Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/2 nk. 21-23
  • Olingi kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingi kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kanga ntina ya ndimbola na ngolu na Nzambe
  • Ndima koyamba ngolu na Nzambe
  • “Mayele mabe” ya Satana
  • Okoki kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe
  • Tozali na botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Palanganisá nsango malamu ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tosikolami na nzela ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tomonisa ezaleli na malamu mpo na kosepelisa Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/2 nk. 21-23

Olingi kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe?

WANA ezalaki ngai koyekola mingi mitinda na Nzambe oyo mizwami kati na Biblia, ntango wana nde nazalaki komiyoka ete nabongi te kondimama mpe kozwa mapamboli na Nzambe”, elobi Frank. Bosepeli na ye mpo na Biblia ebandaki ntango azelaki na boloko mpo na mabe asalaki na ntina na drogue to bangi. Atangaki mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, andimisamaki ete makambo mazali na kati ezali solo, mpe nsima wana batikaki ye, akutanaki na ba Témoins de Jéhovah mpo na koyekola makambo mingi na kati ya Biblia.

Mpo na nini boyekoli na Biblia ezalaki kopesa ye mayoki ya kozanga kondimama? Ezali mpo ete lolenge na bomoi oyo azalaki na yango liboso ezalaki kobuka mitinda mingi na Nzambe. Komela drogue to bangi, kolangwa masanga mpe misala mosusu ya mabe ebebisaki ye mingi kino mokolo mosusu policier moko ayebisaki ye ete: “Okoki kolakisa ngai adresi na yo? Ezali bobele mpo na koyeba epai wapi tokotinda ebembe na yo!”

Kasi, na nsima, mayoki na ye ya kozanga kondimama ekomaki makasi koleka mpo ete, atako milende makasi asalaki, azalaki na mpasi mingi mpo na kotika bizaleli na ye oyo bikotelaki ye makasi. Na ndakisa, masanga malongaki ye. Alobi ete: “Mbala mingi nalongaki te, mpe nabulunganaki mingi na makanisi. Nazalaki pene na kokata elikya nyonso: nakanisaki ete nazali moto oyo akoki kobongwana lisusu te.”

Bato nyonso bazalaki na bizaleli mabe lokola Frank te. Nzokande, bamosusu bazali na mayoki ya kozanga kokokisa makambo malamu lokola ye. Mbala mosusu ezali mpo ete bazali komityela nivo oyo eleki likoló mingi na kolukaka kozala na bomoi oyo ezali na boyokani na oyo, engebene bango, Nzambe azali kosɛnga. Ntango bazali kolonga te, bazali komiyoka ete bakweisami. “Ngambo ekoki kozala ndoto ya mabe”, claire Weekes alimboli yango kati na mokanda na ye Aidez vos nerfs (Angl.), “mingimingi mpo na baoyo bazali koluka kosala makambo malamu koleka”. Moklisto oyo azali kotungisama na mayoki ya kozanga kondimama akoki kosala nini?

Kanga ntina ya ndimbola na ngolu na Nzambe

Frank alobi ete: “Eloko esalisaki ngai mingi, ezali kokanga ntina na oyo Biblia elobi na Baebele 4:15, 16.” Ntoma Paulo azali kokundola biso kati na mokapo yango ete Yesu azali mosungi malamu oyo akoki “koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolembu na biso” mpe na nzela na ye tokoki ‘kozwa mawa mpe komona ngolu na Nzambe na kosungama na ntango na bosenga’.

Olingi koyeba mwango na kolonga mayoki ya kozanga kondimama? Yango oyo: okanisa ete Jehovah Nzambe mpe Yesu Klisto bayebi ete tozali na bolembu na ntina na kozanga kokoka ya kobotama. Bayebi malamu ete tokoki koyokanisa bomoi na biso na mitinda na sembo na lolenge ya kokoka te. (Nzembo 51:5; Baloma 3:23; 5:12, 18; Yakobo 3:2). Na yango, bazali koluka epai na biso tosala oyo ekoki na biso. Bazeli koluka makambo oyo tozali na yango makasi, kasi bolɛmbu na biso te. Ya solo, mokomi na nzembo atunaki boye ete: “o Jéhovah, soko yo okolukaka mabunga, o Jéhovah nani akotelema?” (Nzembo 130:3). Ondimi kozanga ntembe ete moto moko te kati na biso akoki kobelema. Ata bongo, na mawa na ye mpe na nzela na mbeka na kosikola na Yesu Klisto, Jéhovah akoki kotalela biso lokola tozali mpeto atako tozali bato bazangi kokoka (1 Yoane 2:2; 4:9, 10) Tokoki kozwa “kolimbisama na mabunga na biso” mpe na yango kozwa lisalisi mpo na kolonga mayoki ya kozanga kondimama “engebene ngɔlu na ye efuluki mingi”​—Baefese 1:7.

Tozwa ndakisa. Bato oyo balingi biloko bisalemi na maboko lokola bikeko mpe biloko mosusu ya lolenge wana bandimaka kozanga ntembe kosala milende nyonso mpo na kobongisa lisusu ba tablo to biloko mosusu oyo bibemisamaki makasi. Na ndakisa, ntango, na National Gallery na londres (ndako oyo na kati bamonisaka biloko ndenge na ndenge lokola bikeko), moto moko abetaki masasi na tablo na bililingi ya Léonard de Vinci oyo ezalaki na motuya ya pene ya 16 miliare ya ba zairee, moto moko apesaki toli ya kobwaka yango te mpo ete ebebisamaki Mbala moko babandaki kobongisa yango lisusu, eloko oyo esilaki kosala mibu 487. Mpo na nini? Mpo ete ezalaki na motuya minei na miso na baoyo basalaka biloko yango. Yo oleki na motuya tablo moko to dessin oyo basali na ekomeli ya kitoko.

Na miso ya Nzambe ezali bongo atako ebebi ndenge nini mpo na lisumu ya kobotama (Nzembo 72:1214; Matai 20:28) Jéhovah Nzambe, Mozalisi na mayele na libota na bato, akosala nyonso mpo na kozongisa na ezaleli ya kokoka basangani nyonso na libota oyo baoyo bazali kondima libateli na ye ya bolingo.​—Tala Misala 3:21; Baloma 8:20-22.

Ndima koyamba ngolu na Nzambe

Landa ndakisa na ntoma Paulo. Azalaki na botondi mingi mpo na ngolu oyo Nzambe alakisaki ye na kolimbisaka na mawa nyonso mabunga na ye ya kala mpe na kosungaka ye mbala na mbala kati na etumba na ye likolo na bolɛmbu ya kozongelama (Baloma 7:15-25; 1 Bakolinti 15:9, 10). Ntoma Paulo abongolaki lolenge na bomoi na ye; mpe lisusu, ‘azalaki kobeta nzoto na ye mpe kokomisa yango lokola moombo’ mpo na kotambola na nzela oyo Nzambe andimaki (1 Bakolinti 9:27) Atikaki te nzoto na ye, elongo na mposa na ye ya mosuni mpe ya mayoki, emema ye, lokola moombo.

Ndima ngɔlu na Nzambe, mpe tika yango emema yo na kobongola motema (Baloma 2:4; 2 Bakolinti 6:1) Soki mabunga oyo osalaki mazali kotungisa yo, bongisa yango, mpe nsima na yango ondimisama ete Jéhovah alimbisaki yo lokola azali kondimisa yango. (Yisaya 1:16-18; Misala 2:38) Soko bolembu oyo ezali kosila noki te etungisi yo, landa kobundisa yango. Bondela Jéhovah makasi mpo asalisa yo na kolonga bolembu yango mpe, na ntango yango, otya elikya na yo na mawa na Nzambe. (Nzembo 55:22) Na koyikisama mpiko na makambo mamonaki ye, Frank apesi toli oyo: “Ntango, mbala mosusu, moto azali kolonga te kati na etumba na ye likolo na ezaleli moko mabe, asengeli komona te kati na likambo yango ete elikya ezali lisusu te mpo na kolonga, kasi kotalela yango lokola kokwea ya ntango mokuse.” Soki bato mosusu bazali koyeisa mikakatano na yo makasi na kosɛngaka epai na yo makambo oyo eleki ndelo mpe oyo okokoka te, omikundola ete ezali Nzambe nde olingi kosepelisa, kasi bato te.​—Bagalatia 1:10.

Kati na etumba na yo mpo na kosala oyo ezali sembo, okeba na “mayele mabe” ya Satana, oyo ebiangami lisusu “masenginya na Diable”. (Baefese 6:11, Liloba lya Nzambe.) Totalela “mayele mabe” mibale akoki kosalela mpo na komeka kozangisa yo matomba malamu na ngolu na Nzambe.

“Mayele mabe” ya Satana

Diable azali kosalela liyoki oyo ete ebongi te, mpe na yango azali komeka kopusa yo mosika na Nzambe. Ezali ye, mobandisi na masumu oyo mazali kobebisa yo uta na ebandeli. Sikawa, mbala mosusu azali komeka kokolisa epai na yo mayoki ete ozali na ntina na miso na Nzambe te, likanisi oyo Biledada amekaki kosalela epai na Yobo. (Yobo 25:4-6; Yoane 8:44) Bitumba mingi elongamaki te mpo basoda bazalaki kokende kobunda wana basili kolemba na kati na makanisi na bango. Na yango, kotika te ete Satana alɛmbisa yo na kati na makanisi na yo. (Baefese 6:10-13) Boyebi na mikano na Satana esengeli kolendisa yo na kobunda makasi koleka mpo na kosala oyo ezali sembo.​—2 Bakolinti 2:11.

Soki, mbala mosusu, kozanga kolonga na lolenge moko to mosusu ezali kopesa yo mawa, okebaka ete ‘ozinda te na lolenge moko to mosusu mpo na mawa na koleka’. (2 Bakolinti 2:7.) Bato mosusu bazalaki na ezalela ya komitungisa mpo na mabunga oyo basala kala. Mpo na bango, Claires Weekes alobi boye: “Kotika mabunga ya kala makoka kobebisa misala ya sikawa ezali lokola komiboma na oyo etali bizaleli malamu.”​—Tala Misala 8:19.

Soki tokokaki kokokisa masɛngami nyonso ya Nzambe na lolenge ya sembo mpenzampenza, mbele ekokaki kozala ngolu lisusu te wana akopesa biso mapamboli kitoko oyo alakaki biso. Kasi Jéhovah na Yesu Klisto bazali kolakisa biso “ngolu”. Na kopesaka ndimbola na liloba oyo ntoma Paulo asalelaki mpo na komonisa ngolu na Nzambe, .J. Thayer (kati na Lexique grec-anglais ya Nouveau Testament (Angl.J) alobi boye ete: “Liloba (kharis) ezali komonisa bolamu oyo bazali kosalela moto kasi ekoki na ye te.” Kati na makambo oyo tozali kosala, moko te ekoki kopesa biso lotomo ya kosengisa mapamboli na Nzambe. Lokola ntoma Paulo alobi yango, ezali bobele ngolu na Nzambe. Soki, na bosembo nyonso, ozali kaisala oyo ekoki na yo, na kotalela bandelo na yo, mpo na kokokisa masengami na yo epai na Nzambe, sepela mpo na yango. Jéhovah azali kosenga oyo eleki makoki na yo te.

Kasi osengeli mpe koyeba ‘mayele mabe’ mosusu na Satana. Azali kosala ete bato mosusu bakanisa ete bakoki kozwa matomba na ngolu na Nzambe, bakoki kosakana na mawa na ye. Jéhovah azali kolimbisa na bolingo nyonso bolembu na biso, kasi tokoloba te ete lokola ezali bongo totika kobunda mpo na kolonga yango. Ntoma Paulo azali koloba mpo na bato mosusu baoyo mpo na yango “banyateli Mwana na Nzambe . . . bafingaki na kotiola elimo na ngolu”. (Baebele 10:29) Bato yango bazalaki ata na limemya te mpo na mitinda na sembo mpe, na kotiola nyonso, batosaki mibeko na Nzambe be, na koboyoka libaku nyonso na kobongwana. Moyekoli Yuda, leki na Yesu, ye oyo amonaki likama oyo ezali komonisama na mayele mabe oyo na Satana, akomaki: “(Kati na masangá) bato mosusu basili kokoba na nkuku . . . batioli na Nzambe bakobalolaka ngolu na Nzambe na biso kino bosoto.”​—Yuda 4.

Satana azali kokosa bato yango na kondimisaka bango ete bakoki, lokola elingi bango, komipesa na kosala mabe mpe na nsima kosenga epai na Nzambe bolimbisi na masumu na bango. Kasi Jéhovah akolimbisa te baoyo bazali kobuka na nko mibeko na ye. Ye “atondi na boboto” epai na baoyo bazali kosala milende na kosalela ye na makoki na bango atako kozanga kokoka na bango. ‘Kasi akozanga uta moke te kopesa etumbu’ na baoyo basengeli na yango.​—Exode 34:6, 7.

Okoki kozwa litomba malamu na ngolu na Nzambe

Ezali likambo na kolendisa na koyeba ete Jéhovah azali komona bobele kozanga kokoka epai na yo te. Ayebi ndenge okoki kozala ntango nguya na kobikisa na mbeka na lisiko na Yesu ekosalelama nyonso. Na yango, bondela Jéhovah na elikya nyonso, lokola esalaki yango, mokomi na nzembo David: “o Jéhovah, yokela ngai mawa, lokola ezali boboto na yo, kati na ngolu na yo monene, boma bipɛngweli na ngai. Sukola ngai malamu kolongola mabe, petola ngai na masumu na ngai. Mpamba te, ngai, nayebi epengweli na ngai, mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso. Longola elongi na yo na masumu na ngai, mpe boma mabunga na ngai nyonso. . . . O Nzambe, yo okoboya motema motutami mpe na mawa te.”​—Nzembo 51:13, 9, 17.

Mbala mosusu mabunga mpe masumu na yo mazali ntango nyonso liboso na yo. Mbala mosusu ozali komiyoka ntango mosusu lokola mwana oyo abunga nzela oyo Yesu alobelaki. Ntango elenge mobali wana azongaki epai na tata na ye na nsoni nyonso nsima na kobebisa libula na ye na mokili mosusu mosika, alobaki na tata na ye ete: “Nabongi kobimisama mwana na yo lisusu te.” (Luka 15:21) Kasi, elenge mobali oyo azwaki makanisi malamu. Aboyaki te ngolu na tata na ye, mpe lisusu asakanaki na yango te. Ezali mpo na yango tata na ye, na bolingo na ye, ayambaki ye lisusu na ndako na ye. (Luka 15:20-24) Jéhovah azali kosepela na kosala bobele bongo epai na basumuki baoyo bazali kosala milende makasi na kosala mokano na ye.​—Nzembo 103:8-14; Yisaya 55:7.

Frank atikaki nzela te na mayoki oyo makoyelaka moto ete abongi te. Andimaki ngolu na Nzambe, lelo oyo azali mosaleli na misala kati na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah. Alobi ete: “Sikawa nazali na esengo mingi, na kokanisaka mpo na oyo Jéhovah mpe Yesu Klisto basalaka mpe bakosala lisusu mpo na biso!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto