Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/5 nk. 10-15
  • Bandakisa ya motema molai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bandakisa ya motema molai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Azali na motema molai na ntina na nkombo na ye
  • Motema molai mpo na bolamu na bato
  • Ndakisa ya motema molai oyo Yesu atikelaki biso
  • Bandakisa mosusu ya motema molai
  • Totalela ndakisa ya Paulo
  • Yehova azali Nzambe ya motema molai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • ‘Bómilatisa motema molai’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tozala na motema molai epai na bato banso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Motema molai
    Tóyembela Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/5 nk. 10-15

Bandakisa ya motema molai

“Nzambe . . . ayikeli mbeki na nkanda mpiko na motema molai, yango ebongi mpo na libebi.”​—BALOMA 9:22,“MN.”

1. (a) Bolamu nini tozali kozwa na Liloba na Nzambe lipemami? (b) Na yango, mpo na nini awa tolobeli motema molai?

JÉHOVAH NZAMBE, Mozalisi na biso, asili kopesa biso Liloba na ye lipemami, Biblia Mosantu, mpo ete ezala ‘mwinda mpo na matambé na biso, mpe pole mpo na nzela na biso.’ (Nzembo 119:105) Lisusu, ezali kosalisa biso na kokóma bato ‘baselingwi mpo na misala nyonso malamu.’ (2 Timoté 3:16, 17) Mpo na yango, ezali kopesa biso​—kati na makambo mosusu​—bandakisa kitoko ya motema molai. Ezaleli wana, oyo ezali moko na bambuma na elimo na Nzambe, ezali na ntina mpo na biso ete tondimama epai na ye mpe tozala na bomoi na boyokani elongo na bazalani na biso.​—Bagalatia 5:22, 23.

2. Ndimbola ya liloba na greke oyo libongolami na ’’motema molai’’ ezali nini, mpe nani azali komonisa ezaleli nyonso mosusu?

2 Liloba na greke libongolami na “motema molai” elimboli na polele, “molai ya elimo.” Balimbolaki motema molai lokola “ezaleli ya komipekisa kati na likambo moko likookisaka nkanda, oyo ekopusa na koboya kozongisa mabe to na kopesa etumbu nokinoki.” (Expository Dictionary of Old and New Testament Words, ya W. Vine, Volume 3, page 12) Moto oyo azali na motema molai ayebi komipekisa mpe akookaka nkanda noki te. Nani aleki bato nyonso mosusu na motema molai? Na ntembe te, ezali Jéhovah Nzambe. Na yango, tozali kotanga na Exode 34:6 ete, Jéhovah azali “Nzambe na mawa mpe na ngolu, akookaka nkanda noki te. Aleki na boboto mpe na solo.” Mbala mwambe mosusu elobami kati na Makomami na ntina na Jéhovah ete, “akookaka nkanda noki te.”​—Mituya 14:18; Nehemia 9:17; Nzembo 86:15; 103:8; 145:8; Yoele 2:13; Yona 4:2; Nahumu 1:3.

3. Motema molai na Jéhovah euti na bizaleli nini?

3 Lokola azali na nguya mpe na mayele nsuka te, azali na boyengebene ya kokoka, mpe azali bolingo, Jéhovah Nzambe akoki bobele kozala na motema molai to kozanga kooka nkanda noki. (Deteronome 32:4; Yobo 12:13; Yisaya 40:26; 1 Yoane 4:8) Ayebi kosalela bizaleli na ye, mpe akosalelaka yango ntango nyonso na bokatikati mpenza. Liloba na ye limonisi biso nini likoló na bantina oyo mpo na yango azali komonisa motema molai epai na bato bazangi kokoka, mpe likoló na motindo oyo motema molai wana ezali komonana?

Azali na motema molai na ntina na nkombo na ye

4. Tángá bantina mpo na yango Nzambe azali na motema molai epai na butu na masumu?

4 Mpo na nini Jéhovah azali na motema molai? Mpo na nini akopesaka etumbu mbala moko te epai na basali na mabe? Ezali mpo ete ataleli yango mpamba to mpo ete azangi molende mpo na boyengebene? Te! Soki Jéhovah akookaka nkanda noki te mpe akopesaka etumbu mbala moko te epai na basali na mabe, boye bantina ezali. Libosoliboso, azalaki na mposa ete nkombo na ye eyebana. Lisusu, esengelaki ntango molai mpo na kosilisa ntembe ebimaki na botomboki bosalemaki na Edene, ntembe na ntina na boyangeli na Nzambe mpe bosembo na bato. Mpo na kosukisa, motema molai na Nzambe azali kopesa likoki na basali na mabe ete babongola etamboli na bango.

5, 6. Mpo na nini Jéhovah amonisaki motema molai kati na likambo ya botomboki na moto?

5 Na elanga na Edene, Jéhovah amonisaki motema molai epai na babalani ya liboso. Lokola Adam na Eva babukaki etinda na Nzambe, oyo epekisaki kolya mbuma ya nzete na koyeba malamu mpe mabe, Nzambe akokaki koboma bango mbala moko, elongo na anzelu mabe oyo akosaki Eva. Na ntembe te boyengebene mpe bosembo ya Jéhovah efingamaki na botomboki ya bikelamu wana misato, mpe bango batumolaki ye. Azalaki mpenza na lotómo ya koboma bango mbala moko. Apesaki likebisi oyo epai na mobali ya liboso, ete: “Nde mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe, okoki kolya te. Mpamba te, mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16 17) Bobele mokolo oyo Adam asalaki lisumu, Nzambe asambisaki babuki wana na mobeko mpe akatelaki bango etumbu ya liwa. Liboso na mobeko na Nzambe, Adam na Eva bakufaki bobele mokolo wana. Nzokande, na motema molai na Nzambe, Mozalisi apesaki nzela na Adam ete azala na bomoi kino mibu 930.​—Genese 5:5.

6 Nzambe azalaki na bantina malamu ya kozala na motema molai to na kozanga kooka nkanda noki. Soki abomaki batomboki wana mbala moko, mbele akokaki koyanola te na efundeli na lokuta oyo Satana abimisaki mpo na ye, ete ye abongi te na kopesamela losambo mpe ete moko te kati na bato bazali kosalela ye, akoki kotikala sembo liboso na ye ata na mabaku nini. Mpe, mbele mituna misusu ezwi biyano te, lokola oyo ete: Soki Adam na Eva basalaki lisumu, mabe ezali ya nani? Jéhovah asalaki bango mpenza na bizaleli ya bolembu na motindo boye ete bakoka te kotemela komekama, mpo na kopesa bango etumbu na nsima mpo ete balongaki yango te? Mituna nyonso wana miyanolami kati na lisoló oyo lizali na Yobo mokapo 1 mpe 2. Na kotikáká ete bato bakóma mingi, Jéhovah apesaki bato likoki ya komonisa ete bifundeli ya Satana bizalaki lokuta.

7. Mpo na nini Jéhovah abomaki Farao mbala moko te?

7 Wana akómaki pene na kobikisa libota na ye, Yisraele, na boombo na Ezipito, Jéhovah amonisaki lisusu motema molai. Akokaki koboma na mbala moko Farao mpe mampinga na ye. Kasi, atikaki bango na boumeli ya mwa ntango. Azalaki na bantina malamu mpo na yango. Yango nini? Na boumeli ya mikolo mingi, Farao azalaki sé koboya na motó makasi nyonso mpo na kotika libota na Nzambe ete babima na Ezipito te. Na bongo, amonisaki ete azalaki ‘mbeki na nkanda’ mpe abongaki bongo kobomama, mpamba te atemelaki Jéhovah. (Baloma 9:14-24) Nzokande, na libaku wana, Nzambe azalaki na ntina eleki monene ya kozala na motema molai. Na nzela na Moïse, alobaki na Farao ete: “Nakokaki kotinda loboko na ngai mpe kobeta yo mpe bato na yo na likámá ete bokufa nyonso na mokili, nde natiki yo na ntina boye ete namonisa yo nguya na ngai, ete nkombo na ngai esakolama na mabelé mobimba.”​—Exode 9:15, 16.

8. Mpo na bantina nini, na esobe, Nzambe abomaki te libota mobimba na Bayisraele oyo batombokaki?

8 Motema molai na Jéhovah emonisamaki lisusu malamu na ntango Bayisraele bazalaki kati na esobé. Ya solo, bamekaki motema petee na ye na kosambeláká mwana na ngombe na wolo mpe na kozangáká kondima wana banongi zomi bazongaki mpo na kopesa bango nsango ya lokuta. Soki Jéhovah abomaki libota na ye na mokolo wana te, ezali mpo ete nkombo na ye mpe lokumu na ye etalelamaki kati na likambo yango. Ee, amonisaki motema molai na ntina na nkombo na ye.​—Exode 32:10-14; Mituya 14: 11-20.

Motema molai mpo na bolamu na bato

9. Mpo na nini Jéhovah amonisaki motema molai na eleko na Noa?

9 Jéhovah azali na motema molai mpo na bolamu na bato uta Adam asalaki bokesene monene epai na bakitani na ye, na kosaláká lisumu. Kati na motema molai na ye, Nzambe apesaki nzela ete mbébá wana ebongisama, mpamba te apesaki ntango epai na bato babongoli mitema ete bazonga na bondeko elongo na ye. (Baloma 5:8-10) Na eleko na Noa, Jéhovah Nzambe amonisaki lisusu motema molai epai na bato. Na ntango wana, “Jéhovah amonaki ete mabe na bato mazalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango mazalaki bobele mabe mokolo na mokolo.” (Genese 6:5) Komonáká makambo mazalaki kosalema na mokili, Nzambe akokaki koboma bato mbala moko; kasi, azwaki ekateli ya kozela mibu 120 liboso na kotya nsuka na ezalela wana. (Genese 6:3) Motema molai na Nzambe epesaki Noa ntango ya kobota bana mibali misato; bana yango bazwaki ntango ya kokóla mpe kobala; mpe apesaki ntango na libota wana ete batonga masuwa. Na nzela na masuwa wana, bato yango babikisaki bomoi na bango mpe babatelaki banyama. Na motindo wana, mokano na Nzambe ya liboso na ntina na mabelé esengelaki kokokana.

10, 11. Mpo na nini Jéhovah amonisaki motema molai epai na libota na Yisraele?

10 Ndimbola mosusu ya motema molai na Nzambe ezali na boyokani mpenza na misala na Nzambe epai na libota na ye. Moto na motema molai ezali ye oyo “akoyika mpiko na motema petee mpenza ntango basaleli ye mabe to ntango bayokisi ye nkanda, na kozanga kolongola elikya ete matáta makoki kosilisama.” (lnsight on the Scriptures, Volume 2, page 262; ebimisami na la Société Watchtower.) Esengeli wana kotala ntina mosusu oyo mpo na yango Nzambe azalaki na motema molai epai na Bayisaele. Kobutwáká mbala na mbala longwa na Jéhovah, libota wana lityamaki na nsé na mabota na Bapakano. Nzokande, na motema molai na ye, Nzambe azalaki kobikisa bango mpe azalaki kopesa bango likoki ya kobongola motema.​—Basambisi 2:16-20.

11 Bakonzi mingi na Yisraele, bapusaki bato na bango kati na losambo ya lokuta. Mpo na yango, Nzambe abwakaki libota na ye na mbala moko? Te, alongolaki elikya nokinoki te ete matáta makoki kosilisama. Aokaki nkanda noki te. Na motema molai na ye, mbala na mbala Nzambe apesaki Bayisraele likoki ya kobongola motema. Totangi na 2 Ntango 36:15, 16 (MN) ete: “Jéhovah, Nzambe na batata na bango atindaki mbala na mbala maloba na kokebisa na nzela na bantoma na ye, mpamba te azalaki na mawa mpo na libota na ye mpe mpo na efandelo na ye. Kasi bazalaki koseka bantoma na Nzambe ya solo, mpe batyolaki maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye, mpe nkanda makasi na Jéhovah ekitaki likoló na libota na ye, kino akokaki kolimbisa te.”

12. Engebene litatoli ya Makomami na greke na boklisto, mpo na nini Jéhovah azali na motema molai?

12 Makomami na greke na boklisto, yango mpe elakisi biso ete, Nzambe akomonisaka motema molai na ntina ete asalisa basaleli na ye oyo bazali kati na lisumu. Na ndakisa, ntoma Paulo atunaki moklisto moko oyo asalaki lisumu ete: “Ozali nde kotyola boboto na ye monene, na motema petee na ye mpe motema molai na ye?” (Baloma 2:4) Bobele na likanisi moko wana, Petelo akomaki ete: “jéhovah ekoumela te na ntina na elaká na ye, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema petee epai na bino, mpo ete alingi te ete moto moko abeba, kasi ete bato nyonso bakóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:9) Totangi lisusu ete: “Botalela motema petee na Nkolo na biso lokola lobiko.” (2 Petelo 3:15) Tomoni bongo ete Jéhovah azali na motema molai mpo na kopusama na mayoki te to mpo ete azipi miso na mabe te, kasi mpo ete yango etaleli nkombo na ye mpe mikano na ye, mpe mpo ete azali na bolingo mpe na motema mawa.

Ndakisa ya motema molai oyo Yesu atikelaki biso

13. Ndenge nini Makomami mazali komonisa ete Yesu Klisto azali na motema molai?

13 Motema molai na Nzambe elandami na oyo na Mwana na ye, Masiya, Yesu Klisto. Tozali wana na ndakisa malamu mingi ya komikanga motema, mpamba te, ata ntango atumolamaki, azongisaki mabe te.a Mosakoli Yisaya alobaki ete Masiya akozala na motema molai: “Anyokolami mpe anyatami, nde azipoli monoko na ye te. Lokola mwana na mpate oyo akambami mpo na kobomama, mpe lokola mpate azali nyee liboso na bakati na nkunge na ye, bobele bongo azipoli monoko na ye te.” (Yisaya 53:7) Na litatoli na ye, Petelo alobeli bobele likanisi yango moko, ete: “Atukamaki nde azongisi kotuka te; ayokaki mpasi nde akaneli moto te; kasi atikaki nyonso epai na ye oyo akosambisaka sembo.” (1 Petelo 2:23) Bayekoli na ye batyaki Yesu na komekama mpo na koswana na bango ya mbala na mbala na ntina na koyeba nani kati na bango alekaki bamosusu. Kasi, azalaki na motema petee mpe na motema molai epai na bango.​—Malako 9:34, Luka 9:46; 22:24.

14. Ndakisa ya motema molai na Yesu, esengeli kopusa biso na kosala nini?

14 Tosengeli kolanda ndakisa ya motema molai oyo Yesu asili kotikela biso. Paulo akomaki ete: “Topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe mosukisi na kondima na biso. Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli nzete na mpasi mpiko, atyoli nsoni na yango mpe afandi na loboko na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe. Ee, botalela ye oyo ayikaki mpiko liboso na motindo na zwa wana epai na bato na masumu, baoyo batemelaki ye ete bino bosenzwa te mpe bolemba te.”​—Baebele 12:1-3.

15. Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki na motema molai mpe ayikaki mpiko na mimekamo na bolingo na ye moko?

15 Ezaleli na Yesu na ntango bakangaki ye, emonisi ete azalaki na motema molai, mpe ayikaki mpiko na mimekamo na bolingo na ye moko. Nsima na kopamela Petelo, oyo abimisaki mopanga na ye mpo na kobatela Nkolo na ye, Yesu alobaki ete: “Okanisi te ete nakoki kobondela Tata na ngai mpe ye akotindela ngai pwasa, koleka [bitulukul zomi na mibale na baanzelu? Nde na nzela nini Makomami makokokana, ete makambo masengeli kobima boye?”​—Matai 26:51-54; Yoane 18:10, 11.

Bandakisa mosusu ya motema molai

16. Makomami mazali koyebisa biso nini likoló na motema molai na Yozefe, mwana na Yakobo?

16 Ata bato bazangi kokoka mpe bato na masumu bakoki komimonisa na motema molai. Kati na Makomami na hébreu, tozali kokuta bandakisa ya bato bazangi kokoka baoyo bayikaki mpiko na motema petee na mpasi oyo bakutanaki na yango. Yozefe, mwana na tata na mabota Yakobo, Moebele, azali mpe moko kati na bato yango. Na motema petee, ayikaki mpiko na bokesene ya bandeko na ye mpe ya mwasi na Potifare. (Genese 37:18-28; 39:1-20) Atako mimekamo wana, amitikaki kolongama na mpasi te. Ezali yango nde emonani na oyo ye alobaki epai na bandeko na ye, ete: “Bozala na mawa te mpo ete Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo na kobikisa bomoi na bato.” (Genese 45:4, 5) Oyo nde ndakisa malamu ya motema molai epesamaki Yozefe!

17, 18. Bilembeteli nini tozali na yango mpo na motema molai na Davidi?

17 Tokoki mpe kotanga ndakisa na Davidi, mosaleli mosusu na sembo na Jéhovah, oyo ayikelaki mabe mpiko na motema petee mpe na motema molai. Kolandamáká lokola mbwa epai na mokonzi Saulo, ye oyo azalaki na zuwa makasi, mbala mibale Davidi azalaki na likoki ya kozongisela ye mabe mpe koboma ye. (1 Samwele 24:1-22; 26:1-25) Kasi Davidi atyaki motema epai na Nzambe, lokola yango emonani na maloba na ye epai na Abisai, ete: “Jéhovah ye moko akobeta ye [saulol; soko ete mokolo na ye na kufa ekokóma, soko nde akokende na etumba mpe akobomama. Kasi ekoki na ngai te, na miso na Jéhovah, ete nasembola loboko na ngai epai na mopakolami na Jéhovah!” (1 Samwele 26:10, 11) Ee, Davidi azalaki na likoki ya kosukisa Saulo ete alanda ye lisusu te. Kasi, amonaki malamu na kosalela motema molai.

18 Tala lisusu, oyo ekómelaki mokonzi Davidi ntango mwana na ye Abesaloma atemelaki ye. Wana Davidi azalaki kokima, Simi, moto na Benzamina na libota ya Saulo, abwakelaki ye mabángá mpe kotuka ye na kongangáká ete: “Longwa awa, longwa awa, yo mobomi na bato, yo mwana na mpamba!” Abisai alingaki koboma Simi, kasi Davidi aboyaki kozongisa mabe mpo na mabe. Na mbala wana lisusu, amonisaki motema molai.​—2 Samwele 16:5-13.

Totalela ndakisa ya Paulo

19, 20. Paulo atikaki ndakisa nini ya motema molai?

19 Makomami na greke na boklisto mazali kopesa biso ndakisa mosusu malamu ya motema molai, oyo esalelamaki na moto moko azangi kokoka, ntoma Paulo. Ye ayikaki mpiko na motema petee elongo moko na motema molai epai na banguna na ye ya mangomba, mpe epai na bato oyo bazalaki komiloba ete bazalaki baklisto. Ee, ata soki bamosusu kati na lisangá ya Kolinti bazalaki koloba ete: “Mikanda na ye mizali na bozito mpe na makasi, nde motindo na nzoto na ye ezali na bolembu mpe koloba na ye ezali mpamba,” Paulo amonisaki motema molai.​—2 Bakolinti 10:10; 11:5, 6, 22-33.

20 Paulo akokaki bongo koloba na Bakolinti ete: “Lokola basali na Nzambe, tokomilobela biso mpenza kati na makambo nyonso na mpiko monene, na bolozi, na mpasi, na makámá, na kobetama, na kokangama, na yikiyiki, na misala mingi, na kolala mpongi te, na nzala. Tokomilobela na ezaleli na peto, na boyebi, na motema molai, na boboto, na elimo santu, na bolingo bozangi bokosi.” (2 Bakolinti 6:4-6) Lolenge moko, ntoma akomelaki Timoté, mosalani na ye elongo, ete: “Yo nde osili komekola mateya na ngai mpe etamboli na ngai, mokano na ngai mpe kondima na ngai mpe motema molai na ngai, mpe bolingo na ngai, mpe mpiko na ngai, mpe minyoko na ngai, mpe bolozi na ngai, . . . Kasi Nkolo abikisi ngai kati na yango nyonso.” (2 Timoté 3:10, 11) Oyo nde ndakisa malamu ya motema molai oyo ntoma Paulo atikaki!

21. Lisoló elandi ekoki kosalisa biso na likambo nini?

21 solo mpenza, Makomami matondi na bandakisa kitoko ya motema molai. Nzokande, oyo ya jéhovah mpe Mwana na ye na bolingo, eleki liboso. Bongo, ezali elendiseli te na komona ete ezaleli yango emonisamaki na bato bazangi kokoka lokola Yozefe, Davidi mpe ntoma Paulo? Lisoló elandi ekosalisa biso na kolanda bandakisa wana kitoko.

[Footnotes]

a Kozala na motema molai elimboli bobele te koyika mpiko mpo na likambo moko na boumeli ya ntango molai. Ye oyo akozala kati na ezalaka wana, nde akozala na nkunda to na motema na mabebi mpe ete azwi libaku ya kozongisa mabe na mabe te, moto wana azali na motema molai te.

Bozongeli

◻ Kozala na motema molai elimboli nini?

◻ Mpo na bantina nini minene Jéhovah azali na motema molai?

◻ Lolenge nini Yesu amimonisaki moto na motema molai?

◻ Ndenge nini Makomami mazali komonisa ete bato atako bazali sembo na makambo nyonso te, bakoki ata bongo kozala na motema molai?

[Bililingi na lokasa 10]

Yozefe, Yesu, Davidi, Paulo mpe Yobo bazalaki bandakisa ya motema molai

[Elilingi na lokasa 13]

Yesu amonisaki motema molai epai na bayekoli na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto