Telema ngwi kati na bonsomi ya Boklisto
Ndimbola ya makambo na ntina ya mokanda epai na Bagalatia
JEHOVAH azali Nzambe na bonsomi. (2 Bakolinti 3:17) Mwana na ye, Yesu Klisto, alobaki ete: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Na ndakisa na Klisto, ntoma Paulo ateyaki nsango malamu ya bansomi.—Baloma 6:18; 6:21.
Ezali na kosakolama ya nsango wana ya bonsomi nde Paulo asalaki masangá ya Galatia (region ya Roma oyo ezalaki na Mokili ya Asie Mineure) na boumeli ya mobembo na ye ya liboso mpo na kopalanganisa nsango malamu (47-48 ya ntango na biso). Bagalatia bayebaki ekateli ya college central oyo engebene yango kokata ngenga esengisami na baklisto te. (Misala 15:22-29) Kasi Bayuda balukaki lisusu kokómisa bango baombo na kosengisáká bango ete bakata ngenga. Paulo amonisaki bongo bonsomi na boklisto kati na mokanda oyo akomelaki Bagalatia, wana ezalaki ye na Kolinti to mpe na Antiokia ya Suli, pene na mobu 50-52. Na ndakisa alobaki ete: “Klisto akangeli biso mpo na bonsomi. Bongo, beteleme ngwi mpe boingela lisusu kati na ekanganeli na boombo te.”—Bagalatia 5:1.
Paulo donald mosala na ye
Paulo amonisi libosoliboso ete mosala na ye mouti ’’na Klisto mpe na Nzambe“. Nsima na kozwa emoniseli, Paulo akendeki na Yelusaleme elongo na Barnabasi mpe Tito, mpo na kosilisa ntembe ebimaki na ntina na kokata ngenga. Kuna, Yakobo, Kefa (Petelo) mpe Yoane bandimaki ete azwaki lotomo ya kozala ntoma mpo na Bapakano. Nsima, wana Petelo akabwanaki na Bapakano basilaki kondima na Antiokia, mpo na kobanga baklisto Bayuda baoyo bautaki Yelusaleme, Paulo apamelaki ye.
Ndenge nini kotangama moyengebene?
Ntoma Paulo amonisi lisusu na makasi ete moto akotangama moyengebene bobele na kondima epai na Yesu Klisto. (2:15 kino 3:29) Bagalatia bazwaki elimo na Nzambe mpo na mosala na bango ya Mibeko te, kasi mpo ete bayambaki nsango malamu na kondima mpenza. Bana na solo ya Abrayame azali na kondima, kasi baoyo bazali komeka komonisa boyengebene na bango na nzela na ’’misala ya Mibeko balakelami mabe.” Mpo na nini? Mpo ete bakoki mpenza kotosa Mibeko nyonso te. Na solo, Mibeko mimonisaki mabunga polele mpe ezalaki “Molakisi mpo na komema kino na Klisto.”
Telema ngwi!
Na nzela ya liwa na ye, Klisto asili kosikola baoyo bazalaki na nsé na Mibeko. Kasi bayekoli na ye basengeli kotelema ngwi kati na bonsomi na boklisto. (4:5 kino 6:18) Ezali bongo na ntina de Bagalatia batelemela soko moto nani akomeka kosengisa bango ete bandima ekanganeli na boombo. Basengelaki kobebisa bonsomi na bango te, kasi basengelaki nde kokima ’’misala na nzoto’’ mpe komonisa mbuma ya elimo na Nzambe. Baoyo bazali koluka na kokómisa bango lisusu baombo na Mibeko balingi ’’komona malamu na nzoto’’, mpe kokima minyoko mpe komilukela ntina na komikumisa. Nzokande, Paulo amonisi ete kokata ngenga to mpe te, nyonso mibale ezali na ntina te. Kasi, ‘kozalisama na sika nde ezali na ntina“. Abondelaki mpo ete kimya mpe mawa na Nzambe ezala likalo na Yisraele na elimo, oyo esalemi na baoyo bazali kati na kozalisama wana na sika.
Mokanda oyo Paulo atindaki epai na Bagalatia esalisaki bango na kotelemela baoyo bazalaki koluka kokómisa bango baombo na nzela ya elimo. Yango ekoki mpe kosalisa biso na komonisa mbuma ya elimo mpe na kotelema ngwi kati na bonsomi na boklisto.
Bilembo ya moombo: Paulo akomaki ete, ‘Tika ete moto atungisa ngai lisusu te, mpamba te namemi bilembo na Yesu na nzoto na ngai.’ (Bagalatia 6:17) Na ntango na kala, mabota mosusu ya Bapakano bazalaki kotya bilembo epai na baombo mpo na komonisa nkolo na bango. Mingi batyamaki bilembo na ebende na móto mpe bakomamaki nkombo na mposo na bango. Ebele na mpasi oyo Paulo akutanaki na yango mpo na mosala na ye ya boklisto etikaki bilembo na nzoto na ye, komonisáká, lokola alobaki yango ete, azalaki moombo na sembo na Klisto, oyo anyokwami mpo na nkombo na Ye. (2 Bakolinti 11:23-27) Mbala mosusu ezali bilembo wana nde oyo Paulo abengi ‘bilembo ya moombo,’ soko nde abanzi na bomoi na boklisto oyo azalaki na yango, komonisáká mbuma na elimo na Nzambe mpe kokokisáká mosala na ye.
Baombo na Baloma basengisamaki nakosalela mwa bankolo na bango, kasi Paulo amikomisaki moombo na Yesu Klisto, ye moko mpe na esengo.