Mituna na batangi
Ebongi mpo na mwasi moklisto ete alata babiju to asala monzele,ete apakola langi na nsuki na ye, to mpe alanda biselelo mosusu bikokani bongo?
Na mikolo na biso lokola mpe na ntango na kala, bato oyo bazali koloba ete bazali komiyokanisa na Biblia basili kobimisa makanisi ndenge na ndenge na ntina na kitoko na mwasi.a
Kati na mangomba mosusu, basi basalaka monzele soko moke te, ata kolata biju mpe te. Na ndakisa, zulunalo Les amish (angl.) elimboli ete basangani ya lingomba wana ’’baboyi kotya bikelakela na libandá ya nzoto na bango, mpamba te bakanisi ete, moto oyo azali kopesa motuya na libandá ya nzoto na ye azali na likámá. Na yango, mposa esengelaki kozala na makambo ya elimo na esika ete atya yango na nzoto. Bamosusu bazali nkutu kopesa mikapo ya Makomami.”
Mpe bazali kotonga 1 Samwele 16:7 ete: ’’Jéhovah alobi na Samwele ete: ’Tala elongi na ye te mpe molai na nzoto na ye te . . . Moto akotalaka lolenge na libandá nde Jehovah akotalaka kati na motema,’ ” Mokapo oyo elobeli nde molai ya Eliaba, ndeko ya Davidi. Ba versets va zingazinga ezali komonisa ete, awa, Nzambe alobaki te mpo na bopeto na libandá ya nzoto to kobongisama na nzoto, na ndakisa soki Davidi to bandeko na ye babongisaki nsuki to balataki biloko na wolo na bilamba na bango.—Genese 38:18; 2 Samwele 14:25, 26; Luka 15:22.
Ndakisa wana ezali komonisa lolenge oyo bato mosusu bazali komeka kondimisa maloba na bango na verset oyo elimbolami malamu te, na kolobáká ete basi baklisto basengeli kotikala bobele lolenge oyo babotamaki, kozanga ete basala monzele ata kolata biju mpe te. Ya solo, Bibia elobeli te na bolai na ntina na likambo ya kobongisa libandá na nzoto. Ezali kondima te bamoko na mitindo ya kobongisa bonzengá, bobele bongo, ezali mpe kopekisa mitindo misusu te. Biblia ezali nde kolakisa makambo na bokatikati.Tolobela naino mitindo oyo mpe totala lolenge nini tokoki kosalela yango na mikolo na biso.
Ntóma Paulo apesaki toli oyo epemami na Nzambe ete: “Nalingi ete basi bazala na molato mobongi, ete bakembisa nzoto na bopolo mpe na makanisi malamu: na kotongatonga nsuki te, na wolo te, na mabángá na motuya te, na bilamba na motuya moleki ndelo te.”(1 Timoté 2:9, MN) Petelo akomaki maloba motindo moko: “Tika ete kitoko na bino ezala kitoko ya libandá te oyo na kotongatonga nsuki mpe na komizingela biloko na wolo, soko na kolata bilamba kitoko. Kasi tika kitoko na bino ezala eloko ebómbami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na elimo ya bopolo mpe na kimya; yango ezali na motuya monene na miso na Nzambe.”—1 Petelo 3:3, 4.
Maloba na greke mabongolami mpenzampenza na “bakembisa.” “mobongi” mpe “nzoto” ezali lolenge na liloba kosmos, oyo abimisi mpe liloba ’’oyo ekobongisaka nzoto (nsuki, loposo mpe bongo na bongo),” oyo elimboli “biloko bitaleli bonzengá ya nzoto.” Mikapo wana mizali bongo kosalisa biso na kozwa eyano na mituna mitaleli bisalelo ya bankisi mpo na kobongisa nzoto to kosala monzele, na kolata babiju to na kosalela mitindo misusu oyo basi bakobongisaka nzoto na bango.
Paulo mpe Petelo balingaki koloba wana ete basi baklisto basengelaki te kotonga nsuki na bango, azala kolata babiju to wolo, azala mpo na kosalela bankisi ya kobongisa bonzengá? Te; soki likanisi na bango lizalaki bongo, mbele basi baklisto bakokaki te kolata “bilamba ya libanda.’’ Nzokande, Doloka, mwasi oyo Petelo asekwisaki, alingamaki mingi, mpamba te atongaki “bilamba ya libanda’’ mpo na bandeko basi mosusu. (Misala 9:39) Na yango, mokapo ya 1 Timoté 2:9 mpe ya 1 Petelo 3:3, 4 epekisi basi baklisto te, ndakisa, mpo na kotonga nsuki, kolata mayaka ya wolo, kolata mayaka na mabángá ya motuya to mpo na bilamba ya libanda. Kasi Paulo azalaki nde kokundola ntina ya kozala na bopolo mpe na makanisi malamu kati na lolenge oyo basi bazali kobongisa nzoto na bango. Petelo mpe amonisaki ete, na esika ya komipesa mingi na libandá na nzoto to na kosala monzele, basi baklisto basengeli kotya likebi na bango mingi likoló na bomoto ya mozindo ete babenda mibali na bango baoyo bazali bandimi te.
Na elobeli mosusu, Biblia ekweisi te milende nyonso oyo mizali kosalema mpo na kobongisa to mpo na koyeisa nzoto kitoko. Bamoko na basaleli na Nzambe, ezala mibali to basi, bazalaki kolata babiju. (Genese 41:42; Exode 32:2, 3; Danyele 5:29) Estere, mwasi mosambeli na sembo na Jehovah, andimaki ete babongisa bonzengá na ye na boumeli na ntango molai, oyo ezalaki kosenga ete basalela mafuta, malasi mpe na konyolisa nzoto na bankisi. (Estere 2:7, 12, 15; tala Danyele 1:3-8.) Nzambe elobaki na lolenge ya elilingi ete, alatisaki Yisraele na makomo, na minyolólo na nkingó, na lopete na zólo mpe na biloko na matoi. Yango esalaki ete libota wana ’’bonzengá mpenza.’’—Ezekiele 16:11-13.
Ezali solo ete lisoló ya Ezekiele lizali kokebisa biso ete totya likebi mingi te na libandá ya nzoto. Mpo na yango Nzambe alobaki ete: ’’Otyaki motema na bonzengá na yo, mpe osalaki ekobo na ntina na lokumu na yo, mpe osalaki ekobo na baleki-nzela nyonso.” (Ezekiele 16:15;Yisaya 3:16, 19)Na yango, Ezekiele 16:11-15 elobeli mayele oyo mazali na toli epesamaki nsima na Paulo mpe Petelo, baoyo bapesaki etinda na komipesa te na kolekisa ndelo mpo na kobongisa libandá ya nzoto. Mwasi oyo akolala babiju akosenzela ete motuya na yango to lolenge yango esalemi ezala na bopolo, na kopengoláká kolekisa ndelo, lolendo te to na motindo mobongi mpe te.—Yakobo 2:2.
Ezali boni mpo na bankisi ya kobongisa bonzengá? Mwasi moklisto akoki kosalela nkisi oyo ekoyeisaka mbebu motane (rouge à lèvres), nkisi na langi ndenge na ndenge oyo basi bakotyaka na matàma (fard à Joues), oyo batyaka na bitéké ya miso (fard à paupières to eye-liner)? Na Yisraele mpe kati na bituká ya zingazinga, bakundoli na biloko na kala bakundolaki engbóngóló ya biloko mpo na kosala monzele, mpe bisaleli na yango mpe batalatala. Ee, na ntango na kala, bato ya Orient bazalaki kosalela bankisi mpo na kobongisa bonzengá oyo ezalaki ebandeli ya mingi na bankisi oyo ezali kosalelama na mikolo na biso. Ekanisami ete ndimbola ya nkombo Kelene-Hapuku, mwana mwasi na Yobo, ezali ete ”Liseké lya nkisi moïndo (mpo na kotya na bitéké ya miso).”—Yobo 42:13-15.
Atako bankisi ya kobongisa nzoto (nsuki, loposo mpe bongo na bongo) esalelamaki na Yisraele, kasi Biblia ezali na bandakisa oyo ezali komonisa likámá ya kolekisa ndelo. wana ezalaki ye mokonzi-mwasi na Yisraele na boumeli ya bambula mingi, Yezabele ’’atyaki langi moïndo na miso, mpe abongisaki motó na ye,’’ (2 Mikonzi 9:30) Ntango Nzambe amonisaki motindo oyo libota na Yisraele basalaki boyokani ya mbindo elongo na mabota ya Bapakano, alobaki ete Yisraele ‘amilatisaki biloko kitoko na wolo, mpe apakolaki langi moïndo na miso na ye mpe amizalisaki na bonzengá.’ (Yilimia 4:30; Ezekiele 23:40) Ezala ba versets oyo, to ba versets mosusu, elobi te ete ezali mabe na kosalela bankisi ya kobongisa libanda na nzoto. Kasi lisoló na yezabele lizali komonisa ete apakolaki langi moïndo na miso mpo na kosala ete monzele na ye emonana uta mosika, ata epai na Yehu, ye oyo azalaki na libandá ya ndako. Liteya nini tozali kozwa na yango? Ete, ebongi te kozala na lolendo mpo na monzele, mpe ebongi na kolekisa ndelo te.b
Ya solo, ezali bobele basi moke nde bakoki kondima ete bazali kopona mabe, to bazali kolala babiju mingi mpenza mpe kosala monzele na kolekisa ndelo. Nzokande ezali solo ete, kozanga komityela motema to bopusi ya piblisité oyo ezali kosalema mingi mpenza, ekoki kopusa mwasi na kosala monzele na kolekisa ndelo. Akoki komesena na lolenge wana ya kobongisa libandá na nzoto oyo azali kosala yango na mwango wana, kino kozanga kososola ete libandá na nzoto na ye lizangi ’’bopolo mpe makanisi malamu” lokola mingi na basi baklisto.—Tala Yakobo 1:23, 24.
Makanisi na bato makeseni mpo na lolenge ya kosepela na makambo, wana tondimi yango; bamoko na basi bakolalaka babiju to kosala monzele bobele moke, nzokande basusu bakolalaka babiju mingi mpe kosala monzele mingi. Ezali likambo na mayele na koboya kosambisa, moto oyo azali kosala monzele to kolala babiju mingi koleka biso. Mimeseno ya mboka na mboka esengeli mpe kotalelama. Ezali te mpo ete bitongelo mosusu ya bilamba bindimami kati na mboka mosusu (to ezalaki kolatama kala), nde yango esengeli kolatama na mikolo na biso mpe kati na etuká oyo biso tolandi.
Mwasi moklisto ya mayele akotalela mbala na mbala, lolenge nini azali kobongisa libandá na nzoto na ye mpe komituna na sembo nyonso ete: ‘Babiju na ngai mpe monzele ezali mingi mpenza (Soki mpe emonani mingi mpenza) koleka oyo na mingi na basi baklisto ya etuká na ngai? Nazali nde kobongisa nzoto na ngai lokola basi ya mokili to lokola basi ya lokumu na cinéma? To mpe nazali mpenza kolanda likebisi ya 1 Timoté 2:9 mpe 1 Petelo 3:3, 4? Na mokuse, monzele na ngai mpe lolenge na ngai ya kobongisa nzoto ezali mpenza na bopolo, komonisáká limemya ya sembo mpo na makanisi mpe mayoki ya bato mosusu?—Masese 31:30.
Mwasi oyo abalani na moklisto moko akoki kosenga likanisi to batoli ya mobali na ye. soki alingi kozala na lisosoli malamu, akoki kozwa makanisi malamu epai na bandeko basi ya lisangá. Na esika ete atuna yango epai na moninga oyo akokani na ye mpo na lolenge na kosepela na makambo, mwasi moklisto akotuna yango epai na bandeko basi mikoló, baoyo bayebani mpo na bokatikati mpe mpo na mayele na bango. (Tala 1 Mikonzi 12:6-8.) Biblia elobi ete basi bakomeli oyo bakobangaka Nzambe, bakoki “kolakisa bilenge basi ete . . . bazala basembwi, na ezaleli na peto . . . , ete liloba na Nzambe litukama te.” (Tito 2:2-5) Mwasi moklisto oyo ateli na elimo akolinga mpenza te ete kozanga bopolo na ye na lolenge ya kolata babiju to na kosala monzele, emema moto moko na ‘koluka’ Liloba to basaleli na Nzambe.
Ndakisa ezwami na Biblia na Tamala ezali kokundola ete, mwasi akoki koyebana engebene lolenge oyo asaleli libandá na nzoto na ye oyo ekoki koyebisa makambo mingi. (Genese 38:14, 15) Likambo nini mwasi moklisto akoyebisa na bato na nzela na lolenge na ye ya kotonga nsuki to na kotya langi na nsuki na ye (soki nde atye nkisi mpo ezwa langi mosusu), na nzela na babiju oyo azali kolata mpe na bankisi ya kobongisa bonzenga oyo azali kosalela? Ekozala boye ete, Tala mwasi oyo azali kosalela Nzambe, oyo abongisi nzoto na ye malamu, na bopolo mpe na bokatikati?
Moto oyo azali komona baklisto, to azali kosangana na makita na biso, asengeli kozala na makanisi malamu mpo na bango. Ezali yango nde ekomonanaka mpo na baoyo bazali kotala biso. Mpo na mingi na basi baklisto, eloko moko te ekopesaka likanisi epai na bato bazali libandá ya lisangá ete basi yango bazali na bopotu. to bazali kosala monzele to mpe kobongisa nzoto na kolekisa ndelo: na likeseni, bazali nde komibongisa ’’lokola ebongi na basi oyo bazali koyambola ete bazali na kondima epai na Nzambe.’’—1 Timoté 2:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ekeke ya misato, Tertullien alobaki ete baoyo “bazalaki kopakola mafuta to pommade na mposo na bango, baoyo bazalaki kotya langi motané na matàma na bango to kotya bankisi mpo na koyindisa nsuki na miso na bango, basi yango bazali kosala lisumu epai na Ye.” Amonisaki ete, ata baoyo bazalaki kotya langi na nsuki na bango, bazalaki kosala maba. Kolimboláká na libunga mpenza maloba na Yesu oyo mazali na Matai 5:36. Tertullien afundaki bango boye ete; “Bazalaki [basil kotemela Nkolo! Balobi ete. ’Tala! Toyeisi [nsuki na biso] mpembe te soko moïndo mpe te, kasi toyeisi yango mai na mosáká’” Abakisaki ete: “Tozali nkutu kokuta bato oyo bazali kooka nsoni mpo na mbula na bango mpe bazali komeka koyindisa nsuki-mpembe na bango.” Tertullien azalaki kolobela wana makanisi na ye moko. Nzokande abongolaki makambo, mpamba te ndimbola na ye etongami likoló na likanisi azalaki na yango ete, mwasi nde amemaki etumbu na mokili. Na likanisi ya Tertullien, mwasi asengelaki bongo ‘kotambola lokola Eva, motó na nsé mpo na komonisa ezaleli ya kobongola motema’ na ntina na ‘mabe mauti na lisumu ya ebandeli.’ Biblia elobi bongo te; ezali Adam nde Nzambe akweisaki mpo na lisumu ya mokili.—Baloma 5:12-14;1 Timoté 2:13, 14.
b Eleki mwa ntango, bipanzelo na nsango ya Amerike bilobelaki likambo moko lipesaki nsoni epai na moto moko oyo apesaka mateya na nzela na televizyo. Mwasi na ye oyo azalaki kobima elongo na ye na télévizyó mpo na koteya, abendaki mingi likebi ya bato. Soki lolandi bipanzelo na nsango, mwasi yango amonisaki likanisi oyo abokwamaki na yango ete “monzele mpe cinéma” ezali lisumu, kasi na nsima, abongolaki lisusu ezaleli na ye kino komikembisa mpenza na “monzele na langi mingi mpe yango elekaki ndelo.’’
[Bililingi na lokasa 31]
Ekundolami na Moyen-Orient na bakundoli na biloko na kala: Engbóngóló esalami na mpembe na nzoku mpo na kotya bankisi ya kosala monzele, batalatála, minyolólo na wolo mpe na pauni
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Photos: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.