Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/1 nk. 3-4
  • Nzambe nini tosengeli kosambela?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe nini tosengeli kosambela?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya banzambe ya lokuta
  • Likambo lizali kosambama na molongo mobimba etali mpe yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ondimi kotatola mpo na Nzambe ya solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Osengeli kosambela Nzambe nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ozali kosambela Nzambe nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/1 nk. 3-4

Nzambe nini tosengeli kosambela?

BATO bakeseni na banyama, mpo ete bango bakoki kosambela. Bazali nde kobotama na likoki yango. Topesameli mpe likoki ya kosala makambo malamu, lisosoli oyo lizali kosalisa biso na koyeba mabe mpe malamu. Biso banso tokolandaka, na lolenge moko to mosusu, lisosoli yango mpe na ntina wana bato mingi bazali komibalola epai na nzambe moko to na banzambe mingi mpo na kozwa litambwisi.

Na boumeli ya ekeke na biso mpe na ekeke oyo eleki, bato ya mayele batyaki ntembe ete Nzambe mpe Mozalisi mozwi-na-nguya-nyonso azali te. Na mobu 1844, Karl Marx alobaki ete lingomba ezali “eloko ekolalisaka bato mpongi.” Na nsima, Charles Darwin abimisaki liteya ya évolution. Na nsima bobongwani ya bolchevique ebandaki. Na mikili ya Europe de l’Est, biyangeli bizalaki kolongisa polele liteya oyo ete Nzambe azali te, mpe balobaki ete mangomba makolimwa nzela moko elongo na libota ya 1917. Nzokande, bato yango oyo bakondimaka Nzambe te, balongaki te na kobongola lolenge na moto. Yango ezali komonana polele na mikolo oyo, wana tozali nde komona bato kozongela mangomba na Europe de l‘Est.

Nzokande, lokola Biblia elobi yango, ezali na biloko mingi “oyo bakobengaka ‘banzambe,’ ezala na likoló, ezala na nsé, ‘banzambe’ yango bazali mingi mpe ‘bankolo’ bazali mingi.” (1 Bakolinti 8:5) Na boumeli na bikeke, bato basambelaki bankɔtɔ na banzambe. Banzambe lokola oyo ya kobota, ya bolingo kati na mwasi mpe mobali, ya bitumba mpe oyo ya vinyo mpe ya bilambo. Lingomba na Bahindu, yango moko ezali na bamilió na banzambe.

Ezalaki na banzambe mingi ya mitó misato na mboka Babilone, na Asulia mpe na Ezipito mpe tokokuta yango na mikili oyo bakosambelaka Buda. Boklisto ya mokili oyo yango mpe ezali na “Bosato” bosantu na yango. Mpo na Islam oyo eboyi liteya wana “ezali bobele na Nzambe moko Allah.” Epai mosusu, ata baoyo bazali koseka likanisi ya Nzambe moko Mozwi-na-nguya-nyonso mpe azangi komonana bazali mpe na banzambe na bango. Na ndakisa, kati na Bafilipi 3:19, Biblia elobi mpo na baoyo bakangami na motambo ya bozwi na mosuni: “Nzambe na bango bobele libumu.”

Bato mingi bazali kosambela nzambe to banzambe ya mokili to ya esika oyo babotami. Yango ekobimisa mwa mituna. Lolenge nyonso na losambo ezali bongo komema na esika moko​—lokola banzela mingi ekosukaka na kokutana likoló na ngomba moko? To banzela mingi ya mateya mazangi ndimbola ya solo oyo mangomba bazali kolanda ezali nde kokamba na likama monene lokola kosopana kati na libulu? Ezali na ebele ya lolenge malamu na kosambela Nzambe to ezali bobele moko? Ezali na ebele na banzambe oyo babongi ete tosambela bango, to ezali bobele na Nzambe moko Mozwi-na-nguya-nyonso oyo abongi kozwa losambo na biso lozangi kokabwana?

Ebandeli ya banzambe ya lokuta

Tosengeli kotya likebi na mituna oyo mitunami awa na likoló. Mpo na nini? Mpamba te moyebisi monene ya kalakala na makambo matali losambo, Biblia elimboli biso ndenge nini nzambe moko na lokuta, na nsima na nyoka, abendaki baboti na biso ya yambo na libebi. Kino lelo tozali naino koyoka bampasi euti na mayele mabe oyo asalelaki. (Genese 3:1-13, 16-19; Nzembo 51:5) Yesu, “Mwana na Nzambe,” alobaki mpo na nzambe motomboki wana ete azali “mokolo ya mokili oyo.” Moko na bantóma na Yesu abengaki ye “nzambe na biloko na ntango oyo.” (Yoane 1:34; 12:31; 16:11; 2 Bakolinti 4:4) Na Emoniseli mokapo 12, verset 9, ayebani lokola “nyoka na kalakala, oyo abyangami Diable mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba.” Lisangá ya molongo mobimba ya mangomba na lokuta lizali na nse na botambwisami ya Satana.

Satana azali mokosi monene. (1 Timoté 2:14) Kosaleláká mposa ya kosambela Nzambe oyo bato bazali na yango uta kobotama na bango, azali kokolisa losambo ya ebele na banzambe: bilimo na bankoko, bikeko to bililingi ya basantu, bikeko ya Maria. Azali kopusa bato na losambo ya bato bakomisami banzambe, lokola bakonzi ya nguya, bakonzi ya basodá balongi bitumba, mpe bayembi minene ya banzembo to babeti minene ya masano. (Misala 12:21-23) Esengeli na biso kokeba, tozala na ekateli ya koluka to kosambela bobele Nzambe se moko ya solo, oyo mpenza “azali mosika te na moko na moko na biso.”​—Misala 17:27.

Nani azali Nzambe bobele moko oyo tosengeli biso banso kosambela? Esili koleka mibu nkoto misato, mokomi na Nzembo alobaki mpo na ye ete azali “Ye Oyo-Aleki-Likoló, . . . Nzambe na ngai oyo ekondima ngai.” Mpe abengaki ye na nkombo na ye monene: “Jéhovah.” (Nzembo 91:1, 2) Liboso, Moize alobaki ete: “Jéhovah azali Nzambe na biso, (azali bobele) Jéhovah moko.” (Deteronome 6:4) Mpe lisusu mosakoli Yisaya ayebisaki maloba oyo malobamaki na Nzambe ye moko: “Ngai nazali Jéhovah, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai na bikeko te.”​—Yisaya 42:8.

Jéhovah Nzambe azwaki ekateli ya kopɛtola nkombo na ye na nsoni nyonso oyo Satana nzambe ya lokuta ayeisaki likoló na ye. Tozali na mwa likanisi ya lolenge oyo akosalela soki totaleli lolenge oyo, na nzela ya mosakoli na ye Moize, asikolaki libota na Yisraele na boombo ya Ezipito. Ezalaki na mobu 1513 liboso ya ntango na biso, mpe na libaku wana ayokanisaki nkombo na ye, Jéhovah na maloba oyo: “Nazali oyo ezali ngai.” (Exode 3:14, 15) Alingaki komilongisa liboso na Farao, kasi ayebisaki naino mpenza epai na mokonzi mabe wana ete: “Nde natiki yo na ntina boye ete namonisa yo nguya na ngai, ete nkombo na ngai esakolama bipai nyonso na mokili.”​—Exode 9:16.

Yango ezali mpe ndenge moko na ntango na biso. Lokola Farao ya Kalakala, nzambe na mokili oyo, Satana, azali kotya ntembe na Jéhovah mpe, kosalaka na mayele mabe, azali kobundisa na etumba ya elimo bato oyo balingi boyengebene mpe solo. (Baefese 6:11, 12, 18) Mbala oyo lisusu, Nzambe akobulisa nkombo na ye atako botemeli na Satana. Nzokande, liboso ete Jéhovah amonisa nguya na ye na kobomaka Satana mpe misala na ye nyonso, Jéhovah atindi basaleli na ye mpo ete bayebisa nkombo na ye na mabelé mobimba. Litatoli yango oyo lipesami mpo na nkombo ya ye lizali bongo eteni ya ntina ya losambo na solo.

Ezali mpenza mpo na yango nde Nzambe ye moko alobaki ete basambeli na ye bakozala batemwe na ye, ba Témoins de Jéhovah ‘libota oyo abongisi mpo ete bayebisa nkembo na ye.’ (Yisaya 43:10-12, 21) Ndenge nini bakoyebisa nkembo na Jéhovah? Bazali kosakola mpe koteya epai na bato banso mpe ndako na ndako, kosakoláká nsango malamu oyo: Bokonzi na Jéhovah, etambwisami na Mwana na ye Yesu Klisto, ekomema mapamboli mingi ya seko na bato ya botosi oyo bakozala awa na mabelé. Na bongo, na ndakisa ya baklisto na solo ya ekeke na liboso, bakosambela Nzambe “kozanga kotika.” (Misala 5:42; 20:20, 21) Bazwaki mapamboli ya Nzambe na kati na mosala oyo? Bankasa elandi ekoyanola na motuna oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto