Maladi mpe liwa ekolongama mosika te?
MALADI ekozala lisusu te, liwa ekozala lisusu te! Mpo na bato mingi, maloba oyo mazali bobele ndoto mpamba. Na bokuse, lokola ekomaki yango monganga Wade Oliver, profesere ya bactériologie, ete: “Uta bantango ya kala na Lisoló na bato, maladi ezali na bopusi monene likoló na bomoi ya bato . . . Bamaladi makasi epalanganaki mingi mpenza epai na bato . . . Uta kala, maladi ezali sé konyokola bango.”
Tozali na ntina moke ya kokanisa ete mbongwana monene ebelemi? Mosala ya monganga ekómi pene na kolongola maladi nyonso mpe, mbala mosusu na liwa lokola?
Na ntembe te, minganga mpe bato na mayele basili kokokisa mosala monene mpo na kolónga maladi. Wapi moto na mayele oyo akomonisa botɔndi te na ntina na nkisi makasi ezwamaki mpo na choléra, na nsuka ya ekeke na zomi na libwa, to na ebongiseli ya bokatisi mangwelé na ntina na kolokóto, maladi oyo bato bazalaki kobanga mingi? Nkisi yango esalemaki na 1796 na Edward Jenner. Asalaki yango na mai ya mpota mosusu ezalaki na likámá ya koboma te, yango ebengami vaccine. Na 1806, Thomas Jefferson, prezidá ya Etats—Unis, alobelaki bato mingi kati na mokanda oyo akomelaki Jenner, ete: “Okoki kozala na esengo mozindo na koyeba ete bato nyonso bakozala ntango nyonso kokanisa yo kino seko. Ekozala bobele na Lisoló nde bakitani na biso bakoyeba ete maladi mabe, kolokoto ezalaki.”
Lisusu, bolóngi oyo minganga bazwi likoló na bamaladi lokola bùkábuka mpe maladi ya kati na mongongo, ebongi na biso kosanzola yango mpe kozala na botɔndi mpo na yango. Lolenge moko, tokokumisa elongo bokóli bosalami kala mingi te kati na lolenge ya kosalisa bamaladi ya motema mpe ya kansere. Atako bongo, bato bazali sé kokufa na bamaladi yango. Mokano na kolongola bamaladi nyonso emonani mwa moke ete ekokokisama te.
Bamaladi ya “sika”
Soki na bambula eleki bato basili kosala bamasini lokola ba scanners (bamasini oyo ekosalisaka minganga na komona maladi oyo ezali kati na nzoto na moto) mpe bazwi mayele ya kosala lipaso to opération ya nzoto na moto, likanisi mosusu limonisi ete makambo yango esili mpe kobimisa bamaladi mingi “ya sika,” lokola moko na maladi ya mpanzi oyo ekopesaka mɔtɔ na nzoto (maladie du légionnaire), maladi oyo ekozwamaka na ngɛngɛ oyo babengi ete syndrome de choc toxique mpe monguna mosusu ayebani mingi mpo na koboma: SIDA.
Ezali solo ete bamoko bazali komituna na meko nini bamaladi yango ezali mpenza ya sika. Lisoló moko libimaki kati na zulunalo U.S.News & World Report emonisi ete, kati na makambo mosusu, bamaladi oyo emonanaki uta kala, bobele na nsima nde eyei kotalelama malamumalamu, bongo bapesi yango bankombo ya sika. Tozwa ndakisa moko, maladi ya mpanzi oyo ekopesaka mɔtɔ na nzoto (maladie du légionnaire) eyebanaki mbala ya liboso na mobu 1976. Nzokande ekoki kozala ete liboso batalelaki yango malamumalamu te mpe bakokisaki yango na maladi ya mpanzi oyo euti na banyama mike ebengami virus. Lolenge moko, maladi oyo ekozwamaka na ngenge oyo babengi ete syndrome de choc toxique, etalelamaki liboso lokola maladi akobebisaka mposo.
Bamaladi mosusu ezali ntango nyonso komonana mpenza lokola ete ezali ya sika. SIDA ezali maladi oyo eyebani mingi. Maladi wana ekolembisaka nzoto mpe ezali koboma, eyebanaki mpe epesamaki nkombo mpo na mbala ya liboso na mobu 1981. Fièvre purpiruque du Brésil, maladi mosusu ya “sika” oyo eyebani mingi te; yango emonani na kobakisama ya mɔtɔ na nzoto mpe ezali kotika bilembo motane na mposo ya nzoto. Maladi yango eyebanaki na Brésil na mobu 1984 mpe kati na bato mibale oyo bazwaki maladi yango, moko akufaki, to na elobeli mosusu 50%.
Elikya ya kobika ezali te
Na yango, atako milende nyonso oyo bato bazali kosala, elikya ya kobika malamu mpe ya seko na bamaladi oyo tozali na yango, ezali te. Na ntembe te, uta 1900, elikya ya kozala na bomoi ya bato ebakisami na pene na mibu 25. Kasi bokóli yango bosalemi libosoliboso na mayele na minganga oyo basili kokitisa makámá na kufa epai na bana bakomeleke mabele mpe epai na bana mike. Elikya na bomoi ya bato etikali mingimingi pene na “mbula ntuku nsambo” oyo Biblia elobeli yango.—Nzembo 90:10.
Tozali bongo kokanga ntina ya likambo oyo bapanzi nsango balobelaki liwa ya Anna Williams oyo na sanza ya Décembre 1987, akufaki na mibu 114. Na ntina na liwa yango, mopanzi nsango moko akomaki ete: “Bato na sianse bakanisi ete molai ya bomoi na moto ezali na kati na mibu 115-120. Kasi mpo na nini esengeli kozala bongo? Mpo na nini nzoto ya moto ekolemba na nsima na mibu 70, 80, to mpe 115 ya bomoi?”
Na bambula 1960, bato ya mayele bamonaki ete baselile ya moto ekobotanaka soko mbala ntuku mitano. Soki okómi na nsuka wana, eloko moko te ekoki kosalema mpo na kobatela baselile na bomoi. Yango ezali nde kokweisa likanisi ya bato na sianse oyo elobi ete, soki makambo manso mabongisami, mbɛlɛ baselile ya moto ekoumela seko.
Na nsuka tokobakisa ete, ndambo monene ya mpasi oyo bato bazali na yango, euti na moto ye moko. Moto moko ya mayele asalaki bosukisi oyo ya mayele: “Bamaladi elongami bobele mpo na bankisi ya minganga te. Lisoló ya maladi ekangisami mpenza na makambo matali esika bato bafandi mpe bizaleli na bango.”
Lisangá ya mokili mobimba likotalelaka makambo ya kolongono ya nzoto, emonisaki ete: “Na esika ya kobanda naino kobundisa bantina ya bamaladi, tobebisi nzoto na biso na elikya ete sianse, minganga, to balopitalo bakozwa nkisi mpo na yango. Ezali solo ete tokoki te koboya kokende na lopitalo, mpamba te yango ekobikisaka bomoi na bato, kasi tosengeli koyeba ete yango ekobakisaka eloko moko te na ‘kolongono ya nzoto’ na biso: yango ezali kosalisa biso ete tokufa te. . . . Mposa oyo ezali koboma bameli ya makaya to mpe bameli ya masanga, bopusi oyo bosomele akobimisaka kati na makanisi mpe na nzoto ya moto: yango ezali bamoko na ‘bamaladi ya sika.’ Mpo na nini tozali kolobela te ‘bopalangani ya makámá na mituka,’ oyo ezali kobebisa bomoi na bato mingi mpe ezali kosilisa misolo na biso?”
Maladi, mpasi mpe liwa ezali ntango nyonso na nguya monene likoló na biso. Atako bongo, tozali na bantina ya kolikya mpo na ntango oyo maladi mpe liwa ekozala lisusu te. Lisusu, esengeli mpenza koyeba ete eleko yango esili kobelema.
[Etanda na lokasa 4]
“BAMALADI YA EZIPITO”
Kino kati ya Biblia tozali kokuta milende mpamba oyo bato basalaki mpo na kosilisa maladi. Tozwa na ndakisa, “maladi mabe ya Ezipito” oyo Moïse alobelaki.—Deteronome 7:15.
Emonani lokola ete bamaladi elandi etangami kati na bamaladi yango: kovimba makolo mpe nzoto mobimba (éléphantiasis), pulùpulù ya makilá kolokóto, bibimba (bibó) mpe maladi ya miso. Libota oyo Moïse azalaki kati na yango, ezwaki bamaladi wana te libosoliboso, mpo na mitinda ya bopeto oyo mipesamelaki bango na nzela na kondimana na Mibeko.
Kasi botaleli malamu ya bankisi oyo Baezipito basalaki ezali kopesa nzela na koyeba ‘bamaladi ya Ezipito.’ Kati na yango ezalaki na motindo na maladi ya mingai to rhumatismes, motindo na maladi ya mpanzi, maladi ya mino mpe ya mbángá, maladi babengi ete apendicite mpe maladi ya kotanga makilá. Na mokanda moko ya monganga ya kala mobengami Papyrus Ebers, nkutu elobeli bamaladi lokola bibimbá, bampasi na likundù (estomac) to ya libale (foie), ya diabète, maladi ya mába. maladi ya mpɔti, mpe ya kokufela matoyi.
Minganga ya Ezipito ya kala bazalaki kosala milende nyonso mpo na kobundisa bamaladi yango mpe bamosusu nkutu bamipesaki na koyeba kosalisa na sikisiki maladi boye to boye. Herodote, mokomi ya makambo ya kala, ye Mogreke akomaki ete: “Mboka [ezipito] etondi na minganga; moko azali kosalisa bobele maladi ya miso, mosusu oyo ya motó, ya mino, ya libumu to bamaladi ya kati na nzoto.” Ekoki kozala ete “mosala ya monganga” ya Ezipito ezalaki na bikelákela elongo na bokósi ya lingomba, oyo ekeseneki mpenza na lolenge na kosala ya bato ya sianse.
Minganga ya ntango na biso basili mpenza kolónga maladi. Kasi, Jessie Dobson, moto na mayele na makambo ya monganga, amonisaki likambo oyo lizali kotinda na kokanisa: “Makambo nini tokoki koyeba likoló na bamaladi na ntango ya kala? Nsima na kotalela malamu, emonani lokola ete bamaladi mpe mpasi na ntango ya kala ekeseni mpenza te na oyo tozali komona lelo . . . Emonani ete bokasi mpe milende oyo esalemi na bolukiluki oyo ezwi ntango molai, esalisi te na kosilisa maladi.’’—Disease in Ancient Man.