Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/1 nk. 8-17
  • Bolingo mpo na Jéhovah epusi biso na kosambela ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolingo mpo na Jéhovah epusi biso na kosambela ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Rapport moko kitoko
  • Bazali komipesa na bolingo mpo na bolamu ya bato
  • Baninga na bonsomi na Nzambe
  • Bolingo monene mpo na Jéhovah
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/1 nk. 8-17

Bolingo mpo na Jéhovah epusi biso na kosambela ye

“Bolingo na Nzambe ezali boye ete: totósa mibeko na ye.”​—1 YOANE 5:3, MN.

1, 2. Nini esengeli kopusa biso na kosalela Jéhovah?

NA CALIFORNIE, na États-Unis, etuluku moko ya Bajaponé 80 bakendaki kotala Salle d’assemblées ya ba Témoins de Jéhovah. Kati na esika wana kitoko, oyo ezalaki na bafololo kitoko, na bibengá, bipopó, bamiyokaki mpenza pene na Jéhovah Nzambe, Mozalisi na bango monene. Moto oyo azalaki kotambwisa bango asosolaki noki ete pene na bango nyonso bazalaki ba pionniers, elingi koloba basaleli ya ntango nyonso. Mpe atunaki bango motuna oyo mobimaka mbala mingi, ete: “Mpo na nini ba pionniers bazali mingi na Japon?” Nsima na kolekisa mwa ntango, elenge mwasi moko ayanolaki ete: “Mpo tolingi Jéhovah.”

2 Bolingo mpo na Jéhovah​nde ezali kopusa biso na kozala na molende kati na mosala na ye! Ya solo bato nyonso bazali na makoki te mpo na kokóma ba pionniers. Mpo na yango, mingi kati na basakoli na Bokonzi koleka bamilió minei, bazwi likoki te ya kokokisa mosala yango. Nzokande, ntalo monene na baoyo ezalela ya bomoi na bango ezali kopesa bango nzela, bazali kosala makasi mpo na kosala bongo. Biso oyo totikali tokoki ‘kotya motema epai na Jéhovah mpe kosala malamu’; mpe tokoki komonisa bolingo na biso na kosanganáká na mosala ya kozalisa bayekoli. (Nzembo 37:3, 4) Lisusu, basambeli nyonso na Jéhovah bakoki kolendisa elimo ya pionnier na kopesáká lisungi ya bolingo epai na baoyo bazali kosala mosala yango.​—Matai 24:14; 28:19.

3. Kokesena nini ezali kati na ebele na bato oyo bazali komitanga baklisto mpe ba Témoins de Jéhovah?

3 Bato mingi oyo bakomitangaka baklisto bazali kotalela lingomba lokola eloko ya nsuka kati na bomoi na bango, mpo ete balingi komikangisa na kati na mibeko mingi te. Nzokande, ba Témoins de Jéhovah bazali na bolingo mingi mpo na Nzambe, oyo ezali kopusa bango na “koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na Ye.” Mpo na yango, esengeli kosala milende, kasi milende yango mizali mpamba te. (Matai 6:33; 16:24) Eyokani na mobeko monene na liboso, oyo eyebisamaki liboso na Moize mpe ezongelamaki na Yesu Klisto, ete: “Jéhovah, Nzambe na biso, azali bobele Jéhovah moko, mpe okolinga Jéhovah, Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na elimo na yo mobimba, mpe na makasi na yo mobimba.”​—Malako 12:29, 30, MN; Deteronome 6:4, 5.

4, 5. Nani tosengeli kotalela lokoka moto na sembo, mpe lolenge nini tokoki komonisa bosembo?

4 Kala mingi te, ndeko moko oyo asalaka na biro monene ya ba Témoins de Jéhovah, alobaki epai na Frederick Franz, prézidá ya la Société Watch Tower, oyo azali na mibu 98 mpe aumeli koleka mibu 70 kati na mosala ya ntango nyonso, ete: “Ndeko Franz, yo ozali mpenza ndakisa malamu ya bosembo.” Mpe ndeko Franz ayanolaki ye ete: “Ee, esengeli kozala sembo.” Apesaki eyano ebongi na motuna yango. Ata motindo na mosala nini oyo tozali kokokisa kati na mosala ya Bokonzi, tokoki kozala sembo.​—1 Bakolinti 4:2; Bagalatia 3:9.

5 Ya solo, ebele na baklisto balingi kosala mingi kati na mosala ya Jéhovah, kasi mikumba misengisami na bango na Makomami, to mpe mikakatano na kolongono na nzoto, ezali mbala mosusu kopekisa bango. Atako bongo, tosengeli kokanisa te ete baoyo bazali ba pionniers te bazali mpenza sembo te. Basusu bazali komimonisa sembo kati na mimekamo makasi, mpe mbala mosusu uta bambula mingi. Tokoki mpenza koloba ete bazali sembo! Bazali komonisa bolingo na bango epai na Jéhovah mpe bazali ntango nyonso kosalela ye na kosungáká bibongiseli na ye na bonzambe na motema moko. Bazali mpenza kosepela na mosala ya ba pionniers mpe bazali kolendisa baoyo bakoki kokóma ba pionniers​—mbala mingi ezalaka bana na bango-na kosala ete mosala wana moleki misala nyonso, ekóma mosala ya bomoi na bango mobimba.​—Tala Deteronome 30:19, 20.

6, 7. Lolenge nini lisoló liyebisami na 1 Samwele 30:16-25 likoki kosalelama lelo?

6 Mosala ya bomoko motondi na bolingo oyo emonani na eleko na biso epai na basaleli nyonso na Nzambe, ekoki kokokisama na lisoló oyo liyebisami na 1 Samwele 30:16-25. “Uta ntɔngɔntɔngɔ kino mpokwa,” Davidi abomaki Baameleke oyo babundaki elongo na ye mpe azwaki biloko mingi. Ezongaki ye na molako, bamoko na mibali oyo bakendaki elongo na Davidi mpo na etumba, balɔmbaki ete bapesa biloko te epai na baoyo bakendaki te na etumba wana makasi. Kasi Davidi ayanolaki ete: “Nani akoyoka bino na liloba oyo? Kasi, lokola ezali likabo na moto oyo akei kobunda, boye ekozala likabo na moto oyo atikali kobatela biloko. Bango nyonso bakokabamela lolenge moko.”

7 Motinda wana mozali mpe kosalelama lelo oyo. Na etumba oyo tozali kobunda kati na elimo, ba pionniers bazwi esika ya liboso. Kasi basangani nyonso mosusu ya lisangá bazali kosunga bango na motema moko mpe na bosembo. Litomba kitoko ya mosala na bomoko wana mokokisamaki na 1991 emonisami na tablo oyo ezali na nkasa 10 kino 13.

Rapport moko kitoko

8. (a) Rapport ya mokili mobimba emonisi nini na ntina etali motuya na basakoli oyo bamipesaki kati na mosala na Jéhovah mpe na ntina etali motuya ya ngonga oyo balekisaki kati na mosala yango? (b) Likambo nini ya ntina limonani na mikili oyo mibimisami mpo na mbala ya yambo kati na rapport?

8 Na nkasa minei oyo euti koleka, emonisami ete mosala makasi mokokisami na basambeli nyonso na molende na Jéhovah, epesi nzela na bokóli monene na boumeli na mobu 1991. Tozwi motuya ya sika ya basakoli 4 278 820, oyo emonisi bokóli ya 6,5 %. Basakoli wana balekisaki ngonga 951 870 021 (pene na milliard moko!) na mosala ya kosakola. Botala molende momonisami na bandeko na biso baoyo bafandi na mikili epai kuna mosala na biso mopekisamaki liboso, mpe oyo ezali mbala na liboso ete mikili yango mibima kati na rapport ya mokili mobimba: Bulgarie, Cameroun, Éthiopie, Mozambique, Nicaragua, Rwanda, Tchécoslovaquie mpe U.R.S.S.

9, 10. (a) Baoyo bakómaki ba pionniers basalaki lolenge nini kati na makambo na mpasi? (b) Nini ezali kolendisa biso na kobanda mosala ya pionnier?

9 Bambula oyo eleki, elimo ya pionnier epalanganaki kati na mokili mobimba. Ata na mikili oyo miuti kala mingi te kozwa bonsomi na losambo, motuya ya ba pionniers ezali kokóla nokinoki. Mikakatano na nkita mikoki te kolɛmbisa ba Témoins wana na molende, baoyo bazali kopesa nyonso oyo bazali na yango mpo na losambo na Jéhovah. (Tala 2 Bakolinti 11:23, 27.) Na mwayene, 14 % ya basakoli na Bokonzi basalaki mosala ya pionnier na sanza nyonso. Motuya na nsuka ya ba pionniers ezali 780 202, litomba lileki malamu limonisi 18 % ya basakoli.

10 Wana ezali bango komona bisengo oyo bizwami na ba pionniers, baklisto mosusu balendisami mpo na kosala mosala yango. Soki okómi naino pionnier te, bolingo na yo mpo na Jéhovah ekoki kopusa yo na koloba lokola ezali biso kotanga na Yisaya 6:8, ete: “Ngai oyo! Tinda ngai!” To mbula mosusu, na nzela na boyekoli na yo ya Biblia ya mbala na mbala, Liloba na Nzambe likoki kopɛlisa mposa makasi kati na motema na yo, na motindo boye ete osala matambé mosusu mpe obanda mosala ya pionnier? Ata na ntango na mpasi, liloba na Jéhovah lilendisaki Yilimia, mpe ye akokaki komipekisa te.​—Yilimia 20:9.

Bazali komipesa na bolingo mpo na bolamu ya bato

11. Bokóli nini bozwami na mosala ya boyekoli ya Biblia?

11 Tomoni kati na rapport yango bokóli na motuya ya boyekoli na Biblia; kati na mokili mobimba, boyekoli ya Biblia 3 947 261 etambwisamaki sanza nyonso, kozanga lifuti. Wana ezali ebongiseli etondi na bolingo oyo ezali kopesa nzela na ba Témoins de Jéhovah ete balanda mposa ya bato oyo bakutanaki na bango kati na mosala na bango ya ndako na ndako. Tozali na esengo ya koyekola Biblia elongo na bato ya bikólo nyonso mpe na mposo nyonso, mpe tokosalaka yango na molende motindo moko na ntóma Paulo. Mpo na kopesa “litatoli ya mozindo epai na Bayuda mpe epai na Bagreke,” Paulo alekisaki bangonga mingi na koteya solo. (Misala 20:20, 21, MN) Ezali bobele motindo moko lelo oyo. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosalisa “motindo ne bato nyonso” na “kobika” mpe na kokóma “na boyebi na koyeba solo.”​—1 Timoté 2:4.

12-14. Ba rapports nini ya esengo tozali kozwa longwa na mikili misusu ya Mpótó?

12 Kokóla na motuya na boyekoli ya Biblia oyo etambwisami na Europe de l’Est, ezali mpenza kopesa esengo. Na boumeli na bambula mingi, bandeko na biso bazalaki koyangana na bituluku mike, mpe basangani nyonso bazalaki mbala mosusu kozwa bobele ekzamplere moko ya Mosenzeli ya kala oyo ebɛtamaki na masini, mpe efinanaki. Kasi, bazali lelo kozwa ba Biblia mpe ebele na mikanda mikolimbolaka Biblia. Yango ezali kokundola maloba ya Loyembo na Salomo 2:4 (MN) ete: “[Yesu Klisto] amemaki ngai na ndako na elambo [ya elimo], mpe bɛndɛlɛ oyo atyaki likoló na ngai, ezali bolingo.” Awa esili bango kozwa bazulunalo na bango, mingi kati na baklisto wana babandi komibongisa mpo na kosembola “malamu” “liloba na solo.”​—2 Timoté 2:15.

13 Na engumba Saint-Pétersbourg, na Russie, lisangá moko lisalemi na basakoli 103 liuti kozwa motuya ya boyekoli ya Biblia 300. Bobele nsima na sanza mwambe, milende wana mimemaki kino na batisimo ya ba Témoins 53 ya sika. Koleka ndambo na basangani ya lisangá basali bobele pene na sanza mwambe kati na solo. Bankulutu bazali te; ezali bobele na mosaleli na misala moko oyo azali kosala mpo na bokóli na elimo ya baklisto wana.

14 Na mokili ya Estonie, moto moko oyo azalaki koyekola Biblia elongo na ndeko mwasi moko, atunaki ye soki akokaki kondima ete baninga na ye basangana wana ezali ye koyekola. Na ntango ndeko mwasi azongaki kotala ye nsima na poso moko, akutaki bato koleka 50 bayanganaki. Bongo, bibongiseli bikamatamaki mpo na kolanda mposa wana.

15. Tokoki koloba nini na ntina etali Ekaniseli mpe batisimo?

15 Mpo na bato mingi oyo bazali koyekola Biblia, mbala na bango ya yambo mpo na koyangana na makita na boklisto, ezalaki na ntango na Ekaniseli ya liwa na Yesu. Mbula eleki, bato 10 650 158 kati na masangá 66 207 ya mokili mobimba, bayanganaki na elambo wana kitoko; yango ezali mbala ya yambo oyo motuya na bayangani elekaki 10 000 000. Kati na mikili mingi ya Amérique latine, ya Afrike mpe ya Europe de l’Est, motuya ya bayangani ezalaki mbala misato soko mbala minei koleka motuya ya basakoli na Bokonzi. Sikawa, tosengeli kobanda komilengela mpo na Ekaniseli oyo ekosalema na mbula oyo, na mokolo ya vendredi 17 avril. Tozali kolikya ete mingi na bayekoli ya Biblia ya sika baoyo bakoyangana na yango, bakolanda kokóla kino kozwa batisimo. Na ntina na batisimo, na 1991, bato koleka 300 000 bamonisaki ete bapesi bomoi na bango epai na Jéhovah Nzambe na kozwáká batisimo na mai.

Baninga na bonsomi na Nzambe

16. Ba rapports nini ya kolendisa euti na ba assemblées de district “Baninga na bonsomi”?

16 Kati na makambo ya ntina mingi masalemi na mbula ya mosala na 1991, tokoki kotanga ba assemblées de district “Baninga na bonsomi,” oyo euti kosila na mikili ya Mpótó mpe ya Amerike, nzokande ekolanda kosalema na 1992 na mikili ya Afrike mpe mikili misusu. Ezali mbala ya yambo oyo assemblée esalemaki kati na mikili misusu ya Europe de l’Est, epai kuna bandeko na biso bazali kosepela mpo ete basaleli bonsomi oyo bauti kozwa yango mpo na kosanzola Jéhovah. Na octobre 1991, motuya nyonso ya bayangani mopesamaki mpo na ba assemblées 705 ya yambo, oyo esalemaki kati na mikili 54, ezali 4 774 937.

17, 18. (a) Bonsomi nini basambeli na Jéhovah bazali na yango lelo mpe bakozwa yango na mikolo mizali koya? (b) Na likambo nini bonsomi bopesami na Nzambe ekeseni na oyo ya mokili?

17 Yesu alobaki epai na bayekoli na ete: “Solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Solo na Biblia esili kosikola bamilió na bato baoyo bazalaki liboso baombo na mateya na boklisto ya lokutá. Bato yango bayekolaki ete mbeka na lisiko na Yesu, oyo Jéhovah abongisaki, ekopesa nzela na bato ete “basikwama na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.” (Baloma 8:19-22, MN) Ekozala bonsomi monene mpenza. Bato bakozala bongo na bomoi ya seko awa na mabelé oyo makobongwana paradis na ndelo oyo Jéhovah asilaki kotya na bolingo.​—Yisaya 25:6-8; tala Misala 17:24-26.

18 Bonsomi oyo ba Témoins de Jéhovah bazali na yango lelo, mpe oyo bazali kolikya kozwa yango lisusu mingi kati ebongiseli ya sika, euti na Jéhovah, Nzambe na biso. (2 Bakolinti 3:17) Euti ata na ebongiseli moko ya politike te, soko na batomboki mpe te. (Yakobo 1:17) Mpo na kolongola mobulungano kati na likambo yango, bakokaki kotanga likomi oyo ete “Baninga na bonsomi na Nzambe,” likoló na insigne ya assemblée 1991 oyo ezalaki epai na ba Témoins de Jéhovah bayanganaki na ba assemblées mosusu na Europe de l’Est, kasi bobele “Baninga na bonsomi” te.

Bolingo monene mpo na Jéhovah

19. Boyokani malamu elongo na Jéhovah kati na mabondeli, ekoki kosunga biso na likambo nini?

19 Bolingo na biso mpo na Jéhovah mpe elikya na biso epai na ye, ezali kopusa biso na kobɛlɛma epai na ye na nzela na mabondeli. Ezali boyokani wana elongo na Jéhovah nde esalisaki bandeko na biso na koyika mpiko na ebele na minyoko mpe na bolózi. (Nzembo 25:14, 15) Na ntango akutanaki na momekamo monene, Yesu alendendelaki kati na boyokani na ye elongo na Nzambe na nzela na mabondeli. (Luka 22:39-46) Ezali boyokani wana elongo na Jéhovah kati na mabondeli nde esungaki Etienne na boumeli ya kobomama na ye. Wana atalaki likoló na ntango oyo asengelaki kobolama mabangá, Etienne abimisaki maloba oyo ete: “Namoni likoló lizipwi, mpe Mwana na moto [Yesu] atɛlɛmi na lobɔkɔ na mobali na Nzambe.”​—Misala 7:56.

20-22. Likambo nini lisalemaki oyo emonisi ete Jéhovah ayokaka mabondeli?

20 Basambeli na ye basili komona yango mbala mingi, ete Jéhovah akondimaka mabondeli oyo mayokani na mokano na ye. Na ndakisa na mboka moko ya Afrike epai mosala ya ba Témoins mopekisami, pionnier spécial moko oyo azalaki kokenda epai na Nord ya mboka wana na nzela na motuka, amemaki saki monene ezalaki na mikanda mikolimbolaka Biblia mpe mikanda oyo bakomelaki masangá. Moto na mosala oyo azalaki kokɔtisa bisaka kati na motuka, atunaki ye ete: “Biloko nini bizali kati na saki oyo?” Ndeko na biso alobelaki ye eloko na liboso oyo eyelaki ye na makanisi ete: “Mikanda.”

21 Na nzela, motuka molekaki nokinoki na esika ya biro moko ya leta; bapolisié balandaki yango mpe bakangaki yango, kokanisáká ete balingaki mbala mosusu kokɔtisa biloko na moyibi. Bapolisié bapesaki etinda na bato nyonso ete bakita: basengelaki kofungola bisaka mpo na kotala. Makambo makómaki ndongo! Ndeko pionnier atangwaki mwa ntango moke longwa na ebele na bato oyo bazalaki koimaima, afukamaki mpe abondelaki Jéhovah. Na ntango azongelaki bango, bapolisié bazalaki kofungola bisaka ya mosali mobémbo moko na moko mpe kotalela yango malamumalamu. Na ntango balingaki kofungola saki na ye, ndeko pionnier asɛngaki lisalisi na Jéhovah na kimya nyonso.

22 Polisié angangaki ete: “Saki oyo ezali ya nani, mpe biloko nini bizali kati na yango?” Liboso nkutu ete ndeko na biso afungola monoko, moto na mosala na motuka wana, ayanolaki ete: “Ezali mikanda miuti na poste ya ​——​——​ mpo na poste ya ​——​——​.” Polisié alobaki ete: “Malamu.” Akamataki saki mpe apesaki yango epai na moto na mosala na motuka. Apesaki ye etinda ete: “Tya yango na esika moko malamu na boumeli ya mobémbo na bino.” Pionnier spécial afukamaki lisusu mpo na kotɔndo Ye oyo akoyokaka mabondeli.​—Nzembo 65:2; Masese 15:29.

23. Likambo nini Jéhovah asili komonisa, kasi mpo na nini azali mbala mosusu kopesa nzela na minyoko ete mibima?

23 Kasi, yango elimboli te ete mpasi ekoki kokómela basambeli na Jéhovah te. Na mabaku mosusu, ezala na ntango na kala to mpe na eleko na biso, Jéhovah asili komonisa ete akoki kobikisa libota na ye. Kasi, mpo na kosilisa ntembe na ntina na bosembo, mbala mosusu azali kopesa nzela ete minyoko mibima, lokola yango ebimelaki Mwana na ye. (Tala Matai 26:39.) Lisusu, atako kosalela mayele matongami likoló na Makomami ekoki kozala na ntina mingi, kasi Jéhovah akopekisaka te ete makámá nyonso mazwa basaleli na ye te, soko mobulu na bato to mpe kobomama. (Masese 22:3; Mosakoli 9:11) Ata tosilá kobikisama na likambo moko ya mpasi to mpe te, tokoki mpenza kozala na elikya ete bosembo na biso ekozwa mbano, ata soko yango ekozwama na nzela na lisekwa, soki esengeli bongo.​—Matai 10:21, 22; 24:13.

24. Jéhovah asili kopesa makabo nini matondi na bolingo, mpe lolenge nini tokoki koyanola na bolingo yango?

24 Makabo na bolingo mingi na Jéhovah mazali mpenza kitoko. Asili kopesa mokili mpe biloko binso bizali kati na yango epai na bato, likambo oyo limonisi mpenza bolingo na ye. (Nzembo 104:1, 13-16; 115:16) Na mawa na ye, akabaki Mwana na ye, Yesu Klisto, mpo ete bato basikolama na lisumu mpe na liwa: ezali elembo monene ya bolingo oyo ye amonisaki. “Bolingo na Nzambe emonani na biso na motindo boye ete, Nzambe atindaki Mwana na ye bobele moko kati na mokili ete tozwa bomoi kati na ye. Mpo na yango, bolingo ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka mpo na masumu na biso.” (1 Yoane 4:9, 10, MN) Mpo na koyanola na bolingo wana, tokoki kondimisama “ete ata kufa, ata bomoi, ata baanzelu, ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko nini mosusu, ekoki kokabola biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.“​—Baloma 8:38, 39.

Bozongeli

◻ Bosembo esɛngi nini?

◻ Na misala nini tokoki komonisa bolingo mpo na Jéhovah?

◻ Makambo nini masepelisi yo mingi kati na rapport ya mbula ya mosala 1991?

◻ Lolenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso epai na Jéhovah mpo na makabo na ye matondi na bolingo?

[Etanda na lokasa 15]

MPO NA NINI BA PIONNIERS MINGI BOYE?

Balobaki na ntina na Bajaponé ete, bazalaki basambeli na molende ya bakonzi na bango na boumeli ya mibu 2 600. Na bilamba ya ekeke ya ntuku mibale, koleka bamilió misato na basodá Bajaponé bakabaki bomoi na banga mpo bazalaki kokanisa ete kokufa mpo na mokonzi na bango oyo azalaki mpe nzambe, ezalaki likambo lilekaki na lokumu. Kasi elimo wana ya bitumba oyo eutaki na bopusi ya lingomba ya Shintõ mpe oyo na Buda (shintõ-bouddhique) esukaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe wana, nsima mwa ntango moke, mokonzi na bango aboyaki banzambe na ye. Eloko nini ekokaki kokitana losambo wana? Likambo ya esengo mpenza, bamisionere ya ba Témoins de Jéhovah, mpe Bajaponé oyo bakómaki ba Témoins, bateyaki Biblia epai na bato mingi, kosalisáká bango ete bayeba Jéhovah, Nzambe ya solo mpe bakabela ye bomoi na bango mobimba. Komipesa wana ezali na ntina monene mpo na ba Témoins ya Japon. Na kala, mbɛlɛ bakabaki bomoi na bango epai na mokonzi na bango oyo azalaki mpe nzambe, kasi lelo oyo, na nzela na mosala ya pionnier, bazali kopesa makasi na bango mobimba mpe na molende kati na losambo na Jéhovah, Nkolo Moyangeli, Nzambe na bomoi mpe Mozalisi ya molóngó mobimba.

[Etanda na lokasa 10-13]

RAPPORT YA MOSALA YA BA TÉMOINS DE JÉHOVAH NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 1991

(Tala mokanda)

[Elilingi na lokasa 16]

Baninga ya bonsomi mosantu: basambeli ya Jéhovah na liyangani na Prague, kobanda 9 tii 11 Août 1991.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto