Mikumba ya mwasi kati na makomami
“Ye akobyangama Mwasi, mpo ete ye akamatami na mobali.”—GENESE 2:23.
1, 2. (a) Engebene bato mosusu, lolenge nini basi batalelami kati na Biblia? (b) Ndenge nini basi bazalaki kotalelama na mikili misusu mpe totangi nini kati na mokanda moko mokomami na ntina na likambo yango?
LOLENGE nini basi batalelami kati na Makomami Mosantu? Makanisi mazali mingi mpenza likoló na motuna oyo. Tokoki kotanga kati na mokanda moko mouti kokomama na ntina na likambo yango, ete: “Mingi bazali kokanisa ete Biblia emonisi ntina ya mwasi te.” Bato mosusu bakolobaka ete, ezala kati na eteni na yango na Liebele, to oyo ekomami na Greke, Biblia ezali kokumisa mwasi te. Yango ezali solo?
2 Liboso na koyanola, ebongi koluka koyeba lolenge nini basi batalelamaki na bamboka oyo ezalaki kosambela Jéhovah te, na ntango na kala. Mabota mosusu ya kala oyo mazalaki kosambela nzambe—mama bazalaki kokumisa basi lokola bilembo ya kobota bana. Emonani ete mwasi azalaki na lokumu mingi na Babilone mpe na Ezipito. Nzokande, epai mosusu, etalelamaki na lokumu te. Na Asulia ya kala, mobali akokaki kolongola mwasi na ye na libala lokola elingaki ye, mpe nkutu koboma ye soki asali pité. Ezalaki ye na ndako, mwasi asengelaki kolata litambála. Na Grese mpe na Roma, bobele basi ya bozwi, mingi na bango bazalaki basali na pité elongo na mibali na lokumu, nde bazalaki na lotomo ya kotanga mpe na kozala na mwa bonsomi. Ezali esengo na kotanga kati na mokanda oyo molobeli makambo yango ete:a “Na likeseni na oyo ezali kosalema kati na mangomba mosusu na epai moi mokobimaka, [mwasil amonisami [kati na makomami na liebele ] lokola mpenza mpe lokola moninga ya mobali.” Ezali yango nde emonisi mokanda ya nsuka ya Makomami na Liebele, kati na yango mwasi na libala abengami “moninga”; mosakoli na Jéhovah alobi lisusu ete: “Moto asalela mwasi na “bolɛngɛ na ye bokósi te,”—Malaki 2:14, 15.
Azalisami mpo na kozala oyo abongi na mobali
3, mpe note. (a) Mikumba nini Jéhovah apesaki na Adam nsima na kozalisa ye? (b) Tokoki koloba nini na ntina ma Adam liboso na kozalisama na Eva, wana ezalaki ye na mwasi te, mpe tokoki koloba nini na ntina na Yesu, “Adam ya nsuka”?
3 Biblia elakisi biso ete Jéhovah azalisaki Adam “na mputulu ya mokili” mpe atyaki ye kati na elanga ya Edene mpo na kolóna yango. Amemaki banyama mpe bandeke epai na ye mpo ete apesa bango nkombo. Atako mosala wana mosengisaki ntango boni, Adam azalaki bobele ye moko. Mpo na mikumba oyo Jéhovah apesaki ye kino na ntango wana, azalaki na kokoka, azangaki eloko te.b Azalaki na “mosungi mobongi na ye te.”—Genese 2:7, 15, 19, 20.
4, 5. (a) Likambo nini Jéhovah asalaki wana amonaki ete ebongi te ete Adam azala bobele ye moko? (b) Jéhovah apesaki mokumba nini epai na Adam mpe Eva oyo esengelaki koumela ntango molai, mpe yango esengisaki likambo nini epai na moto na moto?
4 Nzokande, mwa ntango moke na nsima, Jéhovah alobaki ete “ezali malamu te ete mobali azala ye moko”; mpe apesaki Adam moninga mpo na kosalisa ye kati na misala misusu oyo mizalaki kozela ye. Nsima na kolalisa Adam mpongi makasi, Nzambe alongolaki mokwa moko na mopanzi na ye, oyo asalaki na yango mwasi, ‘mokwa na mikwa ya Adam mpe mosuni na misuni na ye.’ Uta ntango wana, azwaki “mosungi” oyo abongi na ye, “oyo akokani na ye.” “Nzambe mpe apambolaki bango, mpe Nzambe“’alobelaki bango ete, ‘Babotaka mpe bozala na kobota mingi, mpe botondisa mokili mpe botya yango na nsé na bino; mpe bozala na bokonzi likoló na mbisi na mai, mpe na ndeke na likoló, mpe na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili,”’—Genese 1:25, 28; 2:18, 21 23.
5 Liloba “Nzambe alobelaki bango” limonisi ete mokumba yango mopesamaki epai na mobali mpe na mwasi. Ya solo, basengelaki kotondisa mabelé, kasi lolenge na bango ya kosalana elongo esengelaki kosuka bobele wana te. Basengelaki lisusu kozala na bokonzi, mpe kosalela yango likoló na bikelamu mosusu. Misala yango misengisaki bososoli mpe mayele na elimo oyo bango nyonso mibale bazalaki na makoki ya kolóna yango na boyokani na mokano na Nzambe.
Mokumba mpenza ya mwasi
6. (a) Nini elakisi kati na Biblia ete bokasi ya mobali ekeseni na oyo ya mwasi? (b) Na nini basi basengeli kokanisa mpo bakoka kondima motindo oyo Jéhovah asalaki mobali mpe mwasi?
6 Ya solo, esengelaki lisusu bokasi ya nzoto mpo na kozala na bokonzi likoló na mabelé. Na mayele na ye nsuka te, Jéhovah azalisaki Adam liboso, mpe Eva na nsima. Ye “auti na mobali,” azalisamaki “mpo na mobali” mpe na lolenge emonani, asalemaki na makasi mingi te lokola mobali. (1 Timoté 2:13; 1 Bakolinti 11:8, 9; tala 1 Petelo 3:7.) Wana ezali likambo oyo bakɔteli mingi na lotomo mpe na mikumba na basi, mpe basi mosusu lokola, bazali na mpasi mpo na kondima yango. Nzokande, mbɛlɛ bakozala malamu soki bameki kososola ntina oyo Jéhovah abongisaki boye mpe soki bandimi mokumba oyo mopesamelaki bango. Bato oyo bazali koïmaïma mpo na bibongiseli wana na Nzambe, bakokani na ndeke oyo babengi na Lifalansé ete Rossignol, oyo kati na zúmbu na ye, azali koïmaïma mpo ete azali makasi te lokola ndeke oyo babengi ete Goéland, na esika na kokenda kofanda likoló na etape na nzete mpe komonisa botɔndi na ye epai na Nzambe na nzela na nzembo mpo na makabo minene oyo Nzambe asili kopesa ye.
7. Mpo na nini Adam abongaki mpo na kozala na bokonzi likoló na Eva mpo likoló na bana oyo basengelaki kobota? Yango ebebisaki matomba na Eva?
7 Liboso ete Eva azalisama, na ntembe te Adam ayebaki makambo mingi ya bomoi. Na ntango wana, Jéhovah apesaki ye mitinda mosusu. Adam asengelaki koyebisa mitinda yango epai na mwasi na ye, kosaláká lokola molobeli na Nzambe. Na solo mpenza, asengelaki kotambwisa makambo manso matali losambo mpe misala na bonzambe ya ntina mpenza mpo na kokokisama na mokumba na bango. Asengelaki kokóma mokonzi ya libota ntango bana bakobotama; kasi ezalaki te mpo na kookisa mwasi na ye mpasi. Na likeseni, ezalaki nde mpo na bolamu ya mwasi, mpamba te azwaki moto oyo asengelaki kosunga ye wana azalaki kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye na kozala mokonzi likoló na bana na ye.
8. Etinda nini na Nzambe tozali kokuta kati na Biblia?
8 Na boyokani na ebongiseli euti na Nzambe, Adam azalaki na nsé na bokonzi na Jéhovah, Eva azalaki na nsé na bokonzi ya mobali na ye, bana bazalaki na nsé na bokonzi na baboti na bango, mpe banyama basengelaki kozala na nsé na bokonzi na bato. Mobali mpe mwasi bazalaki moto na moto na mokumba na ye ya sikisiki, mpe moko na moko akokaki kozala na bomoi malamu mpe ya esengo. Na bongo, ‘makambo manso makokaki kosalema na nsoni te mpe na mobulu te.—1 Bakolinti 11:3; 14:33, 40.
Lisumu lipengolaki mwasi longwa na mokumba na ye
9, 10. lisumu ebimisaki makambo nini mpo na mobali mpe mpo mwasi, mpe ezalela yango ememi makambo nini mpo na basi mingi?
9 Kobima ya lisumu mpe kozanga kokoka kati na Paradis ya liboso, esili kobebisa ebongiseli wana malamu ya makambo. (Baloma 7:14-20) Bomoi ya mpasi ebandaki mpo na mobali wana motomboki mpe mwasi na ye oyo azangaki botósi. (Genese 3:16-19) Uta ntango wana, mibali mingi ya moïmi bazali sé kobebisa lotomo ya kozala na bokonzi, likambo oyo lisali ete, basi baokisami mpasi mingi na boumeli ya bikeke.
10 Koyebisáká liboso makambo oyo makobima mpo na lisumu, Jéhovah alobaki na Eva ete: “Okozala na mposa na mobali na yo, nde ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Bokonzi yango mabe ezalaki lolenge malamu te ya koyangela. Emonisaki nde ezalela ya moto na masumu epai na mobali, mpe kozanga kokoka epai ya mwasi; na yango, basi bazali mbala mosusu konyokwama mpo ete bazali komeka kobotola bokonzi ya mibali na bango.
11. Tokoki koloba nini na ntina na basi mingi, mpe makambo nini makomamaki na ntina na basi na eleko ya batata na mabota na kalakala?
11 Nzokande, wana mitinda ya Bíblia mitósami, basi mingi bazalaka na bomoi malamu mpe ya esengo. Yango emonanaki ata na eleko ya kala ya batata na mabota. Na ntina na eleko yango, Laure Aynard akomaki kati na mokanda La Bible au féminin, ete: “Likambo limonani na masoló yango ezali motuya ya mwasi, lokumu azalaki kozwa epai na tata na libota, makanisi na ye ya mayele, ezalela ya bonsomi oyo azalaki na yango.”
Basi na nsé na Mibeko na Moïse
12, 13. (a) Esika ya mwasi na nsé na Mibeko na Moïse ezalaki nini? (b) Basi bazalaki na ezalela nini na elimo na nsé na Mibeko na Moïse?
12 Engebene mibeko ya Jéhovah oyo mipesamaki na nzela na Moïse mwasi asengelaki “kolingama” epai na mobali na ye. (Deteronome 13:6) Na likambo litali kosangisa nzoto, mwasi asengelaki kotalelama na lokumu mpe mobali moko te akokaki kosangana na mwasi na makasi. (Levitike 18:8-19) Wana basalaki ekobo, basangisi nzoto elongo na bandeko na bango ya penepene to basangani na banyama, mobali mpe mwasi bazwaki etumbu ndenge moko liboso na Mibeko. (Levitike 18:6, 23; 20:10-12) Mobeko ya mitano mosengaki ete tata mpe mama bazwa lokumu ndenge moko.’—Exode 20:12.
13 Likoló na nyonso Mibeko mizalaki mpenza opesa na basi likoki ya kolendisa elimo na bango Bazalaki wana esika Mibeko mizalaki kotangama. (Yosua 8:35; Nehemia 8:2, 3) Basengelaki kokende bilambo na ntina na losambo esika moko na mibali. (Deteronome 12: 12, 18; 16:11, 14) Bazalaki kokumisa mokolo na sabata ya poso na poso mpe bakokaki kokata ndai ya monasili lokola mibali bazalaki kosala yango. (Exode 20:8; Mituya 6:2) Bakokaki kozala na boyokani malamu elongo na Jéhovah mpe mwasi nyonso azalaki kobondela ye—1 Samwele 1:10.
14. Mokatolike moko molimboli na Biblia alobi nini na ntina na mwasi epai na Baebele. mpe tokoki koloba nini na ntina na mikumba ya mwasi na nsé na mibeko?
14 Kolobáká na ntina na mwasi epai na Baebele, molimboli na Biblia Roland de Vaux, ye mokatolike, akomaki ete: “Azalaki mpenza na misala makasi na ndako, azalaki kobokolo bibwele mpe kosala bilanga, kolamba mampa, kotonga bilamba mpe bongo na bongo. Kasi mosala wana mozalaki kokitisa ye te, ezalaki nde kozwila ye lokumu. . . . Masoló moke oyo mazali koyebisa biso boyokani ya libota moko ya Bayisraele, mazali komonisa ete mwasi alingami, ayokami mpe atalelami na mobali lokola moto oyo akokani na ye. . . . Mpe ntembe ezali te ete yango ezalaki momeseno na bango. Eyokanaki na liteya ya Genese: Nzambe azalisaki mwasi lokola mosungi moi bongi na mobali mpe oyo mobali asengelaki kokangama na ye (Gn 2:18, 24). Mokapo ya nsuka ya Masese mozali kokumisa mwasi malamu, oyo bana na ye bakobenga ye ete mwasi na esengo mpe mobali na ye akokumisaka ye (Mas 31:10-31).” (Les lnstitutions de l’Ancien Testament) Na Yisraele, na ntembe te, na ntango Mibeko mizalaki kotósama, basi banyokwamaki te.
Basi na lokumu
15. (a) Na likambo nini etamboli na Sara ezali ndakisa malamu kati na boyokani ya mobali mpe mwasi? (b) Mpo na nini likambo ya nsamba lizali na ntina mingi?
15 Kati na Makomami na Liebele, tozali kokuta basi mingi na lokumu oyo basalelaki Jéhovah Nzambe. Sara azali ndakisa malamu ya mwasi na ezaleli ya kobanga Nzambe oyo atósaki mobali na ye na kosalisáká ye mpo na kozwa makatami. (Genese 21:9-13; 1 Petelo 3:5, 6) Likambo ya Rahaba lizali mpe na ntina mingi. Ezali kokweisa efundeli oyo ete Jéhovah azali koponapona bato mpe azangi boboto epai na basi. Rahaba azalaki mwasi na pité, mpe azalaki Moyisraele te. Jéhovah andimaki bobele te ete akóma mosambeli na ye, kasi lisusu, na ntina na kondima na ye monene oyo amonisaki na misala (kati na makambo mosusu, abongolaki bomoi na ye), Rahaba atangamaki moyengebene. Epai mosusu, azwaki mbano ya kozala na libaku monene ya kokóma moko na bankoko na Masiya.—Matai 1:1, 5; Baebele 11:31; Yakobo 2:25.
16. Ndakisa ya Abigaili emonisi nini, mpe mpo na nini etamboli na ye endimamaki?
16 jéhovah asengisi te epai na basi ete batosa mibali na bango ata na makambo ya mabe; ezali yango nde emonisami na ntina na Abigaili. Mobali na ye na bozwi azalaki na bitonga mingi ya bampate mpe bantaba. Kasi azalaki “moto na nkanda mpe na makambo mabe.” Nzokande Abigaili aboyaki kolanda mobali na ye kati na etamboli na ye mabe. Komonisaka mayele, bososoli, bopɔlɔ mpe elimo makasi, apengolaki ete likámá lizwa libota na ye te, mpe mpo na yango apambwamaki mingi epai na Jéhovah.—1 Samwele 25:2-42.
17. (a) Basi mosusu bazwaki mokumba nini monene kati na Yisraele? (b) Likambo ya Milyami epesi liteya nini epai na baklisto basi oyo bapesameli mwa mikumba ya mosala?
17 Nkutu mwa basakoli basi balobelami mpe kati na Makomami; lokola Debola, na ntango na Basambisi. (Basambisi, mokapo 4 mpe 5) Liboso na kobomama na Yelusaleme, Huluda azalaki mosakoli mwasi na Yuda. (2 Mikonzi 22:14-20) Likambo ya Milyami lizali na ntina mingi. Atako balobi na ntina na ye lokola mosakoli mwasi oyo atindami na Jéhovah, emonani ete, na eleko moko, akómaki na lolendo mpo na mokumba wana. Aboyaki kondima bokonzi oyo Jéhovah apesaki epai na leki na ye Moïse mpo na kokamba Yisraele, mpe azwaki etumbu ; kasi, emonani ete abongolaki motema mpe azongelaki lisusu mikumba na ye.—Exode 15:20, 21; Mituya 12:1-15; Mika 6:4.
Basi kati na lingomba na Bayuda
18, 19. Mwasi azalaki na esika nini kati na lingomba ya Bayuda, mpe yango elendisaki likambo nini?
18 Lokola tosili komona yango, Mibeko na Moïse mibatelaki lotomo ya basi, mpe wana yango ezalaki kotósama, basi bazalaki na bomoi malamu. Kasi na nsima, mpe mingi mpenza nsima na kobomama na Yelusaleme na mobu 607 liboso ya ntango na biso, lingomba ya Bayuda likólaki, oyo mingimingi ezalaki kotalela mibeko na bonkɔkɔ koleka Mibeko na Jéhovah. Kobanda ekeke ya minei liboso ya ntango na biso, lingomba ya Bayuda likɔtisaki mateya na Bagreke. Emonani lokola ete bato na mayele na Grese bazalaki kotalela lotomo ya mwasi na motuya mingi te, mpe yango emonisamaki na kokitisama na esika ya mwasi kati na lingomba ya Bayuda. Kobanda ekeke ya misato liboso ya ntango na biso, babandaki kokabola basi na mibali kati na biyanganelo mpe kopekisa basi ete batanga Torah (Mibeko na Moïse) te. Mpo na yango Encyclopedia Judaica elobi ete: “Na yango, bobele basi moke nde batangaki kelasi,” Kotanga ezalaki mpenzampenza mpo na bana mibali.
19 Yoakime Yilimiase akomaki kati na mokanda Yelusaleme na ntango na Yesu (na Lingelesi) ete: “Na bokuse, esika ya mwasi kati na mibeko ya lingomba emonisami malamu na maloba oyo mazalaki kozongelama mbala na mbala: ‘Basi, baombo (bapakano) mpe bana.’ . . . Bakisa mpe makanisi mabe oyo mazalaki kobimisama na ntina na basi . . . Emonani na biso ete ata na eleko na Yesu, lingomba ya Bayuda lizalaki mpenza kopesa esika ya lokumu te epai na basi.”
Basi na sembo oyo bazalaki kozela Masiya
20, 21. (a) Atako bakonzi na lingomba na Bayuda bakómaki kotyola basí, nzokande banani bazalaki kozela wana koya na Masiya ebelemaki? (b) Likambo nini limonisi ete Elizabete mpe Marie bazalaki na ezaleli ya kobanga Nzambe mingi?
20 Bakonzi na lingomba ya Bayuda ‘bazalaki koyeisa liloba na Nzambe mpamba likoló na malako na bonkɔkɔ,’ mpe mingi mpenza na kotyoláká basi. (Malako 7:13) Kasi, atako ezalela yango, mpe lokola koya ya Masiya ebelemaki, ndambo na basi oyo bakobangaka Nzambe bazalaki kozela ye na bokengi. Elizabete azalaki moko na bango, ye mwasi na nganga Zakaria. Ye mpe mobali na ye “bazalaki bayengebene na miso na Nzambe, batambolaki na mibeko mpe na malako nyonso na Jéhovah. ” (Luka 1:5, 6) Elisabete azwaki ngolu na Jéhovah: atako akómaki mobangé mpe azalaki ekomba, nde abotaki Yoane Mobatisi.—Luka 1:7 13.
21 Na kopusama na elimo santu, Elizabete amonisaki bolingo mozindo oyo azalaki na yango mpo na mwasi mosusu oyo azalaki kobanga Nzambe na eleko na ye, ndeko na ye Marie. Na nsuka na mobu 3 liboso ya ntango na biso, ntango anzelu Gabriele ayebisaki Marie ete akozwa zemi na likamwisi mpe akobota mwana (Yesu), asalelaki liloba “mwasi na ngolu” mpo na ye, mpe abakisaki ete: “Jéhovah azali elongo na yo.” Nsima na mwa ntango, Marie akendeki kotala Elizabete, oyo apambolaki ye elongo na mwana oyo azalaki kati na libumu na ye, kobengáká Yesu ete “Nkolo” na ye liboso nkutu ete abotama. Bongo Marie akumisaki Jéhovah, likambo oyo limonisi mpenza ezaleli ya kobanga Nzambe mingi.—Luka 1:28, 31,36-55.
22. Nsima na kobotama na Yesu, mwasi nini oyo azalaki kobanga Nzambe amonisaki ete atangamaki kati na baoyo bazalaki kozela Masiya?
22 Na ntango Yesu abotamaki mpe wana Marie amemaki ye na tempelo na Yelusaleme mpo na kolakisa ye epai na Jéhovah, mwasi mosusu azalaki kobanga Nzambe, mosakoli mwasi Ana, asepelaki. Mobangé mwasi wana akumisaki Jéhovah mpe alobaki na ntina na Yesu epai na baoyo nyonso bazalaki kozela Masiya na elaka na motema likoló.—Luka 2:36-38.
23. Lolenge nini ntoma Petelo azali koloba na ntina na basi na sembo ya ntango na kalakala, mpe mituna nini mikolobelama nalisoló lilandi?
23 Na yango, na ntango oyo Yesu asengelaki kobanda mosala na ye awa na mabelé, “basi na bulɛɛ oyo balikyaki na Nzambe,” bazalaki wana. (1 Petelo 3:5) Bamoko na bango bakómaki bayekoli na Klisto. Lolenge nini Yesu azalaki kotalela bango? Ezali lelo na basi oyo bakondimaka na esengo mikumba oyo Biblia epesi bango? Lisoló lilandi likolobela mituna oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Volume 3, page 1055.
b “The last Adam,” Jesus Christ, was likewise a perfect, complete man, although he had no human wife.—1 Corinthians 15:45.
Bozongeli
◻ Kokesena nini ezalaki kati na lolenge oyo basi batalelamaki na Yisraele mpe na mikili misusu?
◻ Adam mpe Eva bazalaki moto na moto na esika nini, mpe mpo na nini?
◻ Mwasi Moyisraele azalaki na esika nini na nsé na Mibeko, mpe azalaki nde na ezalela mabe kati na elimo?
◻ Mateya nini tokoki kozwa na bomoi ya basi na lokumu oyo balobelami na Makomami na Liebele?
◻ Bandakisa nini kitoko ya kondima tokoki kozwa yango, atako makanisi ya lingomba ya Bayuda makesenaki?
[Etanda na lokasa 10]
“MWASI OYO AKOBANGAKA JEHOVAH”
“10 Nani akoki kozwa mwasi na motema malamu? Aleki mabángá na penini na motuya. 11 Motema ya mobali na ye mokozala na ye, mpe akozanga mbano te. 12 Akosala ye malamu, mpe akobebisa ye te, mikolo nyonso ya bomoi na ye. 13 Akoluka nsinga mpe akosala mosala na maboko na ye na motema malamu. 14 Azali lokola masuwa na batekisi. Akokómisa bilei na ye longwa na mosika. 15 Akolamuka wana ezali naino butu, mpe akobongisa bilei mpo na libota na ye, mpe misala mpo na baombo basi na ye. 16 Akotala elanga mpe akosomba yango; na mbuma ya maboko na ye, akokóna elanga ya miwiti. 17 Akomizingela loketo na nguya, mpe akokembisa maboko na ye. 18 Akososola ete biloko na ye bizali malamu; mwinda na ye mokozimana na butu te. 19 Akotya loboko na ye na eyɔtwel-na busi mpe loboko na ye losimbi motongá. 20 Asemboli loboko na ye epai na babólá; ɛɛ, ananoli matandu na ye epai na bazangi 21 Abangi mbula mpembe mpo na libota na ye te, mpamba te libota na ye nyonso balatisami na bilamba mitané. 22 Akomisalela bilamba bikakisami; bilamba na ye bizali na molikani kitoko mpe na motané. 23 Mobali na ye ayebani na bikuke wana ekofandaka ye kati na mikolo ya mboka. 24 Akosalaka bilamba mpe akoteka yango ; akopesa nkámba ya loketo epai na batɛkisi. 25 Bokasi mpe lokumu ezali bilamba na ye, mpe akoseka na mikolo mikoya. 26 Akozipola monoko na mayele, mibeko na boboto mizali na lolemo na ye, 27 Akotalaka malamu makambo ya ndako na ye; akolya limpa ya goigoi te. 28 Bana na ye bakotelema mpe babengi ye mwasi na esengo; mobali na ye atelemi mpe akumisi ye. 29 Bana basi mingi bazali malamu, nde yo oleki bango nyonso. 30 Bonzenga ekoki kozala na bokosi, mpe kitoko ekoki kozala mpamba ; kasi mwasi oyo akobangaka jéhovah, ye akosanzolama. 31 Pesa ye mbuma na matandu na ye, tika ete misala na ye mpenza misanzola ye kati na bikuke!”—Masese 31:10-31.
[Elilingi na lokasa 8, 9]
Mwasi azalaki na esika ya lokumu kati na libota