Mituna na batangi
◼ Kobetama ya kelelo nsambo na baanzelu oyo elobelami na Emoniseli ebandaki koyokana ntango nini?
Na Emoniseli mikapo 8, 9 mpe 11 bazali kolobela mpo na baanzelu nsambo baoyo babetaki kelelo nsambo mpo na kosakola bitumbu na mpasi mingi likoló na biteni mosusu na mokili ya bato. Kobelama wana na kelelo emonisi kosakolama na bisambiselo na Nzambe oyo libota ya Jéhovah ezali kokokisa na boumeli nyonso na ntango ya nsuka, mingimingi uta assemblée ya cedar Point na 1922. Tala la Révélation:—le grand dénouement esi proche!, mikapo 21 kino 23 mpe mokapo 26.
Kobetama ya kelelo minei ya liboso ezali komonisa liwa ya elimo na eteni ya “mabelé’‘ mpe ya ‘’mai monene” oyo ezali kati na boklisto ya lokuta, mpe kokwea ya bakonzi na mangomba mpe molili ya elimo oyo ezali kati na boklisto ya lokuta.—Emoniseli 8:7-12.
Lisolo na bato emonisi ete kosakolama polele ya makambo wana ebandaki mpenza liboso na 1922. Na ndakisa. diskur oyo ezalaki na titre “Ebele na bato oyo bazali na bomoi sikawa bakokufa te”. oyo esalamaki mpo na mbala ya liboso na 1918 mpe oyo lisolo na yango ebimisamaki kati na brochure na 1920, diskur oyo elobaki mpo na kokwea ya boklisto ya lokuta mpe mpo na nsuka ya mokili oyo. Kasi na ebimelo na yango na lingelesi ya le 20 Septembre 1920. L’Age d’or elobaki kozanga kokakatana ete boklisto ya lokuta ekumbi ngambo ya pite, ya lokuta mpe ete epengwisaki bato.
Na bongo, mpo na nini mokanda Révélation: dénouement elobi ete kobetama ya kelelo minei ebandaki koyokana bobele kobanda na assemblée esalamaki na cedar Point na 1922? Mpo ete ezali na libaku yango nde libiangami oyo epesamaki “Bosakola, bosakola, bosakola Mokonzi mpe bokonzi na ye!’’, libiangami oyo epesaki bopusi monene na mosala ya kosakola La Tour de Garde ya le 1 er Novembre 1922 (angl) elobaki: ’’Bandeko . . basimbaki na assemblée ete libaku malamu mpe mokumba ya solo mpo na baoyo bamipesaki epai na Nzambe awa na mabele ezali ya kosakola kozonga ya Nkolo, Mokonzi monene na bakonzi, kosakola ete bokonzi na ye esili kotyama, mpe ezali yango nde eloko eleki ntina oyo bakoki kosala.’
Tokanga ntina lisusu ya likambo oyo: atako nsango minei na kosambisa esakolamaki nyonso na ba Témoins de Jehovah uta 1922, ezwaki moko na moko bopusi makasi na nzela ya bikateli minei na ba Assemblées oyo esalamaki kati na 1922 mpe 1925. Lisusu, mikanda mingi oyo mizalaki na bikateli yango mikabolamaki, yango nde epesaki nzela na koyebisa na bokasi ete boklisto ya lokuta ekufaki na elimo. Tala mokanda Révélation: dénouement, lokasa 133, paragrafe 15.
Kobetama na kelelo misato ya nsuka ezali kosakola ‘mawa’. (Emoniseli 8:13) Na bokeseni na kobetama na kelelo minei ya liboso, yango ezali na boyokani na makambo ya sikisiki. Kobetama na kelelo ya mitano ezali kolalela kosikolama na libota ya Nzambe na ’’libulu mozindo” na 1919. Kobetama na kelelo na moloba ekolisi “bafandi likoló na mpunda“ mpe mosala monene ya mokili mobimba ya kosakola nsango malamu oyo ebandaki na 1922. Kobetama na kelelo na nsambo ezali na boyokani na kobotama ya Bokonzi na Nzambe na 1914.—Emoniseli 9:1-19;11:15-19.
Moko na moko na makambo oyo ememaki mawa likolo na Satana mpe likolo na mokili oyo azali koyangela. Na 1919, ntango baklisto bapakolami babimaki na libulu mozindo na kokufa ya mosala, bakonzi na mangomba batungisamaki makasi mpe elembeteli emonanaki polele ete Jéhovah abwakaki mpenza boklisto ya lokuta.
Na 1922 kino lelo, limpinga monene na bafandi likolo na mpunda ebomaki boklisto ya lokuta, na ndimbola ya elimo, na koyebisa polele ete boklisto ya lokuta ekufi na elimo mpe na kosakola kobomama na yango oyo ebelemi. Mpe, nsima na kobelama na Bokonzi na 1914, babenganaki Satana na likolo. likambo yango nde ebimisaki mobulu makasi kati na bato. Mosika te Bokonzi ekoboma ebongiseli na Satana oyo ezali komonana makasi (mokili), na kolongola bato oyo bazali batomboki (mai monene) na Armagedon.—Emoniseli 11:17 kino 12:12; 21:1.
Na Assemblée ya cedar Point na 1922. ‘mawa’ oyo misato emonanaki polele na miso na mokili mobimba. Mosala na kosakola oyo ebandaki na ntango wana emonisaki polele ete ’’mayoyo” mabimaki na ”libulu mozindo“ mpe ete mosala na ”batandi likolo na mpunda” ebandaki. Libiangami makasi mpo na kosakola Mokonzi mpe Bokonzi na ye eyokanaki malamu na kobetama na kelelo ya nsambo La Tour de Garde ya Juin 1925 elimbolaki ete makambo masalamaki na 1914, na 1919 mpe na 1922 masakolamaki na Emoniseli mokapo 12. Kobanda wana, bakangaki ntina malamu mpo na oyo elimboli kobotama na Bokonzi, mpe, na bosembo nyonso, ba Témoins de Jehovah bayebisaki makambo yango epai na bazalani. Lisusu, kosakolama na nsango oyo na mpasi ezwaki bopusi makasi na nzela ya bikateli na nguya oyo bizwamaki na ba assemblées oyo esalamaki kati na 1922 mpe 1928, lisusu na kobimisama na bikateli wana kati na mikanda Tala La Revelation: le grand denouement est proche!, nkasa 147, 149, 172.
Na bongo, kobetama na kelelo nsambo ebandaki na 1922 mpe elandanaki na bokasi na bambula 1920. Uta ntango wana, basaleli na Jéhovah bazali kosala elongo na baanzelu mpo na koyebisa epai na bato nyonso ete boklisto na lokuta ekufi na elimo, ete bakonzi na mangomba bakitisami mpe ete etikali moke boklisto ya lokuta ekobomama elongo na mokili ya Satana.