Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/4 nk. 4-6
  • Kimya—Ekoki kozwama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kimya—Ekoki kozwama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kotya kimya na nzela ya mibeko mpe na nzela ya lingomba
  • Milende ya sika mpo na kimya
  • Nguya ebombami ezali epekiseli mpo na kimya
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nani akokamba bato epai na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tokozala nde na kimya mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/4 nk. 4-6

Kimya​—Ekoki kozwama?

ATAKO nini ezali kolobama na bazulunalo ya mokili, mpe ezala ndenge nini mingi kati na biso bazali komona yango, ya solo mpenza mokili ezali naino mosika mpo na kozwa kimya ya solo. Kolongwa ya mampinga na bapaya na mokili ya Afghanistan etyaki kimya na mboka yango te. Matata ndenge na ndenge mazali naino na mokili ya Philippines, ya Soudan, na mokili ya Yisraele, na lrlande du Nord, na Liban mpe na Sri Lanka, wana ezali bobele mwa bandakisa.

Lokola bato oyo bazali na makanisi malamu balingi kimya na esika ya bitumba, mpo na nini ezali mpasi mpo na kozwa yango? Uta bikeke mingi mpe na balolenge mingi, bakonzi ya politike bamekaki kotya kimya, kasi bakokaki ata mokolo moko te. Mpo na nini? Mpo na koyeba ntina, totalela elongo mwa bandakisa.

Kotya kimya na nzela ya mibeko mpe na nzela ya lingomba

Bamosusu bazali kozwa Bokonzi ya Rome lokola ndakisa ya bolongi mpo na likambo litali komeka kotya kimya. Na nse na boyangeli yango, ebongiseli malamu na ntina etali mibeko, lolenge ya koyangela, mampinga makasi na basoda mpe banzela nyonso oyo etongamaki malamu, epesaki nzela na kimya na bisika ndenge na ndenge oyo biyangelamaki na bokonzi yango, na mwa boumeli ya bikeke, kino ebiangamaki na nkombo ya pene romana (kimya ya Rome); mpe likambo yango ezwaki eteni monene ya Afrike, ya Asie occidentale mpe ya Mpoto. Nzokande, bopusi ndenge na ndenge oyo ebimaki na kati, na makambo lokola kanyaka oyo epalanganaki, mpe na banguna bautaki libanda, masalaki ete Bokonzi ya Rome ekwea mpe kimya na yango elimwaki lokola.

Yango ezali kolakisa kozanga kokoka ya mikano ya bato. Nsima na ebandeli oyo ezali kopesa elikya, mingimingi mikano yango ezali kosuka na nzela. Nzambe alobi: “Makanisi na motema na moto ezali mabe longwa na bolenge na ye”, mpe na yango, wana mikolo mizali koleka, makanisi wana ya mabe mazali kolonga moto. (Genese 8:21) Lisusu, mosakoli Yilimia alobaki: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso, mpe na mabe mingi. Nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9). Bato bayebi makambo makoya lobi te. Mikano malamu na moto mikoki kobebisama na zuwa, moyimi to na bato mosusu. Ata mokonzi oyo azali kotambwisama na mitinda malamu akoki kokosama. Na kotalela makambo wana nyonso ndenge nini moto akoki kotya kimya?

Ekomamaki ete, na mokili ya bato na lnde, na ekeke ya misato liboso na ntango na biso, milende makasi misalamaki mpo na kotya kimya. Mokonzi moko monene na nkombo ya Asóka ayangelaki esika monene na nzela ya bitumba mpe bosopi mingi ya makila. Mpe, engebene lisolo na makambo ya bato, abongwanaki na mitinda ya lingomba ya bouddhisme. Na kotikaka bitumba, atongaki zingazinga na lopango na ye, bamonimá likoló na yango bakomaki masese mpo na kosalisa bato oyo bafandaki na nse na bokonzi na ye bazala na bomoi kitoko. Boyangeli na ye emonanaki lokola etyaki kimya mpe epesaki bolamu.

Asóka azwaki nzela ya kimya? Te. Ntango mokonzi yango akufaki, kimya elimwaki elongo na ye mpe boyangeli na ye ekweaki. Likambo yango emonisi polele ete atako milende na mokonzi oyo azali na makoki mpe na mikano malamu, nyonso ezali kobebisama na liwa na ye, Mokomi na mokanda ya Mosakoli alobelaki likambo yango ntango akomaki ete: “Ee. nayinaki mosala nyonso na ngai . . . oyo nakotika yango epai na moto oyo akoya nsima na ngai. Nani mpe ayebi soko akozala moto na mayele to zoba? Nde akozala na lokumu likolo na misala nyonso oyo ngai nasalaki yango mpe oyo ngai namekaki na mayele na nse na moi. Yango mpe ezali bisalasala.”​—Mosakoli 2:18, 19.

Ya solo, liwa ezali nkaka monene oyo ezali kopekisa moto na kotya kimya ya koumela. Mpo na yango, toli ya mokomi na nzembo ezali mpenza ya mayele: “Ndimela bana na mikonzi te, to moto oyo azuami na putulu, mpo ete azali na kosunga te. Soko elimo ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”​—Nzembo 146:3, 4.

Milende ya sika mpo na kimya

Makambo mosusu mamonisi mpe mpo na nini moto alongi te kati na milende na ye mpo na kotya kimya. Na ndakisa, na ekeke ya zomi, lisangá moko na nkombo “kimya na Nzambe” esalamaki na Mpoto. Ezalaki na mokano ya kobatela bozwi ya Lingomba, basalaki lolenge ya boyokani na kotika kobundisa, boyokani oyo pene na kati ya ekeke ya zomi na mibale, epalanganaki na eteni monene na Mpoto.

Lolenge mosusu ezali oyo babiangi “kozala na nguya ndenge moko mpo na etumba”. Engebene politike yango, lisanga moko ya mabota, na ndakisa na Mpoto, ezali kopengwisa bitumba na kosala ete boyangeli nyonso ezala na bibundeli ndenge moko. Soki boyangeli moko ya makasi ebundisi oyo ezali na makasi te, boyangeli mosusu ekosalisa na ntango moke boyangeli oyo ezali makasi mingi te mpo na kolembisa oyo ya makasi mingi. Lolenge oyo na kosalela makambo etambwisaki boyokani na biyangeli na Mpoto uta nsuka na bitumba na ntango ya mokonzi Napoléon kino Etumba ya Liboso ya mokili mobimba oyo ebandaki na 1914.

Nsima na etumba wana, Lisanga na Mabota esalamaki lokola tribune, esika oyo mabota bakoki kosolola mpo na kosilisa matata na bango na esika ete babunda. Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, Lisanga na Mabota ekufaki. Kasi nsima na etumba, ezongaki lisusu na lolenge ya Lisanga na Mabota Masangani (O.N.U.), oyo ezali kino lelo.

Nzokande, milende oyo nyonso mityaki kimya ya solo mpe ya ntango molai te. Ntango lisangá na nkombo “kimya ya Nzambe” ezalaki makasi na Mpoto, Mindele babundisaki ba musulmans mpo na kobengana bango na Yelusaleme, etumba oyo etangisaki makila mingi. Wana bakonzi ya politike bazalaki kotya milende mpo na kobatela kimya na Mpoto na nzela ya kozala na nguya ndenge moko (équilibre des forces) bazalaki kobunda mpe kokembisa boyangeli na bango kati na mikili misusu ya bopaya, Lisanga na Mabota epengwaki te na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe Lisanga na Mabota masangani epekisaki te kobomana ya nsomo na Kampuchéa, to matata na corée, na Nigéria, na Viêt-Namn mpe na Zaire.

Na yango, kino lelo oyo, milende nyonso ya bakonzi ya politike mpo na kotya kimya elongaki te. Ezali mpo ete, bakonzi na politike bayebi te ndenge nini kotya kimya ya koumela, mpamba te bazali kokufa mpe bazali na bolembu na bango moko to bolembu ya bamosusu. Nzokande, ata soki ezali yango te, bakonzi ya politike bakoki kopesa kimya te. Mpo na nini? Ezali mpo na epekiseli mosusu oyo ezali mpenza likama.

Nguya ebombami ezali epekiseli mpo na kimya

Biblia ezali koloba mpo na epekiseli yango ntango elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19). Oyo mabe, ezali Satan le Diable, ekelamu na elimo oyo aleki bato na nguya na mosika. Uta ebandeli, Satan le Diable amimonisaki motomboki, mobuki na lokuta mpe mobomi. (Genese 3:1-6; Yoane 8:44). Atako abombami, bopusi na ye likolo na makambo na mokili elobami na bakomi mosusu oyo bapemamaki na Nzambe. Ntoma Paulo abiangi Satana “Nzambe na mokili oyo” mpe “mokonzi na nguya na mopepe”. (2 Bakolinti 4:4; Baefese 2:2.) Yesu ye moko abiangaki ye, mbala mingi, “mokonzi na mokili oyo”​—Yoane 12:31, 14:30; 16:11.

[Likanisi ya paragrafe on page 5]

Lokola mokili elali kati na nguya na Satana, mokonzi ya politike moko te akokoka kotya kimya ya koumela. Yango elimboli ete kimya ekozala lisusu te? Ezali na moto oyo akokamba bato kino epai na kimya?

[Likanisi ya paragrafe on page 6]

Ata motambwisi na mbuka azali na mayele mpe mitinda ndenge nini akosuka se na liwa, mpe mbala mingi, bato mosusu oyo bazangi makoki ya kotambwisa mpe aya bazali na mikano mabe nde bakozwa esika na ye.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

Satan le Diable, ye moko, azali epekiseli monene mpo na kimya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto