Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/3 nk. 10-15
  • Poso oyo ebongolaki mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Poso oyo ebongolaki mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokolo ya 8 Nisan
  • Mokolo ya 9 Nisan
  • Mokolo ya 10 Nisan
  • 11 Nisan: mokolo ya mosala mingi
  • Mokolo ya 11 Nisan mobɛlɛmi na nsuka na yango
  • Mokolo ya 12 Nisan
  • Mokolo ya 13 Nisan
  • “Ntango esi’ ekoki”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tómikundwela mikolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabelé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • A7-G Makambo minene ya bomoi ya Yesu awa na mabele—Nsuka ya mosala ya Yesu na Yerusaleme (Eteni 1)
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Elekeli ya nsuka ya Yesu ekómi pene
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/3 nk. 10-15

Poso oyo ebongolaki mokili

“Mapamboli na ye oyo ayei na nkombo na Jéhovah!”​—MATAI 21:9, MN.

1. Makambo masalemaki na sanza ya mwambe ya mobu moleki, masimbaki mitema ya mitindo mibale na bato, Banani mpe banani?

“MIKOLO MISATO YA MPASI MININGISAKI MOKILI.” Na sanza ya mwambe ya mobu 1991, ba titres lokola oyo wana elobelaki mingi likambo oyo ete mokili mokoki kobongwana bobele na mwa mikolo. Tokoki koloba ete ndambo na mibale ya sanza ya août eninganaki, bobele mpo na mokili te, kasi lisusu mpo na etuluku moko na bato oyo Yesu alobaki na ntina na bango ete: “Bazali bato na mokili te.” Etuluku yango eyebani lelo na nkombo Témoins de Jéhovah.​—Yoane 17:14.

2, 3. (a) Lolenge nini bonsomi bokumisamaki na engumba Zagreb, atako etumba ebɛlɛmaki? (b) Lolenge nini kondima makasi ezwaki mbano na yango na engumba Odessa?

2 Assemblée internationale ya yambo ya ba Témoins de Jéhovah oyo esalemaki naino te na Yougoslavie, ebongisamaki kobanda mokolo ya 16 août kino 18 août. Emonanaki lisusu ete ezalaki assemblée ya liboso ya libota ya Jéhovah oyo elekaki monene kati na mokili epai etumba ya banamboka ebɛlɛmaki. Batemwe ya mokili wana, mpe bavolontere oyo bautaki na mikili ya zingazinga, basalaki na molende na boumeli ya sanza mibale mpo na kobongisa lisusu libándá ya ndembo ya HASK Gradanski ya engumba Zagreb. Engɛngaki na popɛto: esika yango ebongaki mpenza mpo na kosala assemblée “Baninga na bonsomi bouti na Nzambe.” Bandeko mingi na mikili misusu, kati na bango 600 na États-Unis, bamibongisaki ete bakenda koyangana na assemblée wana. Lokola etumba ya banamboka ebɛlɛmaki, nsango etambolaki ete: “Baameriké bakoya te.” Kasi bayaki, mpe bandeko mosusu bautaki na mikili mingi misusu. Bazalaki kozela bato 10 000; na esika ete ezala motuya wana, ezalaki bato 14 684 nde bayaki na libándá ya ndembó na mokolo ya nsuka! Bayangani nyonso bazwaki mapamboli mingi mpo ete ‘batikaki te koyangana elongo moko.’​—Baebele 10:25.

3 Na boumeli ya mikolo misato nsima na assemblée ya Zagreb, coup d’Etat esalemaki na Union soviétique nde elongaki te. Na eleko wana, baninga na bonsomi bouti na Nzambe bazalaki kosala bibongiseli na bango ya nsuka mpo na assemblée oyo esengelaki kosalema na engumba Odessa, na mboka Ukraine. Assemblée ekokaki nde kosalema? Na kopusama na kondima makasi, bandeko basilisaki kobongisa libándá ya ndembó, mpe bandeko oyo bautaki na mikili misusu balandaki kokóma. Lokola nde likamwisi, coup d’Etat esilaki. Assemblée kitoko esalemaki na mokolo ya 24 août mpe na 25 août, epai bato 12 115 bayanganaki, kati na bango 1943 bazwaki batisimo​—soko 16 % ya bayangani nyonso. Batemwe wana ya sika, mpe baklisto oyo batikali sembo uta bambula mingi, basepelaki koya na assemblée yango wana batyaki elikya na bango nyonso epai na Jéhovah.​—Masese 3:5, 6.

4. Batemwe ya Europe de l’Est balandaki ndakisa nini oyo Yesu atikaki?

4 Batemwe wana ya sembo balandaki elakiseli oyo etikamaki na Yesu Klisto, Ndakisa na biso. Azalaki na bopotu te mpo na koyangana na bilembo bisɛngisamaki na Jéhovah, mpe yango ata soko Bayuda balukaki koboma ye. Wana akendaki na Yelusaleme mpo na koyangana na Pasiká na ye ya nsuka, Bayuda bazalaki wana kati na tempelo, mpe batunaki ete: “Bino bokanisi boni? Akoya nde na elambo te?” (Yoane 11:56) Kasi Yesu ayaki! Yango ezalaki ebandeli ya poso oyo likambo na yango monene lisengelaki kobulunganisa lisoló na bato. Totalela elongo mwa makambo oyo masimbaki poso wana, oyo ebandaki mokolo ya 8 Nisan kino 14 Nisan engebene manaka na Bayuda.

Mokolo ya 8 Nisan

5. Yesu ayebaki likambo nini wana ezalaki ye kokenda na Betania na mokolo ya 8 Nisan ya mobu 33?

5 Mokolo wana, Yesu mpe bayekoli na ye bakómi na Betania. Yesu akolekisa butu motóba na mboka oyo, epai na Lazare, moninga molingami na ye, oyo ye autaki kosekwisa kala mingi te kati na bakufi. Betania ezali pene na Yelusaleme. Wana bazalaki bango moko, Yesu apesaki toli oyo epai na bayekoli na ye, ete: “Tala, tozali kobuta na Yelusaleme mpe Mwana na moto akokabama na banganga-kapita mpe na bakomeli, mpe bakokweisa ye mpo na kufa, mpe bakokaba ye epai na bato ya mabota ete atyolama, mpe abɛɔtama, mpe abákisama likoló na nzeté, mpe akosekwa na mokolo na misato.” (Matai 20:18, 19, MN) Yesu ayebi malamu ete asengeli kokutana na mimekamo makasi. Kasi, atako ntango ya momekamo monene ebɛlɛmi, atiki te kosalela bandeko na ye. Tika ete tozala ntango nyonso na “motindo na elimo oyo Klisto Yesu azalaki na yango”!​—Bafilipi 2:1-5, MN; 1 Yoane 3:16.

Mokolo ya 9 Nisan

6. Marie asalaki likambo nini na mpokwa ya mokolo ya 9 Nisan, mpe Yesu alobaki nini epai na Yuda?

6 Na nsima na kolala na moi, wana ebandi mokolo ya 9 Nisan, Yesu azali kolya bilei malamu epai na Simona, moto na mába na kala. Esika wana nde Marie, ndeko na Lazare, asopi mafuta na malasi ya ntalo mingi, likoló na motó mpe na makolo na Yesu, mpe apangusi makolo na Yesu na nsuki na ye na komikitisa nyonso. Yesu alobi epai na Yuda oyo asepelaki na likambo yango te, ete: “Botika ye asala bongo, ete asalela yango mpo na mokolo na kokundama na ngai.” Eyoki bango ete bato mingi bazali kokenda na Betania mpe bazali kondimela Yesu, banganga-kapita basali likita mabe mpo na koboma ye, mpe Lazare lokola.​—Yoane 12:1-7, MN.

7. Lolenge nini nkombo na Jéhovah ekumisamaki na ntɔngɔ ya mokolo ya 9 Nisan, mpe Yesu asakolaki likambo nini?

7 Yesu akei na ntɔngɔ mpenza na Yelusaleme. Bibele na bato bayei koyamba ye, kopɛpáká mandalála mpe na kongangáká ete: “Bikisa biso, tobondeli yo! Mapamboli na ye oyo azali koya na nkombo na Jéhovah, ye mokonzi na Yisraele!” Na nsima, Yesu akokisi esakweli ya Zakaria 9:9 wana akómi na engumba mpe abuti likoló na mpunda. Ebɛlɛmi ye pene na Yelusaleme, aleli mpo na mboka yango mpe asakoli ete Baloma bakozinga yango mpo na etumba mpe bakoboma yango nyonso; esakweli oyo ezwaki kokokana na yango monene nsima na mibu 37. (Epai mosusu, yango esakolaki mpasi mpo na boklisto ya lokutá, oyo esili kopɛngwa lokola Yelusaleme na kala.) Bakonzi ya Bayuda baboyi kondima ete Yesu azali mokonzi. Bangangi na nkanda ete: “Tala ete bato nyonso balandi ye!”​—Yoane 12:13, 19.

Mokolo ya 10 Nisan

8. Na mokolo ya 10 Nisan, lolenge nini Yesu amonisaki limemya mozindo mpo na ndako ya mabondeli na Jéhovah, mpe eloko nini elekaki na nsima?

8 Yesu akei lisusu na tempelo. Mpo na mbala ya mibale abengani batɛkisi mpe baoyo bazali kosanzé misolo na lokoso. Lokoso, “mposa na mosolo,” esengeli te kosalema kati na ndako na mabondeli na Jéhovah. (1 Timoté 6:9, 10) Mosika te, Yesu akokufa. Mpo na kolimbola likambo yango, alobeli mbótó moko elónami. Mbótó wana ekufi, kasi ebimisi nzeté oyo eboti mbuma mingi. Bobele bongo, liwa na Yesu likopesa bomoi ya seko epai na ebele na bato oyo bandimeli ye. Ekanisi ye na ntina na liwa oyo akokufa mosika te, Yesu atungisami mpe abondeli mpo ete nkombo na Tata na ye ekumisama. Mongóngó na Nzambe mongulumi mpo na koyanola longwa na makoló na matoi ya bayangani nyonso ete: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.”​—Yoane 12:27, 28.

11 Nisan: mokolo ya mosala mingi

9. (a) Lolenge nini Yesu asalelaki masese mpo na kokweisa Bayuda bapɛngwi, na ebandeli ya mokolo ya 11 Nisan? (b) Engebene lisese na Yesu, nani abungisaki libaku kitoko?

9 Yesu mpe bayekoli na ye batiki lisusu Betania: bakozala na mosala mingi na mokolo oyo. Yesu asaleli masese misato mpo na komonisa ntina oyo Bayuda na lipɛngwi, bakweisami. Alakaki mabe na nzeté na mosuké oyo ezalaki kobota te, mpe nzeté yango ekauki emonisi sikawa libota na Bayuda lizangi sembo mpe likobotaka mbuma te. Ekɔti ye kati na tempelo, ayebisi lolenge nini basali na bilanga, baoyo batindamaki mpo na kosala na elanga na vinyo, bayei koboma mwana mpe motuki na libula ya nkolo na elanga. Basali wana na elanga bamonisi Bayuda oyo balongolaki elikya na bango epai na Jéhovah, mpe bakokóba kino koboma Yesu. Alobeli elambo na libala ebongisami na mokonzi, Jéhovah; baoyo babyangami na yango (Bayuda) baboyi kokenda mpo na bantina na bango ya moïmi. Na yango, libyangami lipesami epai na bapaya, Bapakano, mpe bamoko bandimaki. Kasi mobali moko azali na elamba na libala te abwakami libándá. Ye amonisi baklisto ya lokutá, basangani na boklisto ya lokutá. Bayuda mingi ya eleko na Yesu babyangamaki, “kasi bobele moke” nde “baponamaki” mpo na kozala kati na ba 144 000 oyo batyami bilembo, baoyo bakosangola Bokonzi ya likoló.​—Matai 22:14; Emoniseli 7:4.

10-12. (a) Mpo na nini Yesu akweisaki bakonzi na mangomba ya Bayuda, mpe maloba nini na kokweisa makasi ye alobaki epai na bakosi wana? (b) Na nsuka, kosambisama nini esalemaki epai na Bayuda bapɛngwi?

10 Bakonzi bakosi na mangomba ya Bayuda bazali koluka libaku ya kokanga Yesu, kasi ayanoli na ebele na mituna oyo batyeli ye motambo mpe ayokisi bango nsoni liboso na bato. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazali bapɛngwi. Yesu akweisi bango na molende nyonso. Lolenge moko na bakonzi ya mangomba na eleko na biso, bazali na mposa makasi mpo na bitɛlɛmɛlo ya lokumu, na bilamba bikesenisi bango na bato mosusu mpe na bankombo na lokumu, lokola “Rabbi” mpe “Tata.” Yesu apesi lilako oyo ete: “Moto na moto akomitómbola akokitisama nde moto na moto akomikitisa akotmóbolama.”​—Matai 23:12, MN.

11 Yesu alobi na bakonzi wana ya mangomba na maloba na kokweisa makasi, ete: “Mawa na bino!” wana abéngi bango ete bakufi-miso mpe bakosi. Mpe na mbala nyonso, azali komonisa polele mpo na nini azali kokweisa bango. Bazali kopekisa bato ete baingela kati na Bokonzi ya makoló te. Wana bazwi na motambo mopakano oyo abongwani na lingomba na Bayuda, ye wana abongi mbala mibale na etumbu ya Gehena; ekoki mpenza kozala na masumu minene oyo asalaki liboso to ezaleli na ye ya kondima kozanga kososola, ezali komema ye na libebi. Yesu alobi ete: “Bato na ligboma mpe bakufi-miso!” mpamba te Bafalisai bapesaki motuya mingi na wolo ya tempelo koleka kobongisama na losambo na pɛto losalemi kati na tempelo wana. Baboyi kosalela boyengebene, motema mawa mpe bosembo, mpamba te bazali kopesa ndambo na eidosomo, na aneti na nsolo kitoko mpe na kumina, nde bazali kotya likebi te na makambo na ntina na Mibeko. Kopɛtolama na milulu ekoki soko moke te kolongola mbindo ezali kati na bango; bobele motema mopɛtolami na kondima kati na mbeka na Yesu, oyo esengelaki kopesama mosika te, nde ekoki kolongola yango. Bokosi mpe ezaleli ya kotyola mibeko oyo bazali na yango kati na bango, emonisi ete ‘bapɛtwi’ te kati na mitema.​—Matai 23:13-29.

12 Ee, mawa na Bafalisai, bango bazali mpenza “bana na baoyo babomaki basakoli” na ntango na kala! Bazali banyoka, bana na bitupá, bakweisami mpo na koleka na Gehena, mpamba te bakoboma bobele Yesu te, kasi lisusu baoyo ye akotinda. Kosambisama wana esengeli kosalema “likoló na libota oyo.” Mpo na kokokana ya esakweli wana, Yelusaleme nyonso ebomamaki mibu 37 na nsima.​—Matai 23:30-36.

13. Maloba na Yesu likoló na makabo masalemaki na tempelo, mamonisi nini kati na makambo oyo mazali kosalema na eleko na biso?

13 Liboso na kotika tempelo, Yesu akumisi mobólá mwasi moko mokufeli mobali, oyo atii méa mibale kati na ebómbelo na mosolo, wana “mosolo nyonso oyo azalaki na yango.” Oyo nde kokesena monene na bazwi, bango bato na lokoso oyo bazali kotya bobele makabo na bilembo mpamba! Lokola mobólá mwasi wana mokufeli mobali, ba Témoins de Jéhovah ya eleko na biso bazali kopesa ntango na bango, makasi na bango mpe bozwi na bango ya mosuni mpo na kosunga bokóli ya mosala na Bokonzi na mokili mobimba. Oyo nde kokesena na bateyi ya televizio bazangi bizaleli malamu, baoyo bazali koyiba bitonga na bango na kokɛngɛla ebele na misolo mpo na bango moko!​—Luka 20:45 kino 21:4.

Mokolo ya 11 Nisan mobɛlɛmi na nsuka na yango

14. Yesu aleli na ntina na nini, mpe lolenge nini ayanolaki na motuna oyo bayekoli na ye batunaki ye?

14 Yesu aleli mpo na Yelusaleme mpe bafandi na yango, mpe alobi ete: “Bokomona ngai lisusu te kino bokoloba ete: ‘Mapamboli na ye oyo ayei na nkombo na Jéhovah!’” (Matai 23:37-39) Na nsima, efandaki bango likoló na ngomba na Olive, bayekoli bameseni mingi na Yesu batuni ye na ntina na likambo oyo, nde ye ayanoli bango na bilembo bikomonisa koya na ye, wana akozwa nguya na bokonzi, mpe na bilembo ya nsuka na ebongiseli ya biloko mabe ya Satana.​—Matai 24:1 kino 25:46; Malako 13:1-37; Luka 21:5-36.

15. Yesu apesaki elembo nini na ntina na koya na ye mpo na kosambisa mpe yango ekokani uta ntango nini?

15 Na kolobeláká kosambisama na Jéhovah oyo mosika te ekosalema likoló na tempelo, Yesu alakisi ete likambo yango lisakoli makámá minene makobima na nsima, na nsuka na ebongiseli ya biloko oyo nyonso. Eleko na koya na ye ekomonisama na bitumba bikopalangana na etando eleki mpenza monene, mpe banzala, koningana na mabelé mpe maladi; nyonso wana ekosangana na kozanga bolingo mpe na ezaleli ya kotyola mibeko. Makambo oyo nyonso mamonani mpenza na ekeke oyo ya ntuku mibale kobanda 1914.

16, 17. Yesu elobelaki makambo nini mazali kosalema kati na mokili mobimba, mpe lolenge nini baklisto basengeli kosala na kotalela esakweli yango?

16 Makambo oyo makosuka kino “bolózi monene oyo naino emonana na mokili te kino lelo, mpe ekomonana lisusu te.” Lokola likámá yango likoboma bato mingi koleka mpela na eleko na Noa, Yesu akebisi biso ete tomizindisa na mitungisi ya mokili oyo te. “Bongo, bomisɛnzela mpo ete boyebi mokolo Nkolo akoya te. Tokoki mpenza kozala na esengo lokola Nkolo asili kopona “moombo na sembo mpe na mayele” epakolami mpo na koyokisa likebisi oyo mpe kopesa bilei mingi ya elimo na mokolo oyo na koya na ye!​—Matai 24:21, 42, 45-47.

17 Na ekeke oyo ya ntuku mibale, tozali komona “awa na nsé ete mabota [mazali] na mitema likoló, mpe mitungisami . . . Bato [basɛnzwi] na nsɔmɔ mpo na makambo makobima kati na mokili.” Kasi Yesu alobi na biso ete: “Wana makambo oyo makobima, botɛlɛma alima mpe botómbola mitó na bino, mpo ete kosikolama na bino ebɛlɛmi.” Apesi biso likebisi oyo ete: “Bokeba bino mpenza ete mitema na bino mikóma makasi te mpo na kolya mingi, mpe na komela mingi mpe na mitungisi ya bomoi, ete mokolo yango moyela bino pwasa te lokola motambo.” Tokoki kotɛlɛma liboso na “Mwana na moto,” na elobeli mosusu tokoki kondimama na ye, na ntango akoya, bobele soki tomisɛɔnzeli.​—Luka 21:25-28, 34-36, MN.

18. Elendiseli nini tokoki kozwa na masese na Yesu na ntina na baseka zomi mpe na ntina na talánta?

18 Mpo na kosukisa esakweli monene oyo likoló na makambo mazali kobima lelo, Yesu apesi masese misato. Libosoliboso, akundoli ntina ya ‘kosɛnzela’ kati na lisese ya baseka zomi. Na nsima, kati na lisese ya baombo mpe talánta, amonisi lolenge oyo molende na mosala mozwi mbano na nzela na libyangi mpo na ‘kokɔta kati na esengo na Nkolo.’ Baklisto bapakolami​—baoyo balobelami kati na masese wana—​mpe bampate mosusu, bakoki kozwa bilendiseli mingi na maloba wana ya elilingi.​—Matai 25:1-30.

19, 20. Na eleko na biso, Yesu alobeli boyokani nini kitoko bomonisami na lisese ya bampate mpe bantaba?

19 Lisese ya misato lilobeli koya na Yesu kati na nguya na bokonzi, ekosila ye kofanda na kiti na bokonzi na nkembo kati na makoló. Elaká ekoki mpo na kosambisa bikólo mpe kokabola mabota na mabelé na bituluku mibale: moko esalemi na bato na bopɔlɔ, bakokisami na bampate; mosusu esalemi na bato na mitó makasi, bakokisami na bantaba. Bampate bazali kosala nyonso ekoki na bango mpo na kosunga bandeko na Mokonzi, baklisto bapakolami oyo batikali naino awa na mabelé na eleko oyo ya nsuka ya mokili. Bampate yango bakozwa bomoi lokola mbano, nzokande bantaba bazangi botɔndi, bakoleka kino libebi ya seko.​—Matai 25:31-46.

20 Oyo nde boyokani kitoko bosangisi bampate mosusu mpe bandeko na Mokonzi na nsuka na ebongiseli ya biloko oyo! Atako batikali bakokisaki mosala monene na ebandeli na koya na Mokonzi, nzokande lelo oyo, bamilio na bampate mosusu na molende bazali 99,8 % ya basaleli na Nzambe awa na mabelé. (Yoane 10:16) Bango mpe bandimi koyika mpiko na ‘nzala, na mposa na mai, na bolumbu, na maladi mpe na bolɔkɔ’ elongo na baklisto bapakolami baoyo batikali sembo.a

Mokolo ya 12 Nisan

21. Likambo nini lisalemaki na mokolo ya 12 Nisan, mpe lolenge nini?

21 Likita mabe mpo na koboma Yesu lisalemi. Yuda akei kokutana na banganga-kapita na tempelo mpe ayokani elongo na bango: akokaba Yesu mpo na paláta na misolo 30. Yango mpe esilaki kosakolama.​—Zakaria 11:12.

Mokolo ya 13 Nisan

22. Bibongiseli nini bisalemaki na mokolo ya 13 Nisan?

22 Yesu, oyo azali naino na Betania, mbala mosusu mpo na kobondela mpe kokanisa atindi bayekoli na ye na Yelusaleme mpo na koluka mobali moko: “Songolo.” Bazali kobongisa Pasiká na “eteni na ndako na likoló,” epai na mobali yango. (Matai 26:17-19) Wana moi molali mpo na kosukisa mokolo ya 13 Nisan, Yesu akómi mpo na kokumisa elambo eleki monene na Lisoló na bato, elongo na bango. Kasi, nini ekosalema na mokolo ya 14 Nisan oyo euti kobanda? Ezali yango ekoyebisamela biso na lisoló lilandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yesu akumisi mwasi mokufeli-mobali oyo apesaki mwa paláta mike ya mosolo: ezali nyonso oyo azalaki na yango

Bozongeli

◻ Lolenge nini Yesu ayambamaki epai na bato mosusu, kobanda mokolo ya 8 Nisan kino 10 Nisan?

◻ Lolenge nini Yesu amonisaki mabe ya bakonzi ya mangomba na bokosi, na mokolo ya 11 Nisan?

◻ Yesu ayebisaki esakweli nini monene, mpe lolenge nini yango ezali kokokana lelo?

◻ Lolenge nini mokambo malandanaki kino na nsuka na yango na mokolo ya 12 Nisan mpe na 13 Nisan?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto