Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/6 nk. 8-9
  • Yesu asilisi mosala oyo Nzambe apesaki ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asilisi mosala oyo Nzambe apesaki ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Asilisi mosala oyo Nzambe apesaki ye
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Nzela ya bozongi na paradis efungwami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Paradis oyo ezongi ezali kokumisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Yesu atye paradiso mpe asilisi mosala na ye
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/6 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye, mpe misala na ye

Yesu asilisi mosala oyo Nzambe apesaki ye

OYO nde bantina kitoko ya kosepela na yango ntango Mokonzi mobundi Yesu Klisto akolongola Satana mpe mokili na ye mabe!. Nsima na yango Boyangeli na kimya ya mibu nkóto na Yesu ekobanda.

Na litambwisi na Yesu mpe bakonzi mosusu oyo bakosala na ye elongo, babiki na Armagedon bakopetola mabelé na kolongoláká bitika nyonso ya etumba na sembo. Na boumeli ya mwa ntango, babiki na mabelé bakobota bana mpe bana yango bakosangana na mosala kitoko oyo etali kobongola mabelé na elanga moko kitoko.

Nsima na yango, Yesu akosekwisa longwa na nkunda na bango, motuya monene na bato oyo ekoki kokangama te mpo ete bango mpe bakoka kozwa libaku ya kosepela na paradis wana kitoko. Akosala yango mpo na kokokisa elaká oyo ete: “Ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”

Kati na basekwi yango, moto mabe oyo akufaki pene na ye likoló na nzeté na mpasi, ye mpe akozala wana. Kanisa lisusu na elaká oyo Yesu apesaki ye ete: ’‘Solo nazali koloba na yo lelo ete: Okozala na ngai elongo kati na Paradiso.” Moto yango akomemama na likoló te mpo ete ayangela pene na Yesu lokola mokonzi; Yesu mpe akoya lisusu te lokola moto mpo ete afanda na ye elongo kati na paradis ya mabelé. Na yango, Yesu akozala na ye na ndimbola oyo ete akozongisa ye na bomoi kati na Paradis mpe akosenzela na boye ete bamposa na ye, ezala ya mosuni to ya elimo, ekokisama lokola emonisi yango elilingi ya lokasa oyo.

Kanisa moke! Na litambwisi na Yesu oyo litondi na bolingo, libota mobimba na bato​—babiki na Armagedon, bana na bango mpe bamiliare na basekwi oyo bakotósa ye​—ee, bango nyonso bakokóla elongo kino kokóma na ezalela ya kokoka. Na nzela na Mwana na ye mokonzi Yesu Klisto, Jéhovah akofanda elongo na bato, na elobeli ya elimo. Mpe lokola elobi yango mongongo mouti na likoló oyo Yoane ayokaki, “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.” Awa na mabelé, moto moko te akoyoka mpasi to akozala na maladi.

Na nsuka ya Boyangeli na mbula nkóto na Yesu, makambo makozala motindo moko na oyo ezáláká ntango Nzambe alobaki na babalani ya liboso, Adam mpe Eva, ete babota mpe batondisa mokili. Etando ekotonda na bato na sembo mpe ya kokoka. Ezali bongo mpo ete matomba ya mbeka na Yesu makopesama epai na bato banso. Liwa oyo eyaki mpo na lisumu ya Adam ekolongwa.

Na bongo, Yesu akokokisa makambo nyonso oyo Nzambe azalaki kozela epai na ye. Na yango, na nsuka na Boyangeli ya mbula nkóto, akozongisa Bokonzi epai na Tata na ye mpe akopesa ye libota na bato ya kokoka. Nzambe akofungola Satana mpe bilimu mabe na ye na libulu mozindo, yango ezalela na kozanga kosala mosala oyo ekokani na liwa, Mpo na ntina nini?

Na nsuka ya mibu nkóto, kati na bato oyo bakofanda na Paradis na mabelé, mingi bakozala basekwi baoyo kondima na bango emekamá naino te. Liboso ete bakufa, bayebaki te bilaká na Nzambe mpe na yango, naino bamonisi te kondima na bango na bilaká yango. Lisusu, nsima na kosekwisama mpe na koyekola solo ya Biblia, ekozala na bango mpasi te ete basalela Nzambe kozanga kokutana ata na botemeli moko kati na Paradis. Kasi soki Satana azwi libaku ya komeka kopekisa bango kosalela Nzambe, bakotikala sembo kati na komekama? Ezali mpo na koyanola na motuna wana nde Satana akokangolama na boloko.

Emoniseli oyo Yoane azwaki elakisi ete nsima na Boyangeli ya mbula nkóto na Yesu, Satana akolonga kopengola ntalo monene na bato longwa na losambo na Nzambe. Kasi, ntango komekama ya nsuka ekoleka, Satana, bilimu mabe na ye mpe baoyo nyonso ye akolonga na kokósa, bakobomama mpo na libela. Nzokande, baoyo bakolonga momekamo, babiki na sembo, bakozala na bomoi mpo na kosepela libela na mapamboli mapesami na Tala na bango ya likoló.

Emonani polele ete, Yesu asili kokokisa mpe akolanda kokokisa mosala monene kati na kokokisama ya mokano na nkembo na Nzambe. Oyo nde avenire kitoko epesameli biso na nzela na makambo nyonso oyo akokisi lokola Mokonzi na likoló oyo atyami na Nzambe! Kozanga kobosana makambo nyonso oyo ye asalaki ntango azalaki moto.

Yesu ayaki na mokili na bolingo na ye moko mpe, na nzela na mateya na ye, alakisaki biso Tata na ye. Lisusu, amonisaki bizaleli kitoko ya Nzambe. Tozali mpenza kosimbama kati na motema na biso ntango tozali kotalela mpiko monene, nguya, bwanya boleki nyonso, mayele mpo na koteya, molende, motema mawa mpe bolingo oyo amonisaki. Na ntembe te, mitema na biso mikoki bobele kozala na botondi mingi mpo na ye wana ezali biso kokanisa lolenge oyo ye anyokwamaki mpo na kofuta lisiko oyo lipesi biso nzela na kozwa bomoi.

Ya solo, touti nde komona moto aleki bato nyonso na nzela na boyekoli oyo ya bomoi na Yesu. Bonene na ye bomonani polele mpe na nguya mingi. Topusami na kozongela maloba ya guvernere moromé Ponti Pilato, ete: “Botala moto ye wana!’‘

Soki tondimi motuya ya mbeka na lisiko na ye, tokoki kosikolama na bozito oyo ezali bongo lisumu mpe liwa oyo tozwaki epai na Adam, mpe Yesu akoki kokóma “Tata na seko’’ na biso. Baoyo nyonso balingi kozwa bomoi ya seko basengeli koyeba bobele Nzambe te, kasi lisusu Mwana na ye, Yesu Klisto. Tozali kolikya ete botangi ya masoló oyo esili kosalisa yo na kozwa boyebi yango! 1 Yoane 2:17; 1:7; Yoane 5:28, 29; 3:16; 17:3; 19:5; Luka 23:43, MN; Genese 1:28; 1 Bakolinti 15:24-28; Emoniseli 20:1-3, 6-10; 21:3, 4; Yisaya 9:6.

◆ Libaku nini kitoko babiki ya Armagedon mpe bana na bango bakozala na yango?

◆ Longola babiki ya Armagedon mpe bana na bango, banani mosusu bakozwa litomba ya Paradis, mpe na ndimbola nini Yesu akozala elongo na bango?

◆ Makambo makozala motindo nini na nsuka ya mbula nkóto, mpe na nsima Yesu akosala nini?

◆ Mpo na nini Satana akobimisama na libulu mozindo, mpe na nsima, nini ekokomela ye elongo na baoyo bakolanda ye?

◆ ngenga nini Yesu akoki kokóma “Tata na seko na biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto