Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/9 lok. 3
  • Nzambe andimaka mabondeli na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe andimaka mabondeli na biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo nini makosɛngamaka kati na mabondeli mosusu?
  • Maloba ya ebandeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/9 lok. 3

Nzambe andimaka mabondeli na biso?

MWASI moko afandi na esanga ya Hokkaido, na Japon alobaki ete: ”Nandimisami naino te ete mabondeli na ngai mandimami na Nzambe.” Azali bobele ye moko te oyo azali na liyoki motindo wana. Bato mingi bamonaka lokola ete mabondeli na bango mandimami na Nzambe te. Mpo na yango, ozali mbala mosusu komituna soki mabondeli na yo mandimami na Nzambe,

Bamilió na bato bakotindaka ebele na mabondeli epai na ntalo monene na banzambe Mpo na nini emonani ete mabondeli mingi makozwaka biyano te? Mpo na koyeba yango, totalela libosoliboso makambo oyo makosɛngamaka kati na mabondeli mosusu.

Makambo nini makosɛngamaka kati na mabondeli mosusu?

Na boumeli na feti ya Bonané, ntalo monene na bato ya Japon, soko 80 milió ya bato, bakokendaka kobondela kati na bandakonzambe ya Shintõ to kati na batempelo ya Buda. Bakopesaka mbongo, mpe kobondela ete bazala na bomoi ya esengo mpe na kimya kati na mabota na bango.

Na sanza ya Janvier mpe na Fevrier, liboso na koleka na mimekano ya kokɔta na université, mimekano yango makasi, ebele na bana ya kelasi bakokendaka na bandakonzambe, lokola oyo ezali na Tokyo, oyo eyebani mingi mpenza mpo na nzambe na yango ya kotanga kelasi. Bakokoma ndai na bango na biteni na mabaya mabongisami mpo na yango, mpe bakokakisa yango likoló na nzeté oyo etyami kati na bandakonzambe Na mbula oyo euti koleka, na eleko na mimekano, soko biteni wana 100 000 ya mabaya bityamaki kati na ndakonzambe moko na lokumu mingi na Tokyo.

Bato bakobondelaka mingi mpo na kolongono na nzoto. Na ndakonzambe moko ya Kawasaki, na Japon, bato bakobondelaka mpo na kobatelama na SIDA. Sángó moko ya ndakonzambe wana alimbolaki ete: “Na kobondelaka mpo na kobatelama na SIDA, bato bapusami na kozala na bokengi katina etamboli na bango.” Kasi, bobele makambo oyo nde masengeli kokɔtisama kati mabondeli?

Na tempelo mosusu, mobangé mwasi moko asɛngaki kati na libondeli na ye ete akufa na “liwa ya pwasa.” Mpo na nini bongo? Mpo ete alingaki te konyokwama na maladi na boumeli ya ntango molai, mpe alingaki te kozala bozito mpo na libota na ye.

Na mboka moko ya boklisto ya lokutá, kapitɛni ya ekipe moko ya ndembo, abondelaki mpo ete ekipe na ye ezwa elonga mpe ebatelama ete babeti ndembo bazoka mpota te. Na mboka Polonye, bakatolike bakobondelaka mpo na bolamu na bango mpe bakobongisaka bikeko na bango ya Ngondo Marie nsima na kososola ete mabondeli na bango mayokami. Bato mingi bakendaka na bandakonzambe ya lokumu, lokola oyo ya mboka Guadeloupe, ya mboka Mexigue, to oyo ya mboka Lourdes, na France, mpo na kolɔmba ete babikisama na makamwisi.

Na Mpótó mpe na Azia, bato bazali kobondela mpo na bantina na bango moko. Balingi mpenza ete mabondeli na bango mayokama mpe mandimama. Kasi, esengeli solo komizela ete mabondeli nyonso mandimama epai na Nzambe? Ezali boni mpo na mabondeli na biso? Mandimami nde na Nzambe? Na yango, Nzambe andimaka mabondeli?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto