Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/5 lok. 8
  • Bomoi na ye Yesu, mpe mosala na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi na ye Yesu, mpe mosala na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Elikya nini ezali mpo na bampate mpe mpo na bantaba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Elembo ya mikolo na nsuka
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Ebele monene ya Basambeli ya solo​—⁠Bauti Wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/5 lok. 8

Bomoi na ye Yesu, mpe mosala na ye

Ntango Klisto akozonga kati na nkembo na Bokonzi

YESU azali naino elongo na bantoma na ye likoló na ngomba ya Olives. Na koyanolaka na motuna na bango na ntina etali elembo ya kozonga na ye mpe ya nsuka na biloko ya ntango oyo, apesi bango sikawa lisese ya nsuka na masese misato oyo elandanaki. Yesu abandi na koloba ete: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye. akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo.”

Bato bakoki komona te baanzelu kati na nkembo na bango ya likoló. Na yango, kozonga ya Mwana na moto, Yesu Klisto, mpe baanzelu esengeli kozala na kozanga komonana na miso ya bato. Likambo yango lisalemaki na 1914. Mpo na mokano nini? Yesu alimboli ete: “Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe bantaba. Mpe akotika bampate na loboko na ye na mobali nde bantaba na loboko na ye na mwasi.”

Kolobáká mpo na baoyo bakabwani mpe batiami na esika malamu, Yesu alobi ete: “Bongo mokonzi akoloba na bango na loboko na ye na mobali ete, Yaka bino bopambwami na Tala na ngai bosangola libula na bokonzi bobongisami mpo na bino longwa (na ebandeli) ya mokili.” Bampate bakoyangela elongo na Klisto na likoló te, kasi bakosangola Bokonzi na ndimbola oyo ete, bakozala bato oyo bakofanda na mabelé na nsé na boyangeli na ye. “Ebandeli ya mokili” etyamaki ntango Adam na Eva babandaki kozala na bana baoyo bakokaki kozwa litomba na bibongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na kosikola bato.

Kasi mpo na nini bampate,bakabwani mpe batiami na loboko na mobali na Mokonzi, na esika na lokumu’? Mokonzi apesi eyano ete: ’’Mpamba te nayokaki nzala mpe bopesi ngai bilei; nazalaki na mposa na mai mpe bomelisi ngai; nazalaki mopaya mpe boyambi ngai; nazalaki bolumbu mpe bolatisi ngai; nazalaki na malali mpe boyei kotala ngai; nazalaki na boloko mpe boyeli ngai.”

Lokola bampate bazali na mabelé, balingi bayeba ndenge nini basalaki misala nyonso malamu oyo mpo na Mokonzi na bango oyo azali na likoló. Batuni ete: “Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala mpe toleisi yo to na mposa na mai mpe tomelisi yo? Ntango nini tomoni yo mopaya mpe toyambi yo to bolumbu mpe tolatisi yo? Ntango nini tomoni yo na malali to na boloko mpe toyei epai na yo?”

Mokonzi apesi eyano ete: “Nazali koloba na bino solo ete, esalaki bino yango epai na moko na bandeko na ngai baoyo baleki mokemoke, bosalelaki ngai yango.” Bandeko na Klisto ezali batikali na ba 144 000, baoyo bazali naino na bomoi na mabelé, baoyo bakoyangela elongo na ye na likoló. Mpe Yesu alobi ete, kosalela bango malamu elimboli kosala malamu epai na ye.

Nsima Mokonzi alobi epai na baoyo batiami na ngambo na bantaba ete: “Bolongwa na ngai, bino balakelami mabe, kino móto na seko ebongisami mpo na Satana mpe baanzelu na ye. Mpamba te nazalaki na nzala mpe boleisi ngai te mpe na mposa na mai nde bomelisi ngai te; nazalaki mopaya nde boyambi ngai te, bolumbu nde bolatisi ngai te. na malali mpe na boloko nde boyei komonana na ngai te.” Nzokande, bantaba bazali koimaima na koloba ete: “Nkolo, ntango nini tomoni yo na nzala to na mposa na mai to mopaya to bolumbu to na malali to na boloko mpe biso tosungi yo te?” Bantaba bakweisami na kosambisama likoló na likambo bobele oyo mpo na yango bampate balongisami. Yesu azongiseli bango ete: “Lokola ezangaki bino kosala yango epai na moko na bango baleki mokemoke, bozangaki kosalela ngai.”

Na yango, kozonga na Klisto na nkembo kati na Bokonzi, liboso ete biloko mabe ya ntango oyo ekoma na nsuka na ntango na bolozi monene, ekozala ntango na kosambisa. Bantaba “bakolongwa kino kobebisama na seko, kasi bayengebene (bampate) kino bomoi na seko”. Matai 25:31-46; Emoniseli 14:1-3.

Mpo na nini kozonga na Klisto esengeli komonana te, mpe mosala nini azali kokokisa na eleko yango?

◆ Na ndimbola nini bampate basangoli Bokonzi?

◆ Ntango nini ’’ebandeli ya mokili” etyamaki, mpe mpo na nini na ntango wana?

◆ Na likambo nini bato bazali kosambisama mpe kotyama bongo na molɔngɔ ya bampate to kati na bantaba?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto