Tokeba na Bapengwi!
Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda na Yuda
BASALELI na Jéhovah basengisami na ‘koyina oyo mabé mpe ‘kokangama na oyo malamu.’ (Baloma 12:9) Kati na mokanda na ye oyo akomaki na Palestine, mingi mpenza pene na mobu 65, Yuda, mokomi na Biblia, asalisi bandeko na ye baklisto ete basala bongo.
Yuda amimonisi lokola “moombo na Yesu Klisto, kasi ndeko na Yakobo.” Emonani ete ezali Yakobo oyo ayebanaki mingi lokola ndeko na Yesu Klisto. (Malako 6:3; Misala 15:13-21; Bagalatia 1:19) Yuda ye moko azali bongo ndeko na Yesu. Nzokande, mbala mosusu amoni malamu te ete alobela bondeko yango mpo ete Klisto asili sikawa kokóma elimo ekembisami kati na makoló. Mokanda na Yuda mozali kopesa batoli polepole mpo na kosalisa biso na ’kokangama na oyo malamu’ mpe na komibatela longwa na bapengwi.
“Tobunda na nguya mpenza mpo ma kondima”
Nzokande na ebandeli Yuda azalaki na mposa ya kokoma mokanda na ntina na lobiko oyo baklisto bazali na yango na bomoko, amoni malamu kolendisa batangi na ye na “kobunda na nguya mpo na kondima.’’ (Versets 1-4) Mpo na nini? Likoló na bato na mbindo oyo bakótaki kati na lisangá mpe baoyo ’’bakolobaka ngolu na Nzambe na biso kino bosoto.’’ Bazali na libunga na kokanisa ete ebongi na kobuka mibeko na Nzambe mpe kotikala lisusu kati na libota na ye. Topesa nzela te na makanisi mabe wana, kasi tolanda boyengebene kozanga kotika mpe tozala na botondi na motindo na mawa monene oyo Nzambe asukoli biso na masumu na biso na makila na Yesu.—1 Bakolinti 6:9-11; 1 Yoane 1:7.
Makebisi mpo na biso
Ezali na mitindo na elimo, na bitamboli to mitindo na bato oyo esengeli kopengola. (Versets 5-16) Nsima na kobima na Ezipito, Bayisraele mosusu babomamaki mpo ete bazangaki kondima. Baanzelu oyo batikaki efandelo na bango mpenza, basili “kobatelama na nkangá na seko, kati na molili [ya elimo] tuu, kino kosambisama ya mokolo monene.” Mbindo monene ya Sodomo mpe Gomore eyeiselaki bango ’’etumbu ya motó na seko.” Bongo, tosala ntango nyonso ete tosepelisa Nzambe mpe kozanga kotika “nzela ya bomoi.’’—Nzembo 16:11.
Wana Mikaele, mokóló na baanzelu, aboyaki ye moko kopamela Diable na maloba na kotuka, nzokande bato na mbindo bakotukaka “bato na nkembo,” na ntembe te ezali baoyo Nzambe mpe Klisto basilaki kopesa motindo na nkembo moko, lokola bankulutu mpe bapakolami na elimo. Tozanga limemya te epai na bokonzi oyo botyami na Nzambe.
Bato na mbindo bazali kolanda ndakisa mabe ya Kaĩna, ya Balama mpe ya Kola. Bazali likámá monene ya elimo oyo likokani na libaku mpe bazali lokola mapatá mazangi mai to banzeté esili kokufa, esili kopikolama mpe ezali kobota mbuma te. Bapengwi yango bakoimaimaka, bakomilelalelaka mpe “bazali kokumisa bato mpo na kozwa litomba.”
Tolanda kotemela bopusi mabe
Yuda apesi sikawa batoli likoló na lolenge na kotemela bopusi mabe. (Versets 17-25) “Na mikolo na nsuka,’’ baseki basengelaki kobima mpe lelo baklisto ya solo basengeli koyikela bango mpiko, mpo na maloba na bango ya matumoli. Mpo na kotemela bopusi mabe, tosengeli kolendisama na ”kondima” na biso, kobondela elongo na elimo santu mpe komibatela kati na bolingo na Nzambe, awa ezali biso kozela ete mawa na Yesu emonisama na biso.
Lokola emonani ete bazali balakisi na lokuta, bato na mbindo bazali komema bamosusu na ntembe. (Tala 2 Petelo 2:1-3.) Kasi, baoyo bakobetaka ntembe bazali na mposa na eloko nini? Na lisalisi ya elimo, ete babotolama na “móto” to libebi ya seko. (Matai 18:8, 9) Nzokande bato oyo bakobangaka Nzambe bazali kobanga nsuka motindo wana te, mpamba te jéhovah akobatela bango mpo ete ‘batuta libaku’ te, ete bakwea kati na lisumu te mpe bazwa te libebi oyo lizali kozela Mabaku: Yuda akebisaki baninga na ye baklisto mpo na ‘mabaku kati na bilambo na bango ya bolingo.’ (Yuda 12.) Lokola balɛmbaki mpo na bolingo epai na bandimi, bapengwi.
[Etanda na lokasa 31]
Mabaku: Yuda akebisaki baninga na ye ‘baklisto mpo na mabaku kati na bilambo na bango ya bolingo.’ (Yuda 12) Lokola balembaki mpo na bolingo na epai na bandimi, bapengwi wana bazalaki lokola mabangá mabómbámi na mai nde mazali kozokisa, mabangá makoki kotobola masuwa to kozokisa mpe koboma bato oyo bazali konyanya. Bilambo ya bolingo ezalaki mbala mosusu koyangana mpo na kolya oyo baklisto na bozwi bazalaki kobyanga baninga na bango baklisto oyo bazalaki babólá. Jean chrysostome (347?–407), ye mokonzi ya lingomba, alobi ete: “Bango nyonso bazalaki kokutana esika moko mpo na elambo, bazwi bazalaki komema bilei, babóla to bato oyo bazalaki na eloko babyangamaki, mpe bango nyonso bazalaki kosala feti elongo.” Ezala na motindo nini na elambo ya bolingo oyo ezalaki kosalema kala, makebisi na Yuda masalisaki baklisto na sembo na komibatela na “mabaku,” bapengwi oyo bakokaki koyeisa kufa na elimo. Baklisto basengisamaki te na kobongisa bilambo ya bolingo, lelo oyo mpe basengisami te. Kasi, basaleli na jéhovah bazali kosalisana na mosuni na eleko na mpasi mpe bazali na boyokani malamu ya boninga.