Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/9 lok. 9
  • Masoló ya basakoli na Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masoló ya basakoli na Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • “Komona bolingo ya ndenge wana esepelisaki biso mpenza”
    Lamuká!—2017
  • Nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/9 lok. 9

Masoló ya basakoli na Bokonzi

Bandimisamaki na engumba Katmandou

NA BRETAGNE, na 1980, mwasi moko moyemi na bililingi abandaki koluka solo. Asololaki elongo na bato ya lingomba ya pantekote mpe ayekolaki mangomba ya Orient, kasi andimisamaki te. Na nsima asololaki mwa moke elongo na Témoin de Jéhovah moko: kasi akataki lisoló nokinoki. Akutanaki na mobali moko,ye mpe moyemi na bililingi mpe bazwaki ekateli ya kosala mosala mpe kofanda esika moko.

Nsima mwa moke, bango nyonso mibale bazwaki ekateli ya kokende kotala mokili ya Népal. Basepelaki mingi mpenza mpo na kitoko mpe kimya ya mboka wana, kasi balembaki mpo na koponapona oyo ezalaki lokola bokesene epai na bango, bato bautaki na epai moi mokolalaka.

Ntango bazongaki na France, mwasi wana alobaki na moninga na ye mobali ete bayekola Biblia mpe, na kokamwa mpenza, mobali andimaki Balukaki Témoin oyo asololaki elongo na mwasi,esili koleka mibu mibale. Na ebandeli, basalelaki bobele Biblia: kasi, na nsima bandimaki mokanda Solo oyo azali komema na bomoi ya seko, mpe na nsima bandimaki mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Nsima na basanza, batikaki komela drogue.

Basalaki lisusu mobembo ya sanza mibale na mokili ya Népal, mpe, wana bazongaki na France, bazongelaki boyekoli na bango ya Biblia. Batikaki komela makaya mpe kokenda na bare mpe na banganda mpo na bomeli masanga na butu, mpe babandaki koyangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah. Kasi, nsima na kosilisa mokanda Bomoi ya seko, bazwaki ekateli ya kotika koyekola Biblia.

Bazongaki lisusu na mokili ya Népal epai kuna bafandaki kati na ndako moko moke oyo ezalaki na ndako, mpe akanisaki ete azalaki directeur ya esika ekotekaka bango bililingi ayei kotala bililingi oyo bango bayemaki. Akamwaki na koyoka ete moto yango azalaki Témoin de Jéhovah mpe atindamaki na moto oyo ayekolaki Biblia elongo na bango na France. Nsima mwa moke, moninga na ye azongi; basalaki bongo lisoló moko liumelaki ngonga mibale.

Mwa mikolo na nsima, bango nyonso mibale bakendaki na likita moko ya ba Témoins de jéhovah na engumba Katmandou, mpe bakamwaki mingi mpenza mpo na ezaleli kitoko ya bayangani. Bamonaki ete bolingo kati na bandeko mpe esengo ezalaki bobele motindo moko na oyo bamonaki na makita na France. Bamonaki bomoko kati na bato ya Népal ata kokesena ezalaki kati na ezalela ya bomoi na bango. Bandimisamaki uta ntango wana ete ezalaki solo lisangá na Jéhovah.

Na nsima na sanza moko, bazongaki na France, bazongelaki nokinoki boyekoli na bango ya Biblia mpe bazongelaki kokenda na makita. Babalanaki, bakómaki kosakola nsango malamu mpe na nsuka. bazwaki batisimo. Sikawa mobali azali mosaleli na misala, mpe mwasi asalaka mosala ya pionnier auxiliaire mbala na mbala. Ya solo, elimo na Jéhovah ezali kosalisa baoyo babongi ete bakóla mpe bakóma basambeli na ye.​—Emoniseli 7:15-17.

[Box/​Map on page 9]

NÉPAL

Motuya na bato na ekólo: 17 712 221

Motuya nyonso na basakoli na 1990: 63

Motuya na bato: mpo na mosakoli moko 281 146

Mwayene ya ba pionniers: 10

Motuya ya masangá: 1

Mwayene ya boyekoli na Biblia: 107

Bato bayanganaki na Ekaniseli: 220

[Karte]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

NEPAL

INDIA

[Elilingi na lokasa 9]

Na zando ya engumba Katmandou, na mokili ya Népal

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto