Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/3 nk. 24-25
  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Asukisi mosala na ye na tempelo
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mokolo ya nsuka ya Yesu na tempelo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Ntango esi’ ekoki”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Alei epai ya Mofarisai moko
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/3 nk. 24-25

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Asukisi mosala na ye na temple

YESU amonani na temple mpo na mbala ya nsuka. Na yango, soko tolongoli makambo oyo makosalema na ntango ya kosambisama na ye mpe kobomama na ye mikolo misato na nsima, asukisi mosala na ye na mabelé na esika oyo. Sikawa, azali se kopamela bakomeli mpe Bafalisai.

Yesu angangi mbala misato ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakosi!” Mpo na mbala ya liboso, alakeli bango mawa mpo ete bazali kopetola ‘’libanda na kopo mpe na saani nde na kati etondi na kobotola mpe na moyibi”. Mpo na yango, alendisi bango ete ‘bapetola naino kopo mpe saani na kati, mpo ete libanda na yango mpe epetolama’.

Mpo na mbala ya mibale, alaki lisusu mabe likoló na bakomeli mpe Bafalisai mpo na ndenge basili kopola mpe kobeba na bizaleli na bango oyo bazali komeka kobomba na kokosáká ete bazali kobanga Nzambe. Alobi na bango ete: “Bozali lokola mayita mapakolami mpembe. Yango emonani kitoko libanda nde katikati etondi na mikwa na bato bakufi mpe na ndenge nyonso na bosoto.”

Ya solo, bokosi na bango ezali komonana polele na ndenge bazali kowela kotonga mayita mpo na basakoli mpe kobongisa yango mpo na kobenda likebi na misala na bango ya kosalisa bato. Kasi, lokola Yesu amonisi yango, bazali “komonisa ete bazali “bana na baoyo babomaki basakoli”. Na bongo, moto nyonso akomeka komonisa bokosi na bango akomitya na likama!

Yesu azali se koloba, kobimisaka maloba makasi ya kokweisa “Banyoka, bana na bitupa! Bokokima nde ekweli na Geena boni?”. Geena ezali lobwaku esika bakokendaka kobwaka salite nyonso ya Yelusaleme. Na yango, Yesu akebisi bango ete mpo ete bazali se kokangama na mabe na bango bakokufa mpo na libela.

Kolobaka mpo na baoyo atindi lokola bamonisi na ye, Yesu alobi: “Bokoboma bamosusu, bokokufisa bamosusu na banzete, bokobetisa bamosusu fimbo kati na biyanganelo na bino mpe bokobengana bango longwa na mboka na mboka, ete makila nyonso na boyengebene makwela bino, yango esopanaki na mokili longwa na makila na Abele oyo moyengebeni kino makila na Zakaria mwana na Balakia [ye oyo abengami Jéhoiada kati na 2 Ntango, ye oyo bobomaki katikati na Tempelo mpe etumbelo-na-mbeka.” Nazali koloba na bino solo ete, makambo oyo nyonso makoyela libota oyo.’’

Lokola Zakaria apamelaki mpenza bakonzi na Yisraele na molende nyonso, “bayangelaki ye mwango, babwakelaki ye mabanga na libanda na ndako ya Jéhovah, kotosa elaka na mokonzi”. Kasi lokola Yesu alakaki yango, Yisraele akofuta mpo na makila nyonso wana ya bato na sembo oyo ye abomaki bango. Afulaki yango nsima na mbula 37, na mobu 70 ya ntango na biso, ntango mampinga na Baloma mabomaki Yelusaleme mpe ete Bayuda koleka 1 milió babomamaki.

Yesu ayoki mawa makasi na kokanisaka na likambo yango ya nsomo. Alobi lisusu: “Yelusaleme, Yelusaleme! Mbala boni nalingaki koyanganisa bana na bino lokola nsoso akoyanganisa bana na ye na nse na mapapu na ye, nde bolingaki te. Tala, ndako na bino etikali mpamba.”

Yesu abakisi: “Nazali koloba solo ete bokomona ngai lisusu te kino bokoloba ete: ‘Mapamboli na ye oyo azali koya na nkombo na Jéhovah.’ ” Mokolo yango ekoya na kozonga na Klisto ntango akokɔta kati na Bokonzi na ye ya makolo mpe ete bato bakomona ye na miso na kondima.

Sikawa, Yesu akei na esika oyo akoki komona bibombelo na makabo na temple mpe akoki komona ndenge bato bazali kotya mbongo na kati. Bazwi bazali kolya mbongo mingi. Kasi na nsima, mwasi mokufeli-mobali, ye mobola abelemi mpe atye pata mibale ya motuya moke mpenza.

Kobengaka bayekoli epai na ye, Yesu alobi: “Nazali koloba na bino solo ete likabo na mwasi oyo, mobola, eleki na monene makabo nyonso mabwaki bato kati na Ebombelo na makabo.” Bakoki komituna ndenge nini likambo motindo wana ekoki kozala solo. Yango wana Yesu alimboli bango boye: “Bango bakabi ndambo moke na mosolo moleki na bango, kasi ye kari na bobola na ye asili kobwaka mosolo na ye nyonso, lilei na ye nyonso.” Nsima na koloba bongo, Yesu abimi na temple mpo na mbala ya nsuka.

Bayekoli na ye basepeli mpo na bonene mpe kitoko ya temple mpe balobi: “Tala Molakisi, motindo na kitoko na mabanga mpe motindo na kitoko na ndako!’’ Ezali solo, mpamba te bakolobaka ete mabanga yango mazalaki na bolai ya 11 metres mpe bonene ya 5 metres mpe kotelema 3 metres longwa na nse kino likoló!

Bongo Yesu ayanoli bango boye: “Bozali komona ndako monene oyo, Nazali koloba na bino solo ete libanga moko ekotikala likoló na mosusu te, oyo ekozanga kobwakama na nse.”

Nsima na koloba makambo yango Yesu mpe bantoma na ye bakatisi lobwaku na cédron mpe bamati na ngomba na Olive. Kuna bakoki komona temple malamu. Matai 23:25 kino 24:3; Malako 12:41; 13:3; Luka 21:1-6; 2 Ntango 24:20-22.

◆ Yesu asali nini na vizite na ye ya nsuka na temple?

◆ Ezaleli ya bokosi ya bakomeli mpe Bafalisai ezali komonana na ndenge nini?

◆ Kobwakama na Geena elimboli nini?

◆ Mpo na nini Yesu alobi ete mwasi-mokufeli-mobali apesaki makabo mingi koleka bazwi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto