Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/5 lok. 31
  • Masolo ya basakoli na Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya basakoli na Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Pastere moko andimi solo na mokili ya Nouvelle-Guinée
  • Namoná ndenge bato ya sembo balongaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • “Baoyo bazali koyoka yo” bakobika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Sikoyo nayebi Nzambe oyo nasambelaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/5 lok. 31

Masolo ya basakoli na Bokonzi

‘Tolingana na bolingo na misala mpo na solo’

◻ NTOMA Jean alobaki ete: Bolingana na bolingo na maloba te soko na monoko te kasi na bolingo na misala mpe na solo.” (1 Yoane 3:18). Yesu alobaki ete ‘tosengeli kolinga mozalani na biso lokola biso moko’. (Matai 22:39.) Na komonisáká bolingo na misala, tozali kotatola mpo na solo, lokola yango emonisami na likambo oyo elandi yo esalemaki na mokili ya Angleterre.

Mbala na mbala,ntango Pauline azalaki kokende kotala mama na ye, oyo azwami na maladi babengi ,sclérose na plaques, mama na ye azalaki ntango nyonso ye moko epai na ye. Kasi mokolo wana, ntango akolaki na ndako, ayokaki machine ya kosukola bilamba ezali kosala mpe moto mosusu azalaki kolongola pusiere na likoló. Atunaki na mama na ye ete: ‘Nini ezali kosalema? Nani azali kuna?‘ Mama na ye ayebisaki bongo ete basi mibale ba Témoins de Jéhovah babetaki na porte na ye, bamonaki ete azalaki na mpasi mpe batikalaki mpo na kosalisa ye. Nsima na kobongisa ndako mpe kolamba bilei, bafandaki mpe batunaki: “Bosili komibongisa? “Pauline atunaki ete komibongisa mpe na likambo lini?”. Mama na ye alimbolelaki ye ete andimaki boyekoli na Biblia. Pauline azalaki na mwa ntembe na motema na ye mpo na kofanda, kasi lokola asalaki mobembo molai, asengaki soko akokaki koyangana na boyekoli. Asepelaki na boyekoli yango mingi kino azwaki bibongiseli na koya mokolo yango na poso nyonso mpo na koyangana ntango nyonso na boyekoli yango. Nsima na mikolo, moninga na ye moko ayaki kotika ye, mpe sikawa bango nyonso mibale bazwaki batisimo. Na nzela na boyekoli oyo na liboso, lelo oyo basangani zomi na libota lobela yango bazali ba Témoins le Jéhovah. Ee, tosengeli kosalisa na misala”!

Pastere moko andimi solo na mokili ya Nouvelle-Guinée

◻ Na eleko na Yesu, banganga andimaki mateya na ye. Lelo oyo ezali yango nde bakonzi na mangomba baoyo bazali na motema malamu bazali kosala, lokola esalemaki na likambo oyo emonanaki kati na mokili ya ngombangomba ya Nouvelle​—Guinée, oyo eyebisameli biso na mokengeli ya zongazonga: “Mobali moko oyo naino azali elenge mpe ayekola, pastere pantekotiste, azalaki kotonga ndako-nzambe ya moke pembeni na Salle du Royaume. Mosangani moko ya lisangá apesaki litatoli na mobali yango oyo amimonisaki moto malamu. Nsima mwa ntango moke, nakendaki kotala lisangá mpe nalalaki epai na ndeko yango, na avenue moko na ndako ya pastere. Mpokwa ya liboso wana ekomaki ngai, pastere yango ayaki na ndako elongo na Biblia na ye, mpe etuluku monene ya basangani na lingomba na ye bayaki elongo na ye. Bango nyonso balingaki koyoka nsango ya Bokonzi. Atunaki mituna mingi, mpe masolo makobaki kino butu mpenza. Na boumeli nyonso ya vizite na ngai, ayaki mpokwa nyonso elongo na bato mosusu baoyo bazalaki kosepela mpo na kozwa biyano na mituna mosusu. Nabengisaki ye na assemblée de circonscription oyo esengelaki kosalema na poso elandi, mpe ayanganaki na assemblée yango elongo na Temwe oyo alobelaki ye mpo na ntina na solo mpo na mbala ya yambo. Mobali yango alandaki koyekola alongwaki na lingomba ya pantekotiste, mpe sikawa azali mosakoli ya nsango malamu na sanza nyonso.

Ya solo, Nzambe “alingi ete bato nyonso babika mpe ete bakoma na boyebi na koyeba solo’’.​—1 Timote 2:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto