Okoki koyanola?
Osepelaki na botangi ya ba nimero ya nsuka ya Mosenzeli? Na boye. tala soki okoki koyanola na mituna milandi:
◻ Likoló na moboko nini ya Biblia babateli na mpate ya elimo bazali kosalela mpo na kozwa likanisi ya kokende kokutana na bato oyo babimisami na lisangá mpo na koyeba soki bazali komonisa mposa ya kobongola motema?
Ata ntango Bayisaele bazalaki na boombo mpe ete babongolaki naino mitema te, Jéhovah, lokola mobateli na bampate azwaki likanisi ya koluka bango na kotindelaka bango basakoli na ye. Babateli na mpate baklisto bazali na mposa ya kosalisa baoyo nyonso bazali kobongola motema mpe oyo bakokani na bampate babunga nzela. (Tala Luka 15:4-7.)—15/4, lokasa 21-23.
◻ Lokola emonisi yango lisese ya mwana mobali na kilikili, nini esengeli kozala ezaleli ya elimo na biso mpe ndenge nini tosengeli kosala na ntango moto moko azongisami kati na lisangá ya boklisto? (Luka 15:22-32)
Mokano na biso esengeli kozala ete tokokana na tata oyo ya lisese, oyo amonisaki esengo na ye ntango mwana na ye na kilikili azongaki. Na bongo tosengeli kosolola malamu elongo na ndeko oyo auti kozongisama na lisanga mpe kolendisa ye ete asala bokoli kati na solo.—15/4, nkasa 25.
◻ Bokebi nini osengeli kozala na yango mpo na komibatela ete ekweisama te na likama ya basali na mabe?
Pengola mpenza kotambola na butu na bisika ya makámá. Bómbá babiju na yo mpe mema biloko na yo ya motuya, lokola apareye ya foto, na kati na sakosi oyo otye biloko mosusu. Keba ete otambola na pembeni na balabala te, mingimingi soki omemi sakosi ya kotya mikanda to sakosi moke ya maboko. (Tala Masese 3:21-23)—1/5, nkasa 5, 6.
◻ Mpo na nini Nzambe alobi kati na esakweli oyo ekomami na Sofoni 2:3: “Soko nde bokobatelema na mokolo na nkanda na Jéhovah”?
Lobiko etali bobele bosembo mpe koyika mpiko ya moto na moto. (Matai 24:13) Na yango, bobele baoyo bazali komiyokanisa na mitinda ya boyengebene na Nzambe mpe bazali koloba monoko na peto ntango nyonso, nde bakobatelama na mokolo na nkanda na Jehovah. (Sofoni 2:1,2)—1/5, nkasa 14.
◻ Kotya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi ya libota elimboli nini?
Baboti mpe bana basengeli kosambela Jehovah mpe kolanda masengami ya bonzambe oyo mamonisami kati na Biblia.—5/15, nkasa 5.
◻ Mpo na nini Nzambe apesaki etumbu mbala moko te epai na basali na mabe?
Libosoliboso, alingaki ete nkombo na ye eyebana na mabelé mobimba. (Tala Baloma 9:17.)Na nsima, atikaki ntango molai mpo ete ntembe oyo ebimisamaki na botomboki bosalamaki na Edene, ntembe na ntina na boyangeli ya Nzambe mpe bosembo na bato, esilisama. Na nsuka, motema molai na Nzambe ezali kopesa likoki epai na basali na mabe ete babongola motema mpe babongisa lisusu etamboli na bango. (2 Petelo 3:9)—15/5, nkasa 11, 12.
◻ Makambo nini mamonisi ete Biblia euti epai na bato te?
Biblia ekomamaki na boumeli ya mibu 1 600 soko na bakomi 40 kati na lolenge nyonso na bato, nzokande, bango nyonso balandaki bobele motó na likambo moko. Boyokani ya motindo wana ekokaki kosalama te soki nde tokomipesa na makanisi ya bongo na bongo to na litambwisi na bato.—1/6, nkasa 5.
◻ Likambo ya kokamwa nini lisakolamaki na Yisaya 28:21, oyo Jéhovah akokokisa yango na ntango na biso?
Likebisi oyo lizali na Emoniseli 17:16 limonisi ete mokolo mosusu baninga na Babilone Monene, bakonzi ya politike bakobalukela ye. Nzokande, boklisto ya lokutá ekobomama nyonso mpe mangomba nyonso mosusu ya lokuta. tala likambo likozala, na eleko na biso, mosala ya kokamwa ya Jéhovah.—1/6, nkasa 22, 23.
◻ Mpo na oyo etali kolata babiju mpe kosala monzele, likanisi nini basi baklisto basengeli kobatela kati na elimo na bango?
Biblia ekweisi te likambo ya kolata babiju to kosalela mafuta mosusu mpo na kobongisa nzoto. (Exode 32: 2, 3; Estere 2:7, 12, 15) Nzokande, na likambo yango esengeli komonisa bopɔlɔ. Ekoki mbala mosusu kokóma ete mwasi amekola bizaleli ya mokili, mpe kosalela na lolenge mabe nkisi oyo ekoyeisa mbebu motane, nkisi na langi ndenge na ndenge oyo basi bakotyaka na matama to na biteke na miso na ndakisa na Yezabele. (2 Bakonzi 9:30) Esengeli kosenzela ete azala na lolendo te wana ekosala ye monzele, mpe alata te babiju oyo ekobenda likebi ya bato.—1/6, nkasa 30, 31.
◻ Ndenge nini Bayisraele bamibatelaki na “maladi mabe ya Ezipito,” oyo ezalaki komonana mingi na ntango na bango? (Deteronome 7:15)
Emonani lokola ete, bazwaki bamaladi yango te mingimingi mpo ete bazalaki kotosa mitinda ya bopeto oyo mipesamelaki bango na kondimana ya Mibeko.—15/6, nkasa 4.
◻ Mpo na nini Nzambe apesaki mobeko epai na bato ete balya makila te? (Genese 9:3, 4; Levitike 17:10, 1; Misala 15:22-29)
Bomoi ezali likabo ya Nzambe mpe bomoi na biso esimbami na makila. (Nzembo 36:9) Na kopesaka motuya mingi na makilá, bato bazali komonisa ete bomoi na bango esimbami na Nzambe. Na yango, ntina monene oyo Nzambe apesaki mobeko wana ezali ete mpo na ye makila ezali na ndimbola moko monene, kasi ezali te ete yango ekokaki kozala mabe mpo na kolongono ya nzoto.—15/6, nkasa 8, 9.
◻ Baklisto bakoki kosala nini mpo na kobongisa bana na bango liboso ete bakoka koboya kozongisama ya makilá mpe kosenga ete batósa bindimeli na bango, atako bazali naino bilenge mike?
Atako azali naino mokolo te na miso na leta, elenge moklisto asengeli kozala na likoki ya kolimbola polele mpe na molende, ntina monene na Biblia oyo etindi ye ete aboya makila. Baboti bakoki kobongisa bilakiseli elongo na bana na bango mpo na koyekolisa bango kolimbola bindimeli na bango moko.—15/6, nkasa 18.
◻ Ebele na mapamboli nini basi bazwaki na boumeli na mosala na Yesu awa na mabelé?
Yesu abandaki mosala moko oyo ememaki lisungi, elikya mpe lokumu ya sika na basi ye mposo nyonso. Ateyaki bango basolo mozindo ya elimo. (Yoane 4:7, 24-27) Ntango azalaki kotambola mboka na mboka na boumeli na mosala na ye, Yesu andimaki ete basalela ye na basi. (Malako 15:40, 41)—17, nkasa 14, 15.
◻ Myango nini na koteya misalelamaki na Yesu, oyo baboti basalelaki yango na molende nyonso elongo na bana na bango?
Baboti basengeli kosalela masese mpo na koyeisa kitoko bosolo ya boklisto na mitema ya bana na bango oyo bazali bilenge, mpe kotuna mituna ya mayele mpo na kososola oyo bana na bango bakóli bazali kokanisa mpenza. (Tala Matai 17: 24-27.) 1/7, nkasa 26.
◻ Na oyo etali baninga, ndenge nini moklisto moko akoki komizimbisa? (1 Bakolinti 15:33)
Moto moko akoki komonana lokola moninga malamu. Kasi soki azali na likanisi motindo moko te na oyo ya moklisto mpo na oyo etali mosala ya Jehovah to soki azali ata na kondima te na Biblia, moto yango azali moninga mabe. Mpo na nini? mpo ete bomoi na ye esimbami na mitinda
mabe, mpe makambo oyo mazali na ntina mpo na moklisto, ekoki bobele kozala na litomba moke mpo na ye,—15/7, nkasa 23.
◻ Mpo na nini tosengeli kolanda komonisa motema malamu?
Motema malamu ezali kopesa biso nzela na kolingana mingi epai na Nzambe mpe na bazalani na biso. Ekokomisa biso bayambi malamu na bapaya mpe bato oyo bayebi komitya na esika na baninga na biso. Ekolendisaka boyokani kati na mabota mpe na lisangá ya boklisto. Na koleka nyonso, motema malamu ezali kopesa nkembo na Jéhovah.—15/7, nkasa 22.
◻ Mpo na nini Mokolo na Kosambisa ezali eleko ya elikya?
Mokolo na Kosambisa ekoumela mbula nkoto. Ekotambwisama na Nzambe ye moko mpe na Mwana na ye, Yesu Klisto, oyo akotyama na Nzambe lokola Mosambisi. Ekozala eleko moko oyo bato bakomemama na bomoto ya kokoka oyo Adam ebebiselaki bakitani na ye. (1 Bakolinti 15:21,22)—1/8, nkasa 5-7.