Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/5 nk. 8-9
  • Afandi na loboko mobali na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Afandi na loboko mobali na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Na loboko na mobali na Nzambe
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Kristo afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Na nzela ya Damasi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Bato oyo basalaka mabe bakoki nde kobongwana?
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/5 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye.

Afandi na loboko mobali na Nzambe

KOSOPAMA na elimo santu na Pantekote ezali elembo ete Yesu asili kozonga na likoló. Emonaneli oyo moyekoli Etienne amoni mwa ntango moke nsima emonisi mpe ete asilaki mpenzampenza kokoma na likoló. Wana Etienne azali kobomama na mabanga na ntina na litatoli na sembo oyo apesaki, alobi ete: “Namoni likoló lizipwani, mpe Mwana na Moto kotelema na loboko mobali na Nzambe.”

Na loboko mobali na Nzambe, Yesu azali kozela ete Tata na ye apesa ye etinda oyo ete: “Zala na bokonzi kati na bayini na yo.” Kasi wana ezali ye kozela ete abundisa banguna na ye, Yesu azali kosala nini? Azali kokamba, to koyangela likoló na bayekoli na ye bapakolami, kotambwisáká bango kati na mosala ya kosakola mpe kobongisáká bango na kokóma, na nzela na lisekwa, bakonzi elongo na ye kati na Bokonzi ya Tata na ye.

Na ndakisa, Yesu aponi Saulo (oyo ayebani mingi na nkombo na ye ya moloma ete, Paulo) mpo ete akólisa mosala ya kozalisa bayekoli kati na mikili misusu. Saulo azali na molende mpo na Mibeko na Nzambe, kasi azimbisami na bakonzi na mangomba ya Bayuda. Na yango, andimi bobele liwa ya Etienne te, kasi akei na Damaseke na ndingisa ya nganga monene Kaïfe mpo na kokanga bayekoli nyonso na Yesu oyo akokuta kuna mpo na koya na bango na Yelusaleme, bango mibali mpe basi. Nzokande, wana Saulo azali na nzela, kongenga makasi ebimi lokola mokalikali zingazinga na ye, mpe akwei na mabelé.

Mongongo mouti longwa na esika ezangi komonana motuni ete: “Saulo! Saulo! Ozali konyokola ngai mpo na nini?” Saulo atuni, “Yo nani, Nkolo?”

Mongongo moyanoli ete, “Ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.”

Yesu alobi na Saulo, oyo miso na ye mazalaki komona lisusu te na ntina na kongenga ya ekamwiseli oyo ye amonaki ete, akóta na Damaseke mpe azela malako. Na nsima Yesu ebimeli Anania, moko na bayekoli na ye, kati na emonaneli Kolobáká na ntina na Paulo, Yesu ayebisi Anania ete: “Moto yango nasili kopona ye ete amema nkombo na ngai liboso na bapakano, mpe na mikonzi, mpe na bato na Yisraele.”

Na yango, na lisungi na Yesu, Saulo (oyo ayebani sikawa na nkombo ya Paulo) mpe bapalanganisi mosusu na nsango bazali na elónga monene kati na mosala na bango ya kosakola mpe koteya. Ya solo, mibu 25 nsima wana Yesu abimelaki ye na nzela ya Damaseke, Paulo akomi ete “nsango malamu” esili “kosakolama na bato nyonso na nsé na likoló.”

Nsima na bambula mingi, Yesu atindi ebele na bimonaneli epai na Yoane, ntóma na ye molingami. Ezali mpenza na bimonaneli wana, oyo bikomami kati na mokanda ya Emoniseli, nde Yoane aumeli mwa ntango molai mpo na komona bozongi na Yesu kati na nguya ya Bokonzi. Yoane alobi ete “kati na elimo“ amemamaki na eleko ya ’’mokolo na Nkolo.” Mokolo yango mozali nini?

Boyekoli ya sikisiki ya bisakweli na Biblia, bakisa na boyekoli oyo Yesu alobaki na ntina na mikolo na nsuka, emonisi ete “mokolo na Nkolo” ebandaki na mbula ya makambo mingi, na 1914, elingi koloba kati na libota oyo ya lelo. Ezali bongo na 1914 nde Yesu azongaki, na lolenge moko ezangi komonana mpe kozanga kobeta kelelo, mpe bobele basaleli na ye ya sembo nde basosolaki bozongi na ye. Na mbula wana, Jéhovah apesaki etinda na Yesu ete akenda koyangela katikati na banguna na ye.

Kotósáká na etinda ya Tata na ye, Yesu apetolaki likoló na kobenganáká Satana mpe bilimu mabe na ye mpe, abwakaki bango na mabelé. Nsima na kozwa emonaneli ya likambo wana, Yoane ayoki mongongo longwa na likoló ete: “Sikawa lobiko, na nguya, na Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye.” Ya solo, Yesu abandaki koyangela na 1914.

Oyo nde nsango kitoko mpo na basambeli na Jéhovah oyo bazali kati na makoló! Bapesameli elendiseli oyo ete: “Bosepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana!” Kasi ezali boni mpo na baoyo bazali awa na mabelé? Mongongo mouti na likoló mokóbi na koloba ete, “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”

Tozali kobika sikawa kati na ntango yango. Bato bazali kokabolama, to mpo na kokóta kati na mokili ya sika, to mpo na kobomama. Ya solo, avenire na biso etaleli lolenge oyo tozali koyanola liboso na kosakolama na nsango malamu oyo ezali kosalema na mokili mobimba, na litambwisi na Klisto.

Ntango kokabolama yango ekosila, Yesu Klisto akosala lokola Mosali na Nzambe mpo na kolongola na mabelé, ebongiseli nyonso ya biloko na Satana mpe baoyo nyonso bazali kopesa ye maboko. Akolongola mabe wana nyonso na ntango ya etumba oyo Biblia ezali kobenga ete Armagedon. Nsima na yango, Yesu Klisto, Moto ya lokumu mingi kati na molóngó mobimba, nsima na Jéhovah Nzambe ye moko, akokanga Satana mpe bilimu mabe na ye, mpe akobwaka bango kati na ’’libulu mozindo,’’ oyo elimboli ezalela ya kozanga kosala mosala lokola na liwa, mpo na mibu nkóto wana ekosila bango kokangama na minyololo. Misala 7:55-60; 8:1-3; 9:1-19; 16:6-10; Nzembo 110:1, 2; Baebele 10:12, 13; 1 Petelo 3:22; Luka 22:28-30; Bakolose 1:13, 23; Emoniseli 1:1, 10; 12:7-12; 16:14-16; 20:1-3; Matai 24:14; 25:31-33.

◆ Nsima wana Yesu azongi na likoló, azalí esika nini mpe azali kozela eloko nini?

◆ Likoló na banani Yesu azali koyangela nsima na kobuta na likoló, mpe ndenge nini, mpe ndenge nini boyangeli na ye bozali komonana?

◆ “Mokolo na Nkolo” mobandaki ntango nini, mpe nani azwaki esika na ebandeli na yango?

◆ Mosala nini ya bokaboli mosalemi mozali lelo kotalela biso mpenza, mpe yango ezali kosalema na kolandáká likambo nini?

◆ Likambo nini likosalema wana mosala yango mokosila?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto