Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/1 nk. 24-30
  • Koyangana ya baninga na bonsomi bouti na nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyangana ya baninga na bonsomi bouti na nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Vendredi na nsima na nzanga
  • Samedi na ntɔngɔ
  • Samedi nsima na nzanga
  • Mokolo ya lomingo na ntɔngɔ
  • Mokolo ya lomingo na nsima na nzanga
  • Boyei malamu na ba assemblées ya distrike “baninga na bonsomi”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tobebisa te libaku ya bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Salelá Yehova, Nzambe oyo apesaka bonsomi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Libota na bonsomi, kasi lisengeli kozongisa makambo liboso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/1 nk. 24-30

Koyangana ya baninga na bonsomi bouti na nzambe

BA TÉMOINS DE JÉHOVAH bazali libota likeseni na mosusu mpo na bantina mingi. Bobele bango nde bazali koloba “monoko na peto.” (Sofoni 3:9) Bobele bango nde bazali na bomoko, mpamba te bazali na bolingo, elembo na kokesenisa oyo Yesu alobelaki. (Yoane 13:35) Mpe bobele bango nde basili kozwa bonsomi bouti na solo, lokola Yesu alobelaki yango kati na maloba oyo makomami na Yoane 8:32, ete: “Bokoyeba solo mpe solo ekosikola bino.”

Maloba oyo Yesu Klisto, Mwana na Nzambe alobaki na bayekoli na ye mamonani solo. Ba Témoins de Jéhovah bakangaki ntina na yango mpenza na ba assemblées ya distrike “Baninga na bonsomi.” Programme esalisaki bango na kokanga ntina ya bonsomi na bango na mitindo mikeseni, lolenge ya kosalela yango, mikumba mizali kouta na yango mpe mapamboli oyo bazali kozwa na lolenge na bango ya libota na bonsomi.

Assemblée ya liboso na kati na ba assemblées yango, oyo eyaki na ntango na yango mpe emonisaki lolenge malamu ya kosalela bonsomi, esalemaki le 7 juin 1991 epai na Nord, na Los Angeles. Na 10 h 20, likita libandaki na miziki, oyo elandamaki na loyembo mpe na libondeli. Diskur ya bofungoli, etongamaki likoló na Yakobo 1:25, esepelisaki bato mingi. Verset oyo ekotongama boye na kati na Bible Segond ete: “Nde ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala, ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.” Motindo moko soko tozali komitala mpo na komona na kitalatala mpo na koyeba lolenge nini tosengeli kobongisa libandá ya nzoto na biso, tosengeli ntango nyonso kotalatala na kati na Mobeko mobongi ya Nzambe, oyo na bonsomi mpo na koyeba mabongwani nini tosengeli kosala na bomoto na biso. Mpe tosengeli kolendendela na kotala kati na talatala oyo na molende.

Na nsima, ezalaki na diskur ya mokambi, na motó ya likambo “Boyei malamu na bino banso, baninga na bonsomi.” Ba Témoins de Jéhovah balingi bonsomi, mpe balingi kotikala nsomi. Molobi atangaki bankombo na bato ya mibeko oyo bamonisaki ete bonsomi ekozala bobele esika mibeko mizali. Bongo, soki baklisto bazali bonsomi, yango ezali te mpo na kotambola lokola balingi, kasi mpo na kosala mokano ya Jéhovah. Balingi kosalela na bonsomi na bango nyonso, kasi bakosalela yango lolenge mabe te. Uta 1991, mpenzampenza, bonsomi ya ba Témoins de Jéhovah ezali nse kokola. Molobi omonisaki lolenge nini bonsomi elobamaki mingi na ba thèmes ya ba assemblées mpe na mikanda ya boklisto. Bayangani nyonso basengelaki koyekola makambo mingi likoló na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa biso mpe likoló na lolenge oyo tosengeli kosalela yango.

Makebisi wana mapesamaki na ntango malamu, malandamaki na mituna oyo batunaki baninga na bonsomi baoyo bazalaki na esengo ya kozala na assemblée. Ba assemblées ya motindo oyo ezali mabaku ya bosepeli, lolenge moko esengo monene ezalaki komonana kati na Yisraele ya kala, na bilembo misato oyo bizalaki kosalema mbula na mbula.

Na nsima ezalaki diskur–klé, oyo ezalaki na motó na likambo: “Bonsomi oyo Nzambe azali kopesa biso ezali na ntina nini mpe lolenge nini kosalela yango?” Na nzela na diskur, bayangani bayekolaki ete bobele Jéhovah nde azali na bonsomi bozangi ndelo, mpo ete azali Mokonzi aleki likoló mpe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Kasi, na ntina na nkombo na ye, mpe mpo na bolamu na bikelamu na ye, azali mbala mosusu kotya ndelo na bonsomi na ye na kopekisáká nkanda na ye mpe na komonisáká ezaleli ya komipekisa. Bikelamu na ye nyonso ya mayele bazali na bonsomi oyo ezali na ndelo, mpamba te bazali na nsé na Jéhovah mpe bazali na ndelo mpo na mibeko mizali koyangela molóngó mpe na mibeko mitali bizaleli malamu oyo ye asili kotya yango. Jéhovah asili kopesa bango bonsomi mpo na esengo na bango, kasi mingi mpenza mpo ete bakumisa ye mpe basepelisa ye na kopesáká ye losambo. Lokola ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela bonsomi na bango malamu, bayebani bongo na mokili mobimba na ntina na etamboli na bango malamu mpe mpo na molende oyo bazali na yango kati na mosala na bango ya kosakola.

Vendredi na nsima na nzanga

“Ozali kosala misala mpamba to mosala ya Jéhovah?” Wana ezalaki motó ya likambo ya diskur ya mozindo oyo lifungolaki likita nsima na nzanga. Misala na mpamba esangisi bobele misala na mosuni te, kasi mpe misala misusu misili kokufa kati na elimo, na mpamba mpe mizali na litomba te, lokola bolukiluki na bozwi. Mpo na yango, ebongi na kotalela soko tozali sembo mpo na kotya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na biso.

Diskur oyo elandaki ezalaki na likanisi ya ntina mpenza mpe ezalaki na motó ya likambo oyo ete “Tokokisa mokumba na biso ya basaleli ya Nzambe.” Molobi alimbolaki ete baklisto basengelaki te kokokisa mosala moko lokola elembo, to kosuka bobele na kosakola mwa bangonga. Basengeli kozala na mposa na kotya molende na mitindo nyonso na mosala ya boklisto. Bilakiseli mpe mituna esalisaki bayoki na kosimba makanisi yango. Bato nyonso balendisamaki na kokokisa mosala na bango na makoki na bango nyonso.

Na kati na diskur “Libota na bonsomi nde lizali na mokumba ya kozongisa monoko,” molobi abendaki likebi likoló na likambo oyo: atako basaleli ya Jéhovah basepeli na bonsomi oyo solo ememeli bango, basengeli kobosana te ete bazali na mokumba ya kozongisa monoko epai na Jéhovah mpo na lolenge oyo bazali kosalela bonsomi yango. Bonsomi yango ekoki te kozala ezipeli mpo na komitambwisa mabe; kasi, basengeli nde kosalela yango mpo na kokumisa Jéhovah. Lokola bazali baklisto, basengeli kozongisa monoko epai na “bakonzi baleki liboso” mpe kosalana elongo na bankulutu kati na lisangá. (Baloma 13:1, MN) Basengeli mpe kozongisa monoko mpo na lolenge oyo bazali kolata, bazali kokatisa suki mpe mpo na etamboli na bango. Basengeli kobosana soki moke te ete: “Moto na moto kati na biso akozongisa monoko epai na Nzambe na ntina na makambo na ye moko.”​—Baloma 14:12; 1 Petelo 2:16.

“Tozala na kobanga te awa nsuka ya mokili oyo ebɛlɛmi” ezalaki thème ya lisoló lilandaki. Awa bato bazali kobanga makambo mazali koya, baklisto basengeli kobanga te mpo na kosukisa malamu mosala na bango. Ezali elikya epai na Jéhovah nde ekopesa nzela ete tobanga te, mpamba te wana ezali biso kobanga ete tozanga kosepelisa Nzambe te, tokobanga bato te. Mwango moko ya komikembisa ete tobanga te, ezali bongo koyeba na motó ba versets ya kolendisa oyo ezali na Makomami. Mpo na kozala makasi na elimo mpe kozala na kobanga te, basaleli na Nzambe basengeli mpe kozwa litomba na mabaku oyo mapesameli bango mpo na koyangana elongo na baninga na bango baklisto. Moto na moto asengeli mpe komikundola ntina na libondeli, oyo ekosalisaka mpo na kolónga kobanga. Na kozanga kobanga, baklisto bazali na boyokani malamu elongo na Jéhovah Nzambe.

Programme ya mokolo ya liboso esukaki na drame epesaki liteya malamu na motó ya likambo Tosikolami mpo na kokólisa losambo ya solo. Emonisaki lolenge nini libota moko lizwi lelo liteya na ndakisa ya Esdrase mpe etuluku ya Bayisraele 7 000 baoyo batyaki milende mpo na kozonga na Yelusaleme. Drame yango esalisaki mosangani moko na moko na koyeba makambo oyo asengeli kotya na esika ya liboso mpe kotala lolenge nini akoki kokólisa mikumba na ye na mosala ya kosakola. Epesaki lisungi ezala epai na bilenge to epai na mikóló.

Samedi na ntɔngɔ

Nsima na miziki, na loyembo, na libondeli mpe na kotalela texte ya Biblia ya mokolo wana, likita ya samedi na ntɔngɔ ezalaki na masolo mingi malandanaki na motó ya likambo “Bonsomi mpe mokumba na kati ya libota.” Na eteni ya liboso, oyo ezalaki thème “Lolenge nini batata bakoki komekola Jéhovah,” batata bazwaki toli likoló na mitindo ndenge na ndenge oyo bakoki komekola Tata na biso ya likoló. Mokanda ya liboso epai na Timoté, mokapo 5, verset 8, esɛngi na bango ete bakokisa bobele bamposa ya mosuni ya mabota na bango te, kasi basengeli mpe kokokisa bamposa na bango ya elimo. Bakomekola Jéhovah na kozaláká bateyi malamu na kati na libota na bango mpe na kopesáká toli to mpamela na bolingo mpe na lolenge ya malamu. Mituna mingi mitunamaki mimonisaki makanisi yango.

“Basi oyo bazali kosunga mibali na bango,” ezalaki thème ya eteni ya mibale ya symposium wana. Uta na ebandeli, likebi libendamaki likoló mokumba ya lisungi, mokumba kitoko oyo mwasi azali kokokisa kati na libota na boklisto. Yango esɛngisi ye makambo nini? Asengeli kotósa mobali na ye na motindo mobongi, kozanga kopusa ye ete asala likambo oyo ye moko alingi. Asengeli kokokisa mikumba na ye epai na mobali na ye mpe epai na bana na ye, mpe akoki kozwa bosepeli ya solo na kobateláká ete ndako na ye ezala pɛto mpe ebongisami malamu. Mpe, lokola azali mosaleli moklisto, akoki kozala na mabaku mingi ya kosangana na mosala ya kosakola. Mituna mitunamaki na libota moko emonisaki mpenza lolenge toli wana ya Biblia ezali na mayele.

Eteni oyo ezalaki na thème ete “Bana oyo bazali koyoka mpe bazali koyekola” etalaki bilenge. Na kolakisáká na bana na bango lolenge nini basengeli koyoka mpe koyekola, baboti bazali kokumisa Jéhovah mpe bazali komonisa bolingo epai na bandeko na bango ya elimo mpe epai na bana na bango. Boyokani makasi bokosalema kati na baboti mpe bana na bango soki nde bakolekisa bantango elongo moko mpo na kosala makambo na kolendisa. Baboti basengeli kozala na makoki ya koyanola na mituna ya bana na bango mpe kolamusa mposa na bango ya koluka koyeba. Wana lisusu, mituna mitunamaki mimonisaki lolenge nini kolanda makanisi yango.

Na nsima, bayangani bazwaki toli oyo ete: “Tobatela bonsomi na biso mpo na kosalela Jéhovah.” Lolenge nini kokokisa yango? Na koboya koluka mosala ya bomoi mobimba kati na mokili, na koboya komipesa na masano oyo mazali kozwa ntango mingi mpe na koboya komityela mikano na mosuni. Yesu mpe ntóma Paulo, baoyo bamonisaki molende, bazali ndakisa malamu mpo na biso. Basaleli na Jéhovah basengeli kozala na liso malamu mpe komipesa na matomba ya Bokonzi. Ntango bozali kokana kosomba eloko moko, ekozala malamu kobomba mbongo liboso, na esika ya kosomba na nyongo mpo na kofuta na nsima. Bilenge basengeli kosɛnzɛla ete babendama te na bamposa ya kosangisa nzoto mpe na kozwa mosala ya bomoi mobimba kati na mokili. Mituna batunaki pionnier moko monzemba, emonisaki mapamboli nini tokoki kozwa soki ‘tobateli bonsomi na biso mpo na kosalela Jéhovah.’

Programme ya samedi na ntɔngɔ esukaki na diskur “Tozwa bonsomi na komipesa epai na Jéhovah mpe na kozwa batisimo.” Bakundwelaki bakandidá na batisimo ete botomboki ya Adama ememaki mokili na boombo, kasi Yesu Klisto, Mosikoli, asili kofungola nzela ya bonsomi na nzela na mbeka na ye. Molobi amonisaki oyo elimboli ya kozwa bonsomi mpo na kosala mokano na Nzambe, mpe amonisaki mikumba ya baoyo bazali kozwa batisimo, mpe mapamboli oyo bakozwa na yango.

Samedi nsima na nzanga

Likita ya samedi nsima na nzanga libandaki na motuna oyo mopusaki bato na komitalela, ete: “Ozali koluka litomba epai na nani?” Mokili mozali komonisa elimo ya moïmi ya Diable. Nzokande, baklisto basengeli komekola molende na Yesu Klisto. Oyo nde ndakisa kitoko asili kopesa! Atikaki nkembo na ye na likoló mpe akabaki bomoi na ye ya bomoto mpo na biso. Motuna oyo motunami mpo na koyeba soki tozali koluka matomba ya nani, na ndakisa, na ntango matáta mabimi kati na baklisto mpo na makambo ya mombongo to na makambo matali mosolo, to wana matáta mabimi likoló na bomoto bokokani te. Makambo motindo wana makotyaka bolingo na biso na boklisto na komekama. Kasi ye oyo azali koluka litomba ya bato mosusu akokanga ntina ete kopesa ezali likambo eleki esengo mingi, mpe akondimama na Jéhovah.

Na nsima, diskur moko esalemaki, oyo ezalaki na thème ekangamaki na oyo ya liboso “Toyeba bolɛmbu na biso elimo mpe tolónga yango.” Diskur wana emonisaki ntina ya kososola bilembo ya bolembu na elimo, mpe ntina ya kozwa ekateli makasi mpo na kolónga Satana mpe kokima mitambo na ye. Basaleli na Jéhovah basengeli na mbala moko kolóna bolingo ya mozindo mpo na Mozalisi na bango mpe koyina mabe. Yango esɛngi na bango ete bayekola koyeba Jéhovah na koyekoláká Biblia mbala na mbala mpe na mokano ya sikisiki, ezala na moto ye moko to mpe na libota. Basengeli komibatela longwa na motindo na masano nyonso mazali kokumisa elimo ya mobulu mpe pite. (Baefese 5:3–5) Mpo na kolónga bolɛmbu ya elimo, esengeli mpe kobondela mbala na mbala mpe koyangana ntango nyonso na makita.

Diskur moko ebimisaki yikiyiki mingi ezali oyo ete “Libala ezali nzela ya kozwa bolamu?” Bilenge mingi bakanisi ete ezali bongo! Kasi molobi alimbolaki polele ete, ezali na bikelamu mingi ya elimo baoyo, atako babala te, kasi bazali sembo mpe na esengo, mpe baklisto mingi bazali na esengo atako bazali minzemba. Lisusu, lokola emonisami na ntalo monene na mabala oyo masili kokufa, babalani mingi bazali na esengo te. Soki okokanisa na mapamboli nyonso oyo baklisto bazali kozwa, okososola ete libala ezali nzela na bolamu te, atako yango ezali lipamboli.

Na nsima, masolo mingi malandani na motó ya likambo “Bonsomi ya boklisto na mikolo na biso.” Molobi ya liboso alobelaki “Mitindo ya bonsomi na biso ya boklisto.” Kati na makambo mosusu, baklisto basili kosikolama na mateya ya losambo ya lokutá, lokola Trinité, molimo ekufaka te mpe monyoko na seko. Atako bazangi kokoka, basili kotika bizaleli mabe, lokola komela makaya, masano ya mbongo, milangwa mpe kosala pite. Basili mpe kosikolama na kozanga elikya, mpamba te bazali na elikya ya kozala na bomoi kati na Paradis, likambo oyo lizali kopusa bango na koyebisa elikya yango na bato bazali zingazinga na bango.

Molobeli oyo alandaki atunaki motuna oyo ete “Moko na moko kati na bino alingi bonsomi yango?” Kolinga elimboli kopesa motuya mingi, kolengela malamu. Mpo na yango, basaleli na Nzambe basengeli kosɛnzela ete bamitika te na masɛnginya oyo makoki kopusa bango na koleka ndelo ya bonsomi na boklisto. Bonsomi ya mokili ezali na bokosi, mpamba te ezali komema na boombo ya masumu mpe na libebi.

Eteni ya nsuka na masolo yango misato elobelaki lisoló oyo ete “Baninga na bonsomi batɛlɛmi ngwi.” Mpo na kosala bongo, baklisto basengeli kozala na bomoko mpenza na baboti na bango ya likoló, Jéhovah mpe lisangá na ye likokisami na mwasi na ye. Basaleli na Jéhovah basengeli komitika te ete bapɛngwisama na maloba na bapɛngwi; basengeli koboya baoyo bazali koyebisa bango makambo na mbindo. Mpo na kotɛlɛma ngwi kati na bonsomi bouti na Nzambe, baklisto basengeli ‘kobika na elimo.’​—Bagalatia 5:25.

Ezalaki esengo mpenza na koyoka diskur ya nsuka ya mokolo wana. Ezalaki na titre oyo ete: “Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.” Yesu azalaki moto oyo alekaki bato nyonso, mpamba te azalaki na bopusi likoló na bomoi na bato koleka mampinga nyonso ekobundaka na mokili, mampinga nyonso ekobundaka na mai, koleka biyangeli nyonso mpe bakonzi nyonso bayanganisami. Azalaki Mwana na Nzambe mpe azalaki naino na likoló liboso na koya awa na mabelé. Yesu amekolaki mpenza Tata na ye ya likoló kati na makambo oyo ye alobaki mpe oyo ye ateyaki, mpe na lolenge na bomoi na ye, kino alobaki ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.” (Yoane 14:9) Amonisaki na motindo ya kokamwa ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Nsima na kolobela bizaleli na Yesu, molobi amonisaki ete motó ya likambo “Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye” ezalaki kobima na uta avril 1985 (na Mosenzeli uta janvier 1986). Mpo na koyanola na ba demandes mingi, la Société abimisi mokanda ya sika Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Ezali na mikapo 133 mpe enyatami na langi ndenge na ndenge. Mokanda wana ya nkasa 448 ezali na mateya, oyo bazongeli mpe babongisi, mazwami na molongó ya masoló ebimaki kati na Mosenzeli. Ya solo, mokolo wana ya assemblée esukaki na likambo oyo lipesaki esengo mingi!

Mokolo ya lomingo na ntɔngɔ

Kolandana ya masolo na motó na likambo “Tozala balɔbi na bato” esalemaki na ebandeli ya likita na mokolo ya lomingo na ntɔngɔ. Eteni ya liboso, ezalaki na motó ya likambo “Bolɔbi mbisi na solo mpe ya elilingi,” etyaki mboko mpo na badiskur oyo elandaki. Molobi alimbolaki ete nsima na kotinda bato bazalaki kati na masúwa ete balɔba mbisi na likamwisi, Yesu abyangaki bango ete bakóma balɔbi na bato. Na boumeli ya mwa ntango, Yesu abongisaki bayekoli na ye mpo ete bakóma balɔbi na bato, mpe, kobanda Pantekote ya mobu 33, bato yango basalisaki ebele na mibali mpe basi ete bakóma bayekoli na Klisto.

Molobi oyo alandaki alobelaki thème oyo etongamaki likoló na lisese na molubá, oyo likomami na Matai 13:47-50. Amonisaki ete molubá molakisi na mbala moko baklisto bapakolami mpe boklisto ya lokutá. Boklisto ya lokutá, elakisami mpe na molubá mpo ete akokisaki mosala monene mpo na kobongola, kobimisa mpe kokabola Biblia, atako milende yango mimemaki bobele ebele na mbisi oyo ebongi na kolya te. Uta 1919 mpenzampenza mosala ya kokabola mokokisami: mbisi ebongi na kolya te ebwakamaki, kasi oyo ebongi na kolya etyami kati na ekɔlɔ́ to masangá, maye makobatelaka mpe mazali kosunga baklisto ya solo mpo na mosala na Nzambe.

Diskur ya misato, na motó ya likambo “Tolɔba bato kati na mai nyonso ya mokili,” elobelaki mokumba oyo baklisto nyonso bazali na yango mpo na kosangana na mosala ya koloba na mokili mobimba Koleka bato 4 000 000 bazali lelo kosangana na mosala yango kati na mikili koleka 200, mpe bambula oyo euti koleka, motuya na baoyo bazwaki batisimo elekaki 230 000 na mbula na mbula. Basaleli nyonso na Jéhovah balendisamaki na kobongisa lolenge na bango ya kolɔba, mpe “balɔbi” mingi oyo bazali kozwa matomba malamu, batunamaki mituna.

Kati na diskur elandaki, na motó ya likambo “Tosɛnzela na ‘ntango ya nsuka,”’ molobi atangaki makambo nsambo oyo ekosalisa biso na kosɛnzɛla: kobunda mpo ete tokosama te, kobondela, kokangama na lisangá ya teokratike na Jéhovah, koyokisa likebisi na ntina na nsuka ya biloko ya ntango oyo, komitalela biso moko, kokanisa likoló na bisakweli oyo bisili kokokisama mpe komikundola ntango nyonso ete lobiko na biso ebɛlɛmi koleka na eleko tokómaki bandimi.

Likita ya ntɔngɔ lisukaki na lisoló “Nani akobika na ‘ntango na mpasi?’” Molobi amonisaki ete esakweli ya Yoele ekokisamaki mwa moke na ntango na bantóma, nde ekokisami na monene na eleko na biso mpe mosika te, ekokokisama na mobimba na yango.

Mokolo ya lomingo na nsima na nzanga

Likita ya nsima na nzanga libandaki na diskur piblike na motó ya likambo “Tokumisa mokili na bonsomi molakami na Nzambe!” oyo elimbolaki thème ya assemblée. Elimbolamaki ete Liloba na Nzambe lizali kosakola boyei ya mokili ya sika, na kati na yango bato bakosikolama longwa na mangomba ya lokutá, na politike, na mombongo ya lokoso mpe na koponapona mposo. Bakosikolama na lisumu mpe na liwa. Bakozwa kolongono ya nzoto ya kokoka, likambo oyo likopesa bango nzela na kozala na bomoi ya seko na esengo na mabelé oyo makobongwana paradis. Na bongo, baoyo balingi boyengebene bazali mpenza na bantina ya kosanzola Mozalisi ya mokili ya sika, ete: “Totɔndi yo, Jéhovah, lokola opesi biso bonsomi ya solo oyo tozelaki uta ntango mingi!”

Diskur piblike elandamaki na rézimé ya boyekoli ya Mosenzeli na poso wana, oyo ezali bongo likambo ya sika na ba assemblées ya distrike. Na nsima assemblée esilaki na diskur ya mɔ́tɔ oyo ezalaki lokola toli: “Baninga ya bonsomi bolanda kokende liboso!” Molobi asalaki rézimé moke ya makambo minene oyo malobamaki na assemblée yango, oyo elobelaki mingi bonsomi. Amonisaki ete libota ya Jéhovah lizali na esengo, mpo ete lizali na bonsomi; atangaki makambo kati na yango baklisto basalaki bokóli, mpe alendisaki bango na kolanda kokende liboso na kozaláká na bomoko, ete bazwa mapamboli mosusu. Asukisaki na maloba oyo ete: “Ekosala biso bongo, tika ete Jéhovah apambola moko na moko kati biso mpe akopambola biso nyonso lokola lisangá mpo ete tozala baninga na bonsomi baoyo bazali kolanda kokende liboso!”

“Biloko bizalisami bisili koyeisama mpamba​—mpo na mokano na yango moko te, kasi likoló na ye oyo azalisi yango boye​—mpo na elikya, ete biloko bizalisami mpe bikosikwa na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi na nkembo ya bana na Nzambe.“​—Baloma 8:20, 21, MN.

[Bililingi na lokasa 25]

Elenge moyangani moko na assemblée ya Prague (Tchécoslovaquie)

[Bililingi na lokasa 26

1. Na Prague, bakandidá mpo na kozwa batisimo bazali kokende na esika bakobatisima

2. Batisimo ya Témoin de Jéhovah moko na engumba Tallinn, na mokili ya Estonie

3. Mikanda ya sika mipesi esengo epai na bayangani, na engumba Ousolie-Sibirskoie, na mokili ya Sibérie

4. Bayebisi kobimisama ya “Les Saintes Ecritures-Traduction du monde nouveau” na monoko ya tchèque mpe na monoko ya slovaque, na assemblée ya Prague

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto