Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/1 lok. 26
  • Litatoli ya libaku malamu lipesi matomba malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Litatoli ya libaku malamu lipesi matomba malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Masolo mosusu
  • Masoló ya basakoli na Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Solo ya Biblia esikoli mamelo moko ya mboka Bolivie
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Okoki kopesa litatoli ya libaku malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Toloba mpo na nkembo ya bokonzi na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/1 lok. 26

Masoló ya basakoli na bokonzi

Litatoli ya libaku malamu lipesi matomba malamu

EZALI mpo ete ba Témoins de Jéhovah bateyaki bango na lolenge ya libaku malamu nde ebele na bato bayokaki nsango ya solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso. Ba Témoins yango balandaki ndakisa na Yesu Klisto, oyo apesaki litatoli ya libaku malamu epai na Mosamaria moko ya mwasi, pene na etima esika akendaki kotóka mai. (Yoane, mokapo 4) Na Afrike ya Est, Témoin de Jéhovah moko ya mwasi ateyaki mamelo moko na litatoli ya libaku malamu. Filiale ya la Société Watch Tower eyebisa makambo malekaki, ete:

◻ Mokolo moko na ntɔngɔ, mwasi yango akutanaki na mamelo moko wana ezalaki ye kokenda na ville. Asalelaki libaku yango mpo na kotuna ye ete: “Okei wapi na ntɔngɔ boye?” Mamelo ayanolaki ete: “Nakei kosambela Nzambe na ngai.” Mpe ye atuni mamelo ete: “Oyebi nkombo ya Nzambe na yo?” Mamelo azongisi ete: “Nkombo na ye ezali Nzambe te?” Témoin de Jéhovah wana ya mwasi asɛngaki ye ete akenda kotala ye bobele moko wana na nsima na nzanga mpo na kolobela nkombo na Nzambe. Na nsima na kosolola, mamelo akendeki na ndakonzambe mpe atunaki na moko na basángó soki ayebaki ndimbola na “Jéhovah.” Sángó ayanolaki ete, “ezali nkombo na Nzambe.” Mamelo akamwaki mingi mpenza na komona ete sángó ayebaki yango, nzokande ateyaki ye yango te.

Na boumeli ya mikolo libwa milandanaki, Témoin wana ya mwasi azalaki kokende kotala mamelo mpe alakisaki ye solo likoló na Trinité, na molimo, na lifelo ya mɔ́tɔ mpe likoló na elikya mpo na bakufi. Mamelo ayokaki na likebi mpenza makambo nyonso oyo moklisto mwasi wana azalaki koloba na ye, mpe mamelo asɛngaki Témoin ya mwasi ete atikela ye ntango mpo na kokanisa. Nsima na poso mibale, bakutanaki lisusu mpe mamelo asɛngaki ye ete bakóba kosolola. Na ntango wana, mamelo asilaki kozwa ekateli ya kolongwa na lingomba ya katolike, kasi naino alongolaki bikeko na ye te, basapɛlé na ye mpe bikulusu na ye. Sángó amekaki kondimisa ye mpo na kozonga, kasi azwaki ekateli makasi ya kolanda kotambola kati na nzela ya solo. Na nsima, azwaki batisimo mpe azali pionnière auxiliaire na ntango nyonso uta basanza mingi atako kolongono ya nzoto na ye ezali malamu te mpe akóli mingi.

◻ Lokola azali na ndako moko ya monene, apesaki na lisangá ete basalela yango lokola Salle du Royaume. Ba Témoins babongisaki lisusu nsambá, oyo ekómaki ya kala, babukaki bifelo oyo bizalaki na kati ya ndako mpe bakómisaki eteni monene ya ndako yango na esika moko kitoko mpo na makita. Mamelo wana ya kala afandi na eteni moke ya ndako na nsima ya Salle. Azali na esengo mingi mpo ete apesaki likabo wana mpo na losambo na Jéhovah.

◻ Likambo mosusu limonisi ntina ya litatoli ya libaku malamu, lisalemaki na engumba Kampala, na Ouganda. Wana ezalaki ye kokenda na biro moko ya leta, misionere Témoin de Jéhovah moko apesaki litatoli ya libaku malamu epai na baoyo bazalaki elongo na ye kati na ascenseur. Mobali moko, Mr. L​——​——, alobaki ete andimaki kozwa mokanda oyo misionere azalaki kolakisa, kasi akokaki kozwa yango na ntango wana te. Bongo, apesaki nkombo na ye mpe adresse ya biro na ye. Na nsima, misionere akendeki na esika mobali yango azalaki kosala mpe asɛngaki ete akutana na ye. Babengaki ye, kasi akamwaki mingi wana emonaki ye nde moto mosusu koya epai na ye. Mibali mibale oyo bazalaki na nkombo moko bazalaki kosala kati na biro yango. Misionere apesaki litatoli ya mokuse epai na Mr. L​——​——. ya mibale, oyo asepelaki mingi mpenza na nsango malamu. Nzokande Mr. L​——​——. ya liboso asepelaki te ete balanda kosolola, Mr. L​——​——. ya mibale abundaki koyekola Biblia. Sikawa, azali Témoin de Jéhovah, mwasi na ye mpe mwana na ye bazali kosala bokóli malamu mpo na kozwa batisimo.

Yesu Klisto azali Mobateli na mpate aleki malamu; ayebi baoyo bakokani na bampate mpe baoyo bazali na boyambi. Makambo oyo masalemaki mamonisi biso ete Yesu azali kotambwisa bayekoli na ye epai na bato motindo yango. Ee, kosakola na libaku malamu ekopesaka matomba malamu!​—Yoane 10:14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto