Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/11 lok. 24
  • Bomoko esalemi na nzela na Klisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoko esalemi na nzela na Klisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomoko ezali mokano na Nzambe
  • Makambo napesi min m bomoko
  • Bomoko ya bokristo epesaka Nzambe nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mokanda ya Biblia nimero 49—Baefese
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Libota ya Yehova lizali na bomoko kitoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tóbatela bomoko na mikolo oyo ya nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/11 lok. 24

Bomoko esalemi na nzela na Klisto

Ndimbola ya makambo na ntina ya mokanda epai na Baefese

NA EBANDELI ya mobu 52 ya ntango na biso, ntoma Paulo ateyaki na Efese. Engumba na mombongo oyo na Asie Mineure ezalaki mpe moboko ya lingomba na lokuta. Atako bongo, boklisto ekolaki nsima wana Paulo azongaki, ezalaki mpenza na elanga ya mobu 52-53. Na boumeli ya mwa mbula misato oyo alekisaki wana, asalaki badiskur mokolo na mokolo kati na ndako na eteyelo mpe apesaki litatoli na ndako na ndako.​—Misala 19:8-10; 20:20, 21, 31.

Na boumeli ya boloko na ye na Roma, pene na mobu 60-61, Paulo akomaki mokanda epai na baklisto ya Efese. Motó na likambo ya mokanda na ye ezalaki bomoko na nzela na Klisto mpe kati na ye. Na solo, mokanda yango mosaleli liloba ‘kati na Klisto’ mbala 13, koleka na mikanda nyonso mosusu Paulo akomaki. Na ndakisa ya Baefese, biso mpe tokoki kozwa liteya na maloba wana ya ntoma na ntina na mosala oyo Klisto azali na yango, mpe likoló na ntina oyo tosengeli kotika pité mpe kotemela bilimo mabe.

Bomoko ezali mokano na Nzambe

Paulo alimboli libosoliboso ete, Nzambe asengelaki kotya bomoko na nzela na Klisto. (1:1-23) Mokano na Jéhovah ezalaki ete asangisa biloko nyonso na likoló mpe na mabelé na nzela ya “mwango” moko (lolenge moko ya kosalela bozwi). Na nzela na Klisto, Nzambe akosangisa baponami epai na ye mpo bazala na bomoi ya seko na likoló mpe baoyo bakozala na bomoi na mabelé. Lelo oyo, asili kosangisa baklisto bapakolami mpe “ebele monene,” mpe kosangisama ya biloko nyonso bizali na mabelé’ ekolanda kino ete baoyo bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na Yesu mpe bakobima. (Emoniseli 7:9; Yoane 5:28, 29) Tosengeli kozala na botondi, na boyokani na mabondeli na Paulo na kosengáká ete Baefese bamonisa botondi na bango mpo na bibongiseli bizwamaki na Nzambe na ntina na bango.

Abendi mpe likebi na ntina na Bapakano bakómaki baklisto, baoyo bazalaki bakufi kati na lisumu. (2:1 kino 3:21) Na nzela na Klisto, Mibeko milongolamaki mpe moboko motyamaki ete Bayuda mpe Bapakano bazala moko mpe bakóma temple epai Nzambe akofanda na nzela na elimo. Mosala na Paulo ezalaki mpo na koyebisa libombami oyo engebene yango ete Bapakano bakoki kosangana na Klisto, oyo na nzela na ye bazali na likoki ya kobelema na Nzambe na sembo nyonso. Paulo abondelaki lisusu na ntina na Baefese, mbala oyo ezalaki mpe na kosenga na jéhovah ete asalisa bango ete bazala makasi kati na kondima mpe na bolingo.

Makambo napesi min m bomoko

Paulo amonisi ete Nzambe esila kobongisa makambo masengeli kopesa nzela na bomoko. (4:1-16) Ezali bongo nzoto na elimo bobele moko oyo esalami na lisangá na boklisto. Nzoto wana ezali kosala na bomoko na nsé na litambwisi na Klisto. Nzambe asili mpe kobongisa makabo na bato mpo na kosalisa basangani nyonso ya lisangá ete bazala moko kati na kondima.

Jéhovah auti mpe kopesa basaleli na ye makoki ya komonisa bizaleli na boklisto oyo bikopesaka nzela na bomoko. (4:17 kino 6:9) Wana balati “bomoto ya sika,” baklisto baboyi mbindo nyonso, na ndakisa maloba na mbindo. Bazali kotambola na mayele, bazali komonisa limemya epai na Klisto, mpe bazali komonisa botosi oyo babongi.

Lisusu, Nzambe azali kopesa baklisto makoki ya kotemela bilimo mabe oyo bizali koluka kobebisa bomoko na bango. (6:10-24) Ezali molato na etumba ya elimo oyo mapesami na Nzambe nde ezali kobatela bango. Tosalela yango mpe kobondela ntango nyonso, na kotyáká mpe baninga na biso bandimi kati na malombo.

Oyo nde batoli na mayele Paulo apesi na Baefese! Tokoki kolanda yango na koboyáká pité mpe na kotemeláká bilimo na mabe! Tomonisa bozindo ya botondi na biso mpo na bomoko oyo tozali na yango na nzela na Yesu Klisto.

Mbanzi na móto: Molato na etumba ya elimo ezali na ‘nguba na kondima’ ekozimisaka, ekosilisaka nguya na ‘mbanzi na móto’ ya Satana. (Baefese 6:16) Bamoko na mbanzi oyo esalelamaki na Baloma ezalaki motindo na banzete oyo ezalaki mpenza makasi te (roseaux), ezalaki na lidusu, na nsonge na yango, esika moko ezalaki mpo na kotya naphte (motindo na essence mosusu). Bazalaki kobwaka mbanzi yango na litimbo moke mpo na kopengola de móto ezimana (mpe soko basobeli yango mai, móto ekongala lisusu koleka. Kasi basoda bazalaki komibatela na mbanzi na nzela na nguba minene, lolenge moko kondima epai na Jéhovah epesi nzela na basaleli na ye ete “bazimisa mbanzi nyonso na oyo mabe.” Ee, kondima ezali kosalisa biso na kotemela bilimo mabe mpe komekama na kosala mabe, na kozala na motindo na bomoi ya mposa na bozwi ya mosuni mpe na kopesa nzela na bobangi mpe na ntembe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto