Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/11 nk. 25-29
  • ‘Jéhovah azali Nzambe na ngai mpe nakolikya epai na ye’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Jéhovah azali Nzambe na ngai mpe nakolikya epai na ye’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya molende ya baboti na ngai
  • Toli ya mayele ya tata na ngai
  • Nsango euti na likoló!
  • Komonisa botɔndi mpo na mokumba nyonso ya mosala
  • Natikali molende na ntango ya bitumba
  • Vizite moko na makambo oyo makanamaki te
  • Nayiki mpiko atako mikakatano
  • Ndeko Knorr ayei lisusu
  • Makamwisi mosusu
  • Botali na makambo masili koleka
  • Bomoi oyo epesaka ngai mawa soko moke te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Epai mosala ya ntango nyonso ememaki ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/11 nk. 25-29

‘Jéhovah azali Nzambe na ngai mpe nakolikya epai na ye’

“Mpo na nini olingi kokende na Béthel?” Ezali nde motuna oyo tata na ngai atunaki ngai na eleko na printemps ya 1931 ntango nayebisaki ye mposa na ngai ya kosala na Béthel. Baboti na ngai bazalaki kofanda na mboka Sarre, bazalaki kati na solo uta pene na bambula zomi, mpe bapesaki na biso ndakisa moko malamu, biso bana na bango mibali misato. Solo ezalaki likambo ya bomoi na bango mobimba, mpe nalingaki ete ezala mpe motindo wana mpo na ngai.

KASI ndenge nini baboti na ngai bayaki koyeba Jéhovah mpe mokano na ye? Lokola mposa na bango ezalaki kokokisama mpenza te na mangomba ya mokili, babandaki koluka solo. Basepelaki na mitindo na mangomba nyonso, mpe mbala nyonso bazalaki komona ete, ezalaki lingomba ya solo te.

Mokolo moko, bakutaki na nse na ekuke na bango lokasa moko oyo ezalaki kolobela diskur moko ebongisami na bililingi mpe na filme, oyo ezalaki kolobela mokano na Nzambe mpe oyo ezalaki na motó na likambo “Photo-Drame de la création.” Tata na ngai asengelaki kokende na mosala na ye mokolo ya bolakisi filme yango, kasi alendisaki mama na ngai na kokende koyangana. Alobaki ete: “Mbala mosusu ekoteya biso eloko moko.” Na bozongi, na mpokwa yango, maman na ngai azalaki ma móto ya koleka. Angangaki ete: “Nasili kozwa yango! Esengeli ete yo moko okende komona yango lobi na mpokwa. Ezali solo oyo tozali koluka.” Ezalaki na 1921.

Lokola bazalaki bapakolami na elimo, baboti na ngai batikalaki sembo kino na liwa na bango. Tata na ngai akufaki na 1944, nsima na kokangama mbala mingi na ba soda ya nazi, mpe mama na ngai akufaki na 1970. Ye mpe alekisaki ntango mingi na boloko na nse na boyangeli ya nazi.

Ndakisa ya molende ya baboti na ngai

Na boumeli ya bomoi na bango mobimba, baboti na ngai bazalaki na molende mingi kati na mosala ya kosakola. Maman na ngai azalaki na molende mingimingi na bakabolami ya ba tracts oyo ezalaki kozongela bikateli bikamatamaki na ba assemblées kati na ba mbula 1922 mpe 1928. Oyo ezalaki na motó na likambo Acte d’accusation contre le clergé ezalaki na ekateli oyo ekamatamaki na 1924 mpe ezalaki na efundeli moko makasi epai na bakonzi na mangomba. Esengelaki kozala na molende mpo na kokabola yango. Kobanda ngonga ya minei na ntongo basakoli bazalaki pene mpo na kokɔtisa ba tracts na nse na ekuke ya ba ndako. Atako nazalaki elenge (nazalaki bobele na mibu 12), baboti na ngai bapesaki ngai nzela ya kobima na bango. Mbala mingi tozalaki kobanda na ngonga ya mitano, mpe na ba terituare ya mosika tozalaki kokende na velo, kuna tozalaki kokoma nsima na bangonga misato to minei. Tozalaki kobomba ba velo na biso na matiti, mpe nazalaki kobatela yango na ntango oyo basusu bazalaki kosakola kati na mboka. Na nsima na nzanga, tozwaki ba velo mpo na kozonga na ndako, mpe na mpokwa tozalaki kotambola ngonga moko na makolo mpo na koyangana na likita ya lisanga.

Na nsima na yango, mwana moko ya moke koleka ngai abandaki kobatela ba velo, mpe ngai, nabimaki elongo na basakoli. Kasi moto moko te akanisaki na kolakisa ngai ndenge ya kosala. Balakisaki ngai bobele kati na balabala nini nasengelaki kosakola! Motema mozalaki kobeta, nakendeki na malembe na ndako ya liboso, na kolikyaka ete moto akozala te. Mawa! mobali moko afungolaki ekuke. Nazangaki maloba Na kozanga koyeba motindo ya kosalela, nalekisaki ye mokanda oyo nazalaki na yango kati na sakosi na ngai. Atunaki ngai ete: “Ezali mokanda ya mosambisi Rutherford?” Nakakatanaki na eyano. “Ezali mokanda ya sika oyo ngai nazwi naino yango te?” Nayebisaki ye ete: “Ee, ezali ya sika.” “Na bongo nasengeli kozwa yango. Ezali ntalo boni?” Likambo yango epesaki ngai makasi mpo na kolanda kosakola.

Na 1924, bakolo bazalaki kolobela mingi likoló na mobu 1925. Mokolo moko, tokendeki kotala libota moko ya Bayekoli na Biblia, mpe nayokaki moko na bango kotuna ete: “Soko Nkolo amemi biso na likoló, nini ekokomela bana na biso?” Na elimo malamu oyo azalaki na yango, mama na ngai ayanolaki: “Nkolo akoyeba kobatela bango.” Lisolo yango ebendaki likebi na ngai mingi. Makambo oyo nyonso mazalaki kolimbola nini? Mobu 1925 ekomaki, mpe eyaki kosila, eloko moko esalamaki te. Atako bongo yango elembisaki molende ya baboti na ngai te.

Toli ya mayele ya tata na ngai

Na nsuka na yango, na mobu 1931, nayebisaki tata na ngai likambo oyo nalingaki kosala na bomoi na ngai. Atunaki ngai ete: “Mpo na nini olingi kokende kosala na Béthel?” “Mpo ete nalingi kosalela Jéhovah.” Abakisaki: “Soki bandimi yo na Béthel, ozali koyeba ete baoyo bazali kosala kuna bazali Baanzelu te? Bazali bato ya kozanga kokoka mpe basalaka mabunga. Nazali kobanga ete yango ekimisa yo mpe ata kotikisa yo kondima na yo. Kanisa malamu liboso na kokamata ekateli na yo.”

Maloba yango etungisaki ngai, kasi nsima na kotalela mabe na malamu na boumeli ya mikolo mingi, nalobaki lisusu na tata na ngai ete nalingaki kokoma mokanda mpo ya bokɔti na Béthel. Atunaki ngai ete: “Kundwela ngai mpo na nini olingi kokende kosala kuna.” Nazongelaki oyo nalobaki na ye liboso ete: “Mpo ete nalingi kosalela Jéhovah.” “Kobosana yango te, mwana na ngai Soki ondimami, omikundwela mpo na nini ozali kokende kuna. Soki omoni likambo moko ya mabe, kotungisama na yango mingi te. Ata soki bamonisi bokeseni epai na yo, kolongwa te. Kobosana te mpo na nini ozali na Béthel: mpo ete olingi kosalela Jéhovah! Omipesa na mosala na yo mpe otya motema na yo mobimba na Nzambe.”

Ezali nde bongo na ebandeli na nsima na nzanga ya 17 novembre 1931, nakomaki na Béthel ya mokili ya Suisse, na engumba ya Berne. Nazalaki kolala ndako moko elongo na bilenge mibali misato, mpe nazalaki kosala na ndako ya binyateli to imprimerie, epai nayekolaki kotambwisa enyateli moko ya moke oyo ezalaki kobakisama makasi na maboko. Moko na bazulunalo ya liboso oyo nazwaki mokumba ya konyata ezalaki Mosenzeli na lokótá ya roumain.

Nsango euti na likoló!

Na 1933, la Société Watchtower ebimisaki brochure moko oyo ezalaki na motó na likambo La crise, kati na yango ezalaki na ba discours misato oyo elobamaki na radio na ndeko Rutherford na Etats-Unis. Mokolo moko, na bolei ya ntongo, ndeko Harbeck, mokambi ya filiale, ayebisaki na libota ya Béthel ete brochure yango ekokabolama na lolenge moko sipesiale. Bakofutela avion moko mpo na kopalanganisa ba nkasa ya makomi likoló na engumba ya Berne, na ntango oyo basakoli bakotelema na ba nsuka ya balabala mpo na kolakisa brochure yango na baleki nzela. Ndeko atunaki ete: “Nani kati na bilenge mibali, alingi komata na avion yango? Bato na bolingo malamu bamimonisa sikasikawa.” Napesaki nkombo na ngai, mpe na nsima ndeko Harbeck ayebisaki ngai ete naponamaki.

Mokolo yango ekokaki, tokendaki na libanda ya mpepo ná ba cartons ya ba nkasa oyo tolingaki kopalanganisa. Nafandaki na nsima na mokumbi ya mpepo mpe natyaki ba nkasa yango na liboke na kiti oyo ezalaki na pembeni na ngai. Nazwaki mitinda ya sikisiki: sala maboke ya nkámankáma, linga yango mpe bwaka yango makasi na moko ya maninisa. Bopotu bouti na ngai, mbɛlɛ ekokaki kokangisa ba nkasa yango na nsima ya mpepo mpe kobebisa makambo. Kasi nyonso elekaki malamu. Na nsima ba ndeko bayebisaki ngai ete ezalaki kitoko na kotala ‘nsango yango kokita na likoló.’ Mokano oyo molukamaki ekokisamaki, mpe ebele na ba brochures ekabolamaki, ata soki bato batelefonaki mpo na koimaima ete libanda ya lopango na bango oyo ebongisami na bafololo etondaki na ba nkasa oyo ezalaki kolobela masolo yango.

Komonisa botɔndi mpo na mokumba nyonso ya mosala

Nazalaki kotɔndo Jéhovah mikolo nyonso mpo na esengo mpe bosepeli oyo nazalaki kooka kati na mosala na ngai na Béthel. Kati na lisangá, nazalaki na mokumba ya kofungola Salle du Royaume, ya kobongisa ba kiti mpe kotya kopo na mai ya malili likoló na pipitre ya molobi. Nazalaki kotalela mikumba yango lokola libaku moko monene.

Na Béthel, na nsima nasalaki na enyateli moko ya monene oyo ezalaki konyata zulunalo L’Age d’Or (lelo Réveillez -vous!) na lokótá ya polonais. Na 1934, tobandaki kosalela bafono, mpe nasanganaki na bosali na yango. Nazalaki kosepela mingi na kokende kosakola na ndako na ndako elongo na ba diskur ya Biblia oyo ezalaki na ba diske ya fono. Eloko yango moke ezalaki kobenda likebi ya bato mingi, mpe mbala mingi ezalaki kobenda basangani na libota mobimba, oyo, na nsima na koyoka moke, babandaki kolimwa mokomoko. Soki bango nyonso bakei, nazalaki koleka na ndako oyo elandi.

Natikali molende na ntango ya bitumba

Na nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mboka Sarre, mboka oyo nabotama, ezwaki lipanda na yango na Allemagne mpe ekomaki na nse’ ya batambwisi ya Société des Nations. Mboka Sarre ezalaki bongo kopesa mikanda ya leta na yango moko. Na 1935, na nzela ya vote, bafandi ya mboka bamonisaki mposa na bango ya kosangana to kosangana te na mboka Allemagne. Nasalelaki libaku yango mpo na kokende kotala libota na ngai, na koyebaka malamu ete soki mboka Sarre ekomaki na nse na botambwisi ya boyangeli ya nazi, nakokaki lisusu kokende kuna te. Ya solo mpenza, na boumeli ya ba mbula mingi, nazwaki lisusu nsango te ezala ya baboti na ngai to ya bandeko na ngai ya mibali.

Atako mokili ya Suisse esanganaki mbala moko te na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, nzokande mboka yango eyaki kotikala lokola mboka oyo etangwami na meko oyo mboka Allemagne ebandaki kokamata ba mboka moko na moko ya zingazinga na yango. Na kala, tozalaki konyata mikanda mpo na Europe mobimba, longola Allemagne, kasi sikawa tokoki lisusu kosala yango te. Ndeko Zũrcher, oyo azalaki mokengeli ya filiale, ayebisaki biso ete mosolo mpo ya botambwisi mosala mozalaki lisusu mingi te mpe alendisaki biso na koluka mosala ya mosuni kino makambo manso makobonga. Nzokande, bapesaki ngai nzela ya kotikala, mpamba te ezalaki na mwa motuya ya mikanda oyo misengelaki konyatama mpo na nkɔto moko na basakoli ya Suisse.

Libota ya Béthel akobosana te mokolo ya 5 juillet 1940. Bolei ya midi euti kosila, motuka moko ya basoda etelemi liboso na Béthel. Basoda bakiti na motuka mpe bakɔti na kati ye ndaka Bapesaki biso etinda ya koningana te, mpe pene na moko na moko na biso ezalaki na soda moko ná monduki. Bayanganisaki biso kati na esika na bolei, na ntango yango basoda mosusu bazalaki kolukaluka na bisika mosusu ye ndaka Bakonzi bakanisaki ete biso tozalaki kopusa bato na koboya kosala mosala ya soda, kasi basoda bazwaki eloko moko te oyo ekokaki kondimisa bifundeli yango.

Na boumeli na ba mbula ya bitumba, nazalaki mokengeli ya masanga mibale na mbala moko: Lisanga ya Thoune mpe lisangá ya Frutigen. Na nsuka na poso, programme na ngai ezalaki mpenza na makambo mingi ya kokokisa. Mikolo ya poso nyonso, bobele na nsima na bolei ya midi, nazalaki kokamata velo na ngai, mpe kotambola bakilometele 50 oyo ezalaki kokabola ngai na lisanga ya Frutigen, epai kuna nazalaki kotambwisa, na mpokwa yango, boyekoli ya Mosenzeli. Mokolo ya eyenga na ntongo, nazalaki kobima elongo na basakoli na mosala ya kosakola Lisusu, na ebandeli ya nsima na nzanga, nazalaki kokamata nzela mpo na kokende na mboka lnterlaken, kuna nazalaki kotambwisa boyekoli ya mokanda; na nsima na nzanga, nazalaki kokende kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndako epai na libota moko efandi na mboka Spiez. Na nsuka, mpo na kosilisa mokolo, nazalaki kotambwisa boyekoli ya Mosenzeli na lisangá ya Thoune.

Na nsima na kosilisa misala na ngai, na butu mpenza, nazalaki kozonga na engumba Berne, na koyembaka mpe kobetaka piolɔlɔ, na esengo mingi mpo na mosala oyo nakokisi na nsuka na poso. Na nzela, nazalaki komona mpenza ba vuatire te. Bangomba kitoko, oyo ezingami na molili mpo na bitumba, ezalaki na kimya mpenza, mbala moko mpe mosusu ezalaki kongengisama na polé ya sanza. Nsuka na poso ezalaki mpo na ngai na matomba mingi, mpe ezalaki kopesa ngai makasi lisusu.

Vizite moko na makambo oyo makanamaki te

Na eleko ya automne 1945, ndeko Knorr ayaki kotala biso. Mokolo moko, akɔtaki na kati na ndako ya binyateli ya mikanda na ntango oyo ngai nazalaki likoló na enyateli ya mikanda. Alobaki na ngai: “Okoki kokita? Okoloba nini na kolanda mateya na Eteyelo ya Galaad?” Nakamwaki. Nazongiselaki ye ete: “Soki okanisi ete nazali na likoki, ekosepelisa ngai.” Libyangami na ngai mpe oyo ya ndeko mobali Fred Borys mpe ya ndeko mwasi Alice Berner na mateya yango ekomaki na printemps ya 1946. Kasi lokola nabotami na mboka Sarre, nazalaki moto oyo azangi ekolo, mpe na bongo nasengelaki kosenga visa sipesiale na mboka Washington, na Etats-Unis.

Esengelaki ete nazela eyano na lisengi na ngai ya visa, nzokande ba mosusu basilaki kokende na dati oyo ebongisamaki. Na ntango mateya mabandaki mokolo ya 4 septembre, nazalaki kaka na Suisse, kobungisaka elikya moke moke. Na nsima momonisi ya bokonzi ya Etats-Unis ayebisaki ngai na telefone ete visa na ngai ekomaki Mbala moko nasalaki bibongiseli mpo na kolɛngɛla mobembo na ngai, mpe nayaki kozwa esika moko ya bolali na kati na masuwa oyo ezalaki kolongwa na mboka Marseille mpo na kokende na engumba New York. Oyo nde likambo! Masuwa Athos ll etondaki na bato ebele. Babombelaki ngai kanapé moko oyo ezalaki kati na esika ya bato nyonso. Mikolo mibale nsima na kolongwa na libongo, bopaswani moko ya makasi esalamaki na kati na esika ya ba masini etelemisaki masuwa. Bato oyo bazalaki kosala mobembo, lokola mpe basali ya masuwa, bazalaki komitungisa, na kobangaka ete masuwa makozinda. Nasalelaki libaku yango mpo na kolobela elikya ya lisekwa.

Esengelaki mikolo mibale mpo na kobongisa masuwa, na nsima na yango tolandaki mobembo na biso, nde na mbango mingi lisusu te. Tokomaki na engumba New York na nsima na mikolo 18, mpe balobelaki biso ete tokoki naino kokita na masuwa te mpamba te bato oyo batyaka mpe balongolaka bikangiseli na masuwa to ba dockers baboyaki kosala mosala. Na nsima na boyokani, toyaki kokita. Natindaki télégramme na Béthel mpo na koyebisa na bandeko likambo yango, mpe bobele na ntango nalekaki ba biro ya douane mpe ya immigration, moto moko atunaki ngaí: “Yo nde Monsieur Diehl?” Ezalaki moko na balandi ya ndeko Knorr; akɔtisaki ngai na kati na engunduka na butu oyo ezalaki kokende na mboka lthaca, mosika te na Eteyelo na Galaad, epai oyo nakómaki na ntɔngɔ ya mokolo molandaki, mwa moke nsima na ngonga ya mwambe. Nazalaki na móto na ndenge nakomaki na esika oyo nalingaki kokende, mpe nakoka kolanda mateya na kelasi ya liboso ya eteyelo yango, oyo bana na kelasi bautaki na mikili ndenge na ndenge!

Nayiki mpiko atako mikakatano

Bopesi ya mapolomi na kelasi ya mwambe ya Galaad esalamaki le 9 février 1947; móto mozalaki mpenza mingi. Tokotindama wapi? Mpo na ngai, “bipimeli” bikweyaki na ndako ya enyateli ya sika oyo la Société afungolaki na mboka Wiesbaden, na mokili ya Allemagne. (Nzembo 16:6) Nazongaki na mboka Berne mpo na kozwa mikanda ya leta ya ntina, kɛsi basoda ya Amerike baoyo bazwaki mokili ya Allemagne bazalaki kopesa nzela na bokɔti kati na mboka bobele na baoyo bazalaki kofunda kuna liboso na bitumba lokola yango ezalaki bongo te mpo na ngai, esengelaki ete la Société na Brooklyn atinda ngai epai mosusu. Mpe ezali nde na lolenge yango natindamaki mokɛngɛli ya circonscription na mokili ya Suisse, ezali nde yango nandimaki na kotyaka motema mobimba na Jéhovah. Kasi na ntango nazalaki kozela mpo na kobanda mosala yango, basɛngaki na ngai nalakisa misala oyo mizali kosalama na Béthel na bandeko basi misato oyo bazalaki koleka. Moko kati na bango azalaki pionniere mpe nkombo na ye Marthe Mehl.

Na sanza ya mai 1949, nayebisaki na filiale na Berne ete nalingakaki kobala Marthe, mpe ete mposa na biso ezalaki ya kotikala kati na mosala ya pionnier. Likambo nini lisalamaki? Tokokaki kopesamela mokumba mosusu te bobele ya pionnier permanent. Tosalaki mosala yango na mboka Bienne, bobele na nsima ya libala na biso na sanza ya juin 1949. Nazalaki na lotomo te ya kosala diskur; topesamelaki mpe nzela te ya koluka ba ndako mpo na ba Témoins oyo balingaki koyangana na assemblée oyo elingaki kosalama na mikolo mizali koya, atako mokɛngɛli ya circonscription aponaki biso mpo na kosala mokumba yango. Bandeko mingi bazalaki kopesa biso mbote lisusu te, mpe bazalaki kotalela biso lokola soki tobimisamaki na lisanga, nzokande tozalaki ba pionniers.

Nzokande, toyebaki ete kobalana eboyami te na Makomami; bongo tomipesaki kati na mabondeli mpe tomipesaki na Jéhovah. Ezaleli yango ezalaki komonisa likanisi ya la Société te. Ezalaki nde kouta na bosaleli ya mabe ya mitinda ya lisangá.

Ndeko Knorr ayei lisusu

Na mobu 1951, ndeko Knorr ayaki lisusu kotala bandeko na Suisse. Nsima na moko na ba diskur na ye, ayebisaki ete alingaki kosolola na ngai. Atako namitungisaki moke, nazalaki na esengo na komonaka nsai na ye na komona ngai lisusu. Atunaki ngai soki tokoki kondima kosala na engumba ya Genève, epai kuna bakanaki kofungola ndako ya ba missionnaires. Tosepelaki na yango mingi mpenza, atako yango esalaki biso mpasi na kotika Bienne. Lobi lolandi, tozwaki lisengi mosusu ya ndeko Knorr. Lokola mposa ezalaki na mokili ya Suisse, tokondima kozongela lisusu mosala ya mokengeli ya circonscription? Tondimaki mbala moko. Nazalaka ntango nyonso na ezaleli ya kondima nyonso oyo bakosɛnga ngai kosala.

Tozwaki mapamboli mingi na boumeli ya mosala na biso kati na circonscription na est ya Suisse. Tozalaki kosala mobembo na engbunduka na lisangá moko na mosusu, mpe azalaki komema biloko na biso kati na bavalisi mibale. Mbala mingi bandeko bazalaki koya kozwa biso na gare na velo, mpamba te na eleko wana baoyo bazalaki na bavuatire bazalaki moke. Nsima na ba mbula, ndeko moko ayaki kopesa biso vuatire mpo na kosalela yango, esalisaki biso mingi kati na mosala na biso.

Makamwisi mosusu

Oyo nde esengo monene tookaki na 1964 ntango ngai mpe mwasi na ngai bobengamaki na kozala na kelasi ya 40 na Eteyelo ya Galaad, eteyelo ya nsuka oyo ezalaki na mateya ya kokoka oyo ebongisamaki na boumeli na sanza zomi, mateya oyo masengelaki kokitisama na nsima na sanza mwambe. Marthe ayekolaki lokótá ya anglais na lombango, mpe ayebaki yango malamu. Tozalaki komituna esika nini tolingaki kotindama. Nazalaki komilobela ete: ‘Nandimi kokenda esika nyonso bakotinda ngai, bobele ete nazonga lisusu kofanda na biro te!’

Kasi ezali nde mpenza likambo oyo liyelaki ngai! Mokolo ya bopesi mapelomi, le 13 septembre 1965, mapesamaki mokumba ya mokengeli ya filiale na Suisse. Mpo na Marthe bomoi ya Béthel ezalaki eloko moko ya sika. Mpo na ngai, nazongaki lisusu kati na “Ndako na Nzambe,” ezalaki te na kati na ndako na binyateli ya mikanda esika oyo nazalaki kosala na 1931 kino 1946, kasi na biro. Nayekolaki makambo mingi; nzokande, na lisalisi na Jéhovah nayebaki yango.

Botali na makambo masili koleka

Na bambula 60 ya mosala ya pionnier, ntango nyonso namipesaka mobimba na Jéhovah, ndenge moko lokola tata na ngai apesaki ngai toli. Mpe Jéhovah asopaki likoló na ngai ebele na mapamboli. Marthe azalaka ntango nyonso liziba monene ya elendiseli kati na bantango ya mpasi, to ntango nazalaki kokoma pene na kozwama na misala mingi oyo mizalaki kopesamela ngai, azali mosungi mpenza ya sembo, oyo ntango nyonso azalaki kotya motema mobimba na Jéhovah.

Tika Jéhovah akumisama mpo na ebele na mabaku malamu ya mosala oyo mapesamelaki ngai! Nazali ntango nyonso coordinateur ya comité ya filiale na Thoune, mpe nasili kosala mibembo mingi lokola mokengeli ya zone. Ezala mosala nini oyo mopesameli ngai, ntango nyonso nalukaka nzela epai na Jéhovah. Nazali kondima mpenza ete Jehovah azali kolimbisa ngai na nzela ya Klisto, atako nazali na mabunga na ngai mpe mabe na ngai. Nazali kolikya kolanda kosepelisa ye. Mpe nazali kotombela ete akolanda kotambwisa matambe na ngai, mpamba te nazali ntango nyonso kotalela ye lokola “Nzambe na ngai mpe nakolikya epai na ye.”​—Nzembo 91:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto