Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 1/12 lok. 21
  • Masolo ya basakoli na Bokonzi Bazali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya basakoli na Bokonzi Bazali
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 1/12 lok. 21

Masolo ya basakoli na Bokonzi Bazali

Kosakola nsango malamu ya Bokonzi kino na “nsuka na mokili”

“NSANGO malamu ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli mpo na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” Ezali wana maloba oyo Yesu alobaki na bayekoli na ye mwa ntango moke liboso na kufa na ye. Mpe, nsima na lisekwa na ye, abakisaki ete: “Bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme,na Yudea mobimba mpe na Samaria, mpe kino na nsuka na mokili.” (Matai 24:14; Misala 1:8)Lelo, bisakweli oyo bizali kokokana kati na mikili koleka 200, kati na yango totangi mboka Pérou, na Amerike ya Ngele.

◻ Ba Témoins koleka 32 000 bazali kosakola nsango malamu kati na mboka wana kitoko, mpe, na ntembe te, ndelo ya elanga na bango mpo na mosala ekótisi mpe: molongó ya bangomba ya Andes, oyo bansongé na yango ezali na molai ya bametele koleka 4 000, mpe esobe na molungé mingi oyo ezali ngambo ya ebale Amazone. epai kuna esengeli kokóma bobele na masuwa. Filiale ya mboka Pérou eyebisi makambo malandi:

◻ “Na esobé tozali na ba pionniers spéciaux mwambe baoyo bazali na masuwa mike mibale, mabengami lanchas. Lokola masuwa yango ezali na nguya mingi te mpo na kobeta mai (o,3 metele), bapesaki nzela na ba Témoins oyo bazali kosalela yango mpo na kopalanganisa nsango malamu na bisika oyo bisengeli kokóma bobele na nzela ya bibale mike. Ba Témoins oyo bazali kosalela masuwa yango basili kokabola sikawa bankoto na bazulunalo, mikanda mpe Biblia na ngambo nyonso ya lobwaku ya Amazone.Na nsima,masangá minei masalamaki, mpe bituluku mitano bitangwi mosika, oyo ezali kosakola mpe kosala makita. Tozali kolikya ete bituluku yango mosika te bikokóma masangá.”

◻ Na esobé, engumba moko esalemaki pene na station ya pompe oyo ba tuyaux ezali komema pétrole longwa na esobe kino ngambo epai na Occident na kokatisáká bangomba ya Andes. Bakengeli na ba tuyaux yango bazalaki kokitisa mposa na bango ya masangá na mwa babalá soko 20 oyo ezalaki kati na engumba yango oyo eyebanaki mpenza lokola esika ebongisamaki mpo na milangwa mpe masano. Kasi, nsima wana ba pionniers bapesaki litatoli moko malamu, bato mingi bandimaki nsango ya Bokonzi, mpe sikawa mboka yango etikali bobele na balé minei mpamba! Kala mingi te, bato 189 bayaki kolanda diskur piblike oyo epesamaki na mokengeli ya zongazonga, wana akendeki kotala etuluku yango. Engumba yango, ezali na basakoli 7 mpe bato koleka 45 baoyo bazali kosangana na makita nyonso. Na mapamboli ya Jéhovah, mosika te tokozwa lisangá na esika yango.

◻ Kati na masangá 221 ya Lima, kapitale ya Pérou, elenge mobali moko na mibu 29 akomelaki biso ndenge nini ayebaki solo. Atikaki kelasi wana azalaki na mibu 13, mpe asanganaki na etuluku ya bilenge ya mobulu; abundaki bitumba, amelaki drogue mpe azalaki na bomoi ya mbindo. Nsima na kolekisa mbula mibale na mosala ya soda oyo bakotisaki ye na makasi, azwaki maladi ya motó. Mpe, na 1983, Témoin moko ya bopóló mpe azangi komikumisa, akutanaki na ye wana azalaki kosakola na ndako na ndako. Ezali mbala ya liboso mpo na ye ete ayoka lisolo ya mokili ya sika oyo kati na yango bolingo mpe kimya akoyangela Abandaki koyekola Biblia, mpe na lisalisi ya lisangá litondi na bolingo mpe na makasi oyo Jéhovah apesaki ye, alóngaki kotika misala mabe na ye nyonso.Azwaki batisimo na 1986, mpe azali sikawa mosaleli na misala.

Na bongo, liloba na Yesu oyo engebene yango Bokonzi bokosakolama kino na “nsuka na mokili” ezali kokokisama mpenza na mboka Pérou. Mosala yango mozali kobimisa matomba kitoko mpe, mozali kopesa bolamu epai na ebele na bafandi na mboka, baoyo bazali na nzala mpe na mposa na solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto