Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/8 nk. 4-7
  • Bilenge basaleli na ntango na kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge basaleli na ntango na kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moise mpe bamosusu, batikalaki sembo kati na bolenge na bango
  • Davidi, Yosia mpe Yilimia
  • Daniele, Yesu mpe Timoté
  • Olingi kozala na avenire ya motindo nini?
  • Bilenge ya esengo bazali kosalela Jehovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Oyebi Yehova malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Mosakoli na “eleko ya nsuka ya mikolo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/8 nk. 4-7

Bilenge basaleli na ntango na kala

Biblia ezali kolobela na ntina na bilenge mingi oyo bazalaki malamu, baoyo bazwaki mosala na bango mpo na Nzambe na motuya mingi mpe bazwaki mapamboli mingi wana esalaki bango boye. Tozala bilenge to mpe tokómi mibange mpe tonuni, bandakisa kitoko oyo euti na Biblia ezali kolendisa biso mingi.

Yosefe azalaki bobele na mibu 17 wana atekamaki lokola moombo mpe akómaki na Ezipito. Kuna, mosika na bandeko na ye mpe mosika na bato oyo bayebaki ye, Yosefe amonisaki bosembo na ye epai na Nzambe. Ntango mwasi ya Potifare amekaki kolengola ye, Yosefe alobaki ete: “Nakokoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” Ata liboso na Farao, mokonzi oyo alekaki mpenza makasi na eleko wana, Yosefe asalekaki libaku yango mpo na kopesa epai na Nzambe lokumu oyo ya molimboli bandoto ya Farao. Azwaki mapamboli mingi. Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa baezipito mpe libota na ye na liwa na ntina na nzala, mpe mpo na kobengisa tata na ye Yakobo mpe libota na ye na Ezipito.​—Genese 37:2; 39:7-9; 41:15, 16, 32.

Moise mpe bamosusu, batikalaki sembo kati na bolenge na bango

Mwana mwasi ya Farao abokolaki Moise lokola mwana na ye mpenza, kasi baboti ya Moise bateyaki ye koyeba Nzambe ya solo. Biblia elobi ete na ntango akomaki mokóló, Moise “aboyaki kotangama mwana ya mwana mwasi na Farao, andimaki kotumolama na bolozi esika moko na bato na Nzambe na esika ete asepela na bisengo ya masumu bikoumela bobele mwa ntango moke.” Nzambe asalelaki ye mpo na kobimisa bato na ye na Ezipito, mpo na kopesa bango Mibeko na ngomba ya Sinai, mpe mpo na kokoma ndambo monene ya Biblia. Ata soko ozali na bambula boni, osili kozwa ekateli ya kosalela Nzambe lokola Moise asalaki?​—Baebele 11:23-29; Exode 2:1-10.

Makomami mazali kolobela biso na ntina na “bana mike” oyo bazalaki koyokamela elongo na bato mosusu ya libota wana Mibeko mizalaki kopesama na Yisraele. (Deteronome 31:10-13.) Na mikolo ya Nehemia, “baoyo nyonso bayebaki koyoka mpo na kososola” batelemaki “longwa na ntongontongo kino midi” mpo na koyoka Mibeko. (Nehemia 8:1-8.) Ata soko bana mike bazalaki kokanga makambo nyonso te, kasi bakokaki kokanga ntina ete basengelaki kolinga Jéhovah Nzambe, kosambela ye mpe kotosa ye. Ata soko ozali na mbula boni, osila koyokamela na ba assemblées epai kuna bazalaki kolimbola Liloba na Nzambe? Osila koyeba ntina ya kotosa Nzambe lokola oyo bilenge bayisraele bazalaki kosala yango?

Davidi, Yosia mpe Yilimia

Nzambe aponaki Davidi, elenge moke kati na libota ya bana mibali mwambe mpo na kokokisa mosala moko monene, mpe na ntina na ye alobaki ete: “Nazwi Davidi mwana na Yisai, mobali abongi na motema na ngai, oyo akosala mokano na ngai nyonso” Nzambe aponaki ye mpo na kozala “mobateli na mpate” kati na bato na ye, mpe Davidi akokisaki mosala yango na komonisáká bolingo na ye mpo na Jéhovah na boumeli ya bambula mingi. Akomaki banzembo koleka 70 mpe azalaki moko na bankoko na Yesu Klisto, ozala elenge to mokóló, ozali kososola banzela na Nzambe mpe kosala makambo oyo alingi lokola oyo Davidi asalaki?​—Misala 13:22; Nzembo 78:70, 71; 1 Samwele 16:10, 11; Luka 3:23, 31.

Yosia akómaki mokonzi wana ezalaki ye na mbula mwambe. Ntango akómaki na mbula 15, “naino ezalaki ye elenge, abandaki koluka Nzambe na Davidi, tata na ye”. Liboso nkutu akóma na mbula 20, Yosia akweisaki losambo ya lokuta. Na nsima, abongisaki temple, mpe azongisaki losambo na peto kati na mboka Yisraele. Totangi boye: “Na mikolo na ye, banso bapengwaki te na nzela ya kobila Jéhovah, Nzambe ya batata na bango.” Moto moko te kati na biso akoki kokóma mokonzi lokola Yosiya, kasi, ata soko tozali na bambula boni, tokoki kosalela Nzambe mpe kotemela mpenza losambo ya lokuta.​—2 Ntango 34:3, 8, 33.

Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso alobaki na Yilimia ete: “Naino natongi yo kati na libumu te, nayebaki yo; mpe naino obotamaki te, nabulisaki yo, mpe napesaki yo lokola mosakoli epai na mabota.” Kasi Yilimia aboyaki na kolobáká ete akokaki te kozala mosakoli mpo ete azalaki elenge mingi: “Ah, Nkolo Jéhovah! Tala, nayebi koloba te mpamba te ngai nazali bobele elenge.” Jéhovah ayanolaki ye ete: “Loba te ete: ‘Ngai nazali bobele elenge!’ Kasi okokende epai na bango nyonso ekotinda ngai yo epai na bango, okoloba nyonso ekolakisa ngai yo.” Ezali yango nde Yilimia asalaki na boumeli ya bambula koleka 40 mpe, ata ntango alingaki kotika yango, azalaki kokoka kotika te. Liloba na Nzambe ezalaki ‘lokola móto na kozikisa ebombami kati na mikwa na ye’. Asengelaki bobele koloba yango! Ata soko ozali na mbula boni, ozali nde kokólisa motindo na kondima oyo ezalaki na Yilimia, na kokendeke liboso kati na mosala ya Nzambe lokola ye asalaki?​—Yilimia 1:4-8; 20:9.

Daniele, Yesu mpe Timoté

Osila koyoka lisolo ya Daniele? Ntango amemamaki na boombo elongo na ’’bana’’ mosusu mpo na kosala na ndako ya Nebukadanezare moto na nguya, mokonzi ya Babilone, Daniele azalaki mbala mosusu na nsé na mibu 20. Atako azalaki elenge, Daniele azwaki ekateli ya kotosa Nzambe. Ye mpe baninga na ye baboyaki komibebisa na bilei ya mbindo oyo Mibeko na Nzambe ezalaki kopekisa na kolya yango, to oyo ebebisamaki na milulu ya bapakano. Na boumeli ya bambula koleka 80, Daniele alembaki te, atikalaki sembo kino koboya kotosa mobeko mopesamelaki ye ya kotika kobondela Nzambe, ata soko yango esengelaki ete abwakama na libulu ya nkosi. Ozali nde kozwa na motuya mpenza, mosala na yo mpo na Nzambe mpe mabondeli oyo etindaka epai na ye? Osengeli kosala yango.​—Daniele 1:3, 4, 8; 6:10, 16, 22.

Na mibu 12, Yesu azalaki na katikati ya balakisi ya mangomba, kati na temple ya Yelusaleme, “koyokáká bango mpe kotunáká bango mituna. Mpe baoyo nyonso bayokaki ye (elenge Yesu) bakamwaki na bososoli na ye mpe na biyano na ye.” Kosolola elongo na mikóló kati na temple lokola oyo Yesu asalaki, ekokaki kosepelisa yo? Bato oyo bazalaki wana, bakokaki mpe kokamwa na ntina na bososoli na yo mpe na biyano na yo? Na mikolo na biso, bilenge batemwe mosusu baoyo bazali koyekola, baoyo bazali koyokamela na likebi mpenza mpe kopesa biyano na makita na boklisto bazali na boyebi ya Makomami oyo bozali kokamwisa mikóló.​—Luka 2:42, 46, 47.

Ozali nde lokola Timoté, oyo ayekolaki “Makomami na bulee” longwa na bomwana? Ntango azalaki elenge, “bandeko. . . . batatolaki malamu na ntina na ye” na masangá mingi. Ntoma Paulo aponaki kokende elongo na Timoté na mobembo, ezalaki te mpo azala momemi biloko mpamba, kasi nde mpo na kosalisa ye na koteya bato mosusu. Yo mpe okoponama na misala motindo oyo? Bazali nde “kotatola malamu” na ntina na mosala na yo, bobele kati na lisangá na bino te, kasi mpe kati na masangá mosusu?​—2 Timoté 3:15; Misala 16:1-4.

Olingi kozala na avenire ya motindo nini?

Bilenge bazali na makoki lelo ya komimonisa sembo lokola Yosefe, Moise, Davidi mpe bamosusu? Ee. Ezali solo ete bilenge mingi balingi bobele bisengo. Kasi bamosusu bazali koluka na mayele mpenza mpo na kozwa matomba na bolenge na bango mpo na koyekola koyeba Nzambe mpe mokano na ye epai na bango. Baoyo wana bozali kokokisa esakweli oyo: “Bato na yo bakomipesa na yo na bolingo nyonso, na mokolo na nguya na yo. . . . Bilenge na yo bakoya epai na yo lokola mamwe longwa na ntongontongo.”​—Nzembo 110:3.

Bilenge yango bazali komonisa bwanya ya kokamwisa na mbula na bango mpo ete Nzambe akoki kosalisa bango na kolonga bomoi na bango ya sikawa mpe kobongisela bango avenire kitoko kati na mokili ya sika oyo ezali koya. (1 imoté 4:8.) Lolenge nini elenge akoki lelo kokolisa kondima na ye lokola oyo ezalaki na bilenge oyo balobelami kati na Biblia? Soki olingi koyeba yango, tosengi yo otanga lisolo “Bilenge ya esengo bazali kosalela Jéhovah”, na lokasa 10 ya zulunalo oyo.

[Bililingi na lokasa 5]

Elenge Moise alengolamaki te na misolo ya Ezipito

Elenge Davidi azalaki mobali oyo ebongaki na motema ya Jehovah.

[Bililingi na lokasa 5]

Yilimia amimonaki “elenge”, kasi asakolaki na molende nyonso nsango moko oyo endimamaki na bato te.

Na mbula 12, Yesu ekamwisaki mikóló mpo na mayele na ye na Liloba na Nzambe.

[Bililingi na lokasa 5]

Na Yisraele, ata bana mike bazalaki koyokamela ntango bazalaki kotanga Mibeko ya Nzambe. Ozali nde kosala yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto