Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/4 nk. 14-20
  • Tokomekola nde motema mawa na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokomekola nde motema mawa na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Boyengebene na Nzambe bokokisami
  • Boyengebene bosalelami na bokatikati na nzela na motema mawa
  • Azalaki komibanzabanza mpo na oyo ebungaki
  • Likoló esepeli, kasi na likambo nini?
  • Mosala ya kobongola motema mpe motema mawa
  • Yehova—liziba ya bosembo mpe boyengebene ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bómekola Yehova —bómonisa bosembo mpe boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mosika te, mabota nyonso bakozala na boyengebene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Basepelaka ntango mosumuki abongoli motema
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/4 nk. 14-20

Tokomekola nde motema mawa na Nzambe?

“Bongo, bozala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami.”​—BAEFESE 5:1.

1. Mpo na nini moko na moko kati na biso asengeli komituna likoló na lolenge na bato oyo azali komekola?

EZALA mpo na malamu to mpo na mabe, bato mingi balingaka kolanda etamboli ya bato mosusu. Solo mpenza, bato oyo totambolaka na bango mpe baoyo tolingaka komekola, bakoki mpenza kozala na bopusi monene likoló na biso. Mokomi na Masese 13:20, ye oyo apemami, apesaki likebisi oyo ete: ’’Ye oyo akotambola na bato na mayele, akozala na mayele, nde mawa ekoyela moto oyo akotambolaka elongo na bazoba.” Tala ntina oyo Biblia elobeli moko na moko kati na biso na sembo nyonso ete: “Mekola mabe te, kasi oyo malamu. Ye oyo akosala malamu auti na Nzambe.”​—3 Yoane 11, MN.

2, Tosengeli komekola nani, mpe kati na makambo nini?

2 Biblia ezali koyebisa biso bandakisa kitoko ya mibali mpe basi oyo tosengeli komekola. (1 Bakolinti 4:16; 11:1; Bafilipi 3:17) Nzokande, moto oyo tosengeli kokamata lokola elakiseli koleka bato nyonso mosusu, ezali Nzambe. Na Baefese 4:31 kino 5:2, ntoma Paulo alobeli lolenge na bizaleli mpe misala oyo tosengeli kotika, mpe azali kolendisa biso na ‘kozalana na motema mawa mpe na kolimbisana bamoko na bamosusu.’ Asukisi na likebisi oyo na nsuka ete: “Bongo, bozala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami, mpe botambolaka na bolingo.”

3, 4. Jéhovah alobaki nini na ntina na ye moko, mpe mpo na nini tosengeli kokanisa na likambo oyo ete azali Nzambe ya boyengebene?

3 Misala nini na Nzambe mpe bizaleli na ye nini tosengeli komekola? Bomoto na ye bozali na mitindo mingi mpe misala na ye mizali ndenge na ndenge, lokola emonisami na lolenge oyo elobaki na Moĩse, ete: “Jéhovah, Jéhovah, azali Nzambe na mawa mpe na ngolu, akookaka nkandu noki te. Aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto na nkóto, mpe akolimbisaka mabe, mpe kobuka mibeko mpe lisumu; nde akolongolaka etumbu mpo na mabe te, akopesaka etumbu mpo na mabe na batata likoló na bana mpe likoló na libota ya misato.”​—Exode 34:6, 7.

4 Lokola Jéhovah “alingi boyengebene mpe sembo,” esengeli na biso mpenza koyekola mpe komekola ezaleli ya bomoto na ye. (Nzembo 33:5; 37:28) Azali Mozalisi, azali mpe Mosambisi aleki likoló mpe Mokeli na mibeko na bato; akomonisaka boyengebene na ye epai na bato banso. (Yisaya 33:22) Ezali yango nde emonisi polele motindo oyo asengisaki boyengebene mpe motindo oyo asalaki mpo ete esalemaki kati na libota na ye Yisraele, mpe na nsima, kati na lisangá na boklisto.

Boyengebene na Nzambe bokokisami

5, 6. Ndenge nini boyengebene bomonanaki kati na misala na Nzambe epai na Yisraele?

5 Ntango aponaki Yisraele lokola libota, Nzambe atunaki bango soko bamilengelaki mpo na ‘kotósa mpenza monoko na ye mpe kobatela kondimana na ye.’ Eyanganaki bango na ngomba na Sinaĩ, Bayisraele bayanolaki ete: “Tokosala yango nyonso elobi Jéhovah.” (Exode 19:3-8) Oyo nde mokumba monene! Na nzela na baanzelu, Nzambe apesaki soko mibeko 600 epai na Bayisraele. Kosaláká libota oyo emipesi na ye, Bayisraele basengelaki kotósa mibeko yango. Nini ekómelaki baoyo bazalaki kotosa te? Moto moko ayebaki Mibeko na Nzambe akundolaki yango na maloba oyo ete: ’‘Liloba lisakolamaki na baanzelu libongaki, mpe . . . lisumu nyonso mpe kozanga kotósa ezwaki etumbu eyokani na boyengebene.”​—Baebele 2:2, MN.

6 Ee, Moyisraele oyo azangaki botósi, amikabaki mpo na kozwa “etumbu eyokani na boyengebene”; ezali boyengebene ya bato bazangi kokoka te, kasi boyengebene ya Mozalisi na biso. Nzambe akataki bitumbu bikeseni mpo na baoyo bazalaki kobuka Mibeko, etumbu elekaki mpasi ezalaki oyo ya ‘kolongolama’ to kobomama. Etumbu oyo ezalaki kopesama mpo na kobuka mibeko minene, lokolo kosambela bikeko, ekóbo, kosangana elongo na ndeko moko ya penepene, kosangana elongo na nyama, kosangana mibali na mibali to mpe basi na basi, kopesa bana lokola mbeka, koboma moto mpe lolenge mabe ya kosalela makila (Levitike 17:14; 18:6-17, 21-29) Lisusu, Moyisraele nyonso oyo abukaki mobeko na Nzambe na nko, mpe kozanga komonisa ata elembo moke ya kobongola motema, akokaki kolongolama.’ (Mituya 4:15, 18; 15:30, 31) Bakitani ya mosumuki bakokaki mpe kooka nguya ya boyengebene na Nzambe oyo bozalaki kokokisama.

7. Na kala, kosalelama ya boyengebene na libota na Yisraele, ezakaki kobimisa makambo nini?

7 Bitumbu bizalaki komonisa mabe monene oyo ezalaki na kobuka mobeko na Nzambe. Na ndakisa, Moyisraele oyo mwana na ye ya mobali akómaki molangwi na masanga to molundi, asengelaki komema ye epai na basambisi, bato oyo bakomeli. Soko basambisi bamoni ete moto yango azali kosala mabe na nko mpe azali komonisa motó makasi, esengelaki na baboti ete batya mpe maboko na etumbu ya koboma mwana yango mpo na kokokisa boyengebene. (Deteronome 21:18-21) Baoyo kati na biso bazali na bana, bazali komona ete wana ezalaki likambo moke te. Kasi Nzambe amonaki ntina na yango mpo ete mabe mapalangana te kati na basaleli na ye ya solo. (Ezekiele 33:17-19) Ebongiseli wana etyamaki na Ye oyo ekokaki kolobama na ntina na ye ete: “Nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te; ye moyengebene mpe mosembwi.”​—Deteronome 32:4.

8. Na likambo nini boyengebene emonisaki misala na Nzambe epai na lisangá na boklisto?

8 Bikeke mingi na nsima, Nzambe aboyaki libota na Yisraele mpe aponaki lisangá na boklisto. Kasi, Nzambe abongwani te. Akangami ntango nyonso na boyengebene mpe akoki kobengama “móto ekozikisaka.” (Baebele 12:29; Luka 18:7, 8) Abatelaki ebongiseli oyo ekokaki kopesa nzela na kozala na bobangi ya koboya kosala mabe kati na lisangá mobimba, na kobengánáká baoyo bazalaki na etamboli mabe. Baklisto oyo bazalaki kosala mabe kozanga kooka mawa mpo na yango, basengelaki kobimisama na lisangá

9. Kobimisama na lisangá elimboli nini, mpe ntina na yango ezali nini?

9 Kobimisama ezali mpenza nini? Mpo na yango, tozali na ndakisa moko kati na lolenge oyo likambo moko likatámaki na ekeke ya liboso. Moklisto moko ya Kolinti azalaki kosala pité elongo na mwasi ya tata na ye nde azalaki kooka mawa te mpo na likambo yango; Paulo apesaki etinda ete abimisama na lisangá. Yango ezalaki na ntina mingi mpo na kobatela bopeto ya libota na Nzambe, mpamba te “mfulu moke ekofulisa mampa mobimba.” Epai mosusu, etumbu makasi wana ya kobimisama na lisangá ekokaki komema na kososola mpe kobotisa bobangi ya Nzambe kati na ye, mpe kati na lisangá.​—1 Bakolinti 5:1-13; tala Deteronome 17:2, 12, 13.

10. Basaleli na Nzambe basengeli kosala nini ntango moto moko ebimisami na lisangá?

10 Engebene etinda na Nzambe, soki moto oyo asali mabe abimisami na lisangá, baklisto basengeli te “kosangana na [ye] . . . , Bakolya elongo na moto yango te.”a ‘Alongolami,’ elingi koloba apekisami na kozalana na bolingo elongo na bandeko mpe akosangana lisusu te ata na koyangana moko elongo na baoyo bazali sembo, baoyo bazali kotosa mibeko na Nzambe mpe balingi kotambola na boyokani elongo na yango. Mbala mosusu bamoko na bato yango ya sembo bazali basangani ya libota ya moto oyo abimisami, atako bafandi ndako moko te elongo na ye. Ekoki mbala mosusu kozala mpasi mpo na bato yango ete batosa etinda wana ya Nzambe, lokola ezalaki mpasi mpo na Baebele oyo bazalaki na nsé na mibeko na Moïse, ete basangana na kobomama ya mwana na bango ya mobali oyo asalaki mabe. Ata lolenge nini, etinda na Nzambe ezali polele; tokoki bongo kondimisama ete kobimisa moto na lisangá ezali mwango ya Sembo.​—1 Bakolinti 5:1, 6-8, 11; Tito 3:10, 11; 2 Yoane 9-11; tala Mosenzeli ya 15 Septembre 1988, lokasa 21 kino 24.

11. Ndenge nini bizaleli mingi na bomoto na Nzambe bimonisami kati na likambo litali kobimisama na lisangá?

11 Kasi, tomikundola ete Nzambe azali bobele boyengebene te; azali mpe ye oyo “aleki na boboto, akolimbisaka mabe mpe lisumu.” (Mituya 14:18) Liloba na ye limonisi ete moto oyo abimisami akoki kobongola motema mpe koluka lilimbisi na Nzambe. Nini ekosalema? Bakengeli oyo bameseni mingi na mosala yango bakoki kokutana na ye mpo ete bayeba, na lisalisi ya libondeli mpe na kosalela mayele nyonso, soki moto yango azali komonisa bilembo ya kobongola motema na mabe oyo mpo na yango abimisamaki na lisangá (Tala Misala 26:20.) Soki yango ezali bongo, akoki kozongisama kati na lisangá, lolenge moko na oyo esalemaki mpo na moto oyo alobelami na 2 Bakolinti 2:6-11. Nzokande, bato mosusu oyo basilá kobimisama, bazali lisusu na boyokani te elongo na lisangá na Nzambe; ezali nde na likambo moko ya kosala mpo na kosalisa bango ete bazonga na lisangá?

Boyengebene bosalelami na bokatikati na nzela na motema mawa

12, 13. Mpo na nini tosengeli kosala mingi mpo na komekola Nzambe, na esika ete tomonisa bobele boyengebene na ye?

12 Kino awa, tolobeli mingi mpenza bobele moko na bizaleli na Jéhovah oyo bimonisami na Exode 34:6, 7. Nzokande, ba versets yango elobeli bobele boyengebene na Nzambe te, mpe baoyo balingi komekola Mozalisi na bango, bazali komibanzabanza te bobele mpo na kosalelama na boyengebene. Soki moto alingi kosala elilingi ya tempelo oyo etongamaki na Salomo, akotya likebi na ye bobele na likonzí moko? (1 Mikonzi 7:15-22) Te, soki bongo, akozala na mpasi mpo na kozwa likanisi malamu na ntina na lolenge mpe mosala ya tempelo. Bobele bongo, soki tolingi komekola Nzambe, tosengeli kosala yango na kotaleláká misala na ye mpe bizaleli na ye mosusu, na ndakisa, koyeba ete azali “na mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te. Aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto na nkóto, mpe akolimbisaka mabe.”

13 Lokola tomoni yango na lolenge oyo azalaki kosala epai na Yisraele, mawa mpe mposa ya kolimbisa ezali bizaleli ya ntina mingi na Nzambe. Nzambe ya boyengebene azalaki kolongola te etumbu esengelaki na basaleli na ye mpo na mabe oyo bazalaki kozongela mbala na mbala; nzokande, amoniselaki bango mawa monene mpe alimbisaki bango. “Ayebisaki banzela na ye epai na Moĩse, mpe misala na ye epai na bana na Yisraele. Jéhovah azali na mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te mpe atondi na boboto. Mpamela na ye ekoumela te, mpe akobatelaka nkanda na ye kino seko te.” (Nzembo 103:7-9; 106:43-46) Misala oyo Nzambe asili kokokisa na boumeli ya bikeke, mizali kondimisa maloba oyo.​—Nzembo 86:15; 145:8, 9; Mika 7:18, 19.

14. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki komekola motema mawa na Nzambe?

14 Lokola Yesu Klisto “azali komonisa nkembo na Nzambe mpe elilingi ya motindo na ye mpenza,” tozali komizela ete azala mpe na motema mawa mpe kolinga kolimbisa. (Baebele 1:3) Motindo oyo amitambwisaki epai na bazalani na ye, emonisi ete ezali bongo. (Matai 20:30-34) Lokola oyo emonisi yango Luka mokapo 15, na maloba na ye, amonisaki mpenza motema mawa. Masese misato oyo tokoki kotanga ezali komonisa ete Yesu amekolaki Jéhovah mpe ezali kopesa biso mateya ya ntina mingi.

Azalaki komibanzabanza mpo na oyo ebungaki

15, 16. Nini epusaki Yesu na kopesa masese oyo makomami na Luka mokapo 15?

15 Masese yango mazali komonisa bolingo ya motema mawa oyo Nzambe azali na yango mpo na basumuki, mpe ezali masoló kitoko oyo mazali komonisa biso lolenge nini tokoki komekola ezaleli yango. Totala makambo mazali zingazinga na masese yango: “Bakongoli na mpako mpe bato na masumu nyonso bazalaki kobelema epai na Yesu mpo na koyoka ye. Nde Bafalisai mpe bakomeli bazalaki koïmaïma mingi ete, ‘Moto oyo akoyambaka bato na masumu mpe akolyaka elongo na bango.’”​—Luka 15:1, 2.

16 Bato nyonso oyo bazalaki Bayuda. Bafalisai mpe bakomeli bazalaki komikosa ete bazalaki kotósa mpenza Mibeko na Moĩse; boyengebene na bango ezalaki ya libándá. Nzokande, Nzambe asepelaki te ete bato bamikumisa bayengebene. (Luka 16:15) Emonani ete bakongoli na mpako oyo balobelami awa, ezalaki Bayuda oyo bazwaki mokumba ya kokongola mpako mpo na Rome. Bakongoli na mpako baboyamaki mpo ete mingi kati na bango bazalaki kosengisa motuya na mpako moleki epai na bato ya ekólo na bango. (Luka 19:2, 8) Batyamaki na molongó ya “bato na masumu,” oyo kati na yango ezali mpe na motindo na bato nyonso na mbindo, lokola basi na pité. (Luka 5:27-32; Matai 21:32) Kasi tala oyo Yesu ayanolaki na botemeli ya bakonzi ya mangomba:

17. Lisese ya yambo oyo Yesu apesaki na Luka mokapo 15, ezali nini?

17 “Nani kati na bino, soko azali na bampate mokámá, nde moko abungi, akotika yango ntuku libwa na libwa te kati na lisobé, mpo na koluka yango ebungi kino ekozwa ye yango? Esili ye kozwa yango, akotya yango na mapeka na ye mpe akosepela. Akoingela na ndako mpe akoyanganisa baninga na ye na bazalani na ye, mpe akoloba na bango ete, ‘Sepela na ngai, mpo ete nazwi mpate na ngai oyo esilaki kobunga.’ Bongo nalobi na bino ete, esengo ekozala kati na likoló mpo na moto moko na masumu oyo akobongola motema, ekoleka esengo mpo na bayengebene ntuku libwa na libwa oyo bazali na mposa na kobongola motema te.” Bakonzi ya mangomba bakokaki kokanga ntina ya lisese yango, mpamba te bampate mpe babateli na mpate bazalaki komonana na bango mbala na mbala. Mobateli na mpate oyo ayebi mosala na ye azalaki kotika bampate 99 kati na esika oyo bameseni kolya, mpo na kokende koluka mpate oyo ebungaki. Na kolendendela kino akozwa yango, na bolingo nyonso, akomema mpate yango abulungani kino kozongisa yango kati na etongá.​—Luka 15:4-7.

18. Eloko nini epesaki esengo kati na lisese ya mibale oyo Yesu apesaki, engebene Luka mokapo 15?

18 Yesu abakisaki lisese ya mibale ete: “Mwasi nani soki azali na mbuma na paláta zomi, nde akobungisa mbuma moko, akopelisa mwinda te, mpe akokómba ndako te mpo na kolukaluka kino ekozwa ye yango? Esili ye kozwa yango, akoyanganisa baninga, na bazalani na ye, mpe akoloba ete: ‘Bosepela na ngai elongo, mpo ete nazwi mbuma na paláta oyo ebungaki.’ Yango wana nalobi na bino ete, esengo ekozala bongo kati na baanzelu na Nzambe mpo na moto moko na masumu oyo abongoli motema.” (Luka 15:8-10) Mbuma ya paláta ekokanaki pene na lifuti ya mosali mpo na mokolo moko ya mosala. Mbala mosusu palata yango ezalaki libula mpo na libota mobimba; ekoki mpe kozala ete esalelamaki lokola biju. Ntango paláta yango ebungaki, mwasi azalaki sé koluka yango kino azwaki yango, nde nsima asepelaki elongo na baninga na ye. Lisoló lizali koteya biso nini likoló na Nzambe?

Likoló esepeli, kasi na likambo nini?

19, 20. Masese mibale ya liboso oyo Yesu apesaki na Luka mokapo 15 matalelaki liboso mpenza likambo nini, mpe likanisi na yango ya ntina ezalaki nini?

19 Na nzela na masese oyo mibale, Yesu ayanolaki na makambo oyo bafundaki ye. Ya solo, mwa basanza liboso, alobaki ete ye azali “mobateli malamu na mpate” oyo asengelaki kopesa bomoi na ye mpo na bampate na ye. (Yoane 10:11-15) Nzokande, na yambo mpenza, masese yango matalelaki Yesu te. Malako oyo bakomeli mpe Bafalisai bazalaki na yango mposa matalelaki nde likanisi na Nzambe mpe banzela na ye. Na yango, Yesu alobaki ete esengo ezali kati na likoló ntango moto moko na masumu abongoli motema. Bakonzi wana ya mangomba bazalaki komiloba ete bazalaki kosalela Je‘jéhovah, Nzokande bazalaki komekola ye te. Kasi, na misala na ye ya motema mawa, Yesu amonisaki mokano ya Tata na ye.​—Luka 18:10-14; Yoane 8:28, 29; 12:47-50; 14:7-11.

20 Soki esengo ezali likoló na komonana ya mpate moko ebungaki kati na mokámá, esengo ekozala mingi mpenza na ntina na palata moko kati na zomi. Tokoki kokanisa esengo oyo basi wana bazalaki na yango ntango paláta emonanaki. Lisese oyo mpe litaleli likoló: “baanzelu na Nzambe” bazali na esengo elongo na Jéhovah “mpo na moto moko na masumu oyo abongoli motema.” Tala maloba oyo na nsuka ete, “abongoli motema.” Masese nyonso mibale mazali kolobela bato na masumu oyo bazali kobongola motema. Masese manso mazali mpe komonisa ete, ebongi kosepela na ntango moto moko abongoli motema

21. Liteya nini tosengeli kozwa na masese na Yesu oyo mazali na Luka mokapo 15?

21 Bakonzi wana ya mangomba oyo basilaki kozimbisama, baoyo bazalaki kotósa Mibeko likolólikoló, nde bazalaki komikumisa mpo na yango, bazalaki kotalela te lolenge oyo na bomoto na Nzambe: ete azali “na mawa mpe na ngolu, . . . akolimbisaka mabe, mpe kobuka mobeko mpe lisumu.” (Exode 34:6, 7) Soki bamekolaki Nzambe kati na misala na ye mpe bomoto na ye, mbele bakomeli mpe Bafalisai basengelaki kososola motema mawa oyo Yesu azalaki komonisa epai na bato na masumu oyo bazalaki kobongola mitema. Ezali boni mpo na biso? Tozali kokanga ntina ya liteya oyo mpe tosalelaka yango? Mpo na yango, totala lisese ya misato oyo Yesu epesaki.

Mosala ya kobongola motema mpe motema mawa

22. Yebisa na bokuse, lisese oyo Yesu apesaki na Luka mokapo 15.

22 Mbala mingi lisese yango libéngami lisese ya mwana na kilikili. Nzokande, na kotangáká yango, tokoki kososola mpo na nini bamoko bazali kotatela yango lokola lisoló ya bolingo ya tata moko. Lisolo ezali boye ete mokolo moko, mwana mobali moko na libota asengaki libula na ye epai na tata na ye. (Tala Deteronome 21:17.) Mwana mobali yango akei na mokili ya mosika, mpe kuna amipesi na misala ya mbindo, mpe abebisi bozwi na ye. Asengeli bongo kosala mosala: akómi mobateli na ngulu; akómi koluka ete alya ata biloko oyo bipesameli banyama wana. Na nsuka, ntango asosoli malamu, azwi ekateli ete azonga epai na bango; andimi nkutu kosala epai na tata na ye lokola moko na basali na ye oyo bakozwaka lifuti. Wana abelemi na ndako, tata akei liboso mpo na koyamba ye, kino asaleli ye limpati. Kulutu na ye, oyo atikalaki kosala elongo na tata na ye, asiliki mpo na mawa oyo emonisami epai na oyo asali lisumu. Kasi, tata alimboli ye ete moto na moto asengeli kosepela mpo ete mwana yango asilaki kokufa nde sikawa azongi na bomoi.​—Luka 15:11-32.

23. Lisese ya mwana mobali na kilikili, lizali koteya biso nini?

23 Bamoko kati na bakomeli mpe Bafalisai bakokaki mbala mosusu kokanisa ete Yesu azali kokokisa bango na mwana na liboso, na kokesena na bato na masumu oyo bamonisami na mwana na nsima. Kasi, bakangaki mpenza ndimbola ya lisese oyo? Bongo biso, tosili kokanga ndimbola ya lisese yango? Lisoló oyo lizali kongengisa ezaleli monene oyo na Tata na biso ya likoló, oyo na motema mawa: azali pene na kolimbisa moto na masumu abongoli solo motema, oyo abongoli etamboli na ye. Baoyo bayokaki Yesu basengelaki kosepela na likambo oyo ete bato na masumu oyo babongoli motema, bakoki kosikwama. Ezali lolenge oyo Nzambe azali kotalela makambo mpe ezali lolenge na ye ya kosala; baoyo bazali komekola ye, bakosalaka motindo moko.​—Yisaya 1:16, 17; 55:6, 7.

24, 25. Tosengeli koluka komekola Nzambe kati na misala nini?

24 Ezali polele ete boyengebene bozali komonana kati na banzela nyonso na Nzambe; tala mpo na nini baoyo balingi komekola ye balingi boyengebene mpe bazali kolanda yango. Kasi, Nzambe asengisi te boyengebene oyo ya makasi mingi to na mpasi. Mawa na ye mpe bolingo na ye ezali monene; yango nde akomonisaka na kozaláká pene mpo na kolimbisa bato na masumu oyo babongoli solo mitema. Na yango, wana alobelaki lilimbisi, ezalaki sembo ete Paulo asenga biso mpo na komekola Nzambe: “Bolimbisanaka bomoko na bamosusu, pelamoko Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto. Bongo bozala bamekoli na Nzambe, lokola bana balingami, mpe botambolaka kati na bolingo.”​—Baefese 4:32 kino 5:2.

25 Uta kala, baklisto ya solo bazali kosala makasi mpo na komekola boyengebene na Jéhovah, mawa na ye mpe mposa na ye ya kolimbisa. Wana ezali biso koyeba Nzambe malamu koleka, ekozala na biso petee mpo na kolanda ndakisa na ye kati na makambo oyo. Kasi, lolenge nini tokoki kosalela etinda yango na ntina na moto oyo osilá kozwa etumbu ebongaki na ye likoló na etamboli mabe oyo akangamaki na yango? Ezali yango nde tokotalela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Na ndimbola na yango eyebani mpenza, kolongola moto na lisangá ezali ekateli oyo ezwami na etuluku na bato likoló na moto moko ayebanaki liboso lokola mosangani kati na bango, nde balingi lisusu te ete azala moko na bango. . . . Na eleko na boklisto, kolongola moto na lisangá ekómi kobimisama oyo na nzela na yango bato bazangi kotósa mibeko baboyisami sakramento, kosangana na losambo kati na lisangá, mpe mbala mosusu baboyisami ata boyokani nyonso elongo na bango.”​—The international Standard Bible Encyclopedia.

Bozongeli

◻ Lolenge nini boyengebene na Nzambe emonisamaki kati na lisangá na Yisraele mpe kati na lisangá na boklisto?

◻ Longola boyengebene na ye, mpo na nini tosengeli komekola motema mawa na Nzambe?

◻ Mpo na nini Yesu apesaki masese misato makomami na Luka mokapo 15, mpe mateya nini tosengeli kozwa na yango?

[Elilingi na lokasa 16, 17]

Lisobé ya er-Raha oyo etalani na ngomba na Sinai (na kati epai na loboko ya mwasi)

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]

Garo Nalbandian

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto