Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/5 lok. 27
  • Kanisa Mozalisi na yo monene na mikolo na bolenge na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisa Mozalisi na yo monene na mikolo na bolenge na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokima makambo ya mokili
  • Mateya mabongi mpo na bana
  • Bozala na mokano kati na bomoi
  • Bilenge, bozali kobongisa avenire na bino?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Teyá mwana na yo uta azali naino moke mpenza
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Ndenge nini bokoki kosalisa mwana “ya kilikili”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bilenge: Bozali koluka nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/5 lok. 27

Kanisa Mozalisi na yo monene na mikolo na bolenge na yo

KATI na mokili mobimba, bilenge bazali lisusu kosepela te. Wana ezalaki titre ya lisolo moko ya zulunalo star ya Johannesburg (Afrike du Sud) Na ebandeli ya lisolo yango, ezalaki kotangama boye: “Elongo na ebele ya bilenge oyo bilikya ya avenire bisili mpenza kosuka mpe bakozanga lisusu bosepeli koleka na ntina na kokwea ya mokili, kozanga bosepeli ya bilenge kati na bingumba oyo bitondi na bato ekomi likambo monene kati na mokili mobimba. Mobulu makasi oyo mosalemaki na Miami, na San Salvador, na Managua, na Téhéran mpe na cap nyonso ezalaki na ntina bobele moko; kati na likambo nyonso, babomi mpe babomami ya liboso ezalaki bilenge.”

Lisolo yango ebimisamaki esili koleka mibu soko zomi, mpe longwa ntango yango, makambo ya bomoi masili mpenza kobeba mingi. Mpo na nini kozanga bosepeli ezali komonana mingi epai na bilenge, kati na mokili mobimba? Kobongwana mbala na mbala ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo ezali likambo ya liboso. Kozanga mosala esili kokola mingi. Na ntina na kobeba ya bomoi na libota, kobatelama nini ezali mpo na bilenge? Ntina ya kokamwa ezali te na boye ete bamosusu bakweisa mokili oyo esili komonana na bango ete enuni. Soki bazali kosala bongo, ezali mpo ete bazali na elikya moko te oyo ekotisami kati na bomoi na bango, boye te?

Ebongaki ete mangomba epesa elikya motindo wana. Nzokande, elenge moko akomaki ete: “Nazali kati na mobulungano monene. . . . Nazali na baninga mingi, oyo bazali kati na mangomba ndenge na ndenge, mpe bango nyonso bazali koyoka ndenge moko. Nazali mpenza kati na mobulungano monene mpe nayebi te likambo nini nasengeli kondima. Bokoki kopesa ngai toli?” Toli nini okopesa epai na elenge oyo?

Bilenge oyo bazali kotanga Liloba na Nzambe mpe oyo bakangami kati na lisangá ya solo ya boklisto, bazali na mobulungano te mpe bazali na kobanga te. Wana ebele na bilenge bazangi elikya mpo na avenire, bilenge baklisto bazali na kondima epai na Jéhovah Nzambe mpe kati na Liloba na ye ya solo, oyo ekokosaka te. Lisusu, bazali na elikya ya kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko na ntango oyo mpe kozala na bomoi libela na libela. Na nsima, na mabelé oyo masili kopetolama na bokesene mpe na mabe, bakokóma eteni moko ya moboko ya “mabelé na sika” oyo kati na yango “boyengebene ekofanda”. (2 Petelo 3:13; Yoane 17:3.) Mpo na komona kokokisama ya bilikya kitoko wana, bilenge balendisami na kokanisa Motongi na bango Monene’. (Mosakoli 12:1.) Toli kitoko oyo ekoki kopesamela bango ezali bongo ya kokóma mpe kotikala mosangani ya lisangá na boklisto. Mpo na nini bongo?

Mingi kati na bino, bilenge basangani ya lisangá na boklisto, bozali na baboti oyo bazali bandimi oyo balingaka bino mpe bazali kobokolo bino malamu. Kati na lisanga nyonso, ezali na bankulutu oyo bazali kosepela mpenza na bolamu na bino ya elimo. Lolenge wana na lisalisi mpe libateli esengeli kotalelama mpamba te. Solo oyo ezali kouta na Liloba na Nzambe bakisa mpe na litambwisi ya teokratike ekopekisa bino ete boyoka mawa te, mpe ekomemela bino libateli mpe elikya ya solo mpo na avenire. Nyonso wana ekosalisa bino na ‘kobatela kondima mpe lisosoli malamu’, mpe na kokangama na elikya yango oyo ekokani na longo oyo ezali kobatela masuwa ete ezinda te kati na ebale monene oyo mai matomboki.​—1 Timoté 1:18, 19; tala Baebele 6:19.

Bokima makambo ya mokili

Atako ebele na mapamboli oyo bilenge bakoki kozwa kati na lisangá ya boklisto, bamosusu bazali na ezalela ya kolanda banzela na mokili. Ezali mpenza lokola soki nde bazalaki kozanga eloko moko ya ntina mpe oyo bakokaki kozwa yango bobele kati na mokili, na libanda ya lisangá na boklisto. Kasi mokili ezali mpenza na eloko ya malonga mpo na kopesa?

Nsima na kolekisa mibu koleka 40 kati na mosala ya pionnier, mosaleli moko na Nzambe alobaki boye: “Eleko bobele moko ya bomoi na ngai oyo nazali kokanisa na koyokaka mawa ezali oyo nazalaki na bomoi liboso ete nayeba solo. Nazalaki mpenza moto ya mokili, bomoi na ngai nyonso ezalaki mpo na mokili. Na mibu 18, nasosolaki bomoi na ngai, mpe namonaki ete ezalaki mpenza bomoi moko mpamba. Nazalaki na ntina ata moko te mpe mokano ata moko te. Bisengo ya mokili oyo nazalaki kokanisa ete ezali malamu ezalaki mpenza komemela ngai nde mawa mpe mpasi. Nabandaki koluka solo. Namonaki yango mpe, mbula moko na nsima, nabandaki mosala ya pionnier. Nazalaki na mosolo te, mpo nazalaki na mobu bobele moko ya ekspérianse kati na solo mpe nazalaki na elikya ete Jéhovah akosunga ngai. Sikawa, ntango nazali kotalela bomoi na ngai, oyo ndambo na mibale kati na misato nalekisi kati na mosala ya pionnier, nazali na esengo koleka. Ata mbala moko te nakolinga kosanze oyo nazwi na kosalela Jéhovah ata na eloko nini oyo mokili ekoki kopesa.” Na yango, ezali wana liyoki ya bankóto na ba Témoins de Jéhovah.

Na bongo mpo na nini kolinga biloko oyo baklisto mosusu basili kotika? Mpo na nini kolinga biloko oyo bizali kopesama na mokili oyo ezali kokende na kobomama? (1 Yoane 2:15-17) Bino baoyo bozali bilenge, mbala mosusu bozali na likanisi ete kosalela Jéhovah ezali mpasi mingi mpe ezali kopekisa bino na bisengo ya mokili. Kasi ezali likambo na mayele na kokanisa ete baboti na bino mpe bankulutu bazali mpenza na masengisi mingi, wana elingi bango bobele kosalisa bino ete bosepelisa Jéhovah mpe bozwa bomoi na seko?

Ntango mama moko oyo atindi mwana na ye ete akende kosomba eloko moko kati na magasin moko ya penepene, ayebisi ye ete asengeli kotelema mpe kotala ngambo nyonso mibale liboso ya kokatisa balabala, bokanisi ete azali na masengisi mingi koleka? Azali mpenza komeka kobatela mwana na ye na bolingo, boye te? Toloba ete mwana na ye aboyi kondima toli na ye mpe vuatire moko etuti ye mpe ebomi ye. Bokoloba ntango nyonso ete mama na ye azalaki na masengisi mingi? Nkutu, okokanisa ete esengelaki na ye akamata bibongiseli mingi mpo akoka kobatela bomoi ya mwana na ye. Boye te? Motindo moko, bokundweli ya Liloba na Nzambe mpe ya lisangá na ye ezali kopesama na bolingo, ezali mpo na kolembisa biso te, kasi mpo na kobatela biso.

Ekoki bobele te kokola kati na libota moko ya boklisto mpo na kozala na makoki ya kobunda elongo na bopusi ya mokili. Esengeli mpe ete yo moko ondimisama ete Biblia ezali koloba solo. Ezali solo endimeli wana mozindo mpe bolingo na yo mpo na Mozalisi nde ekopusa yo na kopesa bomoto na yo epai na Nzambe. Endimeli wana ya motema ezali mpe na ntina mpo ete okoka koyeba kolongisa kondima na yo liboso ya bato mosusu. (1 Petelo 3:15) Mpo na kolonga bomoi na yo, esengeli komitika kotambwisama na Liloba na Nzambe. (Yosua 1:8; Nzembo 119:9) Kasi ozali lisusu na mposa ya koteyama malamu.

Mateya mabongi mpo na bana

Baboti baklisto, bokozala mpenza na esengo na komona bana na bino kotelema ngwi mpo na solo mpe kotikala na bomoko elongo na bino kati na losambo ya solo. Ezali liboso mpenza mokumba ya tata mpo na kobokola bana na ye kati na “mpamela mpe mateya na jehovah”. (Baefese 6:4) Kasi ezali mpenza na makambo ya sikisiki oyo bozali na mposa ya kobongisa mateya ya bana na bino? Bolekisaka ntango mingi elongo na bango? Bosalaka misala esika moko kati na libota? Bominanolaka elongo?

Bobosana te ete ndakisa na bino malamu ezali na bopusi monene likoló na bana na bino. soki bolingi ete bandima solo na motema moko, bino mpe bosengeli kondima yango na motema moko. (3 Yoane 2-4) Mpe soki bolingi kokolisa kati na bango limemya mozindo mpo na lisangá ya Jéhovah mpe bankulutu, bino moko bosengeli ntango nyonso kozala na ezalela yango.

Atako koteyama ya bana ezali liboso mokumba na baboti, bankulutu bazali mpe na mikumba epai na bilenge basangani ya lisangá. Ntango bazali kobatela etonga na Nzambe, bakengeli basengeli mpe koleisa bampate mike. (1 Petelo 5:1-3) Oyo nde ndakisa malamu Jéhovah azali kopesa biso na kosenzeláká na bolingo nyonso ata likoló na baoyo mike mpenza! (Yisaya 40:11) Na komekoláká ye, bakengeli baklisto balandi, bakolinga mpe kosepela na bolingo nyonso na bilenge, mpo ete bazala na mayoki ya komikotisa mobimba kati na lisangá. Bilenge mosusu bazali na mposa ete bankulutu bakoka kosolola na bango mbala mingi mpe basalisa bango kati na mosala ya boklisto.

Koteyama ya elenge ezali kosuka te bobele na kokotisa kati na boongó na ye boyebi ya Makomami. Na motema na ye mobimba, asengeli koyina oyo Nzambe azali koyina mpe kolinga oyo Ye alingi. (Amosa 5:14, 15) Mpo ete akanisa Motongi na ye na ntango ya bolenge na ye, asengeli kosembolama na Makomami mpe kotambola kati na banzela sembo ya Jéhovah. (Masese 22:6; 2 Timoté 3:16) Baboti basengeli komipekisa te mpo na kopesa mpamela oyo ebongi. Baboti oyo balingi ntango nyonso kobatela boninga ya bana na bango, mbala mingi bazalaka na ezalela ya kokanga miso likoló na misala mabe na kotaláká mpamba bonene na yango. Bazali komitika kopusama na elimo ya lipanda ya mokili. Kasi soki balingi mpenza bana na bango, ntango bayebisi bango ete bana yango bazali komitambwisa malamu te, baboti bazali kotalela yango mpe bazali kopesa bango mpamela oyo ebongi. (Masese 13:24) Ya solo, baboti baklisto banani oyo bakolinga kobatela boninga etongami likolo na elimo ya lipanda mpo bazala na likama ya kobungisa bana na bango mpo ete mpamela malamu ezangi?​—Masese 22:15.

Bozala na mokano kati na bomoi

Jéhovah akelaki biso na motindo ete tozwa esengo mingi mpe bosepeli mozindo soki tozali kosalela ye. Bilenge, bokanisa na bilanga minene oyo bokoki kolona. Penepene na ndambo monene ya bato kati na mokili esalemi na bato ya mibu 20 mpe kita na nse. Bilenge yango bazali kozinda kati na mai oyo ezali bongo bato ya mokili. Lokola bazangi elikya, bino, bilenge baklisto, bozali na elikya ya solo mpe na eloko moko ya motuya mpo na koyebisa bango. Na etamboli na bino kitoko ya boklisto mpe na molende na bino kati na mosala ya Jéhovah, bokoki kobenda bamoko kati na bango na solo mpe kosalisa bango na kolanda nzela ya bomoi.

Mokano nini kitoko bokoki komitiela soki te oyo ya kolekisa bomoi na bino kati na mosala ya Jehovah? Bosili kokana mpo na kokokisa mosala na lobiko oyo ya kosakola ntango nyonso? Mbala mosusu bokokoka kopalanganisa nsango malamu lokola ba pionniers, to kosala kati na moko ya ba filiales ya la Société Watch Tower epai kuna bazali konyata mikanda na Biblia. Ata soko bokoki kosala lokola ba pionniers te, bokoki kokomisa losambo na peto ya Jéhovah lobanzo ya liboso kati na bomoi na bino, kokanisáká bongo Motongi na bino Monene? Bozali bongo na mosala moko ya ntina mpo na kokokisa. Na yango, kino nsuka ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo, bozala na ekateli ya kozala “na mosala mingi kati na Nkolo”.​—1 Bakolinti 15:58.

Yango wana, bilenge baklisto, boyika mpiko mpe bokende liboso! Bokanisa Motongi na bino Monene uta sikawa mpe akobatela bino ntango akoboma mokili mabe oyo. Ee, Jéhovah akobatela bino na ntango wana mpe akopambola bino na kopesaka bino avenire moko kitoko mpe ya seko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto