Botosi na biso epai na bakonzi baleki liboso ezali na ndelo
“Boye ekoki kotosa.”—BALOMA 13:5.
1. Mimekamo nini ya mpasi ba Témoins de Jéhovah bazwaki na maboko ya bakonzi ya nazi, mpe ezalaki mpo ete ‘bazalaki kosala mabe’?
LE 7 JANVIER 1940, Franz Reiter mpe bilenge mosusu mitano na mokili ya Autriche bakatamaki nkingo. Bazalaki Bibelforscher, to ba Témoins de Jéhovah; bakataki bango nkingo mpamba te lisosoli na bango epesaki bango ndingisa te na kokamata mindoki mpo na kobundela bokonzi ya Hitler. Reiter azali moko na bankoto ya ba Témoins oyo bakufaki mpo na kondima na bango na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mingi mosusu bayikaki mpiko kati na boloko mibu mingi na ba camps ya concentration. Ezali mpo ‘bazalaki kosala mabe’ nde baklisto nyonso wana babotamaki na “mopanga” ya bakonzi ya nazi? (Baloma 13:4) Soki moke te! Maloba na Paulo oyo malandi mazali komonisa ete, atako banyokwamaki na maboko ya bakonzi, bazalaki kotosa malako na Nzambe mazwami kati na mokapo 13 ya mokanda na Baloma.
2. Mpo na nini botosi epai na bakonzi baleki liboso ezali na ntina mingi?
2 Na Baloma 13:5, ntoma Paulo akomaki ete: “Boye ekoki kotosa bobele mpo na kobanga etumbu te kasi mpo na lisosoli lokola.” Liboso, Paulo ayebisaki ntina malamu ya kozala na botosi epai na mikonzi: ezali mpo ete bazali komema “mopanga.” Kasi sikawa, apesi ntina eleki monene: lisosoli. Tozali kosala nyonso mpo na kosalela Nzambe “na lisosoli ya peto.” (2 Timote 1:3) Biblia elobi na biso ete tozala na botosi epai na bakonzi baleki liboso; tozali bongo kotosa bango, mpo tolingi kosala oyo ezali sembo na miso na Nzambe. (Baebele 5:14) Ee, lisosoli na biso eteyami na Biblia ezali kotinda biso na kotosa bakonzi ata soki moto moko te azali wana mpo na kokengela biso.—Tala Mosakoli 10:20.
‘Yango wana bokofutaka mpako’
3, 4. Lokumu nini ba Témoins de Jéhovah bazali na yango, mpe mpo na nini baklisto basengeli kofuta mpako na bango?
3 Esili koleka mwa mibu, na Nigéria, mobulu ebimaki na ntina etali kofuta mpako. Bato mingi babomamaki, mpe bakonzi basengaki lisalisi ya basoda. Yango wana mokolo moko basoda bakutaki kati na Salle du Royaume epai kuna likita ezalaki kosalema mpe batunaki ntina ya likita wana. Ntango mokonzi ya basoda ayokaki ete ezalaki likita moko ya ba Témoins de Jéhovah mpo na koyekola Biblia, abimisaki bato na ye na kolobaka ete: “Ba Témoins de Jéhovah bazali batomboki te; bafutaka mpako na bango.”
4 Eyebanaki epai na bato banso ete ba Témoíns de Jéhovah ya Nigéria bazalaki kotambola na boyokani na maloba oyo na Paulo: “Yango wana, bokofutaka mpako. Mikonzi bazali basali na Nzambe wana ekolendisa bango likambo oyo.” (Baloma 13:6) Ntango Yesu alakisaki lilako oyo ete: ‘Pesa epai na Kaisala yango ezali na Kaisala,’ azalaki koloba mpo na bafuti mpako. (Matai 22:21) Bakonzi ya Leta bazali kobongisa banzela mpo na ba citoyens, kotyela bango libateli ya la police, kosalela bango ba biblioteke, kotyela bango myango ya transport, kotongela bango biteyelo, poste mpe makambo mingi mosusu. Lokola mbala mingi tozali kozwa matomba na makambo wana, ebongi mpenza ete tofutela yango na nzela ya bampako na biso.
“Bofutela bango nyonso nyongo na bango”
5. Liloba: “Bofutela bango nyonso nyongo na bango’’ elimboli nini?
5 Paulo akomi lisusu ete: “Bofutela bango nyonso nyongo na bango, mpako epai na baoyo bakoki kozwa mpako, lifuti epai na baoyo bakoki kozwa lifuti, nsomo epai na bango bakoki kobangama, lokumu epai na baoyo bakoki kozwa lokumu.” (Baloma 13:7) Liloba “bango nyonso” elimboli mokonzi nyonso ya Leta oyo azali mosali na Nzambe. Koponapona ezali te. Ata soki tozali kofanda na nse ya ebongiseli moko ya politike oyo biso moko tozali kosepela na yango te, tozali kofuta mpako na biso. Soki, esika oyo tozali kofanda, mangomba bapesameli libaku ya kofuta mpako te, masangá bakoki kozwa litomba na libaku yango. Mpe, lokola ba citoyens nyonso, baklisto bazali na lotomo ya kozwa litomba na bibongiseli nyonso ya Leta oyo bizali kopesa ndingisa na kokitisa motuya na bampako oyo bazali kofuta. Nzokande, moklisto moko te akoki koluka kosalela mayele mabe mpo na kokima kofuta mpako.—Tala Matai 5:41; 17:24-27.
6, 7. Mpo na nini tosengeli kofuta mpako ata soki bazali kosalela mosolo wana mpo na misala oyo biso tokoki kondima yango te, to ata soki bakonzi bazali konyokola biso?
6 Kasi ezali boni soki emonani ete, mpako moko ezali sembo te, to soki ndambo moko na misolo ya mpako epesami mpo na kolendisa mosala moko oyo biso tozali koboya yango, ndakisa kosalisa baoyo balingi kolongola zemi kasi bazangi mosolo, kotonga bibombelo na makila to bibongiseli mosusu oyo biyokani te na etelemelo na biso ya kozanga komikotisa kati na makambo ya mokili? Atako bongo tozali kofuta mpako na biso na mobimba na yango. Ezali bakonzi nde bazali kokumba ngambo mpo na bosaleli ya mosolo oyo bazali kozwa na mpako. Biso tozali na mokumba ya kosambisa bango te. Nzambe azali “Mosambisi ya mokili,” mpe na elaka oyo ye atyaki, akosenga na biyangeli ete bazongisela ye monoko na lolenge oyo basalelaki bokonzi na bango. (Nzembo 94:2; Yilimia 25:31) Na kozelaka, tozali kofuta mpako na biso.
7 Bongo soki bakonzi banyokoli biso? Tokolanda ata bongo kofuta mpako na biso mpo na misala ya mokolo na mokolo oyo bazali kokokisa. Tala oyo zulunalo Examiner ya San Francisco ekomaki na ntina na ba Témoins de Jéhovah oyo bazalaki kozwa minyokoli kati na mboka moko ya Afrike: “Bokoki kotalela bango lokola ba citoyens ya ndakisa malamu. Bafutaka nokinoki mpako na bango, bazali kosalisa bato ya maladi mpe bazali kosala milende mpo na kolakisa bato nyonso ete bayeba kotanga mpe kokoma.” Ba Témoins wana oyo banyokwamaki bazalaki mpenza kofuta mpako na bango.
“Nsomo” mpe “Lokumu”
8. “Nsomo” oyo tozali na yango epai na bakonzi elimboli nini?
8 “Nsomo” oyo elobelami na Baloma 13:7 ezali nsomo ya kolenga pambapamba te, kasi limemya ya bakonzi na Leta, nsomo ya kobuka mibeko na bango. Limemya yango ezali komonisama polele na ntina na etelemelo na bango, kasi ezali ntango nyonso te mpo na bizaleli ya moto oyo azali koyangela. Na ndakisa, Biblia ezali kobenga na ndenge ya esakweli mokonzi moromé Tibere ete “moto abongi na kotiolama.” (Danyele 11:21) Kasi azalaki mokonzi, mpe, mpo na yango, moklisto asengelaki kobanga ye mpe kopesa ye lokumu.
9. Na lolenge nini, kati na makambo mosusu, tozwi kopesa lokumu epai na bakonzi ya Leta?
9 Na ntina na lokumu, tozali kotosa mobeko na Yesu oyo epekisi biso kopesa na moto moko te titre oyo ekangisami na mokumba ya lingomba. (Matai 23:8-10) Kasi ntango tozali koloba epai na bakonzi ya Leta, tozali na esengo ya kosalela ba titres, ata yango ezali ndenge nini, oyo epesameli bango mpo na kokumisa bango. Paulo asalelaki liloba “Excellence” to “moto wa lokumu” mpo na koloba na ba guvernere ya rome. (Misala 26:25) Danyele abengaki Nebukadanezare “nkolo na ngai.” (Danyele 4:19) Na mikolo na biso, baklisto bakoki kosalela maloba lokola “Votre Excellence” ou “Votre Majesté.” Bakoki kotelema ntango ba magistrats bakoti kati na tribinale, to kongunzama moke mpo na limemya liboso ya mokonzi soki yango ezali momeseno ya mboka na bino.
Botosi etyameli ndelo
10. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ndelo ezali kati na makambo oyo bakonzi ya mokili bakoki kosenga epai na moklisto?
10 Mpo ete ba Témoins de Jéhovah bazali kotosa bakonzi ye Leta, mpo na nini Franz Reiter mpe ebele mosusu bakatamaki nkingo? Ezali mpo ete botosi na biso ezali na ndelo, mpe bakonzi bazali koyeba ntango nyonso te ete ezali na bandelo oyo Biblia esilaki kotya kati na makambo oyo bakoki kosenga. Soki mokonzi asengi likambo moko oyo etungisi lisosoli ya moklisto oyo eteyami malamu, na bongo mokonzi akei mosika koleka bandelo oyo epesamelaki ye na Nzambe. Ezali yango nde Yesu ayebisaki ntango alobaki ete: “Pesa epai na Kaisala yango ezali na Kaisala, mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.” (Matai 22:21) Ntango Kaisala asengi biloko oyo bizali mpo na Nzambe, tosengeli koyeba ete mokano na Nzambe nde esengeli koleka liboso.
11. Mpo na komonisa ete ndelo ezali mpo na makambo oyo bakonzi ya leta bakoki kosenga etinda nini endimami na bato mingi?
11 Etelemelo wana ezali ya botomboki to ya kozanga botosi? Soki moke te. Mpamba te, ezali etinda moko ya mobeko oyo endimami na ntalo monene ya mikili oyo mizali civilizé. Na ekeke ya zomi na mitano, moto moko na nkombo Pierre de Hagenbach asambisamaki mpo akotisaki mobulu kati na eteni moko ya Mpoto epai ye azalaki na bokonzi. Amilongisaki na kolobaka ete azalaki bobele kolanda bitinda ya nkolo na ye, mokonzi ya Bourgogne, kasi likanisi wana endimamaki te. Uta ntango yango, likanisi oyo engebene yango ete moto oyo asali mobulu makasi na kobomaka bato akoki kotalelama te lokola moto akumbi ngambo soki asali bongo mpo alandaki bitinda ya mokonzi moko monene, likanisi oyo ezongelami mbala mingi. Likanisi wana elobelamaki mpo na koluka kolimbisa banazis oyo babomisaki bato mingi, basambaki liboso na Tribunal international ya mboka Nuremberg. Atako bongo, endimamaki te. Tribunal international elobaki boye kati na ekateli na yango na likambo wana ete: “Kati na molongo mobimba, bato bazali na mikumba oyo mileki bitinda oyo bipesameli bango na Leta ya mboka na bango.”
12. Pesa mwa bandakisa ezwami na Biblia ya basaleli na Nzambe oyo baboyaki kotosa masengami mabe ya bakonzi.
12 Basaleli na Nzambe bayebi ntango nyonso ete ndelo ezali kati na botosi oyo basengeli, na lisosoli nyonso, komonisa epai na bakonzi baleki liboso. Na eleko oyo Moise abotamaki na Ezipito, Faraon apesaki etinda na babotisi mibale oyo bazalaki kati na libota ya Baebele ete baboma bana nyonso ya mibali oyo bazalaki kobotama kati ne libota na bango, kasi babotisi batikaki bango na bomoi. Basalaki mabe mpo batosaki Faraon te? Te, bayokaki mongongo ya lisosoli oyo Nzambe apesaki epai na bato, mpe yango ememelaki bango mapamboli na Ye. (Exode 1:15-20) Na boumeli ya boombo na Babilone, Nebukedanezare epesaki etinda epai na basali na ye, na kati na bango Baebele Sadrake, Mesake mpe Abedenego, ete bangumbama liboso na ekeko oyo asalaki kati na esobe ya Dura. Baebele misato baboyaki kotosa ye. Basalaki mabe? Te, mpamba te kotosa etinda ya mokonzi mbele elingaki kolimboala koboya kotosa mobeko na Nzambe.—Exode 20:4, 5; Danyele 3:1-18.
“Kotosa Nzambe, lokola mokonzi”
13. Ndakisa nini baklisto ya liboso bapesaki mpo na oyo etali komonisa botosi ezali na ndelo epai na bakonzi baleki liboso?
13 Motindo moko,ntango bakonzi na Bayuda balobaki na Petelo mpe na Yoane ete batika kosakola na ntina na Yesu, bayanolaki: “Soko ezali sembo na miso na Nzambe ete toyoka bino liboso na koyoka Nzambe, bokata likambo yango.” (Misala 4:19; 5:29) Bakokaki kokanga monoko te. Zulunalo moko (The christian century) ezali kobenda likebi likoló na etelemelo mosusu oyo baklisto ya liboso bakamataki na ntina na lisosoli: “Baklisto ya liboso bazalaki kokota na mosala ya basoda te. Roland Bainton amonisi ete ‘kobanda nsuka ya eleko na Kondimana na Sika kino na ba mibu 170, elembeteli moko ezali te, oyo mbele ekoki komonisa ete baklisto bazalaki kati na mosala ya soda.’ (Ezalela ya baklisto liboso na etumba mpe kimya (Angl., Abingdon, 1960), pp. 67, 68) . . . Lokola Swift ayebisi yango, Justin ‘amoni malamu ete baklisto bamibatela na makambo ya mobulu.’”
14, 15. Tanga mwa mitinda na Biblia oyo mizalaki kotambwisa botosi na ndelo ya baklisto ya liboso epai na bakonzi ya mokili.
14 Mpo na nini baklisto ya liboso bazalaki koboya kokota na mosala ya soda? Ntembe ata moke ezali te, moko moko kati na bango azalaki koyekola na likebi nyonso Liloba mpe mibeko na Nzambe mpe bazalaki moto na moto kokamata ekateli na koyokaka lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Bazalaki neutre, ‘bazalaki bato ya mokili te,’ mpe neutralité na bango ezalaki kopekisa bango kokota kati na matata ya mokili. (Yoane 17:16; 18:36) Lisusu, bazalaki bato na Nzambe. (2 Timote 2:19) Kopesa bomoi na bango mpo na Ekolo, mbele elingaki kolimbola kopesa na Kaisala eloko oyo ezali mpo na Nzambe. Lisusu, bazalaki libota ya mokili mobimba ya bandeko basangani na bolingo (Yoane 13:34, 35; Bakolose 3:14; 1 Petelo 4:8; 5:9) Na lisosoli malamu nyonso, bakokaki te komema mindoki, na nzela na yango bakoki koboma bandeko na bango baklisto.
15 Lisusu, baklisto bakokaki kondima te misala mipalanganaki ya mangomba, ndakisa losambo ya mokonzi. Mpo na yango, bazalaki kotalela bango lokola “bato bamikaboli na bamosusu mpe bato mabe, mpe bato nyonso mosusu bazalaki kokanisela bango mabe.” (Biblia elobi lisusu (Angl.), ya W. Smart.) Ya solo, lokola ekomaki yango Paulo, baklisto basengeli ‘kozala na nsomo epai na bango bakoki kobangama,’ kasi bazali kobosana te mpo na yango nsomo to limemya monene koleka oyo bazali na yango mpo na Jéhovah. (Baloma 13:7; Nzembo 86:11) Yesu ye moko alobaki: “Bobanga bango te baoyo bayebi koboma nzoto nde bayebi koboma molimo te. Bobanga nde ye oyo azali na nguya kobebisa na molimo mpe na nzoto kati na Geena.” Matai 10:28.
16. a) Na makambo nini baklisto basengeli komeka na likebi nyonso botosi na bango epai na bakonzi baleki liboso? b) Encadré ya lokasa 27 emonisi nini?
16 Lokola tozali baklisto, tozali kokutana mpe na makambo ya mpasi na mikolo na biso. Tosengeli kosangana ata na lolenge moko te ya losambo na bikeko ya ntango na biso ezala na kosalaka ba gestes ya losambo liboso na ekeko moko to na elilingi moko, to na kosanzola moto moko to lisangá moko ete ye mobikisi (1 Bakolinti 10:14; 1 Yoane 5:21) Mpe, lokola baklisto ya liboso, tokoki kobebisa te etelemelo na biso ya boklisto, ya kozanga kokota na makambo ya mokili (neutralité).—Tala 2 Bakolinti 10:4.
‘Bopolo mpe limemya mozindo’
17. Toli nini Petelo apesi epai na baoyo bazali konyokwama mpo ete bazali koyokela lisosoli na bango?
17 Na ntina na etelemelo oyo tozali na yango mpo na lisosoli, ntoma Petelo akomaki ete: “Mpo ete ezali malamu soko moto akoyikaka mpiko kati na mpasi oyo eyokisi bango ye bobele mpamba, awa ezali Nzambe kati na makanisi na ye.” (1 Petelo 2:19) Na yango, ntango moklisto moko atikali ngwi atako monyokoli ezali, yango ezali kosepelisa Nzambe mpe, bolamu mosusu, kondima na ye ezali kokoma makasi mpe ezali kopetolama (Yakobo 1:2-4; 1 Petelo 1:6, 7; 5:8-10) Petelo alobi lisusu ete: “Kasi soko boyoki mpasi mpo na boyengebene, esengo na bino! Mpo na kobangisa na bango, bobanga te, bomitungisa mpe te. Bobulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; boselingwaka mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina na elikya ezali kati na bino.” (1 Petelo 3:14, 15) Oyo nde toli malamu!
18, 19. Soki bakonzi bakitisi bonsomi ya losambo na biso, litomba nini tozali na yango ya komonisa limemya mozindo mpe kozala na makanisi mobongi?
18 Ntango bakonzi bazali konyokola baklisto mpo ete bayebi malamu te etelemelo na bango to mpo ete bakonzi na mangomba ya boklisto na lokuta babukeli ba Témoins de Jehovah lokuta liboso na bango, makambo makoki kobonga soki baklisto yango balobi mpenza ndenge likambo ezali. Lokola moklisto azali komonisa bopolo mpe limemya mozindo, azali kobundisa banyokoli te. Nzokande, azali kosalela myango nyonso oyo mindimami na mibeko mpo na kolongisa kondima na ye. Na nsima, azali kotika makambo kati na maboko na Jéhovah.—Bafilipi 1:7; Bakolose 4:5, 6.
19 Limemya mozindo ya moklisto ezali mpe komema ye na kosala nyonso oyo ekoki na ye, kozanga ete abebisa lisosoli na ye, mpo na kotosa bakonzi. Soki, na ndakisa, makita ya lisangá mapekisami, baklisto bakoluka mwango ya kobombama mpo na kolanda komileisa na mesa na Jehovah. Mokonzi oyo—aleki-likoló, Jéhovah Nzambe, alobi na biso na nsima ya Paulo ete: “Totala ete topesana simbisi moko na moko mpo na kolingana mpe kosalaka misala malamu. Totika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu.” (Baebele 10:24, 25) Makita yango makoki mbala mosusu kosalema na kobombama. Ata soki tozali koyangana bobele na mwa etuluku moke, tozali na elikya ete Nzambe azali kopambola bibongiseli yango.—Tala Matai 18:20.
20. Soki kosakola polele nsango malamu epekisami, likambo nini baklisto bakoki kosala?
20 Na likanisi motindo moko, bakonzi mosusu bapekisaki mosala na kosakola nsango malamu epai na bato banso polele. Baklisto oyo bazali kofanda na nse na boyangeli na bango bazali komikundola ete, na monoko na Yesu ye moko, Mokonzi oyo—aleki-likoló alobaki ete: “Ekoki ete nsango malamu elakisama kati na mabota nyonso liboso.” (Malako 13:10) Bazali bongo kotosa epai na Mokonzi oyo—aleki—likoló, atako yango ekoki kobendela bango likambo nini. Epai kuna likoki ezalaki, bantoma basakolaki liboso na bato banso mpe ndako na ndako, kasi ezali na myango misusu ya koyebisa nsango epai na bato, na ndakisa litatoli ya mbalakaka. (Yoane 4:7-15; Misala 5:42; 20:20) Mbala mingi, bakonzi batemelaka te mosala ya kosakola soki bozali kosala yango na kosalelaka bobele Biblia likambo oyo emonisi ntina mpo na ba Témoins de Jéhovah nyonso na koyeba kosolola na bato na nzela na Makomami. (Tala Misala 17:2, 17) Na komonisaka molende, kasi mpe na limemya, baklisto bazali kozwa nzela ya kotosa epai na Jéhovah kozanga kolamusa nkanda ya bakonzi baleki liboso.—Tito 3:1, 2.
20 Atako bongo, ekomaka ete bakonzi bangali konyokola baklisto. Na likambo motindo wana, elongo na lisosoli malamu nyonso, ekosengela na biso bobele koyika mpiko na kosalaka oyo ezali sembo. Elenge Franz Reiter etyamaki liboso na liponi: kowangana kondima na ye to kokufa. Lokola akokaki te kotika kosambela Nzambe, andimaki liwa na molende nyonso. Butu oyo ezalaki liboso ya kobomama na ye, Franz akomelaki mama na ye: “Nakobomama lobi na ntongo. Jéhovah apesi ngai nguya oyo nazali na yango mposa, nguya oyo apesaki ntango nyonso epai na baklisto ya solo ya bileko na kala. . . . Soki bokotikala sembo kino liwa, tokomonana na lisekwa.”
21. Soki Kaisala angali na konyokola bango, baklisto basengeli kosala nini?
21 Mokolo ezali koya oyo mokili mobimba ekozala na nse ya bokonzi se moko, oyo na Jéhovah Nzambe. Na kozelaka, tosengeli na lisosoli nyonso komonisa botosi ezali na ndelo, epai na ebongiseli oyo Nzambe atikeli yango nzela, nzokande komonisa botosi na makambo nyonso epai na Jéhovah, Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso.—Bafilipi 4:5-7.
Bozongeli
Ntina nini eleki monene tozali na yango ya kozala na botosi epai na bakonzi baleki liboso?
◻ Mpo na nini tosengeli kokakatana te na kofuta mpako esengami na Kaisala?
◻ Lokumu ya motindo nini tosengeli kopesa epai na bakonzi?
◻ Mpo na nini botosi na biso epai na Kaisala ezali na ndelo?
◻ Soki tonyokwami mpo ete Kaisala asengi biso biloko oyo bizali mpo na Nzambe, likambo nini esengeli na biso kosala?
22. Elikya nini tozali na yango, mpe nini esengeli na biso kosala na kozelaka ete yango ekokisama?
[Etanda na lokasa 27]
Komemya, kasi kosambela te
Na ntongo moko, na boumeli ya kelasi, Terra, elenge mwasi moko Témoin de jéhovah na Kanada, amonaki ete molakisi abimaki elongo na moyekoli moko ya mwasi ya kelasi na ye na boumeli ya mwa ngonga. Moke boye na nsima, asengaki na kimya nyonso na Terra ete alanda ye epai na directeur
Ntango akotaki, Terra amonaki bendele ya Kanada etandami likoló ya mesa ya directeur. Molakisi alobaki na Terra ete bwaka nsoi likoló na bendele oyo, kobakisaka ete azalaki na ntina moko te ya koboya kosala yango mpamba te azalaki koyemba loyembo ya ekolo te mpe azalaki kopesa losako na bendele te. Terra aboyaki. Alimbolaki ete, atako basambelaka bendele te, ba Témoins de Jéhovah bazali komemya yango
Ntango azongaki na kelasi, molakisi alobaki na bayekoli ete auti kosala ekspérianse. Amemaki bayekoli mibale, moto na moto na ntango na ye, kati na biro ya directeur mpe alobaki na bango ete babwaka nsoi likoló na bendele. Oyo na liboso, atako azalaki kosala milulu nyonso ya kokumisa ekolo, abwakaki nsoi likoló na bendele ntango batindaki ye ete asala bongo. Nzokande, Terra, atako ayembaka loyembo ya ekolo te mpe apesaka losako na bendele te, aboyaki kotyola yango na motindo wana. Molakisi asukisaki ete ezali Terra nde azali komonisa limemya oyo ebongi epai na elembo wana.—Annuaire des Témoins de Jéhovah 1990
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]
French Embassy Press & Information Division
USSR Mission to the UN