Okoki kozala na esengo kati na mokili oyo bato banyokwami na makanisi
EZALI komonana ete Marie azali na kolongono malamu na nzoto mpe na esengo. Ezali kokamwisa na koyoka ete eleki bobele mwa bambula elenge mwasi oyo ya mibu 32 azalaki komiloba ete amimoni lokola mokufi kati na motema. Marie azwaki maladi oyo ekonyokolaka makanisi (dépression). Alimboli ete: “Ezalaki lokola lipata monene ya moindo, oyo ezalaki kozipa ngai mokemoke.” Na esengo nyonso, abikaki mpe akomaki lisusu na esengo.
Na mokili, na mobu moko bamilio nkama na bato bazali konyokwama na makanisi! Maladi yango ezali te lokola mawa oyo eyelaka moto ntango mosusu. Maladi oyo ekonyokolaka makanisi akomonanaka na mawa makasi oyo mazali mpenza konyokola moto. Moto oyo akonyokwamaka na makanisi azali lisusu kosepela na bomoi te, azali ata na mposa na eloko moko te mpe azali komiyoka kozanga elikya mpe akomimona lokola ete bato bazali lisusu na ntina na ye te. Na 1983, OMS (Lisanga na mokili mobimba mpo na kolongono na bato) elobaki boye: “Sikawa ntembe ezali lisusu te: bamaladi na konyokwama na makanisi ezali bipai nyonso na mokili.”
Mpo na bayekoli na Biblia oyo bakotyaka likebi mingi, maloba yango ekokamwisa bango te. Biblia ebiangi eleko na biso, “mikolo na nsuka” oyo emonani ete ezali “ntango na mpasi”. (2 Timoté 3:1-5) Masanga mpo na kosalisa bato, oyo na ntango na kala mazalaki kosunga bato na ntango na konyokwama na makanisi, masili kokwea Kati na mokanda “Le siècle de la mélancolie?” (Angl.), Gerald Klerman alobi ete soko bamaladi yango ezali bobele kokola, ezali mpo na mbongwana wana. Alimboli boye: “Masanga misato ya minene mpo na bato ezalaki nde libota, Lingomba mpe bazalani na penepene. . . . Likambo ezali komonana na eleko na biso ezali ete, masanga yango misato mazali kokweakwea.”
Oyo epusaki Marie na kozanga elikya, ezalaki bongo kopanzana na libota na ye. Azali komikundola ete: “Ntango mwasi na tata na ngai akendaki kozanga kotikela ngai ata liloba moko, namiyokaki lokola ete namemi ngambo mpe lokola moto oyo abwakami. Nazalaki na mibu 12 mpe na mbala moko namonaki lokola makambo na ngai nyonso mabebaki.” Nsima na mwa ntango moke, alongwaki na ndako mpo ete tata na ye azalaki koluka ete basala ekobo. Alobaki ete: “Nazalaki komiyoka malamu te mpe nabungisaki confiance nyonso epai na ngai moko.” Ezali na lolenge yango nde Marie abandaki konyokwama na makanisi.
Mokolo moko oyo Marie anyokwamaki mpenza na makanisi, ba Témoins de Jéhovah mibale babetaki na porte na ye. Mbala moko asepelaki mingi na nsango na bango ya Biblia na kolendisa Alobi: “Liboso, nazalaki komona ete bomoi ezalaki na ntina te mpe makambo mingi epai na ngai mazalaki mabe, kasi, kobanda mokolo wana, nandimaki ete nakoki kozala na bomoi na mokili ya sika epai kuna Nzambe akosilisa bokesene nyonso. Na lisalisi na Nzambe nakokaki kokokisa masɛngami mpo na kozwa lipamboli wana; na bongo, bomoi na ngai ekomaki na ntina.” Lokola azalaki kosangana na makita ya batemwe, amonaki bolingo ya solo mpe azwaki lisungi malamu. (Yoane 13:34, 35.) Batoli kitoko na bankulutu ya lisanga esalisaki ye lisusu na kotika makanisi ya mawa. (Yakobo 5:14) Abandaki kolonga konyokwama na makanisi yango. Lokola Marie, mingi na bato mosusu banyokwamaka na makanisi mpo na makambo mazali koleka na mokili, basili kozwa “esengo na Jéhovah” na nzela na boyebi ya solo ya Biblia.—Nehemia 8:10; 1 Timoté 2:4.
Kasi, maladi wana ya Marie ya konyokwama na makanisi esilaki bobele mbala moko? Tosengeli kokanisa ete baklisto bakoki kobela maladi na konyokwama na makanisi te? Mpo na koyanola na mituna oyo, tosengeli kotalela na mozindo maladi yango mpe bantina na yango. Koyeba bantina na solo ya konyokwama na makanisi ekopesa biso nzela ya kosalisa maladi yango to kosalisa moto oyo azali kobela yango.
Bantina na konyokwama na makanisi
Na ntango mosusu, maladi oyo na konyokwama na makanisi ezali kobima na bantina mingi na nzoto, lokola maladi moko, na kozanga kolya malamu mpe kobeba na biloko mosusu kati na nzoto (hormones), Ezali mpe kouta na bankisi. Nzokande, Biblia emonisi ete ekoki kouta mpe na “ebele na makanisi” ya moto ye moko.—Nzembo 94:19.
Mingi na bato oyo banyokwamaka na makanisi lokola Marie, basili kokutana na mimekamo makasi mpe ya mpasi to makambo oyo ezali kopesa mpasi mingi na ba nerfs na bango. Mingi bazali na mayoki lolenge moko na mokomi na Nzembo oyo akomaki: “Molimo na ngai etondi na mpasi . . . (Nsomo) nyonso ezali kokanga ngai elongo moko. (Jéhovah) alongoli bandeko na ngai mpe baninga na ngai, bayebani na ngai bazali na molili.” (Nzembo 88:3, 17, 18) Yango wana, ndenge moko na mokomi na Nzembo, bato yango bazali komiyoka lokola ete bazindi na mikakatano to babungisi eloko mpe bazali kokanisa ete bomoi na bango ezali lisusu na elikya te. Bakoki kokanisa ete bazali se bango kati na molili mpe ete ata Nzambe asili kobosana bango.
Kasi mpo na nini bazali kozwa makanisi motindo oyo ezali se kolɛmbisa bango makasi lisusu koleka? Bazali kolemba bobele na mikakatano oyo mizali kokomela bango te; kasi ezali lisusu mpo ete bato yango bazali na mayoki ya mpasi to bazali na confiance na bango moko te. Bazali komiyoka ete bakokoka te kolonga mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Masese 15:13 elimboli boye: “Motema na mawa mokolembisa elimo” (MN). Bato yango bakoki koyoka mawa motindo wana mpo ete bazali komiyoka lokola ete bazali na ntina mpenza te to bazali kobanza ete bato mosusu bakanisi bongo mpo na bango. Ata Epafolodite, moklisto na ekeke ya liboso, nsima na kobika na maladi makasi oyo azwaki na mobembo mpo na mosala oyo lisanga na ye epesaki ye, Epafolodite akomaki na ‘mawa mpo ete lisanga liyokaki ete azalaki kobela maladi’.—Bafilipe 2:25-30.
Lokola “elimo oyo elɛmbi ekokaokisaka mikwa”, to ekoki kobebisa moto mokemoke, kokanisa mabe mpo na yo moko mbala mingi ezali ntina na konyokwama na makanisi (Masese 17:22, MN) Moto akoki lisusu koyoka motindo wana na mawa mpo ete azali kopesa motuya monene na lolenge oyo bato mosusu bazali kotalela ye. Ekoki kouta lisusu na likambo oyo ya kolekisa ndelo na koluka kolonga na makambo nyonso, na kozala ntango nyonso na nkanda, na likunya, na matata na bato mosusu to kozala na mayoki na komema ngambo (oyo na solo to ya makanisi mpamba.)
Na yango, konyokwama na makanisi ekoki kozala na bantina mingi. Nzokande, Marie azwaki esengo na solo nsima na kokoma moklisto. Alobaki boye: “Elikya ezongeli ngai”. Kasi ayikelaki lisusu maladi yango mpiko na boumeli ya mwa ntango. Ndenge nini bato oyo bazali na mpasi wana lokola ye, bakoki mpe kolonga konyokwama na makanisi (dépression)?