele mpo na baklisto bapakolami 144 000, epesami mpe epai na bato nyonso ya mokili mobimba.” ’‘Ebele monene” oyo ezali lelo na bomoi mpe bamiliare na bato oyo bakosekwisama kati na Paradis ya mabelé babiangami na kozwa bomoi na seko na ntina na kondima na bango kati na mbeka ya lisiko na Yesu. Uta sikawa, lokola yango esakolamaki na Emoniseli 7:9, 10, ebele monene basili kosukola bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na komonisaka kondima kati na makila ya Mwana na Mpate Yesu Klisto. Batangami bayengebene lokola bazali baninga ya Nzambe. Ezali kati na esengo nde bazali komona mitindo mikeseni ya libombami mosantu mpe bazali kosalela bizaleli ya bato na Nzambe na kolandaka ndakisa na Yesu.
Biteni mosusu
12. Na ndimbola nini Yesu “atangamaki moyengebene kati na elimo”?
12 Ezali boni sikawa mpo na eteni ya mibale oyo eyebisami kati na 1 Timote 3:16? Na ndimbola nini Yesu “atangamaki moyengebene kati na elimo”? Na ndimbola oyo ete Jéhovah asekwisaki Mwana na ye ya sembo mpo na bomoi ya elimo. Na bongo Nzambe atangaki mpenza Yesu lokola moyengebene mpe moto abongi mpo na kozwa mikumba minene. Lokola elobi yango Baloma 1:4, Yesu “mpo na elimo santu, Nzambe amonisaki na nguya ete azali Mwana na ye, awa esekwaki ye na kati na bakufi.” Tozali kokuta kondimisama ya maloba oyo kati na 1 Petelo 3:18, epai oyo tozali kotanga: “Mpo ete Klisto akufaki mpo na masumu mbala moko mpo na libela, ye moyengebene mpo na bakesene, ete abelemisa biso na Nzambe. Abomamaki solo na nzoto na ye mpe azalisami na bomoi na elimo.” Mpo na yo, ndakisa na bizaleli ya moto na Nzambe oyo Yesu atikaki ezali kobenda yo epai na Nzambe?
13. Epai na baanzelu nini Yesu amonanaki nsima na lisekwa na ye, mpe nsango nini amemelaki bango?
13 Tozonga sikawa na 1 Timoté 3:16, epai kuna Paulo azali kokoba na kolobaka ete Yesu “amonanaki na baanzelu”; ezali eteni ya misato ya libombami mosantu. Baanzelu yango bakoki bongo kozala banani? Na ntina na Yesu, “oyo azalisami na bomoi na elimo”, Petelo akomi kati na 1 Petelo 3:19, 20: “Na yango mpe akendaki kosakwela bilimu bikangami. Bango bazangaki kondima kalakala wana ezalaki Nzambe na motema molai ntango na mikolo na Noa.” Yuda 6 emonisi ete bilimu yango bazali “baanzelu oyo babatelaki motindo na bango na liboso te kasi batikaki ezaleli na bango mpenza” kati na makoló. Balataki nzoto ya bato mpo na kosangana na basi awa na mokili, nzokande yango epesamaki nzela na bango te. Na nsima mpela epanzaki baanzelu yango ete bazonga na bifandelo na bango ya elimo, mpe babwakamaki kati na Tart.are, ezalela ya kokitisama mobimba. (2 Petelo 2:4) Ezali kuna nde Yesu akendaki kosakwela bango nsima na lisekwa na ye. Amemelaki baanzelu mabe wana nsango ya lobiko? Soko moke te! Nkutu, Yesu akweisaki mabe na bango, oyo etemelaki mpenza bizaleli ya moto na Nzambe. Motindo moko mpe lelo, mosaleli nyonso ya Nzambe oyo azali kosakana na pite akosala malamu na kozwa liteya na lisambisi oyo ezwamaki likoló na baanzelu wana.
14. Ndenge nini Yesu abandaki ‘kosakolama kati na mabota’?
14 Eteni ya minei ya libombami mosantu oyo eyebisami kati na 1 Timoté 3:16 ezali na boye ete Yesu “asakolami kati na mabota”. Ndenge nini yango ekokisamaki? Bobele liboso na kokangama na ye, Yesu ayebisaki na bantoma ete: “Solo solo nazali koloba na bino, ye oyo akondimaka ngai, misala mizali ngai kosala, akosala yango mpe lokola, mpe akosala yango ekoleka oyo mpo ete nakokenda epai na Tata.” (Yoane 14:12) Mwa ntango moke na nsima, na Pantekote ya mobu 33, Yesu asopaki elimo santu likoló ya bayekoli na ye, mpe nsango moko ya kokwama ebandaki kosakolama katikati na Bayuda, elingi koloba: “Mpo na Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye.” Na nsima, Basamarité bandimaki bango mpe liloba na Nzambe mpe bazwaki elimo santu. (Misala 2:32; 8:14-17) Na nsima, na mobu 36, Petelo ateyaki Korneye mpe Bapakano mosusu oyo bayanganaki na ndako na ye. Ezali na boye nde nsango malamu etali Yesu ebandaki ‘kosakolama katikati na mabota’, na elobeli mosusu katikati na bato oyo bazali Bayuda te, baoyo bango mpe bapakolamaki na elimo santu.
15. Nini emonisi ete baklisto ya liboso bayebaki malamu libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe?
15 Lokola ezali koyebisa yango Misala 12:24, “Liloba na Jéhovuh ekolaki mpe epalanganaki”. Na misala 17:6, tozali kotanga ete, kati na nord ya mokili Grece, batemeli, lokola tozali kokutana na bango lisusu lelo kati na mokili yango, babandaki kongɛnga “Bato wana, baoyo basili kobalola mokili, bakomi awa lokola.” Mibu ntuku misato mikokaki te, Paulo, oyo akomaki uta na Rome, akokaki koloba ete “nsango malamu esili kosakolama epai na bato nyonso na nse na likoló”. (Bakolose 1:23.) Baklisto ya eleko wana bayebaki malamu libombami monene ya makambo na Nzambe, mpe basalelaki boyebi yango na molende nyonso. Biso moko, na eleko na biso ya ntina epai oyo Bokonzi esakolami, tokoki mpe lokola bango koluka koyeba libombami mosantu wana ya makambo na Nzambe mpe kosa lela boyebi yango kati na bomoi na biso! la
16. Eteni ya mitano ya libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe ezalaki nini, mpe mosala nini emonisaki yango polele?
16 Kosakolama oyo esalamaki na ekeke ya liboso emonisaki polele eteni ya mitano ya libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe oyo eyebisami kati na 1 Timoté 3:16. Na ntina na bizaleli ya bato na Nzambe oyo bamisionere batondi na molende bazalaki na yango, bizaleli oyo bikokani na oyo na Klisto, Yesu “andimami sikawa kati na mokili mobimba”. Mibali lokola Paulo mpe Timoté bamemaki nsango malamu na Asie Mineure, na Mpoto, mbala mosusu mpe kino na Espanye. Nsango epalanganaki na Afrika ya likoló na nzela ya Moetiopia oyo azwaki batisimo, mpe Petelo akokisaki mosala na ye na Babilone.
17. Mpo na nini Yesu “andimami lelo kati na mokili” mobimba?
17 Ezali boni mpo na eleko na biso? Uta 1919, batikali oyo bapakolami bazali komonisa bizaleli malamu ya bato na Nzambe. Baklisto wana bapakolami batongaki makasi likoló na moboko ya kondima oyo Yesu apikaki. Kobanda mpenzampenza 1935, bazali koyanganisa ebele monene oyo bazali kosepela na likanisi ya kobika na “bolozi monene” mpo na kosepela na bomoi ya seko na mabelé oyo ebongwani paradis. (Emoniseli 7:9, 14) Yango wana, kati na mokili mobimba, ezali lelo na bato oyo bazali kondima nsango malamu etali Yesu. Kobatelaka bizaleli ya bato na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah koleka 3 700 000 bazali kosakola na mabelé mobimba, mpe motuya na bango mozali se kobakisama.
18. Na ndimbola nini Yesu “anetolamaki na nkembo”?
18 Na kotalela eteni ya motoba mpe ya nsuka ya libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe. Yesu “anetolamaki kati na nkembo”. Klisto “azalisamaki na bomoi na elimo”, mpe, na boumeli ya mikolo ntuku minei, abimelaki bayekoli na ye kati na nzoto ndenge na ndenge ya mosuni mpe alobelaki bango “makambo na ntina na bokonzi na Nzambe”. Na nsima, abutaki na likoló. (Misala 1:3, 6-9) Libondeli na ye oyo ekomami kati na Yoane 17:1-5 ezwaki bongo eyano; ezalaki koloba boye: “Tata, . . . kumisa Mwana na yo ete Mwana na yo akumisa yo . . . Ngai nasili kokumisa yo na mokili . . . Mpe sikawa, Tata kumisa ngai pembeni na yo na lokumu lozalaki na ngai pembeni na yo liboso, naino mokili ezalaki te.”
19. Na ntembe te Yesu ayambamaki motindo nini ntango azongaki na likoló?
19 Kanisa esengo monene ezalaki na likoló mpo na bozongi na Yesu. Kalakala mpenza, ntango Jéhovah azalisaki mabelé, ‘bana nyonso na Nzambe bangangaki na esengo’. (Yobo 38:7.) Emonani lisusu ete bankoto na baanzelu basepelaki mpo na koyamba lisusu kati na bango Mobundi na sembo mpo na bokonzi monene ya Jéhovah!
20. Mpo na nini Yesu azwaki nkombo ya lokumu koleka, mpe likambo nini asalaki ntango azalaki awa na mabelé?
20 Kati na Baebele 1:3, 4, Paulo alobi na ntina na Yesu oyo alongi: “Esili ye kobongisa epetweli mpo na masumu, afandi na loboko na mobali na Nkembo kuna na likoló; alekaki likoló na baanzelu pelamoko nkombo na ye ezali koleka nkombo na bango.” “Nkombo” yango, Klisto azwaki yango mpo ete alongaki mabe. Ya solo, ntango azalaki na mabelé, Mwana wana na Nzambe alakisaki nzela ya bizaleli ya moto na Nzambe. Lisusu, atikaki ndakisa oyo bato nyonso balingi kozwa bomoi na seko basengeli kolanda. Libombami mosantu ya bizaleli na moto na Nzambe lisili kobimisama na mobimba na yango, lokola Yesu asili kotombwama na loboko mobali na Nzambe kati na likoló.
Bozongeli
◻ “Bizaleli ya moto na Nzambe” bilimboli nini?
◻ Na ndimbola nini Yesu “amonanaki kati na nzoto”, mpe “atangamaki moyengebene kati na elimo“?
◻ Epai na baanzelu nini Yesu amonanaki mpe nsango nini ememelaki bango?
◻ Na ndimbola nini Klisto ’’asakolamaki kati na mabota” mpe “andimami kati na mokili”?
◻ Ntango nini Yesu “anetolamaki kati na nkembo”, kasi, liboso na yango, asalaki nini mpenza na boyokani na bizaleli ya moto na Nzambe?