Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/4 nk. 2-4
  • Kimya na mokili mobimba ezali nde komonana?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kimya na mokili mobimba ezali nde komonana?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bitumba oyo biyebani te
  • Elikya ezali mpo na kimya?
  • Kimya ya solo​—Ekouta wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tokozala nde na kimya mokolo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Nani akokamba bato epai na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/4 nk. 2-4

Kimya na mokili mobimba ezali nde komonana?

MIANGO ya kimya mpe maloba ya ndenge na ndenge esili kobimisama na boumeli na Lisoló na ntina na kimya.Na mawa nyonso, bitumba bibimaki mpo na kosukisa yango. Mpo na oyo etali mayokani mpe maloba ya kimya, bato mingi bazali lisusu kotyela yango motema te.

Kasi, na bambula oyo euti koleka, ebele na bato oyo bakotalaka makambo mazali koleka na mokili mpe bakomi na bazulunalo basili kobanda komona ete eloko moko ezali kosalema. Bamonisi ete mbala oyo likoki ezali mpo na kotya kimya na mokili mobimba, atako mikakatano oyo mizali komonana na bisika mosusu. institut international pour la paix de Stockholm elobaki ete: “Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, elikya ya kosilisa matáta na kimya ezali solo mpenza koleka na ntango na liboso.” Makambo oyo malandanaki na Europe de l’Est, epusaki mopanzi nsango moko wa lokumu na koloba ete: “Kimya na mabelé ezali komonana sikawa koleka na liboso, uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.” Ata zulunalo Bulletin des savants atomistes (angl.) emonisaki mpe makanisi wana. Na 1988, “ntango to montele monene ya kosambisama ya nsuka” oyo ya Bulletin, ezongisamaki moke nsima; elongwaki na minuit moins trois kino minuit moins six, mpe na Avril 1990, ezongisamaki kino na minuit moins dix.

Nyonso wana ebimisaki elikya makasi ya kolónga mpe esengo mingi liboso ete etumba ebima na Moyen-Orient. Yango mpe ezali kopekisa bato mosusu te ete balobela koswana kati na mikili mpe kowelana oyo ezali kati na banguya minene ya mokili, mpo na kosala bibundeli lokola na ntango na kala. Bamoko bazalaki kotanga makambo nyonso oyo makoki kosalema na mosolo oyo biyangeli bakobanda kobómba mpo ete bakitisa mosolo oyo bazali kobimisa mpo na bibundeli. Kimya ya solo etikali moke etyama? Mabota mazali nde koyekola “kotula mipangá na bango ete mizala bitimweli mpe makongá na bango ete mazala bikateli na matiti”? (Yisaya 2:4) Nini ezali komonana?

Bitumba oyo biyebani te

Tokoki kotanga kati na milongó ya zulunalo The Economist ya Londres ete: “Kosila ya koswana kati na mikili mpe bopemi na bitumba oyo euti kosalema kati na Est mpe Ouest, ememi bato mosusu na kokanisa ete kimya ezali kotyama. Eloko moko ezali te. Atako koswana makasi ezali lisusu te na mokili, kasi oyo ya mike ezali mingi.” Koswana yango “mike,” to matáta “mike” ezali nini?

Laboratoire Lentz mpo na bolukiluki ya kimya, lisangá ya bolukiluki ya Etats​—Unis, eyebisaki ete na Septembre 1990, matáta koleka 15 mapesaki mpasi mingi kati na mokili. Kobundisama ya Koweït na lraq etangami te kati na motuya wana, mpo ete oyo etangami awa ezali bobele bitumba oyo bibomi bato koleka nkóto moko na mobu. Bamoko na bitumba yango bizali kolanda kosalema uta mibu 20 to koleka. Esili koboma bato 2900 000 oyo mingi na bango bazali basivile. Kati na motuya oyo, batangi te bitumba mosusu oyo bisopi makila mingi, oyo biuti kosila na mbula eleki, lokola etumba ya Ouganda mpe ya Afghanistan, mpe matata ya lran​—lraq.

Pene na bamilió ya bato babomami kati na mokili oyo molobami ete mozali na kimya! Bobele likambo oyo mpamba ezali mpenza kobangisa. Kasi, oyo eleki na kobangisa ezali ete, mingi na bitumba yango bisalemaki kozanga ete mikili misusu bayeba yango mpenza, mpe ebimiselaki bango ata likámá moke te. Ekoki bongo kobéngama ete bitumba oyo biyebani te, mpo ete mingi kati na yango ezali​—kozwa bokonzi na makasi, bitumba ya banamboka, botomboki​—nyonso wana esalemaki kati na mikili ya bobólá. Mingi na bafandi ya mikili na bozwi, bamitungisaki mpenza te mpo na ndambo na milió ya bato oyo babomamaki na Soudan to mpo na bato koleka 300 000 oyo bakufaki na Angola. Bamosusu bakoloba ete, uta nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato bazali na kimya mingi mpo ete bitumba bizali te kati na mabota oyo na bozwi mingi; atako koswana makasi oyo ezalaki kobima, mpe kobakama ya bibundeli mingi, banguya minene ya mokili babunda naino etumba na polele te.

Elikya ezali mpo na kimya?

Soki kimya elimboli bobele kosila ya matáta ya nikleere na mokili mobimba, bato mosusu bakoki kokanisa ete milende ya mabota mpo na kotya kimya, esili kozwa litomba. Kino lelo, politike oyo ebéngami ete Destruction Mutuelle Assurée esili kopekisa koswana ya banguya minene. Kasi, mpo na yango nde tokoki mpenza kolobela kimya? Ndenge nini tokoki kolobela yango awa bato bazali kobanga mokolo na mokolo mpo na kobomama oyo ekoya pwasa mpe ekosilisa bato nyonso? Tokoki kolobela kimya nzokande na mabelé mobimba, bato bazali komona kobeba ya bomoi na bango, ya myango na bango mpo na kobikela mpe kobeba ya bilikya na bango ya kozala na bomoi malamu, bomoi ya ntina, kati na bitumba mike to ya minene?

Elie Wiesel, oyo azwaki prix Nobel mpo na kimya, akomaki ete: “Uta kala mpenza, bato bazali kolobela kimya kozanga ete bakoka kotya yango. Ezali nde mpo na bozángá ya mayele? Tozali mbala mosusu kolobela kimya, nde tozali kosala bitumba. Ezali mbala mosusu kokómela biso ete tobunda bitumba na nkombo ya kimya. . . . Ntango mosusu ezali bitumba nde bilobelami mingi kati na Lisoló ya bato kino tokoki te kosilisa yango mpo na libela.”

Nkutu kala mingi te, etumba ya Moyen-Orient euti kobebisa makanisi mpamba ya kimya. Ekoki kozala ntango mosusu ete bato bazali koluka kimya na lolenge mabe?

[Elilingi na lokasa 3]

“Mbala mosusu libota ya bafandi na mabelé na mikoló na biso, likomona kotyama monene ya kimya kati ma lisoló ya bomoi na bato’’.​—Maloba ya Mikhail Gorbatchev, prezidá ya Union soviétique, na likita lisalemaki na Mai 1990 na Washington, Etats-Unis

[Eutelo ya bafɔtɔ]

UPI/​bettmannn Newsphotos

[Bililingi na lokasa 4]

“Mokili ya sika ya bonsomi emonani na biso . . . , kati na yango mombongo ekómi na mayele mingi mpe makambo manso oyo bato bazalaki bobele na makanisi mpamba ete makosalema, lelo ekomi solo.”​—Maloba ya George Bush, prezidá ya Etats​—Unis, na likita lisalemaki na Juillet 1990 na Houston, Etats-Unis

[Eutelo ya bafɔtɔ]

UPI/​Upvbettmann Newsphotos

“Bifélo oyo, na boumeli na ntango, bakangisaki mabota mpe makanisi, bizali kokwea. Bato na mikili ya Mpótó bazali kobongisa avenire na bango. Baponi bonsomi. Baponi bonsomi kati na makambo ya nkita. Baponi kimya.”​—Maloba ya O.T.A N., na likita lisalemaki na Juillet 1990 na londres, Angleterre

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover photos U.S. Naval Observatory photo (stars); NASA photo (earth)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto