Masolo ya basakoli ya Bokonzi
Bandimi nsango malamu na mokili ya Belgique
Biro ya filiale ya ba Témoins de Jéhovah na mokili ya Belgique etuni ete ‘’Nani amoni makambo yango?” (Tala Yisaya 66:8). Mboka oyo kitoko epesi rapport ya basakoli 24 464 mpo na mbula ya mosala 1989. Lisusu, motuya na basakoli oyo basanganaki na mosala ya kosakola sanza na sanza ebutaki na 4%.
◻ Wana ezalaki bango na messe, sango moko ya lingomba katolike, oyo ayebaki motuya ya nsango malamu oyo ezali kosakolama na ba Témoins de Jéhovah, alobaki epai na bato na ye ete: ’‘Soki ba Témoins de Jéhovah bayei epai na bino, boyamba bango malamu. Bazali na solo.” Ezali yango mpenza mwasi moko asalaki. Ntango Batemwe bakomaki epai na ye, ayambaki bango malamu mpe andimaki mokanda La vie: comment est-elle apparue? Evolution ou création?. Nsima, asengaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Abandaki koyekola Biblia, kasi mobali na ye asanganaki na ye te. Na bongo Temwe moko atelefonaki ye mpe atunaki soki akoki kosepela kozala na bomoi kati na mokili ya sika elongo na mwasi na ye. Likambo yango epusaki ye akoka kosangana na mwasi na ye mpo na boyekoli. Mobali yango mpe mwasi na ye,baoyo bazalaki makango, bakomisaki libala na bango mpe baumelaki kozwa batisimo te.
◻ Solo ebongolaki bomoi na elenge mwasi moko oyo abwakamaki wana ezalaki ye na mibu soko 14. Akutanaki na elenge mobali moko mpe alandaki na ye esika moko na bilenge batomboki epai kuna amipesaki na komela drogue to bangi mpe alonaki ezaleli ya mobulu. Mokolo moko, elenge mobali wana akufaki na aksida ya motuka. Mpo na likambo yango, elenge mwasi anyokwamaki mingi na makanisi kino akanaki komiboma. Azalaki koluka esika nini akozwa eyano na mikakatano na ye. Na yango akutanaki na moto oyo asololaka na bilimu mabe mpe andimisaki ye ete akosolola na moninga na ye oyo akufaki. Elongo na ye, amekaki makambo ya bilimu mabe, kasi azwaki lisalisi na ndenge akanisaki te, mpe lisusu maladi ya konyokwama na makanisi etungisaki ye mingi. Na boumeli ya basanza mingi amitangolaki mpenza na bamosusu. Ezali na ntango wana nde Témoin de Jéhovah moko akutanaki na ye mpe asalaki nyonso mpo na kosalisa ye na elimo. Na ebandeli, bazalaki kokomana mikanda. Asalaki milende makasi mpe makambo mabongaki. Na yango asikwamaki na nguya ya badémo, boombo na komela likaya mpe na mayoki makasi ya moto akumbi ngambó. Nsima na mikolo, boyebi na ye ya Biblia mpe elimo na Jéhovah esalisaki ye mingi. Mpe makita, mpo na yango azalaki komibongisa malamu, masalisaki ye mingi. Lelo oyo abatisami mpe azali komonisa elimo ya pionnier. Azali bongo kotambwisa boyekoli na Biblia mingi, kati na yango mama na ye, oyo azali koyangana ntango mosusu na makita. Ya solo Jéhovah asalisaki ye mpenza.
◻ Baoyo bazali kosalela mabaku mapesameli bango mpo na kosakola nsango malamu na eteyelo bazali kozwa matomba malamu. Na eteyelo moko na mokili ya Belgique, elenge moklisto moko ya mwasi azwaki libaku ya kobongisa devware oyo akoloba liboso na baninga likoló na lisolo oyo ye moko aponi; aponaki kosolola likolo ya ba Témoins de Jéhovah mpe bindimeli na bango, mpe azwaki lisolo na ye kati na brochure Ba Témoins de Jehovah na ntango na biso. Profesere akamwaki. Elenge mwasi moklisto yango asalaki lisolo na ye liboso na bana kelasi mosusu, baoyo bapesamelaki nzela ya kotuna mituna. Mingi kati na bango balingaki koyeba oyo basengeli kosala mpo na kozala na bomoi kati na Paradis oyo Nzambe akotya mpe oyo elenge mwasi ayebisaki. Mingi kati na bango, elongo na profesere, basengaki ba brochures ekeseni oyo azalaki na yango. Ezali yango mpe bana kelasi mosusu basalaki baoyo balingaki mpe koyeba makambo mingi, profesere moko ya religion atangaki ba brochures yango mpe asalaki komande mpo na bana kelasi na ye.
Molende na elenge moklisto mwasi oyo ezwaki lifuti. Akabolaki ba brochures 23 epai na ba profesɛrɛ mibale mpe bana kelasi mingi: kati na bango, elenge mwasi moko, oyo ayokaki lisolo, asengaki akomá makambo yango mpo akende kolimbola mosala ya ba Témoins de Jéhovah epai na bana kelasi na ye.
Na mokili ya Belgique bato mingi bazali kondima nsango malamu. Bazali koyamba yango “lokola liloba na bato te kasi lokola Liloba na Nzambe, ezali mpe yango solo, mpe ezali kosalaka mosala katina bino bandimi”.—1 Batesaloniki 2:13.