Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/6 nk. 4-6
  • Biblia euti na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia euti na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali bobele lisoló mpamba te
  • Mokumba na biso
  • Biblia ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Búku oyo ezali komonisa boyebi ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/6 nk. 4-6

Biblia euti na Nzambe

JÉHOVAH, Nzambe oyo azali na nguya mpe na bokonzi nsuka te, azali mpenza na lotómo ya kosolola lokola elingi ye elongo na bato na ye oyo akelaki. Soki aponi kosolola na nzela ya liloba likomami, esengeli na ye mpe kobatela nsango yango na boumeli ya bikeke mingi. Yango ezalaki bongo mpo na Biblia?

Soko mibu 1 500 liboso na Klisto, ntango Biblia ebandaki kokomama, ezalaki na mikanda misusu mingi mizalaki kolobela makambo na Nzambe. Kasi nyonso esilá mpenza ngala mpe esili kolimwa na boumeli ya ntango. Misusu mikundolamaki na bato oyo bakotimolaka mabelé mpo na koluka bitike ya kala(ba arkeologe) mpe mityami sikawa lokola bilakiseli mpamba kati na ba musées. Nzokande, bato babosanaki te biteni ya Biblia oyo bikomamaki eleki sikawa mibu 3 000; bakopi esili kobatelama kino na mikolo na biso. Likambo yango lizali mpenza komonana polele soki totaleli botemeli oyo Bíblia ezwaki na boumeli ya Lisoló na bato. Mokanda mosusu te mosili kotemelama to koyinama makasi lokola yango. Kotanga mpe kokabolama ya Biblia ezalaki kosengisa etumbu ya kofuta lomande, ya kokóta boloko, ya kobetama mpe mbala mingi kobomama.

Ndenge nini mokanda na bato nyonso mokokaki solo kobatelama kati na makambo motindo wana? Biblia eyanoli yango moko ete: “Liloba na Jéhovah lizali koumela seko.” (1 Petelo 1:25) Koumela ya Biblia mpe kozanga kobeba na yango epesi nzela na kondima yango lokola Liloba na Nzambe.

Epai mosusu, tosengeli mpenza kozela ete nsango oyo Nzambe ayebisi na bato ezala mpenza na bisika nyonso kati na mokili. Ezali bongo mpo na Biblia? Solo mpenza. Ata mokanda moko te mozali pene na Biblia kati na likambo oyo. Motuya ya kobimisama na yango ezali pene na ba ekzemplere miliare misato. Lisusu, mokanda moko te mosili kobongolama na minoko mingi lokola yango. sikawa ekoki kotangama, na mobimba na yango to ndambo na yango, kati na minoko koleka 1 900.

Société biblique américaine elobi ete, 98% ya bato na mokili mobimba bazali na Biblia. La Nouvelle Encyclopédie britannique ezali kobenga yango ete “buku ya mikanda oyo ezali mpenza na bopusi monene kati na lisoló na bato.” Na bongo, kolobela yango lokola mokanda monene ya mabelé ekoki te.

Boyokani oyo bozali komonana kati na Biblia, longwa ebandeli kino nsuka, yango moko ezali elembo monene ete epemamaki solo na Nzambe. Ekozala mpenza likambo na mayele na kondima ete, na boumeli ya mibu 1 600, babandisi 40 bakoka kobimisa mikanda oyo mizali na boyokani yango nyonso mpe nyonso milobela bobele motó na likambo moko ya ntina mingi? Yango ekoki kosalema te soki tokomipesa na makanisi ya bongo to na litambwisi na bato. Nzokande, ezali bongo mpo na mikanda 66 oyo misali Biblia. Bobele mayele oyo maleki ya moto, mayele mazangi nsuka kati na bileko nde ekokaki kobimisa mokanda moko moyebani mingi boye.

Ezali bobele lisoló mpamba te

Masoló ya Biblia mazali kopesa esengo. Kasi nsango euti na Nzambe oyo esuki bobele na kobeta masoló, ekozala na ntina mingi te mpo na biso. Tozali mpenza na mposa ya batoli mpe na mayele mabongi; nzokande tozali kokuta yango kati na Biblia. Na ndakisa, Biblia ezali kotinda biso na kolóna “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema,” bizaleli oyo bilobelami mingi mpenza kati na bankasa na yango. (Bagalatia 5:22, 23; Bakolose 3:12-14) Biblia ezali kolendisa molende, bopeto, ezaleli ya kolongobana, bosembo kati na libala, limemya mpe bolingo epai na mozalani, yango ezali na batoli mingi na ntina na boyokani kati na bato mpe kati na libota.

Ntango yango esalelami, batoli ya Biblia emonanaka mpenza na motuya. Ezali kosikola biso na kozanga boyebi mpe na biyambayamba. (Yoane 8:32) Mayele na yango makokani na mosusu te. Ntembe soko moke ezali te ete mayele na Nzambe mazali kati na yango.

“Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe lizali kookisa nguya na yango.” (Baebele 4:12, MN) Maloba oyo mazali solo koyokana na lolenge oyo Biblia ezali mpenza kobongola bato. Bankóto na bato basili kobwaka bizaleli mabe mpe basili komibongola na kotikáká ya bomoi na bango oyo ezali komema na libebi. Basili kolonga na likambo yango na komiyokanisáká elongo na mitinda ya Biblia na bolingo na bango moko.​—Baefese 4:22.

Nini ekomonanaka ntango bato baboyi kolanda mitinda ya Biblia? Yango ebotaka mawa mpe mpasi, bitumba, bobólá, maladi mazwami na nzela na bosangisi nzoto mpe mabota makabwani. Ntango oyo moto aboyi Biblia, asengeli komizela na bampasi motindo wana, mpamba te yango elimboli ete aboyi litambwisi na Nzambe, ye oyo akelaki moto mpe ayebi bamposa na ye.

Biblia ezali mpe koyebisa makambo mazali liboso, likambo oyo bato bakoki kosala yango te. Mokitano ya banguya ya mokili mobimba na boumeli ya bikeke, kobanda Babilone kino na mikolo na biso, esakolamaki mibu mingi liboso kati na Bibia. (Danyele, mikapo 2, 7, 8) Lisusu, esali soko mibu 2 000, uta bamonisaki na sikisiki kati na Bibia, makambo mazali koleka kati na mokili mobimba, makambo oyo mazali kokesenisa ekeke ya ntuku mibale na bikeke mosusu. (Matai mikapo 24, 25; Malako, mokapo 13; Luka, mokapo 21; 2 Timoté 3:1-5; 2 Petelo 3:3, 4; Emoniseli 6:1-8) Ebele na bisakweli ya Biblia oyo bisili kokokana bizali kondimisa biso ete bilikya ya avenire kitoko oyo yango ezali komonisa, bibongi na kotyelama motema.

Mokumba na biso

Makambo nyonso wana mazali ebele na bilembeteli ya solo ete Nzambe asololaki mpenza elongo na bato. Ezali solo ete Nzambe apesaki nsango yango na nzela na bato bazangi kokoka. Kasi yango epesi biso nzela te na kokanisa ete Biblia ezali mpenza solo te lokola yango ekokaki kozala mpo na nsango oyo epesami na Nzambe ye moko, longwa na monoko na ye kino na matoi ya bato, to oyo epesami na nzela na baanzelu, to na nzela na mwa makomi ya ekamwiseli mabongisami na likoló mpe mapesami na maboko na ye moko epai na bato.

Soki toyebi eutelo ya bulee, to ya bonzambe, na Biblia, yango ezali kopesa biso mokumba. Ezali na ntina malamu oyo Jéhovah azali kosenga biso ete totangaka Liloba na ye mbala na mbala. (Nzembo 1:1, 2) Botangi bakopesaka litomba ezali kosenga ezalela malamu ya elimo. Osengeli koyeba ete Biblia ekotangamaka te lokola mokanda nyonso mosusu. Osengeli kotalela yango “lokola liloba na bato te kasi lokola [mpenzal liloba na Nzambe.”​—1 Batesaloniki 2:13.

Kati na Biblia, makambo mosusu mazali mbala mosusu mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Kasi na lisalisi ya botangi na etingya, likoki ezali na kozwa boyebi malamu mpe kozala na emoneli malamu ya mokano mpe myango na Nzambe. (Baebele 5:14) Ekoki kozala ete ondimisami naino mpenza te ete Biblia ezali Liloba mosantu na Nzambe. Kasi ndenge nini okoki mpenza kozwa ekateli na yo na ntina na Biblia soki oyekoli yango na bozindo te?

Atako ntembe makasi oyo ebimi na ntina na likambo litali kondima soki Biblia Mosantu euti solo na Nzambe, kasi boyekoli na yango malamu epusaki bato mingi ya mayele na koloba lokola ntóma Paulo ete: “Nzambe asengeli kotangama solo atako bato nyonso bazali lokutá ”​—Baloma 3:4, MN.

[Etanda na lokasa 4]

Mokanda moko te mobelemi pene na motuya na kobimisama ya Biblia, oyo emonani ete ezali pene na bamiliare misato ya ba ekzamplere. Nouvelle Encyclopédie britannique ebengi yango ete “liboke na mikanda oyo ezali mpenza na bopusi monene kati na lisoló na bato”

Sikawa kati na mokili mobimba 98% ya bato bazali na Biblia

[Bililingi na lokasa 4]

Biblia ebatelamaki, nzokande mikanda misusu milobeli nzambe mazali bobele biloko mpamba bityami na musée

Na likoló: lisoló ya bato na Asulia mpo na mpela

Na loboko mobali: Mabondeli matindamaki epai na Nzambe ya Baezipito Rê Na ndingisa malamu ya British Museum

[Elilingi na lokasa 5]

Atako ekomamaki na bato 40 na boumeli ya mibu 1 600, kasi uta ebandeli kino nsuka, Biblia elobeli se motó na likambo moko na ntina mingi. Bobele mayele maleki oyo na moto, mayele oyo mazangi nsuka kati na bileko nde ekokaki kobimisa mokanda moyebani mingi boye

[Elilingi na lokasa 5]

Mokitano na banguya ya mokili mobimba na boumeli ya bikeke, kobanda na Babilone kino na mikolo na biso, esilaki koyebisama mibu mingi liboso kati na Biblia. (Danyele, mikapo 2, 7, 8)

[Elilingi na lokasa 6]

Ekoki sikawa soko mibu 2 000, uta Biblia eyebisaki na sikisiki makambo oyo mazali koleka na mokili mobimba, makambo oyo mazali kokesenisa eleko na biso na bileko mosusu. (Matai, mikapo 24, 25; Malako mokapo 13; Luka, mokapo 21; 2 Timoté 3:1-5; 2 Petelo 3:4; Emoniseli 6:1-8) Kokokisama mobimba ya bisakweli na Biblia epesi biso elikya ete elaká na Nzambe mpo na kotya paradis ne mabelé ekokokisama solo mpenza

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Reuters/​Bettmann Newsphotos

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto