Okoki koyanola?
Omonaki ete banimero ya Mosenzeli elakisaki makambo ya ntina mingi mpo na yo? Soki bongo, mpo na nini te komeka naino boongo na yo soki okoyanola na mituna oyo milandi.
◻ Makambo nini mazali kotemela losambo oyo lokosalamaka na esika oyo ekanisami ete Yesu abotamaki wana?
Biblia elobeli esika oyo Yesu abotamaki na sikisiki te. Masoló ya Evanzile oyo ekomamaki na Matai mpe Luka, elobeli bobele makambo oyo ya ntina mingi. (Matai 2:1 5; Luka 2:4-7) Botangi ya Yoane 7:40-42 emonisi ete bato mingi bayebaki te esika oyo Yesu abotamaki; nkutu bamosusu bakanisaki ete abotamaki na Galilai. Lisusu, na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Yesu alobaki te na bolai likoló ya mbotámá na ye.—15/12, nkasa 5, 6.
◻ Ndenge nini moklisto akoki kobatela esengo na ye wana ezali ye koyika mpiko na mimekano, lokola maladi, konyokwama na makanisi to mikakatano na makambo na nkita?
Liloba na Nzambe lizali kopesa bilendiseli mpe batoli oyo tozali na yango mposa. Tokoki kozwa elendiseli monene na kotangáká, to na koyokáká botangi ya Nzembo kati na kasete. Davidi asili kopesa biso toli oyo:“Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akosunga yo.” Asili mpe kopesa biso endimiseli oyo ete, Jehovah ‘akoyokaka mabondeli.’ (Nzembo 55:22; 65:2) Na nzela na mikanda oyo bazali kobimisa mpe bankulutu oyo ezali kolya, lisangá na Jehovah lizali ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso na kolónga mikakatano.—1/1, nkasa 14, 15.
◻ Ntango amemamaki na esika na mpasi, Yesu Klisto akanisaki nini wana alobaki ete: “Soki basali makambo oyo na nzeté mobesu, makambo nini bakosala na nzeté ekauki?‘ (Luka 23:31)
Yesu azalaki kolobela libota na Yisraele oyo ye akokisaki na nzete. Libota yango lizalaki naino mwa mobesu, oyo ezali elembo ya bomoi mpo ete Yesu azalaki wana elongo na litika na Bayuda oyo bandimaki ye. Kasi, ntango Bayuda yango basengelaki kolongolama na libota yango, lisengelaki kotikala bobele nzeté mpamba oyo esili kokufa na elimo, lisangá ya libota oyo likauki.—15/1, lokasa 9.
◻ Na ndimbola nini “baoyo bapetwi na mitema,”baoyo balobelami na Matai 5:8, ‘bazali komona Nzambe’?
Bazali komona Nzambe wana ezali bango komona lolenge oyo Nzambe azali kosalisa bato na sembo. (Tala Exode 33:20; Yobo 19:26; 42:5.) Liloba na greke libongolami na ”bakomona” elimboli lisusu ‘’komona na miso ya elimo, kososola, koyeba.” Mpo ete Yesu amonisa bomoto na Nzambe na kokoka, bososoli malamu likoló na bomoto na ye ezali kopesa nzela na baoyo “bapetwi na mitema” ete ‘bamona Nzambe.’ (Yoane 14:7-9)—15/1, lokasa 16.
◻ Mpo na nini tozali koloba ete Yesu nde azali Mikaele, mokóló na baanzelu?
Liloba na Nzambe lilobeli bobele mokóló moko mpe elakisi Nkolo Yesu oyo asili kosekwa. “Nkolo ye moko akokita longwa na likoló na kongánga makasi mpe na mongongo ya mokóló na baanzelu mpe na kelelo na Nzambe,” (1 Batesaloniki 4:16)Yuda 9 emonisi ete mokóló na baanzelu yango abéngami Mikaele.—1/2, lokasa 17.
◻ Tangá makambo minei kati na yango tosengeli kokumisa bato mosusu.
Tosengeli kokumisa bakonzi ya Leta, bakonzi na biso na mosala, komonisa lokumu kati na libota mpe kati na lisanga.—l/2, nkasa 20-22.
◻ Liboso na kokufa, ndakisa nini malamu oyo Yesu asili kotika mpo na baoyo bazali na baboti oyo bakómi mibangé?
Wana akakisamaki na nzete, kati na mpasi monene, Yesu amibanzabanzaki na bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya mama na ye, mpe atikáki ye epai na Yoane, ntóma oyo ye alingaki mingi. (Yoane 19:25-27)—15/2, lokasa 8.
◻ Mpo na nini Yesu asengelaki konyokwama?
Bampasi na Yesu epesaki nzela na kosukisa ntembe na ntina na bosembo ya basaleli na Nzambe. Ebongisaki ye lisusu mpo na mokumba oyo asengelaki komema lokola Nganga Monene ya motema mawa mpo na bato. (Baebele 4:15)—15/2, nkasa 14-15.
◻ Botomboki na Edene ebimisaki mituna nini ya ntina monene?
Moto akoki nde komitambwisa ye moko kozanga kotalela Nzambe? Ezali likambo na sembo ete Nzambe asengísa moto na kotosa boyangeli na ye? Mpe oyo eleki mpenza, moto moko akoki nde kozwa ekateli ya kosalela Nzambe na bolingo na ye moko?—1/3, lokasa 6.
◻ Mpo na nini bamosusu balyaki limpa mpe bamelaki vinyo na libunga, na Ekaniseli?
Kozanga kokomela na elimo, ekoki kozala ete bato mosusu basosolaki mpenza te mikano na Nzambe. Mbala mosusu bazali kokanga ntina te ete kopakolama “ezali likambo ya mokano na moto te to na mpiko na ye mpe te, kasi na boboto na Nzambe.” (Baloma 9:16) Ezali bato te nde bakozwa ekateli soko basengeli to mpe te ete bakokótisama kati na kondimana ya sika mpe bakóma basangoli na libula elongo na Klisto kati na Bokonzi ya likoló. Ezali Jéhovah nde akoponaka, mpe elimo na ye ekotatolaka mpo na liponi yango. (Baloma 8:16; 1 Bakolinti 12:18)—15/3, lokasa 21.
◻ Monoko na peto oyo molobelami na Sofoni 3:9, ezali nini?
Ezali bososoli malamu na solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye.—1/4, lokasa 21.