Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/1 lok. 29
  • Solo ya Biblia elóngi malako ya mangomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Solo ya Biblia elóngi malako ya mangomba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokati-nsuki abongoli lolenge mabe na ye ya kotalela makambo
  • Azali kosepela na “bolongi elongo na Mwana-Mpate”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/1 lok. 29

Masolo ya basakoli na Bokonzi

Solo ya Biblia elóngi malako ya mangomba

MALAKO ya mangomba makoki mpenza kozwa misisa mozindo. Bamilió na bato bakanisaka ete ezali mabe na kotika lingomba na bango ya liboso. Ezali yango ezalaki makanisi na Saulo, ye oyo na nsima akómaki ntoma Paulo, mpamba te alobaki ete: “Nazalaki na mposa monene mpo na makambo na batata na ngai [koleka mingi na baoyo babotami na ngai elongo].” Ntango ayebaki solo, atikaki losambo ya Bayuda mpe akómaki moklisto. (Bagalatia 1:13-16) Lelo oyo, ebele na bato babandi koyeba ete solo na Biblia euti na liziba moko mozindo koleka malako ya mangomba. Tala motindo nini solo ya Biblia esili kolónga mokili ya ltalie.

Mwasi moko alimboli ete: “Ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi, tokóli kati na libota oyo likangamaki uta kala na mateya ya katolike, mpe tozalaki bandimi ya molende. Nabalaki, nsima nakufelaki mobali mpe bambula mingi nafandaki elongo na bana na ngai. Mwana mwasi ya ndeko na ngai azalaki kolakisa mateya ya katolike, mpe azalaki mbala mingi kotuna mituna epai na sángó, kasi biyano nyonso azwaki bikokisaki mposa na ye te.

“Ntango nazalaki na bopemi na engumba epai nabotami, kuna nakutanaki na ba Témoins de Jéhovah mpe nandimaki kosala boyekoli na Biblia elongo na bango. Baninga oyo nazalaki elongo na bango na katolike bazalaki koseka ngai mpo ete nayekolaki Biblia. Ata bongo, nalembaki te. Ezalaki mbala ya liboso uta nazwaki Biblia ete moto alakisa ngai yango. Ndeko na ngai ya mwasi mpe abongwanaki epai na Jéhovah, mpe nsima na mibu mibale, biso nyonso mibale tozwaki batisimo.

“Na ebandeli nalelaki wana nakabwanaki na Lingomba, mpo ete nazalaki na mawa ya kotika malako oyo makótelaki ngai mpenza uta mibu 76. Kasi sikawa nazali na esengo ya kotambola na banzela na Jéhovah mpe kosala nyonso mpo na kosalisa bato mosusu na kobima longwa na molili ya elimo!”​—Tala 1 Petelo 2:9.

Mokati-nsuki abongoli lolenge mabe na ye ya kotalela makambo

Wana azalaki kokata bakiliya na ye nsuki, mokati-nsuki moko Mojaponé azalaki mingimingi kolobela bilimo mabe mpe ba ovnis (biloko bikopumbwaka likoló nde biyebani mpenza na bato te). Kasi nsima na koyekola Biblia, ayei koyeba ete ezalaki mpenza likamá. Abengaki bakiliya na ye ete basangana na boyekoli na ye. Azalaki kopesa litatoli na ntina na kozalisama epai na bilenge bakiliya na ye. Baposo nyonso, azalaki kosenga epai na Témoin oyo azalaki koyekola elongo na ye ete asombela ye ba Biblia mpe mikanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis, oyo azalaki kokabola nsima epai na bakiliya na ye.

Na boumeli ya mbula na ye ya yambo ya boyekoli, naino akómaki Témoin te, akabolaki ba Biblia koleka 30 mpe ebele na mikanda Bomoi ya seko. Bato koleka 25 babandaki boyekoli na Biblia mpo na litatoli ya libaku malamu oyo apesaki. Mbala mosusu, bato soko zomi bazalaki kosangana na boyekoli na ye ya Biblia. Bato nsambo oyo apesaki litatoli wana azalaki kokata bango nsuki, babongolaki lolenge na bango ya kotalela makambo mpe bakómaki ba Témoins de Jéhovah.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto