Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/10 nk. 29-30
  • “Okozala na ngai elongo kati na Paradis”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Okozala na ngai elongo kati na Paradis”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Paradiso
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • “Tokomonana na Paradiso!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • “Okozala na ngai na Paradiso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Liteya nini tokoki kozwa epai ya mosali-mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/10 nk. 29-30

“Okozala na ngai elongo kati na Paradis”

OKAKISAMAKA na nzeté ya mpasi, mobomi, oyo akomaki pembeni na kufa, abondelaki moto oyo azalaki na pembeni na ye: “Yesu, kanisa ngai wana ekokoma yo na bokonzi na yo.” Yesu, atako ye mpe abandaki kobunda na kokufa katina mpasi makasi, ayanolaki “Solo nazali koloba na yo lelo: ‘Okozala na ngai elongo kati na Paradis.’” (Luka 23:42, 43, MN) Moto oyo akomaki pembeni na kufa akokaki kozwa elikya eleki oyo na kolendisama?

Nzokande, osili komona ete, Traduction du monde nouveau, libongoli oyo lilobelami kati na paragraphe ya liboso, ezali kotya elembo na bokomi nsima na liloba “lelo” na ntango ezali kolobela maloba na Yesu? Yango ezali kosalisa na koyeba ete, ata na mokolo na kufa na ye, Yesu azalaki na likoki ya kolaka epai na mobomi oyo bomoi kati na paradis. Nzokande, La Bible en français courant ezali kotya elembo na bokomi na maloba na Yesu na motindo oyo: “Nalobi na yo solo ete: lelo okozala na ngai elongo kati na paradis.” Mingi kati na mabongoli mosusu mazali kosalela mokapo yango na motindo moko, na komonisaka ete Yesu mpe mosali na mabe oyo akómaki pene na kufa bakokende na paradis bobele mokolo wana.

Mpo na nini bokeseni oyo? Wapi motindo malamu ya kotya elembo na bokomi? Mpo na koloba solo, kati na ba manuscrits ya liboso ya greke ya Biblia, bilembo ya bokomi ata moko ezalaki te. Na yango, ntango bilembo ya bokomi bikotisamaki, bakomeli mpe babongoli ya Biblia bakokisaki bilembo ya bokomi engebene mayele ya solo ya Biblia oyo bazakaki na yango. Motindo oyo mokapo yango mozali kobongolama mbala mingi ezali nde ya malamu? Yesu mpe mosali na mabe bakendeki na paradis na mokolo na kufa na bango?

Te. Engebene Biblia, bakendaki na esika moko ebengami na greke Ha’des, mpe na liebele She‘ol, ebengeli oyo mibale ezali kolakisa nkunda esika oyo bato nyonso bakendaka. (Luka 18:31-33; 24:46; Misala 2:31) Na ntina na baoyo bazali katina nkunda, Biblia elobi: “Nde bakufi, bayebi likambo te . . . ezali na mosala be, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na Schéol (na greke Ha‘des, esika oyo ozali kokende.” Ezali mpasi na kolobela paradis na esika wana!​—Mosakoli 9:5, 10.

Ezali bobele mokolo ya misato nde Yesu asekwaki na Hadés. Na nsima, na boumeli ya baposo pene na motoba, na mbala mingi amonanaki na bayekoli na ye katina nzinganzinga ya Palestine. Na moko na komonana na ye, alobaki na Marie: “Naino nabuki epai na Tata na ngai te.” (Yoane 20:17) Na yango, ata na ntango wana, akendaki kati na esika moko te oyo ekokaki kobengama paradis.​—Emoniseli 2:7.

Na ekeke ya misato ya ntango na biso, wana mateya ya boklisto mpe filozofi greke ebandaki kosangisama noki, Origéne abongolaki maloba na Yesu boye: “Lelo okozala na ngai kati na paradis ya Nzambe.” Na ekeke ya minei ya ntango na biso, bakomi na lingomba Katolike batemelaki kotyama na elembo ya bokomi na nsima na “lelo.” Makambo oyo mamonisi ete lolenge na bango ya kokoma maloba ya Yesu ebandi lelo te. kasi ezali mpe kolakisa lisusu ete, ezala na ekeke ya minei ya ntango na biso,bato mosusu bazalaki kolobela makambo na Yesu ndenge tozali kokuta yango kati na traduction du monde nouveau.

Na mikolo na biso mpe, atako ebele na babongoli bazali kotya elembo na bokomi na Luka 23:43 na kotalelaka momeseno ya lingomba Katolike, bamoko bazali kotya elembo ya bokomi motindo moko na Traduction du monde nouveau. Na ndakisa, kati na libongoli ya allemand ya molakisi Wilhelm Michaelis, maloba na Yesu mazali kotangama boye: “Ya solo, nazali kondimisa yo bobele lelo ete: Okozala (mokolo mosusu) elongo na ngai kati na paradis.”

Maloba na Yesu epai na mosali na mabe malimbolaki nde nini? Moto oyo asilaki koyoka maloba oyo na ntina na Yesu, kolobaka ete akozala Mokonzi lokola esilaki kolakama, Na ntembe te amonaki likomi oyo Pilato akomisaki, oyo etyamaki likoló na motó na Yesu ete “mokonzi na Bayuda.” (Luka 23:35-38) Atako bakonzi na mangomba babwakaki Yesu na motó makasi na bango, mosali na mabe oyo abongolaki motema alakisaki kondima na ye ntango alobaki: “Yesu, kanisa ngai wana ekokoma yo na bokonzi na yo,” Akanisaki te na koyangela elongo na ye, kasi alingaki kozwa bolamu na bokonzi na ye, Yango wana, ata na boumeli ya mokolo yango ya mpasi koleka, Yesu alakaki na mosali na mabe ete akozala na ye elongo kati na paradis.

Kati na paradis nini? Kati na Biblia, Paradis ya ebandeli ezalaki na Edene, paradis oyo ekokanaki na elangá, oyo baboti na biso ya liboso babungisaki. Makomami malaki ete paradis yango ya mabelé ekozongisama na nse ya Bokonzi na Nzambe, oyo Yesu azali Mokonzi na yango. (Nzembo 37:9-11; Mika 4:3, 4) Na bongo, Yesu akozala elongo na mosali na mabe wana mpe na ebele na basekwi mosusu na ntango akosekwisa bango mpo na kozala na bomoi na mabelé oyo ekokoma paradis, boye akopesa bango likoki ya koyekola kosala mokano na Nzambe mpe kozala na bomoi ya seko.​—Yoane 5:28, 29; Emoniseli 20:11-13; 21:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto