Losambo na boklisto eleki motuya
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda epai na Baebele
NA Kotindáká Mwana na ye Yesu Klisto awa na mabelé, Jéhovah Nzambe abandisaki lolenge na losambo lotómbwami. Yesu, Mobandisi ya boklisto atómbwami likoló na baanzelu mpe likoló na mosakoli Moïse mpe, na yango, bonganga na ye botómbwani koleka oyo na Balevi na Yisraele ya kala. Yesu asili mpe kopesa mbeka oyo etómbwani koleka bambeka ya nyama oyo ezalaki kosalema na nsé na Mibeko ya Moïse.
Makanisi oyo mamonisami kati na mokanda epai na Baebele. Emonani ete, ezali ntoma Paulo nde atindaki yango epai na baklisto Baebele ya mokili na Yuda pene na mobu 61, wana azalaki na Rome. Uta ebandeli ya boklisto, baklisto ya Greke mpe ya Azia bazalaki kotalela Paulo lokola mokomi na mokanda yango, mpe lolenge yango ya kotalela makambo elendisami na oyo makomi mazali komonisa na ntina na mokomi: boyebi monene ya Makomami na hébreu mpe makanisi mapesami na lolenge malamu, nyonso mibale ezali bizaleli ya ntoma. Mbala mosusu asepelaki kobómba nkombo na ye na ntina na bilobaloba to makanisi mabe oyo Bayuda bazalaki na yango epai na ye, mpe lisusu mpo ete abengamaki “ntoma epai na Bapakano.” (Baloma 11:13) Totalela malamu mpenza lolenge oyo ntoma akomonisa kotómbwama ya boklisto kati na mokanda epai na Baebele.
Klisto atómbwami koleka baanzelu mpe koleka Moïse
Ntoma abandi sikawa komonisa ete Mwana na Nzambe azali na etelemelo etombwami. (1:1 kino 3:6) Baanzelu bazali kokumisa ye mpe boyangeli na ye bondimami na Nzambe. Tosengeli bongo kotya likebi monene mpo na oyo Mwana alobaki. Tosengeli lisusu komikundola ete, ata soko moto Yesu azalaki na nsé na baanzelu, sikawa asili kotombwama likoló na bango mpe apesameli bokonzi likoló na mabelé makofandama na bato na mikolo mizali koya.
Yesu Klisto atómbwani likoló koleka Moïse. Na ndimbola nini? Ya solo, Moïse azalaki bobele mosali kati na lisangá na Yisraele, ndako na Nzambe. Na kokesena, Jéhovah asili kotya Yesu likoló na ndako oyo esalemi na lisangá ya libota na Nzambe.
Baklisto bakoti kati na bopemi na Nzambe
Ntoma alimboli lisusu ete likoki ezali mpo na kokóta kati na bopemi na Nzambe. (3:7 kino 4:13) Bayisraele oyo basikolamaki na boombo ya Ezipito bakokaki te kokóta na bopemi na Nzambe na ntina na kozanga botosi mpe kozanga kondima. Na kokesena, biso tozali na likoki ya kokóta kati na yango na kozaláká na kondima epai na Nzambe mpe na kotamboláká na botosi na kolanda matambe na Klisto. Na esika ete kotalela mokolo na sabata ya poso na poso, biso tozali bongo na esengo eleki monene ya kopema mokolo na mokolo mpo na misala na moimi.
Elikya ya kokóta kati na bopemi yango ezali moko na bilaká oyo bizali kati na Liloba na Nzambe, Liloba oyo “lizali na mopotú koleka mopanga oyo mopelisami ngambo mibale, mpe mokotobola kino kokabola molimo na elimo.” (MN). Ekosalaka bongo na kokótáká kino kososola mikano mpe bizaleli ya elimo, na kokabolaka bamposa ya makanisi na mosuni. (Tala Baloma 7:25.) Soki “molimo,” to bomoi lokola moto, esangani na “elimo” (to makanisi) na kobanga Nzambe, tokoki bongo kokóta kati na bopemi na Nzambe.
Bonganga mpe kondimana ya sika
Ntoma Paulo amonisi sikawa kotómbwama ya bonganga ya Klisto mpe ya kondimana ya sika. (4:14 kino 10:31) Mpo ete amekamaki lokola biso na makambo nyonso kozanga ete asala lisumu, Yesu azali na mawa mpo na bato ya masumu. Lisusu, Nzambe asili kotya ye “nganga libela, kobila molongó na Melikisedeke.” Na kokesena na banganga minene ya libota na Levi, Yesu azali na bomoi bokobebisama te mpe azali bongo na mposa ya mokitani te kati na mosala ya kopesa bato lobiko. Akopesa mbeka ya banyama te mpamba te, asilaki kopesa nzoto na ye ezangi lisumu, mbeka oyo eleki mpenza na motuya, mpe asili koingela na likoló mpo na kolakisa motuya ya makila na ye.
Kondimana ya sika oyo ezwi motuya mingi na nzela ya makila na Yesu, eleki kondimana ya Mibeko. Baoyo basili kokóta kati na kondimana wana bazali na mibeko na Nzambe mikomami kati na mitema na bango, mpe basili kolimbisa’ ma na masumu na bango. (Yilimia 31:31-34) Na botondi, bazali koyambola elikya na bango mpe bazali kosangana elongo na baninga na bango kati na kondima. Na kokesena, bato oyo bazali kosala masumu na nko, bazali soko na mbeka moko te mpo na masumu na bango.
Kondima ezali na ntina mingi
Kondima ezali na ntina mingi mpo na kozwa matomba ya kondimana yango eleki na motuya. (10:32 kino 12:29) Mpo na kosangola makambo oyo Jéhovah asili kolaka yango, esengeli lisusu koyika mpiko. Tolendisami na koyika mpiko na ndakisa ya “lipata monene ya batatoli” ya kala oyo ezali kozinga biso. Esengeli kotalela mingi mpenza etamboli na Yesu oyo ezangi efundeli atako mpasi oyo ayikelaki yango mpiko. Tokoki bongo kotalela mpasi nyonso oyo Nzambe azali kopesa nzela lokola toli to kobongisama ekoki kobota mbuma ya kimya, oyo ete boyengebene. Mpo ete bilaka na Jéhovah bibongi na kondima, tosengeli kozwa ekateli makasi mpo na kokokisa mosala ya bulee mpo na ye, “na nsomo mpe na bobangi.”
Paulo asukisi mokanda na ye na bilendiseli (13:1-25) Epai na biso, kondima esengeli kobota bolingo mpo na bandeko mpe boyambi na bapaya. Esengeli kopusa biso na kobanza mpo na baninga na biso oyo bazali na mpasi, na komemya libala mpe na ‘kosepela na oyo ezali na biso.’ Tosengisami na komekola kondima ya baoyo bazali kokamba lisangá mpe kotósa bango. Lisusu, tosengeli komibatela longwa na lipengwi, tosengeli komema nsoni oyo Yesu amemaki, ‘kotombwela Nzambe mbeka ya masanzoli ntango nyonso’ mpe kolanda kosala malamu. Masengami na etamboli wana ezali mpe eteni mosusu ya lolenge na losambo lotómbwami, oyo ete boklisto ya solo.
[Etanda/Elilingi na lokasa 24]
Batisimo ya ndenge na ndenge: Lolenge na losambo oyo lozalaki na ngala na mongombo na Yisraele, etalelaki “bobele makambo na biloko na kolya, biloko na komela mpe batisimo ya ndenge na ndenge.” (Baebele 9:9, 10, MN) Batisimo oyo elobelami awa ezalaki bisakweli ya milulu oyo bisengisamaki na Mibeko na Moïse. Mbeki oyo ekómaki mbindo, esengelaki kosukolama, mpe mpo ete moto apetolama na molulu, moto yango asengelaki kosukola bilamba na ye mpe kosukola nzoto na ye. (Levitike 11:32; 14:8, 9; 15:5) Banganga basengelaki komisukola kati na mai mpe biloko oyo bisalelamaki mpo na etumbelo bizalaki kosukolama peto kati na mai. (Exode 29:4; 30:17-21; Levitike 1:13; 2 Ntango 4:6) Kasi “batisimo ya kopo, ya mbeki, mpe ya basani,” molulu oyo mouti na mibeko ya Bayuda mpe molandaki kosalema na ntango na Yesu, etangami te kati na “batisimo ndenge na ndenge” oyo Paulo alobeli awa. Mokapo ya Baebele 9:10 molobeli te batisimo oyo esalemaki na Yoane mobatisi, elobeli mpe te batisimo na baklisto oyo ezali elembo ya kopesa bomoto na yo epai na Nzambe.—Matai 28:19, 20; Malako 7:4; Luka 3:3.