Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/9 nk. 28-30
  • Masese Esaleli eleki malamu mpo na kosimba mitema na bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masese Esaleli eleki malamu mpo na kosimba mitema na bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Masese mabongi na koteya
  • Epai wapi tokoki kozwa masese
  • Lolenge nini koyebisa masolo ya Biblia na mɔtɔ nyonso
  • “Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
    “Yaká, landá ngai”
  • Bandakisa ebongi na lisolo
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • “Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Bandakisa oyo ezali koteya
    Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/9 nk. 28-30

Masese Esaleli eleki malamu mpo na kosimba mitema na bato

DAVIDI azali kokima. Monguna na ye ezali Saulo, mokonzi mopakolami na Yisraele. Motema na ye mobundi na koyina mpe na zuwa makasi mpo na Davidi, Mpo na koboma Davidi, mokonzi wana akei koluka ye elongo na basodá 3 000. Lokola Davidi mpe bato na ye bazali moke liboso na bango, babombani kati na lilusũ moko, na esobé.

Wana Davidi mpe bato na ye bazali kozela kati na molili, makambo mabongwani pwasa Mokonzi Saulo akɔti mpo na kosala kabinɛ. Bongo Davidi abɛlɛmi na malɛmbe nyonso elongo na ebundeli na ye, epai na monguna na ye oyo azangi libateli. Kasi bato na ye bakamwi mpamba te, abomi mokonzi te. Akati bobele ndambo na nsé na elamba na Saulo. Kookáká mawa ata mpo na likambo wana auti kosala, Davidi alobi ete: “Jéhovah apekisa ngai ete nasalela nkolo na ngai, mopakolami na Jéhovah, likambo oyo te mpo na kosembola loboko na ngai epai na ye awa ezali ye mopakolami na Jéhovah.”​—1 Samwele 24:1-6.

Lisoló oyo lizali kopesa lilako ya mozindo likoló na botósi esengeli kopesama epai na bokonzi botyami na Nzambe. Lisusu, ezali kosimba motema, mbala mosusu koleka nkutu toli oyo epesami na moto moko. Masoló oyo makomami kati na Liloba na Nzambe mpo na kolakisa biso, mazali na nguya motindo wana.​—Baloma 15:4.

Na yango, ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi ete bayebisa bobele makanisi te na ntango bazali kosakola nsango malamu, kotambwisa boyekoli na Biblia, kopesa badiskur ezwami na Makomami to na kopesa litatoli na libaku malamu. Bazali komeka kosimba mitema ya bato na kosaleláká masese. Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe elimboli ete: “(Masese) elamwisaka mposa ya bayoki mpo na kolanda lisoló mpe ezali kobimisa makanisi ya ntina mpenza. Ezali kopusa makanisi mosika mpe ezali kosalisa bango na kosimba noki makanisi ya sika. (Masese) maponami malamu mazali kofungola bososoli mpe mayoki ya bato oyo bazali kolanda yo. . . . Tokoki ntango mosusu kolónga to kopengola botɛmɛli na lisalisi ya (lisese).”a​—Lokosa 167.

Kati na mokanda na ye Makambo masengeli mpo na koloba malamu (na Lingelesi), Warren Dubois amonisi ete: “Tika ete mokomi to molobi ayebisa makanisi na ye na kosaleláká lolenge bato bakosalaka mpe bakolobaka, boye lisoló oyo ezalaki kolalisa bato ekokóma na mɔtɔ mpe na elengi.” Bongo, na kobakisáká mɔtɔ mpe elengi na nsango na bango, oyo esili koyokana mpe ekolendisaka, ba ministres baklisto bazali mpenza kolónga mpo na kosimba mitema ya bato mosusu.

Masese mabongi na koteya

Motindo nini na lisese oyo eleki nyonso mosusu na malamu? Ezali oyo ezwi moboko likoló na eloko moko bayoki bakoki kokanga ntina kozanga nkaká. Yesu Klisto asilaki kopesa ndakisa kitoko kati na likambo yango. Kati na Lisoló na ye likoló na ngomba, alobelaki biloko mpamba lokola mongwa, mwinda mpe bandeke. (Matai 5:1 kino 7:29) Na ndakisa, bato banso bayebaki mwinda ya mafuta, oyo bazalaki mbala mosusu kotya na etelemelo na yango. Bayekoli na Yesu basosolaki ete basengelaki kozala bamemi na pole ye elimo na ntango alobaki na bango ete: “Bakopelisaka mwinda te mpo na kotya yango na nsé na mbeki, kasi mpo na kotya yango likoló ya etelemelo engɛngɛla baoyo nyonso bazali na ndako. Bobele bongo, tika ete pole na bino engɛnga liboso na bato ete bamona misala na bino malamu mpe ete bakumisa Tata na biso oyo azali na likoló.” (Matai 5:15, 16) Masese ya pɛtɛpɛtɛ, oyo eyokani na lisoló, ekosalisa ba ministres baklisto mpo na komonisa polele makanisi mpe mateya na Biblia.

Masese na nguya mingi oyo Yesu asalelaki, ezali mbala mosusu oyo elobeli bato. Totalela oyo ekomami na Luka mokapo 15 mpe 16. Bakomeli mpe Bafalisai batɔngaki Yesu mpo ete azalaki koyamba bato na masumu mpe bakɔngɔli na mpako. Yesu ayanolaki bango na kobɛtáká masoló kitoko malobeli bato ndenge na ndenge. Alobaki na ntina na mobateli na bampate oyo amonaki mpate na ye oyo ebungaki, na mwasi oyo amonaki lopáta na ye oyo ebungaki na mwana mobali na kilikili oyo azongaki epai na tata na ye mpe alobaki na ntina na kapita mabe.

Masese (bandakisa) ya solosolo mpe makambo oyo masilá kosalema, ekoki kozala na ntina mingi mpo na ministre moklisto. Na ndakisa, tala lolenge oyo Alexander Macmillan, ye molobi oyo atamboli mingi uta mibu 60 mpo na kopesa badiskur piblike, alimbolaki mokolo moko oyo Biblia ezali koteya na ntina na liwa. Mwa ntango liboso na liwa ya tata na ye, oyo azalaki kondima ete molimo ekufaka te, A. Macmillan asololaki elongo na ye:

“Tata na ngai atunaki ngai ete: ‘Mwana na ngai, nakozala nde na liyoki ete nazali bobele ngai moko kati na nkunda na boumeli ya ntango nyonso oyo nakozela ete bokonzi ebanda komema ezalela ya kokoka awa na mabelé?’

“Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na elenge mobali ete apesa eyano ebongi na motuna motindo wana, epai na mobangé oyo azwa naino makanisi motindo wana te.

“Ngai mpe natunaki ye ete: ‘Olalaki malamu na butu ya lelo?’

“Ayanolaki ngai ete: Ee, mpo ete monganga apesaki ngai nkisi ya mpongi.’

“‘Omiyokaki ete ozalaki yo moko wana elalaki yo?’

“‘Soko moke te. Nalingi nkutu kolala ntango nyonso, boye nakotika mpasi te.

’’Na nsima, A. Macmillan atangelaki tata na ye Yobo 14:13-15 mpe 3:17-19, mpe alobaki na ye ete: “Omoni papa, bakufi balali mpongi ya kufa mpe bayebi likambo te; ndenge nini bakoki bongo komiyoka ete bazali bobele bango moko?”

Oyo nde liteya kitoko! Soki ozali Témoin de Jéhovah, yo mpe okoki kosalela mikapo ya Biblia mpe masese (bandakisa) mpo na kosimba elimo mpe mitema na bato mosusu.

Epai wapi tokoki kozwa masese

Kasi epai wapi tokoki kozwa masese kitoko mpe makambo masilá kosalema? Tokoki kozwa masese mingi kati na bomoi na biso moko. Na ndakisa, tosengeli nde komonisa mapamboli oyo mazali kouta na kondima, nguya ya libondeli to esengo ya mosala ya kosakola? Soki tozali baklisto bamipesi na Nzambe, tokoki mpenza kobɛta masolo ya bomoi na biso. Tokoki lisusu koyoka masolo kitoko ya makambo masili kosalema na likita moko na lisangá to na masoló elongo na baklisto mosusu. To mpe lisusu, bokoki kotanga masolo na kolendisa oyo mazali kati na Annuaire des Témoins de Jéhovah. Lisusu index des publications de la Societé Watch Tower ezali kosalisa mpo na kozwa masoló mauti na mokili mobimba.

Lolenge nini koyebisa malamu lisoló ya likambo moko lisilaki kosalema? Esengeli liboso kolɛmbisa bayoki ete balanda malamu. Tokoki kobanda lisoló moko na kolobaka ete: “Pionnier moko amonaki mpenza lolenge oyo Jéhovah azali kopambola baoyo bazali kotya motema epai na ye.” Bayoki bakoluka koyeba nokinoki mapamboli oyo mazwamaki na pionnier wana. Kobosana te mpo na koyebisa bango mapamboli yango.

Tosengeli koyebisa lisoló na lolenge mpe na maloba na biso moko. Tosengeli kolobela yango mobimba, mpamba te yango ezali kopesa kilo na lisoló. Na komonisáká polele libaku oyo likambo yango lisalemaki, ekozala pɛtɛɛ mpo na kosepelisa bayoki Kasi tosenzela ete toloba mingi koleka te, mpamba te bayoki bakoki kobungisa mokano ya lisoló. Lisusu, topengola elobeli ya koyebisa lisoló na kolekisa ndelo, mpamba te, atako yango ezali kotya mungwa na lisoló, ekoki kobebisa lokumu na biso. Mpo na ntina oyo, toboya kopalanganisa nsango to koyebisa masoló oyo toyebi sikisiki te

Lolenge nini koyebisa masolo ya Biblia na mɔtɔ nyonso

Kati na Biblia nde esika tozali kokuta masolo mabongi mpenza na koteya. Na ndakisa, soki tolingi komonisa moyekoli moko ya Biblia, to na bayoki, ete bana bakoki kozwa ekateli mpo na Jéhovah Nzambe. Mpo na yango, tokoki kosalela lisoló ya mwana mwasi (oyo Biblia etangi nkombo na ye te) oyo alobelaki mwasi ya Naaman na ntina na Elisée, mosakoli na Jéhovah. Liboso, tokoki kotanga lisoló na 2 Mikonzi 5: 1-5. Na nsima tokoki kotuna ete: “Okanisi te ete ezalaki mpasi mpo na mwana mwasi oyo ete atikala sembo epai na Nzambe kati na mokili oyo mozalaki na losambo ya lokutá? Esengelaki na ye te ete azala na mpiko mpe na endimeli makasi mpo na kolobela Jéhovah mpe mosakoli na ye?”

Na kosaláká bolukiluki liboso, tokoki koyebisa lisoló na mɔtɔ. Makanisi ya ntina makoki kozwama na nsé na ba titres NAAMAN SYRIE mpe ÉLISÉE kati na index des publications de la Societé Watchtower. Mitindami mizali kati na Les Saintes Ecritures -Traduction du monde nouveau oyo elobeli lisoló lizali na 2 Mikonzi, ezali kotinda na Nzembo 148:12, 13, epai ekomami ete: “Bilenge mpe baseka lokola, mibangé mpe bana lokola; tika ete basanzola nkombo na Jéhovah, mpamba te bobele nkombo na ye nde eleki! Nkembo na ye ezali likoló na mokili mpe na lola.” Tala elendiseli mpo na bilenge ete bayebisa Liloba na Nzambe na molende mpenza!​—Misala 4:29-31.

Soki ozali ministre moklisto, ‘omisenzela ntango nyonso na mateya na yo.’ (1 Timoté 4:16) Osuka te bobele na koyebisa solo; lobela yango kati na masese. Yebisa masoló na Biblia na mɔtɔ mpe monisa yango na bilakiseli. Lobela makambo masilá kosalema mpe salela masese (bandakisa) ebongi. Yango ezali bisaleli malamu oyo bizali kosalisa mpo na kosimba mitema ya bayoki.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na la société Watchtower.

[Elilingi na lokasa 29]

Na ndakisa na Yesu, ba ministres baklisto bakoki lelo kosalela masese ya mɔtɔ mpo na koyebisa nsango na bango mpe kosimba mitema ya bato

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto