Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/5 lok. 31
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Babongisami mpo na kosakola ata na ntango ya minyoko
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu abongisi bayekoli na ye mpo na minyoko
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Asakoli na Galile mpe apesi bantoma formasyo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Alingi bana mike
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/5 lok. 31

Mituna na batangi

◼ Na Matai 10:21, Yesu alingi wana koyebisa liboso ete bandeko mingi kati na lisangá bakotemela bandeko na bango va elimo?

Te, maloba na Yesu malimboli bongo te. Alobaki ete: “Ndeko akokaba ndeko na ye mpo na kufa mpe tata akokaba mwana mpe bana bakotemela baboti mpe bakoboma bango.”​—Matai 10:21.

Ba versets ya zingazinga ezali komonisa ete Yesu azalaki koloba epai na bantoma 12 oyo ye atindaki bango mpo na kosakola na Yisraele. Makambo mingi ayebisaki bango makokisamaki libosoliboso epai na bango. Na ndakisa, alobaki ete bango bazalaki na nguya ya kosala bikamwiseli ya kobikisa maladi, kobimisa bilimu mabe ata nkutu kosekwisa bakufi. (Matai 10:1, 8; 11:1) Makambo na kala mazali komonisa ete baklisto nyonso bazwaki nguya motindo wana te, oyo endimisi ete Yesu azalaki na ndambo na bato na sikisiki: bantoma na ye.

Nzokande. maloba mosusu oyo na Yesu matalelaki etando monene koleka oyo apesaki yango na bantoma na ye na ntango wana, ete bakokisa mosala ya kosakola. Na yango alobaki na bango ete: “Bokeba mpo na bato; . . . bakomema bino liboso na mikóló na mokili mpe liboso na mikonzi mpo na ngai, mpo na litatoli epai na bango mpe epai na mabota“(Matai 10:17, 18)Na ntango bakokisaki mosala wana ya kosakola, na ntembe te, ba zomi na mibale bakutanaki na botemeli, kasi likambo moko limonisi te ete bamemaki bango “liboso na mikóló na mokili mpe na mikonzi” mpo na kopesa litatoli epai na “mabota.”a Nsima na bambula, bantoma basambisamaki liboso na bakonzi, lokola Hérode Agrippa l mpe Hérode Agrippa ll, Sergus Paulus, Gallion mpe mokonzi Néron. (Misala 12:1, 2; 13:6, 7; 18:12; 25:8-12, 21; 26:1-3) Na yango, maloba na Yesu makokisamaki na nsima.

Nsima na kopesa toli wana, Yesu alobi ete: “Ndeko akokaba ndeko na ye mpo na kufa.’’ Awa, alobelaki bandeko ya elimo te, balata to bana ya elimo mpe te baoyo balobelami bobele na verset wana moko na nsé ete: ”Tata [akokaba] mwana na ye, mpe bana bakotelemela baboti mpe bakoboma bango.’’ Yesu alingaki koloba ete bantoma bakokaki komizela mpo na kozwa botemeli ata epai na basangani ya mabota na bango.​—Matai 10:35.36.

Kati na mosala wana ya kosakola, bantoma basengelaki kozala na mpiko. Yesu alandi koloba ete: “Bakoyina bino mpo na nkombo na ngai. Kasi ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, akobika.”​—Matai 10:22.

Maloba mosusu oyo Yesu alobaki na libaku wana, ezali na ntina mingi lelo mpo na ba Témoins de Jéhovah. Mosala na biso ya kosakola motongami likoló na Bokonzi. Tozali kokokisa mosala na biso kozanga kosenga lifuti ya mosolo mpe tozali koluka bato oyo bazali kosepela na nsango to mpe baoyo babongi na yango. Tosengeli kozala na mayele. Banguna bazali mingi. Mbala mosusu, basangani ya mabota na bango, baninga ya zingazinga na bango to baninga ya mosala, babimisaka mikakatano makasi epai na bato ya motema sembo, mingi mpenza epai na baoyo bazali kolanda banzela na boklisto ya solo. Na ntina na botemeli wana, Yesu azongelaki lisusu likebisi na ye wana apesaki “elembo” ya koya na ye.(Matai 24:3, 9, 10; Luka 21:16, 17) Akundolaki lisusu ete tosengeli ’koyika mpiko kino nsuka mpo na kobika.’ Ee, tosengeli koyika mpiko kino nsuka na bomoi na biso to kino nsuka na biloko ya ntango oyo mpe kino tokokóta kati na mokili ya sika.​—Matai 24:13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Awa, mabongoli mosusu mazali kosalela maloba “mopagano” (Liloba lya Nzambe; “pagano” (Biblia na Nga la, Uele); “moto ayebi Nzambe te” Boyokani ya sika, “mabota na bapakano”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto