Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/3 nk. 5-7
  • Myango mpo na kimya na mokili mobimba mikolónga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Myango mpo na kimya na mokili mobimba mikolónga?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini?
  • Kimya ya solo awa na mabelé
  • “Kimya mpe libateli” oyo ekotyama na bato te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Oyo biblia elobi na ntina na kimya mpe libateli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tomizimbisa te na “kimya” oyo mabota bazali kobongisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Olingi kimya ya motindo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/3 nk. 5-7

Myango mpo na kimya na mokili mobimba mikolónga?

ZULUNALO One World, ya C.O.E. (Conseil Œcuménique des Eglises) elobi ete: “Koswana kati na mikili, oyo esili kopesa mpasi na mokili na boumeli ya mibu koleka 40, emonani lokola ete ekómi na nsuka na yango na lisalisi na Nzambe.” John Pobee, mokomi na programme ya C.O.E. likoló na mateya na teoloji ya lingomba ya Anglican, abakisi ete: “Makambo minene oyo mazali koleka na Europe centrale mpe na Europe de l’Est . . . emonani lokola ete ezali elikya malamu mpo na kimya mpe libateli na Mpótó mpe na mokili mobimba.”

Bamonisi ya C.O.E. bazali bobele bango moko te oyo balobeli Nzambe kati na myango ya bato na ntina na libateli ya mokili mobimba. Na avril 1991, mwa moke nsima na etumba ya golfe Persique, pápa Jean-Paul II atindaki maloba epai na Javier Peréz de Cuellar, oyo azaláká secrétaire général ya O.N.U., ete: “Baepiskopo na Mangomba ya katolike ya Proche-Orient mpe ya Ouest bazali kotya motema na mosala ya Lisangá ya mabota . . . Balingi ete baoyo bakɔtaki na ezalela ya mpasi na etumba oyo euti kosalema, bakóma na bososoli mpe na boyokani na mokili mobimba na nzela na Lisangá ya mabota mpe masangá masalemi mpo na mokano wana.”

Lisusu, Vatican ezali moko na Bikólo 35 oyo bikomaki mpe bityami mabɔkɔ na boyokani ya Helsinki na 1975, mpe mokanda ya likita ya Stockholm na 1986. Na ntango Lisangá ya mabota basakolaki mobu 1986 ete ezali “mbula ya kimya na mokili mobimba,” pápa alobelaki yango mingi na kobyangáka bamonisi ya mangomba mingi ya mokili ete basangana na “Mokolo ya mabondeli mpo na kimya na mokili mobimba.” Na octobre 1986, bamonisi na lingomba ya Buda, ya Hindou, ya Islam, ya Shintõ, na lingomba ya Anglican, ya Luthérien, na Lingomba ya orthodoxe ya Greke, na lingomba ya Bayuda mpe mangomba mosusu bayanganaki na engumba Assise, na Italia, mpe babondelaki moto na moto na ngala na ye mpo na kimya ya mokili mobimba.

Mwa bambula na nsima, episkopo wa lokumu na lingomba ya Anglican na mboka Cantorbéry, alobelaki likambo yango kati na diskur moko asalaki na Loma. Alobaki ete: “Na engumba Assise, tomonaki ete episkopo wa Loma [pápa] ayanganisaki Mangomba ya boklisto. Tobondelaki esika moko, tolobanaki esika moko mpe tosalaki makambo esika moko mpo na kimya mpe bolamu ya bato . . . Liboso na mwango wana ya kobondela mpo na kimya ya mokili mobimba, namiyokaki lokola nde nazalaki liboso na Nzambe oyo alobaki ete: ‘Tala, nazali kosala eloko ya sika.’”

Atako bazalaki te na engumba Assise, mangomba mosusu bazali mpe kotya elikya na mwango ya bato na ntina na libateli ya mokili mobimba. Die Kerkbode, zulunalo ya Lingomba ya mbongwana na Hollande, oyo ezali na Afrique du Sud, elobaki ete: “Tozali kobika na eleko ya mbongwana oyo ekokɔtisa biso na ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba. Makambo mamonanaki ete makasi kosalema te mwa bambula liboso, masili kosalema na miso na biso. Bozongani na bondeko bosalemaki na etando ya mokili mobimba kati na Union soviétique mpe na mikili ya Ouest, ebimisi matomba minene na bisika wana. Epai na biso, ba partis ya politike oyo liboso ezalaki kotɛmɛlana mpe baoyo bazalaki liboso banguna, bazali kolobana, mpe mposa ya kimya ezali komonana . . . Na etaleli na boklisto, milende nyonso misalemi mpo na kotya kimya kati na bato misengeli kondimama. Tokoki kobondela ete kimya ezwama awa ezali biso na bomoi.”

Nzambe azali nde kopambola myango ya bato na ntina na libateli ya mokili mobimba?

Biblia elobi nini?

Na ntina etali milende ya bato, Biblia epesi likebisi oyo ete: “Kotya motema na yo epai na bazwi te, soko na mwana na moto oyo auti na mputulu te, mpo ete azali na lobiko te. Elimo na ye ekobima, mpe akozonga na mputulu; mpe bobele mokolo wana, makanisi na ye makosila.” (Nzembo 146:3, 4, MN) Lolenge makambo ya lelo mazali kotambola epai na kimya, ekoki mpenza kolendisa. Kasi tosengeli kozala na bososoli. Nguya na bato ezali na nsuka na yango. Mbala mingi, makambo malekaka mayele na bango. Bazali na nkaká mpo na kososola makambo mayebani te, makambo mabómbami, maye makobulunganisaka myango na bango minene.

Mibu nkámá nsambo liboso na Yesu, na eleko ya mosakoli Yisaya, bakonzi ya Bayuda bazalaki koluka kotya libateli na nzela na boyokani na mikili mizingaki bango, na motindo oyo ezali kosalema lelo. Na eleko wana mpe, bakonzi ya mangomba bazalaki kopesa lisungi na bango na oyo bato ya politike bazalaki kosala. Kasi Yisaya akebisaki bango ete: “Boyanga myango elonga nde ikosuka bobele mpamba! Bobimisa liloba, nde likotɛlɛma te.” (Yisaya 8:10) Mikano na bango milóngaki soki moke te. Likambo motindo wana likoki nde kobima na eleko na biso?

Ee, mpamba te bobele na mosakoli yango moko, Nzambe ayebisaki ete akomema kimya awa na mabelé na motindo na ye moko. Akosala yango na nzela na ebongiseli moko ya bato te, kasi na nzela na mokitani moko ya Davidi, mokonzi Moyisraele. (Yisaya 9:6, 7) Mosangoli wana ya mokonzi Davidi ezali Yesu Klisto, oyo andimaki ete azalaki mokonzi wana atunamaki na Ponse Pilato, mpe alobaki ete: “Bokonzi na ngai euti na mokili oyo te.” (Yoane 18:36; Luka 1:32) Ya solo, Bokonzi na Yesu bosengelaki kozala na likoló. Ezali ye nde asengeli komema kimya ya solo awa na mabelé, kasi Lisangá ya mabota te, soko moko na mabota ya mabelé te.​—Danyele 2:44.

Yesu Klisto asakolaki ete Bokonzi na ye bokobanda koyangela longwa na makoló na eleko oyo ekozala na “bitumba mpe nsango na bitumba” mpe wana ‘libota moko likotɛmɛla libota mosusu.’ Kokokisama ya esakweli wana elakisi ete yango esalemaki na 1914 mpe ete bambula oyo esili koleka uta ntango wana, ekokani na “nsuka na ebongiseli ya biloko.”​—Matai 24:3, 6-8.

Yango elimboli nini? Elimboli ete ntango oyo etikali mpo na ebongiseli ya mokili ya ntango oyo ezali moke, mpe mosika te ekokóma na nsuka na yango. Wana ezali likambo likopesa mitungisi to mpe mawa? Ezali bongo te soki tokanisi na ntina na mabe mingi, na bokesene, na monyoko, na bitumba mpe na mpasi nyonso oyo ebimi na ebongiseli ya biloko oyo. Kasi ekozala nde libɔndi na koyangelama na mokonzi oyo Biblia, Liloba na Nzambe elobi na ntina na ye ete: “Elimo na Jéhovah ekozala likoló na ye, elimo na bwanya mpe na mayele, elimo na toli mpe na makasi, elimo na boyebi mpe na kobanga Jéhovah.”​—Yisaya 11:2, MN.

Kimya ya solo awa na mabelé

Solo mpenza, kimya ya solo ekozala na mabelé te naino esakweli na Yisaya ekokani te na etando mobimba, na nsé na Bokonzi na Nzambe, ete: “Nakozalisa makoló na sika mpe mabelé na sika; mpe makambo na liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.” (Yisaya 65:17) Ata motuya nini ya mabondeli oyo bakonzi ya mangomba bazali kosala mpo na mokili, myango na bato mpo na kotya kimya na mokili mobimba, mikoki te kozwa esika na mwango oyo Nzambe asili kobongisa mpo na kotya kimya mpe libateli.

Kimya ya seko na mokili mobimba oyo ekotyama na Bokonzi na Nzambe, ekozala mpenza kitoko. Tala moko na makambo oyo Biblia elobeli yango, ete: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko likotombwela libota mosusu mopanga te, mpe bakoyekola lisusu etumba te. Bakofanda moto na moto na nsé na nzeté na ye ya vinyo mpe na nsé na nzeté na ye ya mosuké, mpe moto moko te akobangisa bango mpo ete monoko na Jéhovah na bibele elobi bongo.”​—Mika 4:3, 4.

Bobele kimya oyo elakami na Nzambe nde ekoki koumela seko. Na yango, na esika na kotya motema epai na bato minene na mokili, mpo na nini te kozala na elikya epai na Nzambe? Na bongo, okomona ete maloba oyo na mokomi na nzembo mazali solo, ete: “Esengo na ye oyo Nzambe na Yakobo azali lisungi na ye, mpe atii elikya epai na Jéhovah, Nzambe na ye, Motongi na likoló mpe mabelé, na mai monene, mpe biloko bizali kati na yango, Ye oyo azali kobatela solo libela na libela.”​—Nzembo 146:5, 6, MN.

[Etanda na lokasa 7]

Lingomba ya katolike mpe politike ya mokili mobimba

“Atako Klisto alobaki ete bokonzi na ye euti na ‘mokili te,’ kasi uta Constantin bakonzi ya mangomba na lokumu mpe ebongiseli ya bopápa basili kosangana na molende mingi na koswana na politike kati na mikili mpe kati na ekólo moko.”​—L’Église catholique dans le monde politique (angl.), ya Eric Hanson, molakisi na université jésuite ya Santa Clara.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto