Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Akundami mokolo ya mitano, alimwe mokolo ya eyenga
APRÈS-MIDI ya Vendredi ekómi na nsuka na yango. Mosika te, le 15 Nisan, mokolo ya sabata molingi kobanda wana moi mokolála. Nzoto na Yesu ekakisami likoló na nzete nzokande asilaki kokufa, kasi basali mibale na mabe, baoyo bazali ngambo na ngambo na ye, bazali naino na bomoi Après-midi ya Vendredi ebéngami Ebongiseli, mpo, ete Bayuda bazali kobongisa bilei na bango mpe bazali koluka kosilisa misala nyonso oyo mikoki kotanela ntongo te.
Sabata oyo elingi mosika te kobanda, ekokani na Sabata mosusu te (elingi koloba mokolo ya nsambo ya poso), ezali lisusu sabata mibale, to sabata “monene.” Le 15 Nisan oyo ebéngami bongo mpo ete,lokola ezali mokolo ya liboso kati na mikolo nsambo ya elambo na Mampa mazangi mfulu (mpe ezali bobele sabata, ata soko ekozala mokolo nini ya poso), ekwei mokolo moko na sabata ya poso na poso.
Mobeko na Nzambe elobi ete nzoto ya moto esengeli te kolekisa butu mobimba likoló na nzete. Bayuda basɛngi na Pilato ete abuka makolo ya bato oyo bakakisami na nzete mpo ete bakufa noki. Basoda babuki bongo makolo ya basali mabe mibale, kasi batiki makolo na Yesu, oyo amonani mpenza ete asili kokufa. Yango ekokisi maloba ya Makomami oyo ete: “Ata mokwa moko na ye ekobukana te.”
Kasi, mpo na koyeba ete Yesu akufi mpenza, moko na basoda atoboli ye likongá na mpanzi. Likongá likóti kino na motema, mpe makila na mai mabimi. Ntoma Yoane, ye oyo azali komona makambo wana, akoyebisa nsima ete yango ezali kokokisa liloba mosusu ya Makomami oyo elobi ete: “Bakotala epai na Ye oyo bango basili kotobola.”
Yosefe, moto ya engumba Arimaté, mosangani ya lokumu na Sanedrina, azali mpe na esika wana ya koboma. Aboyaki kondima likambo ya bokesene oyo esambiselo monene ekataki na ntina na Yesu. Tokoki koloba mpenza ete Yosefe azali moko na bayekoli na ye, atako abangaki komimonisa polele liboso na bato. Kasi sikawa, akóti na mpiko nyonso epai na Pilato mpo na kosenga nzoto na Yesu. Pilato abengi naino mokonzi na basoda mpo na koyeba soki Yesu akufi solo mpenza, mpe nsima apesi nzoto na Yesu epai na Yosefe.
Yosefe azwi ye, mpe abongisi ye mpo na bokundami na kolingáká ye molikani. Azwi lisalisi ya Nikodeme, oyo azali mpe mosangani mosusu ya Sanedrina. Ye amonisaki kondima na ye te, noki te akolongolama na etelemelo na ye. Amemi myrrhe mpe aloès, malasi ya motuya mingi, oyo ezalaki pene na ntalo ya livres ya Baloma mokámá, oyo ezali pene na bakilo 33. Nzoto na Yesu elingami na bilamba oyo bityami malasi, lokola ezali momeseno ya Bayuda mpo na kokunda moto.
Na nsima, bakei kotya nzoto na liyita ya sika oyo bakundi naino moto wana te, ezali liyita na Yosefe oyo lisalami na mabangá kati na elanga ezali zingazinga na esika yango. Mpo na kosilisa, bapusaki libangá monene kino monoko na liyita. Mpo ete nzoto ekundama liboso ete mokolo na sabata ebanda, esengelaki kobongisa yango na lombángo. Marie Madeleine mpe Marie, mama na Yakobo moke, baoyo bazali mbala mosusu kobongisa nzoto yango, bakei nokinoki epai na bango mpo na kozwa malasi mpe mafuta mosusu mpo na kobakisa. Bazali na likanisi ya kozonga nsima na sabata mpo na kobongisa nzoto, ete eumela ntango molai kozanga kopola.
Lobi lolandi, Samedi, mokolo ya sabata, banganga minene mpe Bafalisai bakei epai na Pilato mpe balobi na ye ete: “Nkolo, tomikundoli ete mokosi yango alobaki naino azalaki na bomoi ete: ‘Nakosekwa nsima na mikolo misato.’ Na yango, tinda bato bakengele liyita kino mokolo ya misato, noki bayekoli na ye bakoyiba ye mpe koloba epai na bato ete: ‘Asili kosekwa kati na bakufi!’ Boye bokosi na nsuka ekoleka oyo na liboso.”
Pilato azongisi ete: “Bozali na bakengeli. Bokende kokengele yango lokola elingi bino moko kosala yango.” Bongo, banganga minene mpe Bafalisai bakei mpe batye elembo na liyita, na kozipaka yango na libanga’ mpe na kotyáká bakengeli Baloma.
Na ntongo mpenza, na mokolo na eyenga, Marie Madeleine mpe Marie, mama na Yakobo, elongo na Salomé, na Yoana, mpe basi mosusu bamemi malasi mabongisami mpo na kopakola na nzoto na Yesu. Na nzela, bakómi kolobana ete: “Nani akolongwela biso libangà na monoko na liyita?” Kasi ekómi bango na liyita, bamoni ete koningana na mabelé esalamaki mpe libangá lilongolamaki na anzelu na Jéhovah. Bakengeli basili kokende mpe liyita litikali mpamba! Matai 27:57 kino 28:2; Malako 15:42 kino 16:4; Luka 23:50 kino 24:3, 10; Yoane 19:31 kino 20:1; 19:14; 12:42; Levitike 23:5-7; Deteronome 21:22, 23; Nzembo 34:20; Zakari 12:10, MN.
◆ Mpona nini Vendredi ebéngami Ebongiseli, mpe sabata “monene” elimboli nini?
◆ Maloba nini ya Makomami makokisami na ntina na Yesu?
◆ Mosala nini Yosefe mpe Nikodeme basali mpona kokunda Yesu, mpe elokonini ekangisi bangona Yesu?
◆ Likambonini banganga bakei kosenga epai na Pilato, mpe bazwi eyanonini?
◆ Likambonini lisalemi na ntongoya mokolona eyenga?