Tomilengela mpo na mokolo ya Jéhovah!
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya liboso epai na Batesaloniki
MOKOLO na Jéhovah! Baklisto ya engumba Tesaloniki ya kala bakanisaki ete ebelemaki mpenza. Basosolaki nde malamu? Mokolo yango mosengelaki koya ntango nini? Wana ezali moko na makambo na ntina oyo ntoma Paulo akomaki kati na mokanda na ye ya liboso epai na Batesaloniki, mokanda oyo akomelaki bango longwa na Kolinti pene na mobu 50 ya ntango na biso.
Ezalaki Paulo na Sila nde basalaki lisangá ya Tesaloniki, engumba epai mokonzi na Roma ya etuka Makedonia azalaki kofanda. (Misala 17:1-4) Na nsima, kati na mokanda na ye ya liboso epai na Batesaloniki, Paulo akumisaki bango, akebisaki bango mpe alobelaki mokolo ya Jéhovah. Mpo ete mokolo na Jéhovah mobelemi mpenza sikawa, tokoki biso mpe kozwa litomba na botangi ya mokanda yango.
Longónya mpe bilendiseli
Paulo abandi mokanda na ye na kopesa longonya epai na Batesaloniki. (1 Bates. 1:1-10) Babongaki mpenza na kozwa longonya mpo ete bazalaki kokokisa mosala na bosembo mpe na mpiko. Lisusu, “bayambaki liloba kati na bolózi mingi, na esengo mpo na elimo santu.” Ozali nde komekola Paulo na kopesaka lokumu epai na bamosusu.
Ntoma asili kotika ndakisa malamu. (2:1-12) Ata nsima na kotyolama na Filipi, ‘azwaki molende, na lisalisi na Nzambe ete ayebisa nsango malamu’ epai na Batesaloniki. Asalelaki maloba ya koletaleta te to na bilulela te, mpe alukaki lokumu te. Paulo azalaki bozito likoló na moto moko te, kasi azalaki moto na bopóló elongo na bango, lokola ekosalaka mama epai na bana na ye oyo azali koleisa. Oyo nde ndakisa kitoko mpo na bankulutu na mikolo na biso ya nsuka!
Paulo alandaki kolendisa Batesaloniki na kotelema ngwi atako minyoko. (2:13 kino 3:13) Banyokwamaki epai na bato ya ekólo na bango, kasi Timote akomelaki Paulo manso mazalaki koleka na koyebisáká etelemelo na bango na elimo. Ntoma abondelaki mpo ete Batesaloniki batonda na kondima mpe ete mitema na bango milendisama. Na eleko na biso, ba Témoins de Jéhovah bakobondelaka motindo moko mpo na baninga na bango baoyo bazali konyokwama; bakolendisaka bango na lolenge ekoki mpe bakosepelaka wana bakoyokaka nsango ya bosembo na bango.
Bolanda kosenzela na elimo
Sikawa Batesaloniki bazwi mwa batoli. (4:1-18) Basengelaki komonisa mpenza etamboli ekosepelisaka Nzambe, komonisa mingi mpenza bolingo epai na bandeko mpe kosala na maboko na bango ete bakokisa bamposa na bango. Na epai mosusu, basengelaki kobɔndisana bamoko na bamosusu na elikya ezalaki na bango ete, wana Yesu akoya, baklisto babótámi na elimo baoyo bakufaki basengelaki kosekwa liboso mpo na kosangana elongo na Klisto. Na nsima, wana ekokufa basangani bapakolami baoyo bakozala naino na bomoi, bango mpe basengelaki kosekwa mpo na kosangana elongo na Klisto mpe baklisto mosusu bapakolami oyo basilaki kosekwa mpo na bomoi na likoló.
Paulo alobeli lisusu mokolo na Jéhovah mpe apesi mwa batoli mosusu. (5:1-28) Mokolo na Jéhovah mokoya elongo na libebi ya pwasa, lokola moyibi nsima wana bato bakoloba: “Kimya, makambo mazali te!” Batesaloniki basengelaki bongo kolanda kokengela na elimo mpe komibatela na lisalisi na ebólo na ntolo makasi na kondima mpe na bolingo, kolataka ekoli ya elikya na lobiko. Esengelaki na bango komemya baoyo bazalaki kokamba lisangá mpe komibatela na mabe, makambo oyo masengami mpe na biso lokola.
Mokanda ya liboso ya Paulo epai na Batesaloniki mosengeli kopusa biso na kopesa longonya mpe kolendisa baninga na biso kati na kondima. Mosengeli lisusu kopusa biso na kozala na etamboli malamu mpe kozala na ezaleli malamu. Lisusu, batoli oyo ezali kati na mokanda yango ekoki kobongisa biso mpo na mokolo na Jéhovah.
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
Ebólo na ntólo mpe ekoti: Mpo na kolobela mingi likoló na likambo ya kosenzela ntango nyonso na elimo, ntoma Paulo akomi ete: “Tomibatelaka awa esili biso kolata ebólo ya ntolo na kondima mpe na bolingo, mpe elikya ya lobiko lokola ekoti.” (1 Batesaloniki 5:8, MN) Ebólo ya ntólo ezali eteni mosusu ya molato ya mobundi etumba oyo ezali kobatela ntólo na ye. Esalemaki na mpese ya bibende ya palata to ya manzanza. Bobele bongo, ebólo ya ntólo na kondima ezali kobatela biso na elimo. Mpe tokoloba boni mpo na bikoti na eleko na biso? Bikoti na bibende bisalemaki mpo na basoda na mokano ete, ebatela mobundi na boumeli ya etumba. Lokola ekoti ekobatelaka motó ya mobundi, bobele bongo elikya na lobiko ekobatelaka makanisi ya moklisto mpe ekopesaka ye nzela ete atikala sembo. Ezali na ntina mpo na libota na Jéhovah ete balata molato wana ya elimo.—Baefese 6:11-17.