Ndimbola ya makambo na ntina
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya liboso ya Petelo
KONDIMA ya ba Témoins de jéhovah ekozwaka mimekamo ndenge na ndenge. Na mikili misusu, mosala ya kosakola mozali kosalema atako monyoko makasi ezali. Satan le Diable nde azali nsima na milende nyonso mizali kosalema mpo na kobebisa boyokani ya baklisto elongo na jéhovah. Kasi akolónga te, mpo ete jéhovah azali kolendisa basaleli na ye, ee, azali koyeisa bango makasi kati na kondima.
Ntoma Petelo azwaki mosala kitoko ya ‘kolendisa bandeko na ye’ baoyo’ bazalaki konyokwama na mimekamo ndenge na ndenge.‘ (Luka 22:32; 1 Petelo 1:6, 7) Ezali yango nde asalaki na nzela ya mokanda na ye ya liboso, oyo akomaki yango na Babilone pene na mibu 62-64. Kati na mokanda yango, Petelo apesi toli, abondisi mpe ayikisi baklisto Bayuda mpiko mpe Bapakano lokola; asalisi bango ete batemela mayele mabe na Satana mpe bazala “makasi kati na kondima.” (1 Petelo 1:1, 2; 5:8, 9) lokola ntango oyo etikali mpo na Diable ekómi mokuse mpenza, akómi kobundisa biso makasi koleka. Libota na Jéhovah likozwa litomba na maloba oyo apemisaki epai na Petelo.
Etamboli ezwi moboko likoló na mitinda na nzambe
Ata soko elikya na biso ezali mpo na kozala na bomoi na likoló to na mabelé, yango esengeli kosalisa biso na koyika mpiko na mimekamo mpe kosala na lolenge ya moto oyo azali kobanga Nzambe. (1:1 kino 2:12) Elikya ya kosangola libula na likoló ezali komema bapakolami na kozala na esengo kati na mimekamo, mpamba te, yango ezali kobongisa kondima na bango. Kosaláká ndako na elimo oyo etongami likoló na Klisto lokola moboko, bazali kopesa mbeka kitoko na elimo epai na Nzambe mpe bazali kokumisa ye na etamboli malamu.
lolenge na biso ya komitambwisa liboso na bazalani na biso esengeli koyangelama na mitinda na Nzambe. (2:13 kino 3:12) Petelo alimboli ete tosengeli kotósa bakonzi ya mokili. Basali basengeli kotósa bankóló na bango mpe basi basengeli kotósa mibali na bango. Etamboli kitoko ya moklisto mwasi ekoki kosala ete amema kati na kondima na solo, mobali na ye oyo azali mondimi te. Mobali oyo azali mondimi, mpo na ye, ’akopesa lokumu epai na mwasi na ye lokola mbeki na motau.’ Baklisto banso ba sengeli koyeba komitya na esika ya bato mosusu, kozala na bolingo epai na bandeko, kosala makambo malamu mpe kolanda kozala na kimya.
Koyika mpiko ekopesaka mapamboli
Baklisto ya solo baoyo bazali koyika mpiko na sembo nyoso kati na mpasi, bakozwa mapamboli mpo na yango. (3:13 kino 4:19) Soko tokooka mpasi mpo na boyengebene, tosengeli bongo kozala na esengo. Lisusu, mpo ete Klisto asili konyokwama kati na nzoto mpo na komema biso epai na Nzambe, biso tosengeli lisusu te kobika engebene bamposa ya nzoto na biso. Soko tokoyika mpiko na mimekamo na bosembo nyonso, tokosangana na esengo na komonana na Yesu. Soko bakotuka biso mpo na nkombo na Klisto, elingi koloba mpo ete tozali bayekoli na ye, tozali mpenza na bantina ya kozala na esengo, mpamba te yango ezali komonisa ete tozali na elimo na jéhovah. Wana ezali biso konyokwama engebene mokano na Nzambe, totya motema epai na ye mpe tolanda kosala malamu.
Biso baklisto, tosengeli kokokisa mikumba na biso na bosembo nyonso mpe tosengeli komikitisa na nsé na loboko na nguya na Nzambe. (5:1 kino 14) Tozali komizela ete bankulutu babatela etonga na Nzambe na mposa malamu, mpe biso banso tosengeli kokitisa mitungisi na biso likoló na Jéhovah, wana eyebi biso ete akosalisa biso. Ezali na ntina mpenza ete totemela Diable kozanga ete tolemba na motema, koyebáká ete mpasi yango moko ezali kobimela bandeko na biso lokola. Tomikundolaka ntango nyonso ete Jéhovah akolendisa biso mpe akokembisa biso ete tozala makasi kati na kondima.
[Etanda/Elilingi na lokasa 30]
Kitoko ya mwasi: Kati na batoli na ye oyo apesaki epai na baklisto basi, Petelo alobi ete: ’’Tika ete kitoko na bino ezala kitoko ya libándá te, oyo na kotongatonga nsuki mpe na komizingela biloko na wolo, soko na kolata bilamba kitoko. Kasi tika kitoko na bino ezala eloko ebombani na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na elimo ya bopóló mpe na kimya; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe.’’ (1 Petelo 3:3, 4) Na ekeke ya liboso epai na Bapakano, basi bazalaki koluka bitongeli ya nsuki ya ntalo, nsuki etongami na lolenge na kobenda likebi ya bato mpe komizingela biloko na wolo na nsuki yango etongami. Ntembe ezali te ete mpo na mingi, yango ezalaki mwango ya kobenda likebi ya bato, likambo oyo libongi te mpo na mwasi moklisto. (1 Timoté 2:9, 10) Kasi yango elimboli te ete mwasi moklisto asengeli kobongisa nzoto na ye te, mpamba te Petelo alobi lisusu na ntina na ‘kolata bilamba, eloko oyo ezali na ntina mpenza. Basaleli na Nzambe na ntango ya kala bazalaki kolata babiju. (Genese 24:53; Exode 3:22; 2 Samwele 1:24; Yilimia 2:32; Luka 15:22) Kasi basi baklisto bakomonisa mayele na kopengoláká kolata biloko bizali kobenda likebi ya bato mpe bilamba bikomonisaka nzoto, bakosenzela lisusu ete bazala na bokatikati malamu mpo na oyo etali kobongisa nzoto, to mpe kosala monzele. Likanisi oyo tosengeli kosimba na toli na ntoma ezali oyo ete, mwasi asengeli liboso komibanzabanza na kitoko oyo ebombami na motema, kasi oyo na libándá te. Mwasi kitoko azali oyo akolataka na bopóló mpe oyo na ezaleli ebongi na moto oyo akobangaka Nzambe.—Masese 31:30; Mika 6:8.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Israel Department of Antiquities and Museums; Israel Museum/David Harris