Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/3 nk. 24-25
  • Yesu azali na bomoi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu azali na bomoi!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Yesu azali na bomoi!
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Lilita etikali mpamba: Yesu azali na bomoi!
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu azali na bomoi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Namoni Nkolo!”
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/3 nk. 24-25

Yesu, bomoi na ye,mpe misala na ye

Yesu azali na bomoi!

KOMONÁKÁ ete liyita na Yesu litikali mpamba, Marie Madeleine akimi mbango mpo na koyebisa yango epai na Petelo mpe Yoane. Kasi emonani lokola ete basi mosusu bafandi pene na liyita. Nsima mwa moke, anzelu moko abimi mpe abéngi bango ete baingela kati na yango.

Na kati, basi bamoni anzelu mosusu, mpe moko na bango mibale alobi na bango ete: “Bobanga te, mpamba te nayebi ete bozali koluka Yesu oyo abomamaki na nzete. Azali awa te, mpo ete asili kosekwa lokola elobaki ye. Yaka kolala esika elalaki ye.” Bongo, na bobangi mpe na esengo monene, basi yango bakimi mbango lokola.

Bobele na ntango wana, Marie akuti Petelo na Yoane mpe alobi na bango ete: “Basili kolongola Nkolo na liyita mpe toyebi te soko batii ye wapi.” Nokinoki, bantoma wana mibale bakei na lombango. Yoane oyo azali na mbango mingi​—na ntembe te mpo azali elenge​—akómi liboso na liyita, wana basi yango basilaki kolongwa na esika yango; moto te azali na zingazinga wana. Kokótisáká motó kati na liyita, Yoane atali na kati mpe amoni bilamba, kasi atikali bobele na libándá

Petelo, ye oyo auti kokóma, akóti kozanga kokakatana. Amoni bilamba bilali wana, mpe elamba oyo balingaki motó na Yesu, elingámi na esika mosusu. Sikawa, Yoane mpe akóti kati na liyita, mpe andimi oyo Marie alobaki. Kasi ezala Petelo to Yoane, moko te asosoli ete Yesu asekwi, atako ayebisaki bango mbala na mbala ete yango esengelaki kokómela ye. Komitungisáká, mibali yango mibale bazongi epai na bango, mpe batiki Marie oyo azongi lisusu na liyita.

Nsima ya mwa ntango, basi mosusu bakei na lombángo mpenza mpo na koyebisa bayekoli ete Yesu asili kosekwa, lokola baanzelu batindaki bango. Wana ezali bango kopota mbango, Yesu azwani na bango mpe alobi na bango ete: “Mbote na bino!” Kokweáká na makolo na ye, bakumisi ye. Mpe Yesu alobi na bango ete: “Bobanga te! Bokenda koyebisa bandeko na ngai ete bakenda na Galilai; mpe bakomona ngai kuna.”

Mwa liboso, na ntango mabelé maninganaki mpe ntango baanzelu babimaki, basoda oyo bazalaki kokengela babangaki makasi mpenza mpe bakómaki lokola bakufi. Ntango bobángi bosilaki, bakendaki na engumba mpe bayebisaki epai na banganga minene makambo manso malekaki. Nsima wana “mikoló” na Bayuda basalaki likita, ekateli moko ekamatami: esengeli kobómba likambo yango na kopesáká basoda misolo. Bapesi bango etinda oyo: “Boloba ete: ‘Bayekoli na ye bayei koyiba ye na butu wana ezalaki biso kolala.’”

Kasi, lokola basoda Baloma bakokaki kozwa etumbu ya liwa mpo ete balalaki na esika na kokengela, banganga balaki bango ete: “Soki likambo oyo [ete bolalaki mpongi] ekokóma na matoi na guvernere, biso tokokótela bino mpe bokozwa mpasi te.” Lokola kanyáka yango ezali mosolo mingi, basoda balandi malako wana. Mpe nsango oyo na lokuta ete bayibi nzoto na Yesu, epalangani mingi mpenza epai na Bayuda.

Marie Madeleine oyo atikali na liyita, alembi. Yesu akoki mpenza kozala wapi? Afukami liboso mpo na kolala kati na liyita, mpe amoni baanzelu mibale balati bilamba mpembe, babimi lisusu! Moko afandi na motó mpe mosusu na makolo esika nzoto na Yesu elalaki. Balobi na ye ete, “Mwasi, ozali kolela mpo na nini?” Marie azongisi ete, “Balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soko batii ye wapi.” Nsima abongwani mpe amoni moto mosusu oyo atuni ye bobele motuna yango, ete: “Mwasi, ozali kolela nini?” Kasi moto wana abakisi ete: “Ozali koluka nani?”

Kokanisáká ete azali liboso na mobateli na elanga oyo liyita lizali kati na yango, alobi na ye ete: “Nkolo, soko osili kolongola ye, yebisa ngai esika otii ye mpe nakomema ye.”

Bongo, moto wana abengi ye ete, “Marie!” Nokinoki, mpo na motindo oyo ameseni koloba na ye, asosoli ete ezali Yesu, mpe ayanoli ye ete ’‘Rabbouni!”(oyo elimboli “Moteyi!”) Na esengo eleki ndelo, ayambi ye. Kasi Yesu alobi na ye ete: “Kosimba ngai te. Mpamba te naino nabuti epai na Tata te. Nde kende epai na bandeko na ngai mpe loba na bango ete: ‘Nazali kobuta epai na Tata na ngai mpe Tata na bino, epai na Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.’”

Tala sikawa Marie azali kokima mbango epai kuna bantoma mpe bayekoli bayangani. Abakisi litatoli na ye likoló na oyo basi mosusu bapesaki, ete bamonaki Yesu asekwi. Atako bongo, lokola bandimaki basi mosusu te, emonani ete mibali yango bandimi mpe Marie te. Matai 28:3-15; Malako 16:5-8; Luka 24:4-12; Yoane 20:2-18.

◆ Marie Madeleine asali nini, nsima wana bakuti ete liyita lizali mpamba, mpe nini ekómeli basi mosusu?

◆ Petelo mpe Yoane basali nini wana bakuti ete liyita lizali mpamba?

◆ Basi mosusu bakutani na nani wana ezali bango kokende koyebisa bayekoli ete Yesu asekwi?

◆ Nini ekómeli basoda oyo bazalaki kokengela liyita, mpe banganga basalaki nini wana basoda bakendaki koyebisa bango?

◆ Nini esalemi wana Marie Madeleine azali bobele ye moko, mpe bayekoli basali nini wana basi bayebisi bango makambo bamonaki?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto