Mosika te maladi, liwa ekozala lisusu te!
MOTO moko te asepelaka kozala na maladi, mpe moto moko te alingaka kokufa. Profesere moko ekolakisaka ezaleli oyo minganga basengeli kozala na yango liboso na bato na maladi, alobi ete: “Bolukiluki ya kozala na bomoi molai emonani lokola ete ezali likambo ya mokili mobimba, mpe ezali komonana na bisika mingi epai kuna bato bazali.Ezali yango ekangami na mposa makasi ya kozala ntango nyonso na bomoi. . . . Ponce de Léon ayebani mingi kati na bato oyo bamipesaki na boluki ya bomoi molai na boumeli ya bomoi na bango. Milende ya minganga mityami mingimingi mpo na koyeisa bomoi molai na nzela ya koluka kolonga maladi mpe liwa.”
Liwa ekopesaka mpasi na bomoto na biso mpenza na boye ete tozali koluka kokitisa mpasi yango na ntango yango ezwaka baninga na biso ya bolingo to libota na biso. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda coutumes funnéraires universelles (angl.): “Libota moko ezali te oyo ezali mpenza ya kalakala to na mayele mingi, oyo, soki batiki bango kosala mpe soki bapesi bango misolo, nde batiki kosala milulu ya bokundi bakufi na bango. . . . Momeseno wana mokokisi mposa oyo bato babotami na yango mpe mposa yango ezali epai na bato banso. Kokunda bakufi elongo na milulu etalelami lokola likambo ‘malamu,’ nde kozanga kosala yango, etalelami lokola likambo ‘mabe,’ lokola libunga monene oyo esengeli kosenga bolimbisi to kooka nsoni mpo na yango, mingi mpenza soki mowei azalaki ndeko na biso ya penepene, soki azalaki moninga na biso, soki tozalaki kofanda esika moko elongo na ye to mpe tozalaki na boyokani elongo na ye kati na makambo mosusu. . . . [Motol azali ekelamu oyo akokundaka bakufi na ye elongo na milulu.”
Ebandeli ya maladi mpe liwa
Likanisi oyo ete mokolo moko maladi mpe liwa ekosila ezali kosepelisa bato mingi, kasi moboko ya endimeli yango ezali nini? Moboko yango mozali makasi, mobongi na kotyela motema mpe ekoleka te. Ya solo, ezali Biblia Mosantu, Liloba lipemami na Mozalisi na biso.
Biblia elimboli polele ebandeli ya bampasi ya mokili. Eyebisi biso ete moto ya liboso, Adam, azalisamaki na Nzambe mpe atyamaki na paradis oyo ezalaki na esika moko na Moyen-Orient. Adam azalisamaki moto ya kokoka; azalaki na maladi te mpe asengelaki kokufa te. Na nsima azwaki mwasi oyo azalaki mpe moto ya kokoka, mpe bakokaki kosepela elongo na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé.—Genese 2:15-17, 21-24.
Ezaleli wana kitoko eumelaki te. Mpo na nini? Mpo ete Adam aponaki, na moyimi nyonso, ete azala na bomoi ya lipandá longwa na Nzambe. Makambo mabimaki ezali bongo mosala makasi, monyoko, mpasi mpe nsuka na yango liwa. (Genese 3:17-19) Bakitani na ye basangolaki bomoi ya mpasi oyo Adam aponaki. Baloma 5:12 elimboli yango na maloba oyo ete: “Mabe makotaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” Baloma 8:22 (MN) ebakisi ete: “Kino sikawa toyebi ete, biloko nyonso bizalisamaki na Nzambe bizali kokimela mpe kooka mpasi elongo.”
Na mabelé to na likoló?
Nzokande, Biblia ezali kondimisa biso ete mosika te Nzambe akomema bato ya botósi kino na ezalela ya esengo oyo Adam na Eva babungisaki. Emoniseli 21:3, 4 elobi ete: “Nzambe ye moko akozala na bango. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te. Mpo ete makambo na kala masili koleka.” Mosakoli moko ya kala asakolaki lolenge moko ete “Mofandi moko akoloba te ete: ‘nazali na maladi.”’—Yisaya 33:24.
Okoki nde kokanisa lolenge ekozala mokili oyo mozangi balopitalo, mozangi nkunda ata bisika ya kobómba bibembe? Okoki kokanisa na oyo elimboli kozala na bomoi ya seko, oyo ezangi bobángi ya mpasi to ya kokufa? Na ntembe te, elaká na Nzambe ezali kosimba mayoki na biso ya bozindo. Kasi ndenge nini tokoki kondimisama ete elikya wana kitoko etaleli etando na biso kasi likoló te? Tala ba versets ya nzinganzinga ya mikapo ya Biblia oyo mitangami liboso. Ba versets ya liboso ya Emoniseli 21 elobeli “likoló ya sika mpe mabelé ya sika.” Elobami polele ete Nzambe akozala elongo na bango mpe bango bakozala bato na ye. Elaká ya mokanda na Yisaya, oyo ete moto moko te akozala na maladi, elandami na likanisi litaleli “bato baoyo bakofanda na mokili,” “bakolimbisama masumu na bango (MN).”
Bilaká oyo ya kolendisa bitaleli mpenza bomoi awa na mabelé! Ezali mpe na boyokani na libondeli oyo Yesu asalaki epai na Tata na ye, ete: “Tika mokano na yo mosalema na nsé, pelamoko na likoló!”—Matai 6:10.
Mpo na nini mosika te?
Ba Témoins de Jéhovah bazali kosalisa bato mingi na koyeba ete etikali moke bilaká yango bikokokana. Mpo na nini bandimisami bongo? Mpo ete bazali kotalela makambo mingi oyo mazali komonisa ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo na mabelé. (2 Timoté 3:1-5) Bayekoli na Yesu basengaki elembo oyo ekokaki kolakisa nsuka na biloko ya ntango oyo. Mpo na koyanola, Yesu asakolaki molongó ya makambo oyo masengelaki komonana na mokili uta ebandeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba na 1914.a Abakisaki lisusu ete: “Wana ekomona bino makambo oyo nyonso, boyeba ete azali penepene, na bikuke. Nazali koloba na bino solo ete: libota oyo ekoleka te kino ekobima makambo oyo nyonso.” Na yango, bato oyo bazalaki na bomoi na 1914 bakomona nsuka ya ebongiseli na biloko ya mokili oyo.—Matai 24:33, 34.
Na ntango wana, Jéhovah Nzambe akopesa etinda epai na Mwana na ye, Yesu Klisto, ete abima mpo na koboma baoyo nyonso bazali kopesa mpasi mpe mawa, na etando na biso kitoko. Biblia elobeli kolongolama ya mabe lokola “etumba na mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na—Nguya nyonso.”—Emoniseli 16:14, 16.
Bato mingi oyo bakobangaka ”, Nzambe bakobika na makambo wana minene mpe bakomona kotyama na boyangeli ya kimya ya Klisto Yesu. (Emoniseli 7:9, 14; 20:4) Ezali solo ete, bokonzi yango bokoyangela longwa na makoló, kasi baoyo nyonso bakozala na bomoi na mabelé bakozwa bolamu na yango, ezala babiki na etumba ya Armagedon to bamilió na bato baoyo na nsima, bakosekwisama longwa na bakufi. Na ntango wana elaká oyo ekokokana: “Mpamba te ekoki na ye [klistol ete azala na bokonzi kino ekotya ye bayini nyonso na nsé na makolo na ye. Moyini oyo akobukana na nsuka ezali nde liwa.”—1 Bakolinti 15:25, 26.
Tokoki bongo koloba na elikya nyonso ete: “Mosika te maladi na liwa ekozala lisusu te!” Ezali elikya mpamba te, to ndoto. Ezali elaká na solo ya Jéhovah Nzambe, “ye oyo akobukaka lokuta te.” Okotya nde motema na elikya yango? Okozwa na yango bolamu ya seko!—Tito 1:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bilembeteli mosusu oyo bizali komonisa ete mokili mozali kobika na mikolo ya nsuka milakisami kati na mokapo 18 ya mokanda okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, ebimisami na la Societé Watch Tower.
[Elilingi na lokasa 7]
Mosika te maladi mpe liwa ekotika esika na kolongono malamu ya nzoto mpe na bomoi na seko