Mituna na batangi
Baebele 9:16 (MN) elobi ete, mpo ete kondimana oyo esalemi ezwa nguya na yango, esengeli na mosali na yango ete akufa. Nzokande, Nzambe asili kosala kondimana na sika nde akufi te. Lolenge nini esengeli kolimbola verset wana?
Totangi na Baebele 9:15-17 (MN) ete: “Tala ntina oyo ye [Klisto] azali moyokanisi ya kondimana na sika, ete na nzela na liwa, asikoli bango na mabunga basalaki na nsé na kondimana na liboso, ete baoyo babyangami bazwa elaká na libula ya seko. Mpo ete kondimana oyo esalemi ezwa nguya na yango, esengeli na mosali na yango ete akufa. Mpamba te kondimana ezali na nguya bobele likoló na [bato] oyo basili kokufa, mpe ezali na ntina te naino mosali na kondimana azali na bomoi.”a
Ya solo, ezali Jéhovah nde azali Mobandisi ya kondimana na sika. Na Yilimia 31:31-34, Nzambe alobi polele ete ye moko akosala kondimana na sika elongo na libota na ye. Ntóma Paulo atangi mokapo yango na Baebele 8:8-13, komonisáká bongo na maloba ya sikisiki ete kondimana wana na banzambe eutaki epai na Nzambe ye moko.
Atako bongo, na Baebele mokapo 9, Paulo akóbi na kolobeláká mikumba mingi oyo Yesu asili kokokisa na kolalela kondimana na sika. Klisto ayaki lokola Nganga Monene ya kondimana wana. Epai mosusu, Yesu azalaki mbeka epesamaki mpo na kondimana na sika; bobele “makila na Klisto” nde ekoki ‘kopɛtɔla lisosoli na misala na kufa.’ Klisto azalaki lisusu Moyokanisi ya kondimana wana, lokola Moize azalaki moyokanisi ya kondimana na Mibeko.—Baebele 9:11-15.
Paulo alobelaki sikisiki ete liwa lisɛngisamaki mpo ete kondimana na Nzambe mpe bato ekoka kozwa nguya na yango. Kondimana na Mibeko ezali ndakisa. Moize azalaki moyokanisi, ye oyo asalaki boyokani kati na Nzambe mpe Yisraele ya mosuni. Moize akokisaki mokumba moko monene; azali moto oyo asololaki elongo na Bayisraele na ntango bakɔtaki kati na kondimana. Moize akokaki bongo kotalelama lokola moto oyo asalaki kondimana na Mibeko, oyo eutaki epai na Jéhovah. Kasi Moize asopaki nde makila na ye mpo ete kondimana na Mibeko ezwa nguya? Te. Na esika na yango, bapesaki banyama oyo makila na yango makitanaki makila na Moize.—Baebele 9:18-22.
Ezali boni mpo na kondimana na sika kati na Jéhovah mpe libota na Yisraele ya elimo? Yesu Klisto asili kokokisa mokumba na nkembo ya mobongisi, Moyokanisi kati na Jéhovah mpe Yisraele ya elimo. Atako Jéhovah nde azali mobandisi na yango, kasi kondimana wana etongami likoló na Yesu Klisto. Yesu azali bobele Moyokanisi te, kasi azalaki lisusu na boyokani malamu elongo na bato ya yambo oyo babyangamaki mpo na kokɔta na kondimana yango, wana ezalaki ye kati na nzoto. (Luka 22:20, 28, 29) Lisusu, akokisaki masɛngami mpo na kopesa mbeka esengelaki mpo ete kondimana ezwa nguya na yango. Ezalaki mbeka mpamba na banyama te, kasi bomoi ya moto na kokoka. Paulo akokaki bongo koloba na ntina na Klisto lokola mpo na moto oyo asalaki kondimana na sika. Nsima wana “Klisto aingelaki . . . kati na likoló mpenza mpo na komonana sikawa liboso na Nzambe na ntina na biso,” kondima na sika ezwaki bongo nguya na yango.—Baebele 9:12-14, 24, MN.
Kolobáká na ntina na Moize mpe Yesu lokola mpo na bato oyo basalaki kondimana, Paulo akanisaki te ete bato wana nde babandisaki kondimana yango, oyo esalemaki mpenzampenza na Nzambe. Kasi, bato wana mibale bazalaki mpenza bayokanisi ya kondimana wana. Mpe na mokomoko na yango, liwa lisɛngisamaki: oyo na banyama na esika na Moize, mpe liwa na Yesu oyo apesaki makila na ye mpo na baoyo bazali kati na kondimana na sika.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba mibale na Greke oyo mayeisami awa na “ya mosali na kondimana” mabongolami sikisiki na “ya [ye oyo] amisalelaki kondimana” to ya [ye oyo] asalaki kondimana.”—The Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scriptures, ebimisami na la Société Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., mpe the Interlinear Greek-English New Testament ebimisami na Alfred Marshall.