Mosala oyo mobongi na yo?
JÉHOVAH asili komonisa bokabi na ye na kotyakáká biloko nyonso oyo tozali na yango mposa ete tosepela na bomoi. Ata nsima ya botomboki ya Adama mpe Eva, alandi komonisa bokabi na ye na kotikáká biloko nyonso lokola azalisaki yango. Mpe, amonisaki bolingo na ye monene na kotindáká Mwana na ye ete abikisa bandimi na mpasi euti na lisumu.—Matai 5:45; Yoane 3:16.
Lolenge nini tokoki koyanola na bolingo motindo oyo? Yesu alobaki ete tosengeli kolinga Jéhovah Nzambe na biso na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba na elimo na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba Yango elimboli ete tosengeli kosambela ye, kotikala sembo epai na ye, mpe kozala na boyokani elongo na mokano na ye.—Malako 12:30; 1 Petelo 4:2.
Kasi, kosala mokano ya Nzambe, epesi biso mokumba nini? Ezali na mosala oyo tokoki kosalela ye, mosala mpo na yango tosengeli kosangana?
Mposa ya basaleli
Mangomba masili kopɛngwisa bato na kozanga kosalisa bango ete bayeba malamu lolenge nini basengeli kosambela Nzambe mpe kosalela ye. Nzokande Biblia ezali komonisa ete lingomba ya solo ezali bobele moko, “Nkolo moko, kondima moko, batisimo moko, Nzambe moko mpe Tata mpo na bato nyonso.” Yesu alobaki: “Basambeli ya solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.” Bazwaki toli oyo ete: “Nalɔmbi bino ete bolobaka na motindo moko, bokabwani ezala kati na bino te.”—Baefese 4:3-6; Yoane 4:23; 1 Bakolinti 1:10.
Ezali na Edene nde Satana abandaki kotya mobulungano na lingomba ya solo, na ntango atɛmɛlaki lolenge oyo Nzambe azalaki koyangela, na kobɛtáká ntembe na lotómo na Jéhovah mpo na koyangela molóngó mobimba. (Genese 3:1-6, 13) Azali kotɛmɛla Nzambe sikawa na kopalanganisáká mateya ya lokutá; mpo na yango azali kosalela basakoli ya lokuta baoyo “bakomimonisa lokola basaleli ya boyengebene.” Na ntina wana Biblia elobi: “Balingami, bondima maloba nyonso mapemami te . . . mpo ete basakoli na lokuta mingi basili kobima kati na mokili.”—2 Bakolinti 11:14, 15; 1 Yoane 4:1, MN.
Likambo ya esengo mpenza, Nzambe asili kozwa meko mpo na kosilisa likambo ya boyangeli ya molongó mobimba. Atindi Yesu, Mwana na ye mpo na kosikola mokili, mpe asili kotya ye Mokonzi ya Bokonzi na ye na likoló na kopesáká ye nguya ya koboma Satana mpe basakoli na ye, to basaleli na ye. Tondimisami ete, na nzela na meko wana, mokano na Nzambe mokosalema na mabelé, mpo na bolamu ya seko na bato na botosi.—Danyele 7:13, 14; Baebele 2:9.
Satana asili kobulunganisa solo oyo. (2 Bakolinti 4:4) Bongo, mpo na komonisa polele lokutá ya Diable mpe kotatola mpo na solo, tosengeli kosalela nzambe na kokóma basaleli na ye. Jéhovah asɛngisi biso na makasi te ete tosalela ye. Alingi ete, na ndakisa na Yesu, tomipesa biso moko na botɔndi oyo tozali na yango epai na Ye mpe mpo na nyonso oyo asili kosala mpo na biso.—Nzembo 110:3; Baebele 12:1-3.
Mosala ya boklisto
Yesu “atambolaki kati na mboka minene mpe mboka mike. Asakolaki mpe alakisaki nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Asalisaki bayekoli na ye ete bango mpe bakóma basaleli lokola ye, mpe atindaki bango ete bakende kosakola (Matai 10:1-14, 27) Na nsima, apesaki bango mokumba ya kolanda kokokisa mosala yango kino bipai na nsuka ya mokili.—Matai 28:19, 20; Misala 1:8.
Ezali etinda oyo nde baklisto ya solo basili kozwa, mpe elimo ya Nzambe ezali kopusa bango na kosakola. Na ndakisa ya likambo lisalemaki na Pantekɔte ya mobu 33, baoyo nyonso bazali koyamba nsango malamu basili kozwa mokumba ya koyambwela kondima na bango.—Misala 2:1-4, 16-21; Baloma 10:9, 13-15.
Nzokande, bato mingi balingaka te ete bakóma basaleli. Témoin de Jéhovah moko, na nkombo Pierre, alobaki: “Bato na Alemanye bamonaka ete kosolola na ntina na lingomba ezali kokitisa lokumu na bango. Bakolobaka ete: ‘Wana ezali mosala ya bakonzi ya mangomba.”’ Tony, oyo azali misionere uta bambula mingi, alobaki ete bato ya Angleterre bandimaka ete: “Makambo oyo bozali koloba ezali kitoko, mpe nakanisi ete ba Témoins de Jéhovah bazali bato malamu mingi. Kasi ngai nakoki kokende te mpo na kosakola ndako na ndako.” Ndeko Ben ayekolaki Biblia elongo na moto moko ya mboka Nigéria, oyo alobaki na ye ete: “Nakoki kobima liboso na bato te mpo na kosakolaka ndako na ndako; kasi nakoki kopesa mosolo na lisangá na bino mpo na kosunga baoyo balingi kosala mosala yango.’’Emonani ete bato mingi bazangi kondima mpe endimiseli oyo ebongi mpo na kokokisa mosala ya boklisto.
Nzokande, banso na kati na lisangá na boklisto bazali na mokumba ya kosakola ndako na ndako, uta bazali na mbula nini, ezala mobali to mwasi. Mosala wana motali bobele mpo na bankulutu mpe basaleli ya misala te, baoyo ‘bazali kokamba’ lisangá kasi ezali mpo na baklisto banso. Banso bazwi toli oyo ete: “Totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye. . . . Botosa bango bakokambaka bino.”—Baebele 13:15, 17.
Wana azalaki kolobama na motindo na bato nyonso, Lisoló na ye likoló na ngomba, Yesu alobaki ete: “Ezali baoyo nyonso te bakolobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo’ nde bakokɔta na Bokonzi na likoló, kasi moto oyo akosalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” Na mbala mosusu, amonisaki ete kosakwela bato oyo bandimi te, ezali eteni moko ya mokano na Nzambe. Wana Yesu azalaki koteya Basamalia, bayekoli na ye bazalaki kolɔmba ye ete atika koteya mpo na kolya, kasi ayanolaki ete: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano na oyo atindi ngai mpe kosilisa mosala na ye.”—Matai 7:21, MN; Yoane 4:27-38, MN.
Tosengeli kokómisa yango mosala ya bomoi na biso mobimba?
Mbala mingi, bato balukaka komityela mikano ya mosuni. Kasi mwa liboso kati na Lisoló likoló na ngomba, Yesu akebisaki bayoki na ye na ntina na bolukikuli na lokoso na biloko ya mosuni. Alobaki ete: “Bomibombela biloko na motuya na likoló . . . Bolukaka nde liboso bokonzi mpe boyengebene na Ye (na Nzambe).”—Matai 6:20, 33, MN.
Koluka liboso Bokonzi elimboli ete tosengeli te kopesa nzela na makambo mosusu ete eleka liboso na mosala na biso. Kasi yango elimboli te ete tokoki kosala mosala mosusu te. Na ndakisa, Biblia ezali kolendisa biso ete tozwa mikumba na biso na kati ya libota na bopotu te. Mikumba yango mizali ndenge moko mpo na bato nyonso. Soki tokotalela mikumba yango na bopotu, boye tozali kotambola engebene kondima na boklisto te. (1 Timoté 5:8) Kasi, tosengeli kosala nyonso ebongi na biso tokokisa mosala yango, kozeláká bongo na bokatikati mpo na kokokisa mikumba na biso mosusu.
Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama lokola litatoli mpo na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Na kotaleláká makambo mosusu oyo makangami na esakweli oyo, tozali kososola ete esakweli yango ezali kokokisama na eleko na biso. Kobanda 1914, nsango malamu oyo tozali kosakola ezali oyo ete: Bokonzi na Nzambe bosili kozwa nguya nyonso mpo na kokɔtela boyangeli ya Jéhovah molóngó mobimba mpe mpo na kotɛmɛla Satana mpe mokili na ye, (Emoniseli 11:15-18) Tosengeli kokanisa mingi na nyonso oyo yango esɛngisi. Nsuka ekoya, mpe tosengeli kokokisa mosala na biso liboso ete ekóma. Bomoi ya bato mingi bizali na likámá; tokoki kosalisa ntalo monene ete babika.
Mosala oyo ekokisami mingi
Ba Témoins mingi bakolekisaka bangonga zomi to koleka sanza nyonso mpo na mosala ya kosakola nsango malamu. Mingi bazali kolekisa bangonga mibale to koleka na mokolo na mokolo, kati na mosala ya pionnier auxiliaire, mpe basusu bazali ba pionniers permanents, mpe ba pionniers spéciaux, bakosala mosala ya ntango nyonso. Bazali kokanga ntina ete mosala yango mosengeli kokokisama nokinoki na eleko na biso mpe balingi kolekisa ntango mingi kati na yango ete ekokisama liboso na nsuka ya mokili oyo mabe.
Ozali Témoin de Jéhovah ya molende? Na yango, meka kosangana mingi lisusu kati na mosala wana. Bongisa lolenge na mosala na yo ya kosakola mpe lolenge na koteya na yo, mpo na kosala mingi kati na mosala ya kosakola. Soki ezalela na bomoi na yo epesi yo nzela ya kokóma pionnier, sala mosala yango. Soki makambo mosusu mapesi yo nzela te mpo na yango, boye lendisa baoyo bakoki kosala mosala yango.
Soki ozali Témoin de Jéhovah te, kokanisa te ete mosala oyo mozali mpo na yo te. lngénieur mécanicien moko nkombo na ye Pierre abendaki koboya ete mwasi na ye asangana na mosala ya kosakola nsango malamu. Azalaki koloba mbala na mbala ete: “Nakoki kondima te ete mwasi na ngai asakola ndako na ndako.” Nsima na kotala na boumeli ya bambula lolenge oyo mwasi na ye akómaki na kondima makasi na solo oyo ezali kati na Biblia, mobali wana azwaki ekateli ya koyekola Biblia. Sikawa, azali mosakoli ya nsango malamu lokola mwasi na ye, nsima na komipesa epai na Nzambe mpe kozwa batisimo.
Bongo, komipimela te libaku kitoko ya kosalela Jéhovah. Tolendisi yo ete oyekola Biblia mpe oyangana elongo na baklisto ya solo na makita na bango. Yango ekosalisa yo na kobongisa bomoi na yo na kolanda boyengebene ya Nzambe mpe na kokóma na kondima makasi kati na mikano na ye. Soki okokola na makambo wana, yo mpe okokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na Nzambe. Bongo, okozwa libaku kitoko na kotósa etinda oyo na Yesu elongo na basusu, ete: “Bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso . . . kolakisa bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
Ee, ezali na mosala oyo okoki kosangana na yango, mpe osengeli kosala yango noki.
[Etanda na lokasa 25]
lnfirmier moko, oyo ozali na mokumba ya libota, alimboli ete ’’Lokolo esengeli na ngai kotambola koleka ngonga moko mpo na kokoma na lopitalo epai kuna nazali kosala, nakanisaki ete nakokoka te kosala mosala ya pionnier auxiliaire. Kasi namibongisi na motindo boye nakoka kosakola mokolo nyonso na ntongo liboso ya kokende mosala, mpe na ntango na bopemi na mosala mpe na mikolo ya bopemi. Bokoki kokanisa na esengo oyo nazalaki na yango wana nakokisaki ngonga 117 na nsuka yo sanza, kati na mosala wana! bazulunalo 263, nazwaki baabonema 22 mpe nabandaki boyekoli ya Biblia 3.
[Etanda na lokasa 27]
Michael azali na bana nsambo, azali moto monene kati na institut superieur moko na Nigeria. Azali mpe nkulutu na lisanga na ye . Azali na likanisi motindo moko na ebele ya ba Témoin de Jehovah, ye ete:
“Nazali kotalela mosala ya kosakola lokola masolo ya bomoi na ngai mobimba mpo nakokanisa ntango nyonso maloba oyo na Paulo ete: ‘Ngai nakónaki , Apolo amwangisaki mai kasi Nzambe akolisaki. Ngai mpe mwasi na ngai ‘tokolonaka wana tozali kosolola elongo na bato oyo tozali kokuta epai na bango na ntango tokendaka kosakola. ’Tokomwangisa mai‘ na kozongelaka baoyo basepelaki mpo na koteya bango makambo malobami na Biblia, lokola Yesu apesaki biso etinda. Bayekoli ya Biblia na poso na poso asalisaki bala mingi, ata mpo mabota, na kozwa bayebi ya solo.